Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/8 nk. 19-22
  • Tiká ete makambo omeseni na yango epesa yo litomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tiká ete makambo omeseni na yango epesa yo litomba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bandakisa ya mimeseno ya malamu mpe ya mabe oyo Biblia elobeli
  • Tosalela makambo oyo tomesená na yango
  • Boyá mimeseno ya mabe, kolisá oyo ya malamu
  • 1 Talelá makambo na ndenge ebongi
    Lamuká!—2016
  • Ndenge ya kotika mimeseno ya mabe
    Lamuká!—2016
  • Zalá na mimeseno ya malamu mpo ozwa mapamboli mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Baboti​—bókɔtisa bizaleli malamu epai ya bana na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/8 nk. 19-22

Tiká ete makambo omeseni na yango epesa yo litomba

MOTO moko afandaki mbula 12 na kartye moko ya engumba Athènes. Mokolo na mokolo, mpo na kokende mpe kouta mosala, azalaki koleka kaka nzela moko. Na nsima, alongwaki na kartye yango mpe akendaki kofanda na kartye mosusu. Mokolo moko nsima ya mosala, azalaki kozonga ndako. Ntango akómaki na kartye na ye ya kala, nde ayaki koyeba ete abosanaki epai oyo asengelaki kokende. Lokola ezali likambo oyo amesenaki na yango, alingaki kokende na ndako oyo azalaki kofanda liboso!

Ya solo, soki moto asi ameseni na likambo, ezwaka ye lisusu ntango molai te ya kokanisa liboso ete asala yango; mpe ezaleli yango emonanaka na makambo mingi ya bomoi na biso. Na ndenge yango, tokoki koloba ete mimeseno ezali lokola mɔ́tɔ. Na esika oyo molili ezali, tozalaka na mposa ya pole ya mɔ́tɔ; ekoki mpe kopesa nzoto na biso mwa molunge, mpe kosalisa biso na kolamba. Nzokande, mɔ́tɔ ekoki mpe kozala monguna moko ya mabe mpenza; ekoki koboma to kobebisa biloko. Ezali mpe ndenge moko mpo na mimeseno. Soki tokolisi mimeseno ya malamu, yango ekoki kozala na litomba mingi. Kasi mimeseno ekoki mpe kobebisa.

Na likambo ya moto oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, momeseno elyaki ye kaka mwa ngonga, mpo ndenge oyo mituka etondaka na balabala, esalaki ete akóma na ndako noki te. Kasi na makambo ya ntina mingi, mimeseno ekoki kopesa biso matomba mingi to mpe komema biso na mokakatano. Tótalela mwa bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, bato oyo bomoi na bango ezali komonisa ndenge oyo mimeseno ekoki kosunga to kobebisa mosala oyo tozali kosalela Nzambe mpe boyokani na biso na ye.

Bandakisa ya mimeseno ya malamu mpe ya mabe oyo Biblia elobeli

Noa, Yobo mpe Danyele bapambolamaki ndenge bazalaki na boyokani ya penepene na Nzambe. Biblia ekumisi bango “mpo na boyengebene na bango.” (Ezekiele 14:14) Ya solo, bomoi ya bato yango misato emonisaki mpenza ete bakolisaki mimeseno ya malamu.

Nzambe ayebisaki Noa ete atonga masuwa, oyo bonene na yango eleki libándá ya masano ya ndembo, mpe molai na yango eleki buludingi ya ba etaze minei. Mosala monene ya ndenge wana elingaki kobangisa ata motongi nini ya masuwa na ntango wana. Noa na bato nsambo ya libota na ye batongaki masuwa atako bazangaki biloko ya mosala oyo tozali na yango lelo. Lisusu, Noa alandaki kosakola epai ya bato ya ntango na ye. Tozali kolikya ete azangaki te kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya libota na ye. (2 Petelo 2:5) Mpo na kokokisa makambo nyonso wana, esengelaki ete Noa azala na mimeseno malamu ya mosala. Longola yango, Biblia emonisi ete Noa azalaki moto oyo “atambolaki na Nzambe elongo. . . . Noa asalaki yonso [lokola] elakaki [Yehova] ye.” (Genese 6:9, 22; 7:5) Lokola Biblia elobi ete azalaki “moto ya sembo mpe ya boyengebene,” na ntembe te alandaki kotambola elongo na Nzambe nsima ya Mpela, ezala mpe nsima wana bato batombokelaki Yehova na Babele. Ya solo, Noa alandaki kotambola elongo na Nzambe na bosembo mpenza tii na liwa na ye, ntango akómaki na mbula 950.​—Genese 9:29.

Mimeseno malamu oyo Yobo azalaki na yango ekómisaki ye moto ‘malamu mpenza mpe ya sembo.’ (Yobo 1:1, 8; 2:3) Azalaki na momeseno ya kosala mosala ya nganga mpo na libota na ye, elingi koloba azalaki kotumba mbeka mpo na bana na ye, nsima ya elambo nyonso oyo bazalaki kosala, mpo azalaki koyeba ete mbala mosusu bana na ye ‘basalaki masumu mpe balakelaki Nzambe mabe na mitema na bango. Yobo asalaki bongo mikolo nyonso.’ (Biso nde totɛngisi makomi; Yobo 1:5) Na ntembe te, na kati ya makambo oyo Yobo na libota na ye bamesenaki kosala, losambo ya Yehova ezalaki na esika ya liboso.

Danyele asalelaki Yehova “mikolo nyonso” na bomoi na ye mobimba oyo ezalaki molai. (Danyele 6:16, 20) Mimeseno nini malamu ya elimo Danyele azalaki na yango? Ya liboso, azalaki kobondela Yehova mbala na mbala. Atako mokonzi abimisaki mobeko oyo epekisaki likambo yango, “mbala misato na mokolo moko, [Danyele] azalaki kofukama na mabɔlɔngɔ na ye mpo na kobondela mpe kokumisa Nzambe na ye, ndenge amesenaki kosala.” (Danyele 6:10, NW) Akokaki te kotika momeseno oyo azalaki na yango, ya kobondela Nzambe, ata ntango oyo bomoi na ye ekómaki na likama mpo na likambo yango. Na ntembe te, momeseno yango elendisaki Danyele na bomoi na ye mobimba, bomoi oyo emonisaki ete azalaki mpenza sembo epai ya Nzambe. Emonani mpe ete Danyele azalaki na momeseno malamu ya koyekola mpe kokanisa mozindo likoló ya bilaka kitoko ya Nzambe. (Yilimia 25:11, 12; Danyele 9:2) Na ntembe te mimeseno wana ya malamu esalisaki ye na koyika mpiko tii na nsuka, na kokima mbangu na bosembo mpenza na momekano mpo na bomoi tii nsuka na yango.

Nzokande, Dina asukaki mabe mpo azalaki na mimeseno ya mabe. “[Azalaki kobima, NW] mpo na kotala [bana] basi na mokili yango,” oyo bazalaki kosambela Yehova te. (Genese 34:1) Momeseno wana, oyo ezalaki komonana lokola ezali mabe te, ememelaki ye likama. Ya liboso, Sikeme, elenge mobali moko oyo bazalaki kotalela ye lokola “moto aleki lokumu na ndako mobimba ya tata na ye,” asangisaki na ye nzoto na makasi. Na nsima, bandeko na ye mibale ya mibali bazongisaki mabe na mabe, babomaki bana mibali nyonso ya engumba. Oyo nde nsɔmɔ ya likambo!​—Genese 34:19, 25-29.

Nini ekoki kondimisa biso ete mimeseno na biso ekomemela biso litomba kasi mpasi te?

Tosalela makambo oyo tomesená na yango

Moto moko ya filozofi akomaki ete: “Mimeseno etángamá na likoló.” Kasi ezali mpenza bongo te. Biblia emonisi polele ete tokoki kopona kotika mimeseno na biso ya mabe mpe kokolisa oyo ya malamu.

Soki tozali na mimeseno malamu, bomoi na biso ya boklisto ekokóma lisusu malamu koleka mpe ekozala mpasi te mpo tokoba na bomoi yango. Alex, moklisto moko ya ekólo Grèce, alobi ete: “Ndenge namesená kolanda programɛ mpo na kokokisa makambo ndenge na ndenge, esalisaka ngai nabebisa ntango te.” Theophilus, oyo azali nkulutu na lisangá, amonisi ete ndenge amesená kosala makambo nyonso na programɛ esalisaka ye na kokokisa malamu mikumba na ye. Alobi ete: “Nandimi mpenza ete, soki námesenaka kosala progamɛ malamu te, mbɛlɛ nakokaka te kokokisa mikumba na ngai ya boklisto na ndenge oyo ebongi mpenza.”

Lokola tozali baklisto, tolendisami na “kolanda kotambola na mobulu te na nzela yango moko.” (Bafilipi 3:16, NW ) Mpo na kolanda kosala likambo na nzela moko, esengaka komesena na likambo yango mpe kosala yango mbala na mbala na ndenge oyo esi ebongisamá. Mimeseno ya malamu ndenge wana epesaka biso litomba, mpamba te esalisaka biso tólekisaka lisusu ntango mingi te na kokanisa likambo mokomoko, oyo tosi tobongisá ndenge malamu ya kosala yango; etikali kaka tólandaka ndenge yango mbala nyonso oyo tolingi kosala likambo yango. Soki tosi tomeseni na likambo moko, tosalaka yango kozanga ete tolekisa ntango mingi na kokanisa liboso. Kaka ndenge moto oyo akumbaka motuka amesená kozala na ekɛngɛ mpo na kozwa makatami ya komibatela ntango azali kokutana na makama na nzela, ndenge moko mpe mimeseno malamu ekoki kosalisa biso na kozwa mbala moko makatami oyo ebongi na bomoi na biso lokola baklisto.

Ndenge Jeremy Taylor, mokomi moko ya Angleterre akomaki, “Mimeseno etindaka na mosala.” Soki tozali na mimeseno ya malamu, tokoki kosala makambo ya malamu kozanga mikakatano mingi. Na ndakisa, lokola tozali baministre baklisto, soki tomeseni kosakola mbala na mbala, kobima na mosala ya kosakola ekozala likambo ya pɛtɛɛ mpe ya kosepelisa mpenza. Totángaka ete bantoma “batiki te mokolo na mokolo, kati na Tempelo mpe na ndako na ndako, bateyaki mpe basakolaki nsango malamu na ntina na Klisto, Yesu.” (Biso nde totɛngisi makomi; Misala 5:42; 17:2) Epai mosusu, soki tosakolaka kaka mwa bambala ya kotánga, tokoki mbala mosusu kozala na mokakatano, mpe ekozwa biso ntango molai mpo na komesena mpe kosepela na mosala wana ya ntina mingi.

Ezali mpe ndenge moko mpo na makambo mosusu oyo tosengeli komesena na yango lokola tozali baklisto. Mimeseno malamu ekoki kosalisa biso na ‘kotángaka liloba ya Nzambe butu na moi’ mbala na mbala. (Yosua 1:8; Nzembo 1:2) Moklisto moko azalaki na momeseno ya kotánga Biblia na boumeli ya miniti 20 to 30 liboso ya kolala. Ata soki alɛmbi mingi, azalaki komona ete soki akei kolala kozanga ete atánga Biblia, akolala malamu te. Esengeli alamuka mpe akokisa mposa wana ya elimo. Momeseno wana ya malamu esalisaki ye atánga Biblia mobimba mbala moko na mbula, mpe asalaki bongo bambula ebele.

Yesu Klisto, Ndakisa oyo tosengeli kolanda, azalaki na momeseno ya koyangana na makita, esika oyo bazalaki kosolola masolo ya Biblia. “Na mokolo ya sabata akɔtaki na eyanganelo lokola ezalaki [momeseno, NW] na ye, mpe atɛlɛmaki kotánga mokanda.” (Luka 4:16) Mpo na Joe, nkulutu moko oyo azali na libota moko monene, mpe asalaka bangonga mingi, momeseno esalisaki ye na kokolisa mposa ya koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Alobi boye: “Momeseno yango esalisaka ngai na kokende makita, mpo na kokokisa bamposa ya elimo mpe kozwa makasi na elimo, na bongo nakoki kolonga mikakatano.”​—Baebele 10:24, 25.

Mimeseno ya ndenge wana ezali mpenza na ntina mpo na biso baklisto lokola tozali kopota mbangu mpo na bomoi. Lapolo moko oyo euti na ekólo moko epai banyokolaki Batatoli ya Yehova, elobaki boye: “Baoyo bazalaki na mimeseno malamu ya elimo mpe bazalaki komonisa botɔndi mingi mpo na mateya ya solo, bazalaki na mokakatano te mpo na kotikala ngwi na ntango komekama eyei. Kasi baoyo, na ‘eleko malamu,’ bazalaki kozangisa makita, kobima mingi te na mosala ya kosakola, mpe kowangana kondima na bango mpo na mwa makambo ya mikemike, bazalaki mbala mingi kokwea ntango bakutanaki na komekama ‘ya makasi.’​—2 Timote 4:2.

Boyá mimeseno ya mabe, kolisá oyo ya malamu

Balobaka ete ‘moto asengeli kokolisa kaka mimeseno oyo akondima ete ezala na bokonzi likoló na ye.’ Ya solo, mimeseno ya mabe ezali lokola mokonzi oyo anyokolaka bato. Atako bongo, okoki koboya yango.

Stella azalaki liboso kolekisa bangonga mingi na kotala televizyo. Alobi ete: “Soki nakolisaki momeseno wana mabe, mbala mingi ezali mpo na bantina oyo ezalaki komonana lokola ekoki kosala likambo te.” Ezalaki bongo mpo na momeseno oyo azalaki na yango ya kolekisa ndelo na kotala televizyo. Amityelaki mobeko ya kotala kaka mpo na “kopema moke” to mpo na “kolekisa mwa ntango na likambo mosusu.” Kasi momeseno wana ya mabe ememaki ye mosika, akómaki kolekisa bangonga mingi liboso ya televizyo. Alobi ete “nsukansuka, momeseno wana ya mabe ezongisaki ngai nsima na elimo.” Asalaki molende makasi mpe nsukansuka atikaki kotala televizyo ntango molai mpe akómaki kopona ntango mpe makambo ya kotala. Stella alobi ete: “Ntango nyonso, namekaka komikundola mpo na nini nazalaki koluka kotika momeseno yango; mpe nabondelaka Yehova mpo nalanda kobatela ekateli oyo nazwá.”

Moklisto moko nkombo na ye Charalambos amonisi momeseno moko ya mabe oyo ezalaki kopekisa ye akola na elimo: kozongisaka makambo nsima. “Ntango nayebaki ete momeseno ya kozongisa makambo nsima ezalaki malamu te, nabandaki kosala milende mpo na kobongola bomoi na ngai. Soki namityeli mikano, nazalaki kobongisa ntango nini mpe ndenge nini nakoki kobanda kokokisa yango. Kokokisa mikano na ngai na ntango oyo naponaki mpe bibongiseli oyo nabandaki kozwa esalaki ete nabongwana, mpe yango etikali momeseno malamu tii lelo.” Ya solo, na esika ya mimeseno mabe, ebongi mpenza kokolisa mimeseno ya malamu.

Baninga na biso bakoki mpe kosala ete tókolisa mimeseno, ya malamu to ya mabe. Okoki komekola mimeseno malamu, kaka ndenge bamekolaka oyo ya mabe. Atako “baninga ya mabe babebisaka bizaleli ya malamu,” baninga malamu bakoki kozala ndakisa malamu oyo tokoki kolanda mpo na kokóma na mimeseno oyo ebongi. (1 Korinto 15:33, Boyokani ya Sika) Likambo eleki ntina ezali ete mimeseno ekoki kolendisa to kolɛmbisa boyokani na biso na Nzambe. Stella alobi boye: “Soki mimeseno na biso ezali ya malamu, yango ekosala ete etumba na biso mpo na kosalela Yehova ekóma pɛtɛɛ. Kasi soki ezali ya mabe, ekopekisa milende na biso.”

Kolisá mimeseno ya malamu, mpe tiká yango etambwisa yo. Yango ekozala nguya ya malamu na bomoi na yo mpe ekopesa yo litomba.

[Elilingi na lokasa 19]

Lokola mɔ́tɔ, mimeseno ekoki kopesa litomba to kobebisa

[Elilingi na lokasa 21]

Yesu azalaki na momeseno ya kokenda na eyanganelo na mokolo ya Sabata, mpo na kotánga liloba ya Nzambe

[Bililingi na lokasa 22]

Mimeseno malamu ya elimo elendisaka boyokani na biso na Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto