Ezekiele
19 “Osengeli koyemba loyembo ya mawa* mpo na bankumu ya Yisraele 2 mpe lobá boye:
‘Mama na yo akokani na nini? Na nkɔsi ya mwasi na katikati ya bankɔsi ya mibali.
Azalaki kolala na katikati ya bana-nkɔsi ya makasi.* Mpe abɔkɔlaki bana na ye.
3 Akolisaki moko ya bana na ye, mpe mwana yango akómaki mwana-nkɔsi ya makasi.+
Ayekolaki ndenge ya kopasola nyama.
Alyaki kutu bato.
4 Bikólo bayokaki nsango na ye, bakangaki ye na libulu na bango,
Mpe bamemaki ye na bandɔbɔ na mokili ya Ezipito.+
5 Mama na ye azelaki ye mpe nsukansuka amonaki ete elikya ezali te ete akozonga.
Na yango azwaki mwana mosusu na kati ya bana na ye mpe abimisaki ye lokola mwana-nkɔsi ya makasi.
6 Alekalekaki mpe na kati ya bankɔsi mpe akómaki mwana-nkɔsi ya makasi.
Ayekolaki ndenge ya kopasola nyama mpe alyaki kutu bato.+
7 Atambolaki epai na epai na bandako milai na bango ya makasi, mpe abebisaki bingumba na bango,
Bongo mokili oyo etikalaki mpamba etondaki na lokito ya koganga na ye.+
8 Bikólo ya bitúká ya zingazinga, bayaki kobwakela ye monyama na bango,
Mpe akangamaki na libulu na bango.
9 Batyaki ye bandɔbɔ, bakɔtisaki ye na mwa-ndako na bango ya banyama mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone.
Bakangaki ye kuna, mpo mongongo na ye eyokana lisusu te na bangomba ya Yisraele.
10 Mama na yo azalaki lokola nzete ya vinyo+ na kati ya makila na yo,* oyo elonamaki pene na mai.
Ebotaki mbuma mpe etondaki na bitape mpo mai ezalaki mingi.
11 Bitape na yango* ekómaki makasi, ebongaki mpo na kosalela yango mangenda ya bakonzi.
Nzete yango ekolaki mpe ekómaki molai koleka banzete mosusu,
Mpe ekómaki komonana mpo ezalaki molai mpe ezalaki na nkasa ebele.
12 Kasi bapikolaki ye na nkanda makasi+ mpe babwakaki ye na mabele,
Mpe mopɛpɛ moko ya makasi ekaukisaki mbuma na ye.
Bakataki bitape na ye ya makasi, ekaukaki+ mpe mɔtɔ elyaki yango.+
14 Mɔtɔ eutaki na bitape na ye, elyaki mwa bitape na ye,* mpe mbuma na ye,
Mpe etape ya makasi ata moko te etikalaki, lingenda moko te mpo na koyangela.+
“‘Wana nde loyembo ya mawa, mpe ekosalelama lokola loyembo ya mawa.’”