Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 42
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Bandako ya bisika ya kolya (1-14)

      • Mipanzi minei ya tempelo emekami na molai mpe na monene (15-20)

Ezekiele 42:1

Mitindami

  • +Ezk 40:2
  • +Ezk 42:13
  • +Ezk 41:12, 15

Ezekiele 42:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.

Ezekiele 42:3

Mitindami

  • +Ezk 41:10

Ezekiele 42:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bashambrɛ.”

  • *

    “Mapeko 100 na molai,” na kolanda libongoli ya Septante (Grɛki). Makomami ya Ebre elobi: “nzela ya lipeko moko.” Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Ezk 42:10, 11

Ezekiele 42:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na monene.”

Mitindami

  • +Ezk 41:12; 42:1

Ezekiele 42:11

Mitindami

  • +Ezk 42:4

Ezekiele 42:12

Mitindami

  • +Ezk 42:9

Ezekiele 42:13

Mitindami

  • +Ezk 42:1
  • +Le 6:14, 16; 7:1, 6; 10:12, 13; 24:8, 9; Mit 18:10; Ezk 40:46
  • +Le 2:3; Mit 18:9; Ne 13:5

Ezekiele 42:14

Mitindami

  • +Kob 28:40; 29:8, 9; Le 8:13; Ezk 44:19

Ezekiele 42:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako ya kati.”

Mitindami

  • +Ezk 40:6

Ezekiele 42:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ap. B14.

Ezekiele 42:20

Mitindami

  • +Ezk 40:5
  • +Ezk 45:1, 2
  • +Le 10:10; Ezk 44:23; 2Ko 6:17

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 42:1Ezk 40:2
Ezk. 42:1Ezk 42:13
Ezk. 42:1Ezk 41:12, 15
Ezk. 42:3Ezk 41:10
Ezk. 42:4Ezk 42:10, 11
Ezk. 42:10Ezk 41:12; 42:1
Ezk. 42:11Ezk 42:4
Ezk. 42:12Ezk 42:9
Ezk. 42:13Ezk 42:1
Ezk. 42:13Le 6:14, 16; 7:1, 6; 10:12, 13; 24:8, 9; Mit 18:10; Ezk 40:46
Ezk. 42:13Le 2:3; Mit 18:9; Ne 13:5
Ezk. 42:14Kob 28:40; 29:8, 9; Le 8:13; Ezk 44:19
Ezk. 42:15Ezk 40:6
Ezk. 42:20Ezk 40:5
Ezk. 42:20Ezk 45:1, 2
Ezk. 42:20Le 10:10; Ezk 44:23; 2Ko 6:17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 42:1-20

Ezekiele

42 Na nsima amemaki ngai na lopango ya libándá oyo etali na nɔrdi.+ Mpe amemaki ngai na bandako ya bisika ya kolya oyo ezalaki pene na esika oyo batiká polele,+ na nɔrdi ya ndako oyo ekangani na mosusu.+ 2 Molai na yango na esika ya kokɔta na nɔrdi: ezalaki mapeko* 100, mpe mapeko 50 na monene na yango. 3 Lopango ya kati ezalaki mapeko 20 na monene,+ bisika ya kolya ezalaki kati na lopango ya kati mpe pavema ya lopango ya libándá. Bisika ya kolya ezalaki na baetajɛ misato mpe baveranda, mpe baveranda etalanaki. 4 Liboso ya bisika ya kolya,* ezalaki na nzela moko+ ya mapeko zomi na monene mpe mapeko 100 na molai,* mpe bisika na yango ya kokɔta ezalaki na nɔrdi. 5 Bisika ya kolya ya likoló ezalaki mokuse koleka oyo ya nse mpe oyo ya baetajɛ ya katikati mpo baveranda ezwaki bisika na yango mingi. 6 Ezalaki na baetajɛ misato, kasi ezalaki na makonzí te lokola makonzí ya mapango. Yango wana, bakɔndisaki baetajɛ ya likoló koleka oyo ya nse mpe oyo ya katikati.

7 Efelo ya mabanga oyo ezalaki libándá pene na bisika ya kolya na ngámbo ya lopango ya libándá oyo etalanaki na bisika mosusu ya kolya ezalaki mapeko 50 na molai. 8 Mpo molai ya bisika ya kolya oyo ezalaki na ngámbo ya lopango ya libándá ezalaki mapeko 50, kasi mpo na oyo etalaki tempelo, ezalaki mapeko 100. 9 Bisika ya kolya ezalaki na esika ya kokɔta na ɛsti, oyo ezalaki komema na lopango ya libándá.

10 Pene na esika oyo batiká polele mpe na ndako ezalaki mpe na bisika ya kolya, nsima* ya efelo ya mabanga ya lopango na ngámbo ya ɛsti.+ 11 Ezalaki na nzela moko liboso na yango oyo ezalaki komonana lokola bisika ya kolya oyo ezalaki na ngámbo ya nɔrdi.+ Molai mpe monene na yango ezalaki ndenge moko, mpe baplan na yango ezalaki ndenge moko, mpe bisika ya kobima na yango ezalaki ndenge moko. Bisika na yango ya kokɔta, 12 ezalaki ndenge moko na bisika ya kokɔta ya bisika ya kolya oyo ezalaki na ngámbo ya sudi. Ezalaki na esika ya kokɔta na ebandeli ya nzela, liboso ya efelo ya mabanga oyo ekokani na yango na ngámbo ya ɛsti, esika oyo moto akokaki kokɔta.+

13 Bongo alobaki na ngai boye: “Bisika ya kolya ya nɔrdi mpe bisika ya kolya ya sudi oyo ezali pene na esika oyo batiká polele,+ ezali bisika ya kolya oyo ezali mosantu, esika banganga-nzambe oyo bazali kopusana pene na Yehova balyaka makabo oyo eleki mosantu.+ Kuna nde batyaka makabo oyo eleki bosantu, likabo ya mbuma, likabo ya lisumu ná likabo ya ngambo, mpo esika yango ezali mosantu.+ 14 Ntango banganga-nzambe bakɔti, bakobima te na esika mosantu mpo na kokende na lopango ya libándá, kozanga ete bálongola liboso bilamba oyo basalaka na yango mosala,+ mpo ezali biloko mosantu. Bakolata bilamba mosusu mpo na kopusana na bisika oyo bakokutana na bato.”

15 Ntango asilisaki komeka kati ya tempelo,* abimisaki ngai na nzela ya porte oyo etalaki na ngámbo ya ɛsti,+ mpe amekaki bisika yango nyonso.

16 Amekaki mopanzi ya ɛsti na mongendu ya komeka. Na kotalela mongendu ya komeka,* ezalaki mingendu 500 na molai, epai na epai.

17 Amekaki mopanzi ya nɔrdi: ezalaki mingendu 500 na molai, na kotalela mongendu ya komeka.

18 Amekaki mopanzi ya sudi: ezalaki mingendu 500, na kotalela mongendu ya komeka.

19 Abalukaki na mopanzi ya wɛsti. Amekaki mingendu 500 na molai na mongendu ya komeka.

20 Amekaki yango na mipanzi minei. Ezalaki na efelo epai na epai,+ oyo molai na yango ezalaki mingendu 500 mpe monene na yango mingendu 500,+ mpo na kokabola eloko oyo ezali mosantu ná eloko oyo ezali mosantu te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto