LISOLO YA BOYEKOLI 47
Ndenge oyo tokoki kokoba kolingana makasi
“Tókoba kolingana, mpo bolingo euti na Nzambe.”—1 YOANE 4:7.
LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko
NA MOKUSEa
1-2. (a) Mpo na nini ntoma Paulo alobaki ete bolingo ezali ezaleli “oyo eleki” bizaleli nyonso? (b) Tokotalela mituna nini?
NTANGO ntoma Paulo azalaki kolobela kondima, elikya, mpe bolingo, asukisaki boye: “Oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.” (1 Ko. 13:13) Mpo na nini Paulo alobaki bongo? Na mikolo ezali koya, tokozala lisusu te na mposa ya kozala na kondima na bilaka ya Nzambe ya mokili ya sika to elikya ete bilaka yango ekokokisama, mpo ekosila kokokisama. Kasi tokozala ntango nyonso na mposa ya kozala na bolingo mpo na Yehova mpe bato. Kutu, bolingo na biso mpo na bango ekokoba kokola libela na libela.
2 Lokola tokozala ntango nyonso na mposa ya kozala na bolingo, tokotalela mituna misato. Ya liboso, mpo na nini tosengeli kolingana? Ya mibale, ndenge nini tokoki komoniselana bolingo? Ya misato, ndenge nini tokoki kolingana makasi?
MPO NA NINI TOSENGELI KOLINGANA?
3. Bantina nini tozali na yango ya kolingana?
3 Mpo na nini ezali na ntina tólinganaka? Moko ya bantina ezali ete, bolingo emonisaka ete tozali bakristo ya solo. Yesu ayebisaki bantoma na ye: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai: soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Lisusu, kolingana esalaka ete tózala na bomoko. Paulo abengaki bolingo “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Kol. 3:14) Kasi, ezali na ntina mosusu mpenza oyo tosengeli kolinganaka. Ntoma Yoane akomelaki bandeko na ye bakristo ete: “Moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.” (1 Yoa. 4:21) Ntango tolinganaka, tomonisaka ete tolingaka Nzambe.
4-5. Pesá ndakisa oyo emonisi boyokani oyo ezali kati na kolinga Nzambe mpe kolinga basusu.
4 Na ndenge nini kolinga Nzambe ezali mpenza na boyokani ná kolinga bandeko na biso? Tózwa ndakisa. Kanisá boyokani oyo ezali kati na motema ná biteni mosusu ya nzoto na biso. Ntango monganga atalaka ndenge makila ezali koleka na lobɔkɔ mpo na komona soki ezali koleka mbangu to malɛmbɛ, akoki koyeba ndenge motema na biso ezali. Ndenge nini tokoki kosalela likanisi oyo na likambo etali bolingo?
5 Ndenge kaka monganga akoki koyeba ndenge motema ezali ntango atalaka ndenge makila ezali koleka, biso mpe tokoki koyeba soki bolingo na biso mpo na Yehova ezali makasi soki tozali kotalela ndenge oyo tomoniselaka basusu bolingo. Soki tomoni ete bolingo na biso mpo na bandeko ekiti, yango ekoki komonisa mpe ete bolingo na biso mpo na Nzambe ekómi kokita. Kasi soki tozali mbala na mbala komonisela bandeko na biso bolingo, ekomonisa ete bolingo na biso mpo na Nzambe ezali makasi.
6. Mpo na nini tosengeli komitungisa soki bolingo na biso mpo na bandeko na biso ekómi kokita? (1 Yoane 4:7-9, 11)
6 Tosengeli komitungisa soki bolingo na biso mpo na bandeko na biso ekómi kokita. Mpo na nini? Mpo yango ekomonisa ete boyokani na biso ná Yehova ezali lisusu makasi te. Ntoma Yoane amonisi yango polele ntango akundweli biso ete: “Moto oyo alingaka ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoa. 4:20) Yango ezali koteya biso nini? Yehova asepelaka na biso kaka soki tozali “kolingana.”—Tángá 1 Yoane 4:7-9, 11.
NDENGE NINI TOMONISELANAKA BOLINGO?
7-8. Wapi mwa balolenge oyo tokoki komonisela basusu bolingo?
7 Liloba ya Nzambe epesi mbala na mbala mobeko ete “bólinganaka.” (Yoa. 15:12, 17; Rom. 13:8; 1 Tes. 4:9; 1 Pet. 1:22; 1 Yoa. 4:11) Nzokande, bolingo ezali ezaleli ya motema, to bomoto ya kati, mpe moto moko te akoki komona yango na kati ya motema na biso. Na yango, ndenge nini sikoyo tokoki komonisa ete tolinganaka? Na maloba mpe na misala na biso.
8 Ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa bandeko na biso ete tolingaka bango. Talá mwa bandakisa: “Bólobanaka solo kati na bino.” (Zek. 8:16) “Bózalaka na kimya kati na bino.” (Mrk. 9:50) Bózala bato ya liboso “mpo na kopesana lokumu.” (Rom. 12:10) “Bóyambanaka.” (Rom. 15:7) “Bókoba . . . kolimbisana.” (Kol. 3:13) “Bókoba komemelana kilo.” (Gal. 6:2) “Bókoba kobɔndisana.” (1 Tes. 4:18) “Bókoba . . . kolendisana.” (1 Tes. 5:11) “Bóbondelaka moto na moto mpo na mosusu.”—Yak. 5:16.
Ndenge nini tokoki kosalisa ndeko oyo azali na mpasi? (Talá paragrafe 7-9)
9. Mpo na nini kobɔndisa basusu ezali lolenge ya ntina mingi ya komonisa bolingo? (Talá mpe elilingi.)
9 Tótalela lolenge moko ya komonisela basusu bolingo oyo paragrafe oyo eleki elobeli. Paulo alobaki ete: “Bókoba kobɔndisana.” Mpo na nini kobɔndisa basusu ezali lolenge moko ya ntina mingi ya komonisa bolingo? Na kotalela mokanda moko oyo elimbolaka Biblia, liloba oyo Paulo asaleli mpo na “kobɔndisa” elimboli “kotɛlɛma pene ya moto mpo na kolendisa ye ntango akutani na likambo moko ya mpasi.” Na yango ntango tozali kobɔndisa, tozali kosalisa ndeko na biso oyo azali na mpasi atɛlɛma mpe akoba kotambola na nzela ya bomoi. Ntango nyonso oyo tobɔndisaka ndeko na biso ya mobali to ya mwasi, tomonisaka ete tolingaka ye.—2 Ko. 7:6, 7, 13.
10. Boyokani nini ezali kati na motema mawa mpe kobɔndisa?
10 Ezali na boyokani mpenza kati na motema mawa mpe kobɔndisa. Na ndenge nini? Moto ya motema mawa abɔndisaka basusu mpe alukaka kosalisa bango na mpasi na bango. Na yango toyokaka liboso mawa; na nsima tobɔndisaka. Talá ndenge Paulo amonisi boyokani oyo ezali kati na motema mawa ya Yehova mpe libɔndisi oyo apesaka. Paulo abengi Yehova “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Ko. 1:3) Ndenge nɔti mpo na koyekola na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ya boyekoli na Anglais (nwtsty) elimboli yango, Paulo asalelaki maloba “motema mawa mingi” mpo na komonisa mayoki ya mawa mpo na basusu. Na yango, “Nzambe abengami Tata, to Mobandisi, ya motema mawa mingi mpo motema mawa euti nde epai na ye.” Mpe motema mawa yango etindaka ye abɔndisa “biso na komekama na biso nyonso.” (2 Ko. 1:4) Kaka ndenge mai ya pɛto oyo ezali kobima na liziba ekitisaka baoyo bazali na mposa ya mai motema, Yehova mpe akitisa motema mpe abɔndisaka baoyo bazali na mpasi. Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali komonisa motema mawa mpe kobɔndisa basusu? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kokolisa na motema na biso bizaleli oyo etindaka biso tómonisela basusu motema mawa. Wapi mwa bizaleli yango?
11. Na kotalela Bakolose 3:12 mpe 1 Petro 3:8, bizaleli nini mosusu tosengeli komonisa mpo tóbatela bolingo oyo etindaka biso tóbɔndisa basusu?
11 Nini ekosalisa biso tóbatela bolingo oyo tosengeli na yango mpo ‘tókoba kobɔndisana’ mokolo na mokolo? Tozali na mposa ya bizaleli lokola komitya na esika ya basusu, bolingo ya bondeko, mpe boboto. (Tángá Bakolose 3:12; 1 Petro 3:8.) Ndenge nini bizaleli yango ekosalisa biso? Ntango tozali komonisa motema mawa mpe bizaleli oyo ezali na boyokani ná yango ekómi bomoto na biso, tokosuka kaka te na kosalisa, kasi tokobɔndisa mpe baoyo bazali na mpasi. Ndenge Yesu alobaki yango, “monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema. Moto malamu abimisaka makambo ya malamu na bolamu oyo abombi na motema na ye.” (Mat. 12:34, 35) Kobɔndisa bandeko na biso oyo bazali na mpasi ezali mpenza lolenge ya ntina mingi ya komonisela bango bolingo na biso.
NDENGE NINI TOKOKI KOKOBA KOLINGANA MAKASI?
12. (a) Mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ tóbungisa te bolingo na biso mpo na basusu? (b) Motuna nini tokotalela sikoyo?
12 Biso nyonso tozali na mposa “tókoba kolingana.” (1 Yoa. 4:7) Kasi, ezali na ntina tóbosana te ete Yesu alobaki “bolingo ya bato mingi ekokita.” (Mat. 24:12) Yesu alobaki te ete mingi ya bayekoli na ye bakotika kolingana. Kasi, tosengeli kozala ekɛngɛ mpo tókóma te na ezaleli ya kozanga bolingo oyo ezali lelo na mokili. Wana tobateli likanisi wana, tótalela sikoyo motuna oyo ya ntina: Nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki bolingo na biso epai ya bandeko ezali makasi?
13. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki bolingo na biso mpo na bandeko ezali makasi?
13 Lolenge moko oyo ekosalisa biso tóyeba soki bolingo na biso ezali makasi ezali koyeba oyo tosalaka ntango tokutani na likambo moko. (2 Ko. 8:8) Ntoma Petro alobeli likambo moko, alobi: “Koleka nyonso, bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka masumu ebele.” (1 Pet. 4:8) Na yango mabunga mpe kozanga kokoka ya basusu ekoki kosalisa biso tóyeba soki bolingo na biso mpo na bango ezali makasi.
14. Na kotalela 1 Petro 4:8, tozali na mposa ya bolingo ya ndenge nini? Pesá ndakisa.
14 Tótalela maloba ya Petro na likebi. Eteni ya liboso ya vɛrsɛ 8 emonisi lolenge ya bolingo oyo tosengeli kozala na yango—‘bolingo makasi.’ Liloba “makasi” oyo Paulo asaleli elimboli liloba na liloba “kobenda.” Eteni ya mibale ya vɛrsɛ emonisi oyo tosengeli kosala ntango tozali na bolingo makasi epai ya basusu. Ezipaka masumu ya bandeko na biso. Tokoki komona yango na ndakisa oyo: Tosimbaka bolingo na biso na mabɔkɔ mibale lokola nde elamba oyo ebendanaka, mpe tobendaka yango mokemoke tii ekozipa, moko te, mibale te, kasi “masumu ebele.” Kozipa esalelami mpo na kolobela kolimbisa. Ndenge kaka elamba ekoki kozipa mbeba moko, bolingo mpe ekoki kozipa mabunga mpe kozanga kokoka ya bandeko na biso.
15. Soki bolingo na biso mpo na bandeko ezali mpenza makasi, tokozala na likoki ya kosala nini? (Bakolose 3:13)
15 Bolingo na biso mpo na basusu esengeli kozala makasi na ndenge ete tokoki kolimbisa mabunga ya bandeko na biso, ata soki ezali mpenza mpasi kosala yango. (Tángá Bakolose 3:13.) Ntango tolimbisaka basusu, tomonisaka ete bolingo na biso ezali makasi mpe ete tolingaka kosepelisa Yehova. Nini lisusu ekoki kosalisa biso tólimbisaka mabunga mpe bambeba ya basusu?
Kaka ndenge tobombaka bafɔtɔ ya kitoko mpe tobwakaka ya mabe, tosengeli mpe kobatela na bɔɔngɔ na biso makambo ya malamu ya bandeko na biso mpe kobosana oyo ya mabe (Talá paragrafe 16-17)
16-17. Nini lisusu ekosalisa biso tólimbisaka mabunga ya basusu? Pesá ndakisa. (Talá mpe elilingi.)
16 Tyáká likebi na bizaleli malamu ya bandeko na yo, kasi na mabunga te. Tótalela ndakisa oyo. Kanisá ete ozali elongo na bandeko. Bozali kolekisa ntango moko ya malamu mpe na nsuka okangi fɔtɔ ná bango. Kutu, okangi bafɔtɔ mosusu mibale mpo moko ekoki kobima malamu te. Sikoyo okómi na bafɔtɔ misato. Kasi na fɔtɔ moko, omoni ete ndeko moko asɛki te. Okosala nini na fɔtɔ yango? Okoboma yango mpo ozali na bafɔtɔ mosusu mibale oyo moto nyonso, ata mpe ndeko yango azali kosɛka.
17 Tókokanisa bafɔtɔ oyo tobombaka na makambo oyo tobatelaka na bɔɔngɔ na biso. Mbala mingi tobosanaka te bantango ya malamu oyo tolekisá ná bandeko na biso. Kasi kanisá ete na moko ya mabaku yango, ndeko moko alobaki to asalaki likambo moko oyo esepelisaki yo te. Osengeli kosala nini na likambo wana oyo etikalá na bɔɔngɔ na yo? Osengeli kolongola yango na bɔɔngɔ na yo ndenge kaka olingaki koboma moko ya bafoto wana. (Mas. 19:11; Ef. 4:32) Tosengeli kosala nyonso tólongola na bɔɔngɔ na biso mabunga ya bandeko, mpo na bɔɔngo na biso tozali na bantango ya malamu oyo tolekisá na bango. Wana nde makambo oyo tosengeli kobomba na bɔɔngɔ na biso mpe kozwa yango na motuya.
NTINA OYO TOSENGELI MPENZA NA BOLINGO LELO
18. Na lisolo oyo tolobeli makambo nini mpenza ya ntina oyo etali bolingo?
18 Mpo na nini tosengeli kolingana makasi? Ndenge tomoni yango, ntango tomoniselaka bandeko na biso bolingo, tomoniselaka nde Yehova bolingo. Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka bandeko na biso? Lolenge moko oyo tosalaka yango ezali ya kobɔndisa bango. Tokozala na likoki ya ‘kokoba kobɔndisana’ soki tozali na motema mawa epai ya basusu. Ndenge nini tokoki kokoba kolingana makasi? Soki tozali kosala nyonso mpo na kolimbisa mabunga ya basusu.
19. Mpo na nini ezali mpenza na ntina lelo oyo tómoniselanaka bolingo?
19 Mpo na nini ezali mpenza na ntina lelo oyo tómoniselanaka bolingo? Talá ntina oyo Petro apesi: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. Yango wana, . . . bólinganaka makasi.” (1 Pet. 4:7, 8) Lokola nsuka ya mokili mabe oyo ekómi mpenza pene, tokoki komizela na nini? Ntango azalaki kolobela bayekoli na ye, Yesu asakolaki ete: “Bikólo nyonso ekoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Mat. 24:9) Mpo na koyikela koyinama wana mpiko, tozali na mposa ya kozala na bomoko. Soki tozali kolinga bandeko na biso, Satana akolonga ata moke te kokabola biso, mpo bolingo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”—Kol. 3:14; Flp. 2:1, 2.
LOYEMBO 130 Tólimbisaka
a Lelo oyo, tozali na ntina ya komonisela bandeko na biso bolingo koleka. Mpo na nini, mpe ndenge nini tokoki komoniselana bolingo mingi koleka?