Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/6 nk. 6-10
  • Ata tozali na mawa, tozangi elikya te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ata tozali na mawa, tozangi elikya te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kufa ekɔti kati na libota ya bato
  • Bato ya sembo oyo baokaki mawa
  • Komonisa mawa na eleko ya Yesu
  • Elikya nini ezali mpo na bakufi?
  • Lisalisi libongi mpo na baoyo bazali na mawa
  • Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Komonisa mawa ezali mabe?
    Lamuká!—1994
  • Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Elikya ya solo mpo na bakufi
    Ntango moto oyo olingaka akufi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/6 nk. 6-10

Ata tozali na mawa, tozangi elikya te

“Tolingi tɛ ete bojanga koyeba makambo na bango basili kolala [kati na kufa, NW] ete boyoka mawa tɛ pelamɔkɔ bamosusu baoyo bajali na elikia tɛ.”​—1 BATƐSALƆNIKI 4:13.

1. Likambo nini bato bazali ntango nyonso kokutana na yango?

OSILÁ kobungisa molingami na yo kati na kufa? Ata soki tozali na mbula boni, mingi kati na biso basilá kooka mawa na ntina na kufa ya ndeko moko to ya molingami moko. Mbala mosusu ezalaki nkɔ́kɔ, moboti, mobalani to mwana na biso. Bobangé, bokɔnɔ mpe makámá ezali ntango nyonso komema bato na liwa. Koboma bato, mobulu mpe bitumba ezali kobakisa mpasi mpe mawa. Mbula na mbula, kati na mokili mobimba mwayene ya bato oyo bazali kokufa ezali milió 50. Na mobu 1993, mwayene ya mokolo na mokolo mozalaki 140250. Kufa epesaka mpasi mingi mpo na baninga mpe bato ya libota, mpe epesaka maoki makasi ya kobungisa eloko moko ya ntina mingi.

2. Nini emonani lokola ete elongobani te na ntina na kufa ya bana?

2 Tokoki mpenza koyoka mawa elongo na baboti oyo ya Californie, na Etats-Unis, baoyo babungisaki mwana na bango ya mwasi oyo azalaki na zemi, kati na likámá ya motuka, oyo esalemaki pwasa lokola lisɛki? Na mbala moko, babungisaki mwana sé moko na bango ya mwasi mpe mwana moke oyo asengelaki kozala nkɔ́kɔ na bango ya liboso. Mobali ya mowei abungisaki mwasi mpe ye oyo asengelaki kozala mwana na ye ya liboso ya mobali to ya mwasi. Mpo na baboti, kokufela mwana, azala mwana moke to mwana oyo asili kokóla, emonani lokola likambo oyo lisengeli kosalema te. Ebongi te ete bana bakufa liboso ya baboti na bango. Biso banso tolingaka bomoi. Na yango, kufa ezali solo monguna.​—1 Bakolinti 15:26.

Kufa ekɔti kati na libota ya bato

3. Lolenge nini kufa ya Abele ekokaki kopesa Adama mpe Eva mawa?

3 Lisumu mpe kufa esili koyangela lokola mikonzi na boumeli ya mibu koleka nkóto motoba ya lisoló ya bato, kobanda botomboki ya baboti na biso ya liboso, Adama mpe Eva. (Baloma 5:14; 6:12, 23) Lisoló ya Biblia liyebisi biso te nini ezalaki maoki na bango wana mwana na bango Abele abomamaki na ndeko na ye Kaina. Mpo na bantina mingi, yango esengelaki mpenza kopesa bango mpasi. Na mokolo yango, mpo na mbala ya liboso bamonaki liwa ya moto, liwa ya mwana na bango. Bamonaki mbuma mabe ya botomboki na bango mpe ya lolenge mabe ya kosalela bonsomi ya kopona oyo balingi. Kaina, atako akebisamaki na Nzambe, aponaki kokóma moto ya liboso oyo abomaki ndeko na ye. Toyebi ete kufa ya Abele epesaki Eva mpasi mingi mpamba te ntango abotaki Sete, alobaki ete: “Njambe apɛsi ngai mwana mosusu na esika na Abɛlɛ, oyo Kaina abomaki.”​—Genese 4:3-8, 25.

4. Mpo na nini lisapo oyo ete molimo mokufaka te likokaki kopesa kobɔndisama moko te nsima ya kufa ya Abele?

4 Baboti na biso ya liboso bamonaki mpe bosolo ya etumbu ya Nzambe likoló na bango​—oyo ete soki batomboki mpe bazangi botosi, basengelaki “kokufa solo.” Atako Satana abukaki lokuta, emonani lokola ete na ntango wana liteya ya lokuta na ntina na kozanga kokufa ya molimo ekolaki naino te, na yango bakokaki te kozwa kobɔndisama ya lokuta kati na yango. Nzambe asilaki koloba na Adama ete: “Kino . . . ekojonga yɔ kati na mabele, mpɔ ete okamatamaki na yango, jambi ojali mputulu, mpe okojonga kati na mputulu.” Alobaki te ete na mikolo ya nsima basengelaki kozala na bomoi na likoló, na lifelo, na límbɛ, na epongelo to epai mosusu, na lolenge ya molimo mozangi kokufa. (Genese 2:17; 3:4, 5, 19) Lokola bazalaki milimo ya bomoi oyo misalaki lisumu, Adama mpe Eva basengelaki kosuka na kokufa mpe kozala lisusu na bomoi te. Mokonzi Salomo apemamaki mpo na kokoma ete: “Mpɔ ete bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ, bajali na libonja mpe tɛ; kokanisa na bango esili kobungana. Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe jua na bango isili kobeba; bajali lisusu na likabo tɛ kati na likambo lijali kosalama na nse na moi.”​—Mosakoli 9:5, 6.

5. Wapi elikya ya solo mpo na bakufi?

5 Oyo nde maloba ya solo! Na ntembe te, nani akoki komikundola bankɔ́kɔ na ye oyo bazalaki na bomoi esili koleka mibu nkámá mibale to nkámá misato? Mbala mingi ata nkunda na bango eyebani te to ebongisamaka lisusu te banda kala. Yango elingi koloba ete elikya ezali te mpo na balingami na biso oyo basili kokufa? Te, ezali bongo te. Malata alobaki na Yesu na ntina na ndeko na ye Lasalo, oyo akufaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokɔlɔ na nsuka.” (Yoane 11:24) Baebele bazalaki kondima ete Nzambe akosekwisa bakufi na ntango oyo ezali koya. Nzokande, yango epekisaki bango te na kooka mawa na ntango molingami na bango akufaki.​—Yobo 14:13.

Bato ya sembo oyo baokaki mawa

6, 7. Lolenge nini Abalayama mpe Yakobo basalaki liboso na kufa ya balingami na bango?

6 Esili koleka pene na mibu nkóto minei, ntango Sala, mwasi ya Abalayama akufaki, “Abalayama ayaki mpɔ na koyoka mawa mpɔ na Sala mpe kolela ye.” Mosaleli wana ya sembo ya Nzambe amonisaki maoki na ye ya mozindo na liwa ya mwasi na ye molingami oyo azalaki sembo. Atako azalaki mobali ya mpiko, aokaki nsoni te mpo na komonisa mawa na ye na kobimisáká mpisoli.​—Genese 14:11-16; 23:1, 2.

7 Ezalaki mpe motindo moko mpo na Yakobo. Ntango bakosaki ye ete mwana na ye Yosefe asilaki kobomama na nyama ya zamba, maoki na ye mazalaki nini? Tozali kotánga kati na Genese 37:34, 35: “Bongo Yakobo apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ na loketo na ye mpe alelaki mwana na ye mikɔlɔ mingi. Bana na ye babali mpe bana na ye basi balongwaki mpɔ na kobɔndisa ye. Nde ye aboyaki kobɔndisama mpe alobaki ete, ‘Tɛ, nakokita na esika na bakufi epai na mwana na ngai bobɛlɛ na kolela.’ Bongo tata na ye alelaki ye.” Ya solo, kooka mawa ntango moto oyo tolingaka akufi ezali likambo litali bomoto mpe ezali na yango mabe te.

8. Lolenge nini Baebele bazalaki mbala mingi komonisa mawa na bango?

8 Na kotalela mitindá ya ntango na biso to ya mboka epai bafandi, bato mosusu bakoki koloba ete Yakobo alekisaki ndelo na lolenge ya komonisa maoki na ye mpe ya komitika na mawa. Kasi ye azalaki moto ya eleko mosusu mpe na mimeseno ya lolenge mosusu. Lolenge na ye ya komonisa mawa​—kolata ngɔtɔ​—ezali mbala ya liboso oyo elobelami kati na Biblia. Nzokande, lokola yango emonisami kati na Makomami ya Liebele, kolela mokufi ezalaki kosalema na kolela, na kobimisa bileli mpe na kofandáká kati na mputulu ya mɔ́tɔ. Emonani polele ete Baebele bapekisamaki te kati na lolenge na bango ya kobimisa bilembo ya solosolo ya mawa na bango.a​—Ezekiele 27:30-32; Amosa 8:10.

Komonisa mawa na eleko ya Yesu

9, 10. (a) Lolenge nini Yesu asalaki liboso na kufa ya Lasalo? (b) Lolenge oyo Yesu asalaki ezali komonisa biso nini na ntina na ye?

9 Tokoki koloba nini mpo na bayekoli ya liboso ya Yesu? Na ndakisa, ntango Lasalo akufaki, bandeko na ye ya basi Malia mpe Malata balelaki liwa na ye na kobimisáká mpisoli mpe na konganga. Mpe lolenge nini Yesu, moto ya kokoka, amonisaki maoki na ye wana akómaki na esika yango? Yoane alobi ete: “Ekomi Malia na esika ejalaki Yesu, amɔni ye mpe akwei na makolo na ye mpe alobi na ye ete: ‘Nkolo, sɔkɔ ojalaki awa mbɛ ndeko na ngai akufi tɛ.’ Emɔni Yesu ete ajalaki kolela mpe Bayuda baoyo bajalaki na ye elongo bajalaki kolela, ayoki mawa na motema mpe amitungisi; alobi ete: ‘Botii ye wapi?’ Balobi na ye ete: ‘Yaka kotala [Nkolo, NW].’ Yesu atangisi mpisoli.”​—Yoane 11:32-35.

10 “Yesu atangisi mpisoli.” Mwa maloba oyo mamonisi makambo mingi mpo na oyo etali maoki, motema mawa mpe bolingo na ye. Atako ayebaki malamu elikya ya lisekwa, “Yesu alelaki.” (Yoane 11:35) Lisoló likóbi na koyebisáká sikisiki ete bato oyo bazalaki wana balobaki ete: “Tala lokola alingaki [Lasalo]!” Ntembe ezali te, soki Yesu moto ya kokoka alelaki na kufa ya moninga na ye, ezali likambo ya nsɔ́ni te soki mobali moko to mwasi moko aoki mawa mpe aleli lelo oyo.​—Yoane 11:36.

Elikya nini ezali mpo na bakufi?

11. (a) Tokoki koyekola nini na ntina na bandakisa ya Biblia oyo etali kolela bakufi? (b) Mpo na nini tookaka mawa te na motindo na baoyo bazangi elikya?

11 Bandakisa oyo ya Biblia ezali koteya biso nini? Emonisi ete ezali likambo ya bomoto mpe ezali mabe te na kooka mawa mpe ete tosengeli te kooka nsɔ́ni mpo na komonisa mawa na biso liboso na bato. Atako elɛmbisami mwa moke na elikya ya lisekwa, liwa ya molingami ezalaka likambo ya mawa mingi, oyo epesaka biso mpasi mpenza na motema. Bambula, mbala mosusu ebele ya bambula ya boninga ya penepene oyo bolekisi esika moko esuki na mbalakaka mpe na lolenge ya mawa. Ezali solo ete, tookaka mawa motindo moko te na bato oyo bazangi elikya to baoyo bazali na elikya ya lokuta. (1 Batesaloniki 4:13) Lisusu, tozimbisami te na masapo mpamba oyo malobi ete moto azali na molimo oyo mokokufaka te to molandaka kozala na bomoi na nzela ya kobotama lisusu (réincarnation). Toyebi ete Yehova alaki ‘makoló ya sika mpe mabelé ya sika kati na yango boyengebene ekozala.’ (2 Petelo 3:13, NW) Nzambe “akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na [biso], mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe tɛ; mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emɔnisɛli 21:4.

12. Lolenge nini Paulo amonisaki kondima na ye kati na lisekwa?

12 Elikya nini ezali mpo na baoyo basilá kokufa?b Na kopemama na Nzambe, Paulo, mokomi moklisto apesi biso kobɔndisama mpe elikya wana akomaki: “Moyini oyo akobukana na nsuka ajali kufa.” (1 Bakɔlinti 15:26) Biblia Liloba lya Nzambe elobi: “Mongúná wa nsúka akokwâ ndé liwâ.” Mpo na nini Paulo azalaki na endimiseli makasi boye? Mpamba te asilaki kobongola motema mpe ateyamaki na moto oyo asekwisamaki longwa na bakufi, Yesu Klisto. (Misala 9:3-19) Ezali mpe mpo na yango nde Paulo akokaki koloba ete: “Pelamɔkɔ kufa eyaki na njela na moto [Adama], kosekwa mpe eyei na njela na moto [Yesu]. Jambi lokola na Adama yɔnsɔ bakokufa, boye na Klisto yɔnsɔ bakojua bomɔi.”​—1 Bakɔlinti 15:21, 22.

13. Lolenge nini batatoli oyo bamonaki lisekwa ya Lasalo basalaki?

13 Mateya ya Yesu mazali kopesa biso kobɔndisama mpe elikya makasi mpo na mikolo mizali koya. Na ndakisa, asalaki nini na likambo ya Lasalo? Akendeki na nkunda epai kuna nzoto ya Lasalo elalisamaki na boumeli ya mikolo minei. Asalaki libondeli, “mpe elobi ye boye, angangi na mongongo makasi ete, ‘Lasalo, bima libanda.’ Ye oyo asili kokufa abimi naino ekangami ye na bilamba na makolo mpe na mabɔkɔ mpe elongi na ye ejingami na litambala. Yesu alobi na bango ete, ‘Bokangola ye mpe tika ete atambola.’” (NW) Okoki kokanisa kokamwa mpe esengo oyo ezalaki na bilongi ya Malata mpe Malia? Bato ya penepene basengelaki mpenza kokamwa ntango bamonaki likamwisi wana! Ezali bongo likambo ya kokamwa te soki bato mingi oyo bazalaki wana bandimelaki Yesu. Nzokande, bato ya mangomba oyo bazalaki bayini na ye, “bakani ete baboma ye.”​—Yoane 11:41-53.

14. Lisekwa ya Lasalo lizalaki ndanga ya nini?

14 Lisekwa wana oyo bakoki kobosana yango te, Yesu asalaki yango na miso na batatoli mingi. Ezalaki ndanga ya lisekwa oyo ekosalema na mikolo mizali koya, oyo asilaki kolobela yango liboso, wana elobaki ye ete: “Bokamwa na likambo oyo tɛ, mpɔ ete ntango ekoya wana yɔnsɔ bajali kati na nkunda bakoyoka mongongo [ya Mwana ya Nzambe], mpe bakobima; baoyo basalaki malamu kino lisekwa na bomɔi; baoyo basalaki yauli kino lisekwa na kosambisama.”​—Yoane 5:28, 29.

15. Elembeteli nini Paulo mpe Anania bazalaki na yango na ntina na lisekwa ya Yesu?

15 Lokola tosilaki koloba yango, ntoma Paulo azalaki kondima ete lisekwa likozala. Azalaki na bantina nini mpo na kondima yango? Kala ye azalaki Saulo, oyo ayebanaki mingi lokola moto mabe, monyokoli monene ya baklisto. Nkombo mpe nsango na ye ezalaki kopesa nsɔ́mɔ epai na bandimi. Nkutu, ezalaki ye oyo andimaki ete báboma Sɛtɛfanɔ, martíru moklisto, na mabángá, boye te? (Misala 8:1; 9:1, 2, 26) Nzokande, na nzela ya Damasɛkɛ, Klisto oyo asekwisami alamwisaki makanisi malamu epai na Paulo, wana abɛtaki ye ete akufa miso mpo na mwa ntango. Saulo ayokaki mongongo koloba na ye ete: “‘Saulo! Saulo! Ojali konyɔkɔla ngai mpɔ na nini?’ Alobi ete, ‘Yɔ nani, Nkolo?’ Mpe ye alobi ete, ‘Ngai Yesu oyo yɔ ojali konyɔkɔla.’” Na nsima, bobele Yesu oyo asekwisami atindaki Anania, mofandi ya Damasɛkɛ, ete akende na ndako epai Saulo azalaki kobondela mpe abikisa miso na ye. Na yango, na nzela na likambo oyo bamonaki, Saulo mpe Anania bazalaki na bantina mingi ya kondima lisekwa.​—Misala 9:4, 5, 10-12.

16, 17. (a) Lolenge nini toyebi ete Paulo azalaki te kondima likanisi ya Bagreke na ntina na kozanga kokufa ya molimo ya moto? (b) Elikya nini ya makasi Biblia ezali kopesa? (Baebele 6:17-20)

16 Tótala lolenge nini Saulo, ntoma Paulo, ayanolaki ntango bamemaki ye liboso na moyangeli Feliki, wana ezalaki ye moklisto oyo anyokwami. Tozali kotánga kati na Misala 24:15: “Najali na elikia na Njambe . . . ete lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.” Emonani polele ete Paulo azalaki te kondima likanisi ya bopakano oyo Bagreke bazalaki na yango etali kozanga kokufa ya molimo ya moto, oyo engebene masapo, mokokendaka na mokili moko nsima ya kufa to mokili na nsé ya mabelé. Azalaki nde kondima mpe koteya lisekwa. Mpo na bato mosusu, yango elimboli likabo ya bomoi bozangi kufa lokola bikelamu ya elimo elongo na Klisto, mpe mpo na ntalo monene ya bato, kozonga na bomoi na mabelé ya kokoka.​—Luka 23:43; 1 Bakolinti 15:20-22, 53, 54; Emoniseli 7:4, 9, 17; 14:1, 3.

17 Na yango, Biblia ezali kopesa biso elaka ya polele mpe elikya makasi ete na nzela ya lisekwa, bato mingi bakomona lisusu balingami na bango awa na mabelé kasi kati na ezalela ya makambo ya motindo mosusu mpenza.​—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1-4.

Lisalisi libongi mpo na baoyo bazali na mawa

18. (a) Esaleli nini ya motuya mingi ebimisamaki na mayangani ya etúká “Bobángi Nzambe”? (Talá etánda.) (b) Mituna nini misengeli sikawa kozwa biyano?

18 Sikawa tozali komikundola balingami na biso mpe tozali na mawa. Tokoki kosala nini mpo na koyika mpiko na ntango oyo tozali na mawa makasi? Tokoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo bazali na mawa? Lisusu, tokoki kosala nini mpo na kosalisa bato na motema sembo oyo tozali kokutana na bango na mosala ya kosakola, baoyo bazali na elikya ya solosolo te mpe bazali na mawa? Mpe kobɔndisama mosusu nini tokoki kozwa kati na Biblia na ntina na balingami na biso oyo basilá kolala kati na kufa? Lisoló oyo lilandi ekopesa mwa batoli mpo na yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na kolela mokufi na ntango ya kala, talá búku Insight on the Scriptures, Volimi 2, nkasa 446-447, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

b Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na elikya ya lisekwa oyo ezwami kati na Biblia, talá búku Insight on the Scriptures, Volimi 2, lokasa 783 kino lokasa 793.

Okoki koyanola?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete kufa ezali monguna?

◻ Lolenge nini basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bamonisaki mawa na bango?

◻ Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?

◻ Elembeteli nini Paulo azalaki na yango mpo na kondima lisekwa?

[Etanda na lokasa 8, 9]

Lisalisi libongi mpo na baoyo bazali na mawa

Na mayangani ya etúká “Bobángi Nzambe” oyo masalemaki na 1994-95, la Société Watch Tower eyebisaki kobimisama ya mwa búku ya sika na motó ya likambo Ntango moto oyo olingaka akufi. Mokanda wana ya kolendisa ebongisamaki mpo na kopesa kobɔndisama epai na bato ya mabota mpe nkótá nyonso. Lokola osili mbala mosusu komona yango, mokanda yango mozali komonisa ndimbola ya Biblia na ntina na kufa mpe ezalela ya bakufi. Na koleka, ezali komonisa polele bilaka ya Nzambe bitali lisekwa, na nzela ya Yesu Klisto, mpo na bomoi kati na paladiso, na mabelé oyo mapɛtɔlami. Ezali mpenza kobɔndisa baoyo bazali kolela. Na yango, mokanda yango mosengeli kozala esaleli ya ntina kati na mosala ya boklisto mpe esengeli kosalelama mpo na kolamwisa mposa na bato, kopesáká bongo nzela na boyekoli mingi ya Biblia. Mituna ya boyekoli mityami na mayele mpenza kati na bitánda penepene na nsuka ya eteni moko na moko mpo na kopesa nzela ete bozongeli ya pɛtɛɛ ekoka kosalema elongo na bato nyonso ya motema sembo oyo bazali kolela balingami na bango.

[Elilingi na lokasa 8]

Ntango Lasalo akufaki, Yesu alelaki

[Elilingi na lokasa 9]

Yesu asekwisaki Lasalo longwa na bakufi

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]

Kolela mokufi ya liboso, ya W. Bouguereau, ezwami na filimi ya talatala oyo esalelamaki mpenza mpo na Photo-Drame de la Création, 1914

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto