Pusaná penepene na Nzambe
Mosambisi oyo akataka makambo na bosembo
BATO oyo basambisaka bakoki kokata makambo na kozanga bosembo to kopesa etumbu oyo eleki ndelo, kasi ezalaka bongo te mpo na Yehova Nzambe, ye oyo “alingaka bosembo.” (Nzembo 37:28) Atako azali motema molai, akangaka miso na mabe te. Akangamaka na makambo oyo ezali sembo. Tótala ndenge asalaki ntango koswana mpe botomboki ebimaki, na lisolo oyo ezali na Mitángo mokapo 20.
Ntango Bayisraele bakómaki pene na nsuka ya mobembo na bango na esobe, bazangaki mai ya komɛla.a Bato babandaki koswanisa Moize mpe Arona mpe koloba ete: “Mpo na nini bomemi lisangá ya Yehova na esobe oyo mpo tókufa awa biso ná banyama na biso oyo ememaka mikumba?” (Vɛrsɛ 4) Bato bazalaki kolelalela ete esobe ezali “esika mabe” epai “mai ya komɛla ezali te,” esika oyo ezangi “bafigi ná banzete ya vinyo ná bagrenade,” bambuma oyo Bayisraele oyo bakendaki konɔnga Mokili ya Ndaka bayaki na yango eleki mwa bambula. (Vɛrsɛ 5; Mitángo 13:23) Na ndenge yango, bazalaki kopamela Moize ná Arona mpo esobe ezalaki te lokola mokili kitoko oyo bankɔkɔ na bango oyo bayimayimaki baboyaki kokɔta!
Yehova abwakaki te bato oyo bayimayimaki. Asɛngaki nde Moize asala makambo misato: azwa lingenda na ye, ayanganisa bato, mpe ‘aloba na libanga na miso na bango mpo ebimisa mpenza mai na yango.’ (Vɛrsɛ 8) Moize atosaki malako mibale ya liboso, kasi atosaki oyo ya misato te. Na esika aloba na libanga na kondima nyonso, alobaki nde na bato na nkanda ete: “Bóyoka, sikoyo, bino batomboki! Tóbimisela bino mai na libanga oyo?” (Vɛrsɛ 10; Nzembo 106:32, 33) Na nsima, Moize abɛtaki libanga mbala mibale, “mpe mai mingi ebandaki kobima.”—Vɛrsɛ 11.
Na ndenge yango, Moize ná Arona basalaki lisumu moko monene. Nzambe alobaki na bango boye: “Bino botombokelaki etinda na ngai.” (Mitángo 20:24) Lokola batosaki te mitindo oyo Nzambe apesaki bango na libaku wana, Moize ná Arona bakómaki batomboki, ndenge moko na bato oyo bango bazalaki kofunda. Nzambe akataki likambo polele: Moize ná Arona bakokɔtisa Yisraele na Mokili ya Ndaka te. Etumbu yango elelaki nde makasi? Te, mpo na bantina mingi.
Ya liboso, Nzambe asɛngaki Moize te ete aloba na bato, asɛngaki mpe ye te abenga bango batomboki. Ya mibale, Moize ná Arona bakumisaki Nzambe te. Nzambe alobaki boye: ‘Bosantisaki ngai te.’ (Vɛrsɛ 12) Ntango alobaki ete “tóbimisela bino mai,” Moize alobaki lokola nde ezalaki ye ná Arona nde bakobimisa mai na ndenge ya likamwisi, kasi Nzambe te. Ya misato, etumbu yango eyokanaki na bitumbu oyo Nzambe akataki liboso. Nzambe aboyaki libota oyo etombokelaki ye liboso ekɔta na Kanana, mpe asalaki bongo mpo na Moize ná Arona. (Mitángo 14:22, 23) Ya minei, Moize ná Arona bazalaki bakambi ya Yisraele. Nzambe asɛngaka mingi koleka na bato oyo bazali na mikumba minene.—Luka 12:48.
Yehova akataka makambo na bosembo. Lokola alingaka bosembo, akoki te kokata likambo na ndenge oyo ezangi bosembo to ya mabe. Ebongi mpenza tótyela Mosambisi ya ndenge wana motema mpe tópesa ye limemya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nsima ya kobima na Ezipito, Bayisraele bazalaki pene mpo na kokɔta na Kanana, mokili oyo Nzambe alakaki Abrahama. Kasi ntango banɔngi zomi bayaki na nsango ya mabe, bato bayimayimaki epai ya Moize. Na yango, Yehova azwaki ekateli ete bakolekisa mbula 40 na esobe—ntango molai mpenza mpo bato nyonso oyo batombokaki básila.