Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g17 No. 3 nk. 14-15
  • Baanzelu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baanzelu
  • Lamuká!—2017
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu bazali banani?
  • Makambo nini baanzelu basalaki na ntango ya kala?
  • Baanzelu bazali kosala nini lelo?
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Oyo Biblia elobi mpo na baanzelu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—2017
g17 No. 3 nk. 14-15
Anzelu moko abimeli Moize na katikati ya mwa nzete ya nzubɛ oyo ezali kopela mɔtɔ

BIBLIA ELOBI NINI?

Baanzelu

Mikanda, bililingi, mpe bafilme mingi emonisaka baanzelu. Kasi baanzelu bazali banani, mpe basalaka nini?

Baanzelu bazali banani?

OYO BIBLIA ELOBI

Liboso ete Nzambe asala likoló, mabele, mpe bato ya liboso, asalaki bikelamu ya elimo oyo baleki bato. Bikelamu yango bazali na nguya mingi koleka bato, mpe bafandaka na likoló, elongo na Nzambe, esika oyo moto akoki kokóma te mpe komona te. (Yobo 38:4, 7) Biblia ebengi bikelamu yango ya nguya “bilimo” mpe “baanzelu.”​—Nzembo 104:4.a

Baanzelu bazali boni? Bazali ebele mpenza. Baanzelu oyo bazali zingazinga ya kiti ya bokonzi ya Nzambe bazali “bamiriade na bamiriade,” to “bankóto na bankóto.” (Emoniseli 5:11) Soki totaleli motángo yango kaka ndenge ezali, tokoloba ete bazali bamilio na bamilio!

“Namonaki . . . ebele ya baanzelu oyo bazalaki zingazinga ya kiti ya bokonzi . . . , mpe motángo na bango ezalaki bamiriade na bamiriade mpe bankóto na bankóto.”​—Emoniseli 5:11.

Makambo nini baanzelu basalaki na ntango ya kala?

OYO BIBLIA ELOBI

Mbala mingi, baanzelu bazalaki balobeli to batindamib ya Nzambe. Biblia emonisi mpe ete Nzambe azalaki kotinda bango básala makamwisi. Nzambe atindaki anzelu moko mpo apambola Abrahama mpe apekisa ye koboma mwana na ye Yisaka. (Ebandeli 22:11-18) Anzelu moko abimelaki Moize na katikati ya nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ mpo na koyebisa Moize nsango moko oyo ebongolaki bomoi na ye. (Kobima 3:1, 2) Ntango babwakaki mosakoli Danyele na libulu ya bankɔsi, ‘Nzambe atindaki anzelu na ye mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi.’​—Danyele 6:22.

“Bongo anzelu ya Yehova abimelaki [Moize] na kati ya lolemo ya mɔtɔ na katikati ya mwa nzete ya nzubɛ.”​—Kobima 3:2.

Baanzelu bazali kosala nini lelo?

OYO BIBLIA ELOBI

Tokoki koyeba te makambo nyonso oyo baanzelu bazali kosala lelo oyo. Kasi, Biblia emonisi ete bazali kosalisa bato ya mitema sembo báyeba makambo mosusu mpo na Nzambe.​—Misala 8:26-35; 10:1-22; Emoniseli 14:6, 7.

Na ndɔtɔ, Yehova alakisaki Yakobo baanzelu bazali komata mpe kokita na “eskalye” moko oyo ezalaki na mabele mpe nsɔngɛ na yango ekómaki na likoló. (Ebandeli 28:10-12) Mbala mosusu na nzela ya ndɔtɔ yango, Yakobo amonaki, ndenge biso mpe tomonaka, ete Yehova Nzambe atindaka baanzelu awa na mabele mpo na kosalisa bato ya sembo oyo bazali na mposa ya lisalisi na ye.​—Ebandeli 24:40; Kobima 14:19; Nzembo 34:7.

‘Eskalye moko etɛlɛmi na mabele mpe nsɔngɛ na yango ekómi tii na likoló; baanzelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na yango.’​—Ebandeli 28:12.

a Biblia emonisi ete bikelamu mosusu ya elimo batombokelaki Nzambe, mpe ebengi baanzelu yango ya mabe “bademo.”​—Luka 10:17-20.

b Kutu, liloba ya Ebre mpe ya Grɛki oyo basaleli na Biblia mpo na “anzelu” elimboli “motindami.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto