Pusaná penepene na Nzambe
Yehova apesi biso likoki ya kopona
“MBALA mingi, nabangaka makasi mpo namonaka ete nakoki kozanga bosembo epai ya Yehova.” Maloba yango ezali ya Motatoli moko ya mwasi oyo azalaki kokanisa ete makambo oyo eleká na bomwana na ye ekosala ete alonga te na bomoi. Ezali mpenza bongo? Ezali solo ete tokoki te kobongisa makambo ya bomoi na biso? Te. Yehova Nzambe apesá biso bonsomi ya kopona, yango wana biso moko tokoki kopona ndenge tokomema bomoi na biso. Yehova alingi ete tópona nzela ya malamu, mpe Liloba na ye, Biblia, eyebisi biso ndenge oyo tokoki kosala yango. Tótalela maloba ya Moize, oyo ezali na mokanda ya Kolimbola Mibeko mokapo 30.
Ezali nde mpasi koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga biso mpe na nsima kosala yango? Moize alobaki boye: “Mitindo oyo nazali kopesa yo lelo eleki makasi te mpo na yo, mpe ezali mosika te.” (Vɛrsɛ 11) Yehova asɛngaka te tósala makambo oyo tokokoka te kosala. Makambo oyo asɛngaka biso ezali makasimakasi te, mpe tokoki kosala yango. Tokoki mpe koyeba yango. Ezali te kosɛnga ete tómata “na likoló” to tókende “na ngámbo mosusu ya mbu” mpo tóyeba oyo Nzambe azali kosɛnga biso. (Vɛrsɛ 12, 13) Biblia eyebisi biso polele etamboli oyo tosengeli kozala na yango.—Mika 6:8.
Nzokande, Yehova atindaka biso na makasi te ete tótosa ye. Moize alobaki boye: “Natye mpenza liboso na yo lelo bomoi ná malamu, mpe liwa ná mabe.” (Vɛrsɛ 15) Tozali na bonsomi ya kopona kati na bomoi ná liwa, mpe malamu ná mabe. Tokoki kopona kosambela Nzambe mpe kotosa ye mpe na ndenge yango kozwa mapamboli, to kopona kotosa ye te mpe na ndenge yango kobuka mbuma mabe. Ata soki toponi nini, biso moko toponi.—Vɛrsɛ 16-18; Bagalatia 6:7, 8.
Nzela oyo toponi ezalaka na ntina mpo na Yehova? Ɛɛ! Na litambwisi ya elimo santu, Moize alobaki boye: ‘Poná bomoi.’ (Vɛrsɛ 19) Kasi, ndenge nini tokoki kopona bomoi? Moize alimbolaki boye: “Na kolingáká Yehova Nzambe na yo, koyokáká mongongo na ye mpe kokangamáká na ye.” (Vɛrsɛ 20) Soki tokómi kolinga Yehova, tokosepela koyoka mpe kotosa ye mpe tokokangama na ye na bosembo nyonso, ata ndenge nini. Kosala bongo elimboli kopona bomoi—bomoi oyo eleki malamu lelo oyo mpe oyo epesi elikya ya bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe oyo ezali koya.—2 Petro 3:11-13; 1 Yoane 5:3.
Maloba ya Moize eteyi biso likambo moko ya kobɔndisa. Ata soki okutaná na makambo ya ndenge nini na mokili oyo mabe, okoki kobongisa makambo ya bomoi na yo; okoki mpe kolonga na bomoi. Yehova apesá yo lokumu na ndenge apesá yo bonsomi ya kopona. Ya solo, okoki kopona kolinga Yehova, kotosa ye, mpe kotikala sembo epai na ye. Soki oponi kosala bongo, Yehova akopambola milende na yo.
Koyeba ete tozali na bonsomi ya kopona kolinga Yehova mpe kosalela ye ebɔndisaki mwasi oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Alobi boye: “Nalingaka mpenza Yehova. Mbala mosusu, nazalaki kobosana ete likambo eleki ntina ezali ete nalingaka Yehova. Na yango, nakoki kozala sembo.” Na lisalisi ya Yehova, yo mpe okoki kozala sembo.