Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Yerusaleme ezali nzete ya vinyo oyo ezangi ntina (1-8)

Ezekiele 15:6

Mitindami

  • +Nz 80:14-16; Yis 5:24; Yir 7:20; Ezk 20:47

Ezekiele 15:7

Mitindami

  • +Ezk 6:7; 7:4

Ezekiele 15:8

Mitindami

  • +Yis 6:11; Yir 25:11; Ezk 6:14
  • +2Nt 36:14

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 15:6Nz 80:14-16; Yis 5:24; Yir 7:20; Ezk 20:47
Ezk. 15:7Ezk 6:7; 7:4
Ezk. 15:8Yis 6:11; Yir 25:11; Ezk 6:14
Ezk. 15:82Nt 36:14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 15:1-8

Ezekiele

15 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, nzete ya vinyo ezali malamu koleka nzete mosusu nyonso to bitape ya banzete ya zamba? 3 Bakoki kozwa mwa nzete na nzete ya vinyo mpe kosala na yango mosala? To bato basalaka na yango pike mpo na kokakisa eloko moko boye ya mosala? 4 Talá! Babwakaka yango na mɔtɔ mpo mɔtɔ epela. Mɔtɔ ezikisaka nsɔngɛ na yango nyonso mibale, mpe ekaukisaka katikati na yango. Sikoyo mosala nini bakoki kosala na yango? 5 Ata ntango ezalaki mobimba, bakokaki kosala na yango eloko moko te. Ekozala ndenge nini ntango mɔtɔ ezikisi mpe ekaukisi yango?”

6 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Kaka lokola nzete ya vinyo na kati ya banzete ya zamba, oyo napesá mpo ezala eloko ya kopelisa mɔtɔ, ndenge yango nde nakosala bato oyo bafandi na Yerusaleme.+ 7 Nakokóma monguna na bango. Babiki na mɔtɔ, kasi mɔtɔ nde ekozikisa bango. Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova, ntango nakokóma monguna na bango.’”+

8 “‘Mpe nakokómisa mokili oyo esika oyo etikali mpamba,+ mpo basali makambo ya kozanga bosembo,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto