Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/7 nk. 14-18
  • Abondelaki Nzambe na motema mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Abondelaki Nzambe na motema mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mpo na nini motema na yo ezali koyoka mpasi?”
  • ‘Azalaki mawamawa lisusu te’
  • “Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso”
  • Abondelaki Nzambe na motema mobimba
    Mekolá kondima na bango
  • Hana asɛngi Nzambe mwana mobali
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Ana azwaki kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Tiká Yehova akitisa yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/7 nk. 14-18

Mekolá kondima na bango

Abondelaki Nzambe na motema mobimba

HANA atyaki makanisi na ye nyonso na kobongisa mobembo. Esengelaki kozala ntango moko ya esengo; Elekana, mobali na ye azalaki na momeseno ya komema libota mobimba na mibembo wana oyo bazalaki kosala mbula na mbula mpo na kokende kosambela na tabernakle na Shilo. Yehova alingaki ete bileko wana ezala ntango ya esengo. (Kolimbola Mibeko 16:15) Mpe na ntembe te, banda bomwana na ye, Hana azalaki kosepela na bafɛti yango. Kasi, na bambula oyo elandaki, makambo ebongwanaki.

Apambolamaki na ndenge azwaki mobali oyo azalaki kolinga ye. Kasi, Elekana azalaki na mwasi mosusu. Nkombo na ye ezalaki Penina, mpe azalaki kosala nyonso mpo na kokómisa bomoi ya Hana bololo. Asalaki ete ata ntango wana ya bafɛti ezala bololo mpo na Hana. Ndenge nini? Kasi, ndenge nini kondima ya Hana epai ya Yehova esalisaki ye alonga likambo yango oyo ezalaki komonana lokola ete ekosila te? Soki ozali na mikakatano oyo ezali kolongola yo esengo na bomoi, lisolo ya Hana ekoki mpenza kosalisa yo.

“Mpo na nini motema na yo ezali koyoka mpasi?”

Biblia elobeli mikakatano mibale ya minene oyo Hana azalaki na yango. Akokaki koyika mwa mpiko na mokakatano ya liboso, kasi ezalaki mpasi mpo na oyo ya mibale. Ya liboso, azalaki na mbanda oyo azalaki koyina ye. Ya mibale, azalaki kobota te. Likambo yango ezali mpasi mpo na mwasi nyonso oyo alingaka kozala na bana; kasi na ntango ya Hana kozanga mwana ezalaki mpenza mpasi. Libota nyonso ezalaki kotya motema na bana mpo na kobatela nkombo ya libota. Bato bazalaki kotalela kozanga kobota lokola etumbu makasi mpe likambo ya nsɔni.

Hana alingaki koyikela likambo yango mpiko soki Penina azalaki kotyola ye te. Bombanda ezalaka likambo ya esengo te mpo na makambo oyo yango ebimisaka; na ndakisa, kowelana, koswana, mpe mpasi na motema. Likambo yango ya bombanda eyokanaki te na libala ya mwasi moko mpe mobali moko ndenge Nzambe abongisaki yango na elanga ya Edene.a (Ebandeli 2:24) Biblia emonisi mpasi ya kozala na libala ya bombanda, mpe makambo oyo ezalaki koleka na libota ya Elekana emonisi mpenza ntina oyo libala ya bombanda ezali mabe.

Omoni ete Elekana azalaki kolinga Hana koleka. Masolo ya Bayuda emonisi ete abalaki liboso Hana mpe mwa bambula na nsima abalaki Penina. Ata soki ezali bongo to te, Penina oyo azalaki koyokela Hana zuwa, alukaki ndenge mingi ya konyokola mbanda na ye. Penina azalaki komonela Hana mpo ye azalaki kobota. Penina azalaki kolandisa kobota, mpe ntango nyonso oyo aboti azalaki komimona ye na ye. Na esika ayokela Hana mawa mpe abɔndisa ye, Penina azalaki mpenza kosalela likambo yango mpo na konyokola ye. Biblia elobi ete Penina azalaki kotumola Hana mingi “mpo na kosilikisa ye.” (1 Samwele 1:6) Penina azalaki kosala yango na nko. Mposa na ye ezalaki kaka ya koyokisa Hana mpasi, mpe azalaki kolonga kosala yango.

Emonani ete Penina azalaki kozela mibembo ya mbula na mbula oyo bazalaki kosala na Shilo mpo na konyokola Hana. Na ebele ya bana oyo Penina azalaki na bango​—“bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi”—​Elekana azalaki kopesa biteni ya bambeka oyo basengelaki kopesa Yehova. Hana, oyo azalaki kobota te, azalaki kaka kozwa eteni oyo ya ye. Kasi, Penina azalaki komitombola liboso ya Hana mpe azalaki komonisa ye ntango nyonso ete abotaka te mpe yango ezalaki kosala ete mwasi yango alelaka ntango nyonso mpe aboya ata kolya. Elekana akokaki kosala likambo moko te, kasi azalaki komona ete Hana, mwasi na ye oyo alingaka azalaki kotungisama mpe azalaki kolya te, na yango alukaki kobɔndisa ye. Atunaki ye boye: “Hana, mpo na nini ozali kolela, mpe mpo na nini ozali kolya te? Mpo na nini motema na yo ezali koyoka mpasi? Mpo na yo, ngai naleki bana mibali zomi te?”​—1 Samwele 1:4-8.

Elekana amonaki ete Hana azali na mawa mpo azalaki kobota te. Mpe na ntembe te, Hana asepelaki ndenge Elekana azalaki komonisela ye bolingo.b Kasi, Elekana alobelaki te mayele mabe ya Penina, mpe Biblia elobi te ete Hana ayebisaki Elekana makambo oyo Penina azalaki kosala ye. Ekoki kozala ete amonaki ete koyebisa mobali na ye makambo oyo Penina azali kosala ekobebisa makambo. Elekana akokaki mpenza kobongola makambo? Yango elingaki kosala te ete Penina ayina lisusu Hana makasi mpe bana mpe basaleli ya mwasi wana ya mabe báyina mpe Hana? Hana alingaki kokóma mopaya na ndako na ye moko.

Ata soki Elekana ayebaki makambo oyo Penina azalaki kosala to te, Yehova Nzambe azalaki komona makambo nyonso. Liloba na ye emonisi yango nyonso, na ndenge yango ekebisi moto nyonso oyo akoki kozala na zuwa ata moke mpe kosala makambo oyo ezali komonisa ete azali koyina moto. Epai mosusu, na ndakisa ya Hana, moto oyo asali likambo te, mpe azali koluka kimya akoki kobɔndisama na koyeba ete Nzambe ya sembo akataka makambo na ndenge ebongi na ntango oyo ye moko aponi mpe na lolenge oyo amoni malamu. (Kolimbola Mibeko 32:4) Ekoki kozala ete Hana ayebaki likambo yango, yango wana abondelaki Yehova mpo asalisa ye.

‘Azalaki mawamawa lisusu te’

Na ntɔngɔntɔngɔ, bato nyonso na ndako bazalaki likolólikoló. Moto nyonso, ata mpe bana bazalaki komibongisa mpo na mobembo. Kokende na Shilo esɛngaki libota wana monene bátambola kilomɛtrɛ koleka 30 na banzela ya ngombangomba ya mokili ya Efraime.c Na makolo, mobembo ekokaki koumela mokolo moko to mibale. Hana ayebaki ndenge mbanda na ye akosala ye. Atako bongo, atikalaki na ndako te. Na ndenge yango atiká ndakisa malamu mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo. Ezali malamu te kotika makambo mabe ya basusu epekisa biso kosambela Nzambe. Soki tosali bongo, tokozanga mpenza mapamboli oyo ekoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko.

Nsima ya mobembo molai na nzela ya mipɛpɛ mpe bangomba, libota wana monene ekómaki pene na Shilo. Kuna, bafandaki na mwa ngomba moko oyo ezalaki na kati ya bangomba milai. Ntango bazalaki kopusana, ekoki kozala ete Hana azalaki kokanisa makambo oyo akoyebisa Yehova na libondeli. Ntango bakómaki, libota mobimba bafandaki mpo na kolya. Eumelaki te, Hana atikaki bango mpe akendaki na tabernakle ya Yehova. Nganga-nzambe monene Eli azalaki kuna, afandaki mosika te na porte ya tempelo. Kasi, Hana atyaki makanisi na ye nyonso epai ya Nzambe na ye. Na tabernakle, atyaki mpenza motema ete Nzambe akoyoka ye. Ata soki moto moko te ayebaki mpasi na ye, Tata na ye ya Likoló ayebaki yango. Mawa na ye emataki makasi mpe abandaki kolela.

Nzoto na ye ezalaki koningana ntango azali kolela, Hana abondelaki Yehova. Mbɛbu na ye ezalaki koningana ntango azalaki koluka maloba mpo na kobimisa mpasi na ye. Mpe abondelaki ntango molai, afungwelaki Tata na ye motema. Kasi, asukaki kaka te na kosɛnga Nzambe asalisa ye na likambo wana ya kozanga kobota, likambo oyo esilisaki ye mayele. Hana azalaki koluka kaka te Nzambe apambola ye, kasi alukaki mpe kopesa Nzambe oyo akokaki. Na yango asalaki elako, alobaki ete soki aboti mwana mobali, akopesa ye mpo asalela Yehova bomoi na ye mobimba.​—1 Samwele 1:9-11.

Na ndenge yango, Hana atiká ndakisa malamu mpo na basaleli nyonso ya Nzambe na likambo etali kobondela. Na boboto nyonso, Yehova asɛngaka basaleli na ye bábondela ye na motema mobimba, kozanga kokakatana, báyebisa ye mitungisi na bango nyonso ndenge kaka mwana oyo atyelaka moboti na ye motema asalaka yango. (Nzembo 62:8; 1 Batesaloniki 5:17) Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Petro akomaki maloba ya kobɔndisa na likambo etali kobondela Yehova; alobaki boye: ‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’​—1 Petro 5:7.

Nzokande, bato bayokelaka mpe bamityaka te na esika ya baninga na bango ndenge Yehova asalaka yango. Ntango Hana azalaki kolela mpe kobondela, ayokaki mongongo moko. Ezalaki Eli, nganga-nzambe monene, oyo azalaki kotala ye. Alobaki boye: “Okolangwalangwa boye tii ntango nini? Longwá na molangwa na yo ya vinyo.” Eli amonaki ndenge mbɛbu ya Hana ezalaki koningana, ndenge azalaki kotangisa mai ya miso mpe ndenge azalaki. Na esika atuna ye likambo oyo ezalaki kotungisa ye, awelaki koloba ete Hana alangwe.​—1 Samwele 1:12-14.

Ezalaki mpenza mpasi mpo Hana akanga motema na maloba ya ndenge wana, oyo eutaki epai ya moto oyo azalaki nganga-nzambe monene! Atako bongo, na mbala oyo mpe atikaki ndakisa kitoko ya kondima. Atikaki nzela te ete kozanga kokoka ya mobali wana epekisa ye kosambela Yehova. Ayanolaki Eli na limemya nyonso mpe alimbwelaki ye mokakatano na ye. Nsima ya koyeba ete asalaki mabe, ayanolaki Hana ntango mosusu na mongongo ya nse ete: “Kende na kimya, mpe tiká Nzambe ya Yisraele akokisela yo lilɔmbɔ na yo, oyo osɛngi ye.”​—1 Samwele 1:15-17.

Ndenge oyo Hana afungwelaki Yehova motema mpe abondelaki ye na tabernakle esalaki ye ndenge nini? Lisolo yango elobi boye: “Mwasi yango asimbaki nzela akei, mpe alyaki, mpe elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.” (1 Samwele 1:18) Biblia haut fleuve elobi boye: “Alongwaki na njela na ye, aliaki bilei mpe mawa emɔnanaki lisusu na elongi na ye tɛ.” Hana azwaki makasi. Na maloba mosusu, azwaki kilo na ye nyonso mpe abwakelaki yango Tata na ye ya likoló oyo Aleki nyonso. (Nzembo 55:22) Ezali nde na likambo moko oyo ekoki kolekela ye kilo? Te​—esalemá naino te, ezali mpe te mpe ekozala te!

Ntango tomoni ete makambo eleki biso motó, to mawa elekeli biso, ekozala malamu tólanda ndakisa ya Hana, tófungola motema na biso epai ya Ye oyo Biblia ebengi “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Soki tosali bongo na kondima, biso mpe tokomona ete “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” ekozwa esika ya mawa na biso.​—Bafilipi 4:6, 7.

“Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso”

Na ntɔngɔ oyo elandaki, Hana akendaki na tabernakle elongo na Elekana. Ekoki kozala ete ayebisaki ye likambo oyo asɛngaki na libondeli mpe elako oyo asalaki, mpo Mibeko ya Moize elobaki ete mobali azali na lotomo ya koboya elako oyo mwasi asali kozanga ete mobali apesa nzela. (Mitángo 30:10-15) Kasi, mobali wana ya sembo aboyaki elako yango te. Kutu, ye ná Hana basambelaki Yehova elongo na tabernakle liboso bázonga.

Ntango nini Penina amonaki ete akolonga lisusu te kotumola Hana? Biblia elobi te, kasi maloba ‘azalaki mawamawa lisusu te’ emonisi ete Hana akómaki na kimya ya motema banda ntango wana. Ata soki ezali bongo to te, eumelaki te Penina amonaki ete matumoli na ye ezali lisusu kobota mbuma te. Biblia etángi mpe lisusu nkombo na ye te.

Wana basanza ezalaki koleka, kimya ya motema oyo Hana azalaki na yango ememelaki ye esengo mingi. Akómaki na zemi! Atako azalaki na esengo, Hana abosanaki ata mokolo moko te esika oyo lipamboli na ye eutaki. Ntango abotaki mwana na ye ya mobali, apesaki ye nkombo Samwele, oyo elimboli “Nkombo ya Nzambe” mpe emonani ete yango emonisaki ndenge oyo Hana abelelaki Nkombo ya Nzambe. Na mbula wana, Hana akendaki te elongo na Elekana mpe libota mobimba na Shilo. Atikalaki na ndako ná mwana mbula misato, tii ntango alongolaki ye na mabɛlɛ. Na nsima, amibongisaki mpo na mokolo oyo asengelaki kokende kotika mwana na ye oyo alingaki mingi.

Kokabwana na mwana na ye, ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Ya solo, Hana ayebaki ete na Shilo Samwele akobatelama malamu, ntango mosusu na basi oyo bazalaki kosala na tabernakle. Kasi, azalaki mpenza mwana moke, mpe mama nini akondima kokabwana na mwana na ye ya moke bongo! Atako bongo, Hana ná Elekana bamemaki mwana na bango kozanga koimaima, kasi bazalaki nde na botɔndi na motema. Bapesaki bambeka na ndako ya Nzambe, mpe balakisaki Samwele epai ya Eli, bayebisaki ye elako oyo Hana asalaki mwa bambula liboso kuna na tabernakle.

Na nsima, Hana asalaki libondeli oyo Nzambe amonaki ete ebongi kokɔtisa yango na Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Ntango ozali kotánga maloba na ye oyo ezali na 1 Samwele 2:1-10, na liloba mokomoko okomona kondima makasi oyo azalaki na yango. Asanzolaki Yehova mpo na nguya na ye monene oyo asalelaki​—oyo eleki nyonso ya kokitisa bato ya lolendo, kopambola bato oyo bazali konyokwama, mpe kosukisa bomoi ata mpe ya kobikisa yango na liwa. Asanzolaki Tata na ye mpo na bosantu na ye, boyengebene, mpe bosembo na ye. Yango wana, Hana akokaki koloba: “Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.” Yehova abongi mpenza kotyelama motema, abongwanaka te, mpe azali ekimelo mpo na baoyo nyonso bazali konyokwama mpe balɛmbi baoyo bazali koluka lisalisi epai na ye.

Atako azalaki mwana, Samwele azalaki na libaku malamu ya kozala na mama oyo azalaki mpenza na kondima epai ya Yehova. Atako azalaki na mama na ye esika moko te ntango azali kokola, amonaki te ete mama na ye abosanaki ye. Mbula nyonso, Hana azalaki kokende na Shilo, azalaki komemela ye mwa kazaka ezangá mabɔkɔ mpo na mosala na ye na tabernakle. Kazaka mokomoko ezalaki komonisa bolingo mpe komibanzabanza oyo azalaki na yango epai ya mwana na ye. (1 Samwele 2:19) Kanisá naino ndenge azalaki kolatisa mwana na ye kazaka ya sika, kolongola yango, mpe kotala ye mpe kosolola na ye na boboto nyonso, mpe koloba na ye maloba ya kolendisa. Ezalaki mpenza lipamboli mpo na Samwele kozala na mama ya ndenge wana, mpe ntango akolaki azalaki lipamboli mpo na baboti na ye mpe mpo na Yisraele mobimba.

Nzambe abosanaki Hana te. Yehova apambolaki ye na ndenge afungolaki libumu na ye, mpe abotelaki lisusu Elekana bana mitano. (1 Samwele 2:21) Ntango mosusu, lipamboli monene oyo Hana azwaki, eutaki na boyokani na ye na Yehova, Tata na ye, boyokani oyo ekómaki makasi wana bambula ezalaki koleka. Tiká ete ezala mpe bongo mpo na yo wana ozali komekola kondima ya Hana.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe apesaki nzela na basaleli na ye mibali bábala basi ebele na ntango wana, talá lisolo “Nzambe andimaka mobali abala basi mingi?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2009 lokasa 30.

b Atako Biblia elobi ete Yehova ‘akangaki libumu ya Hana,’ eloko moko te emonisi ete Nzambe azalaki kosepela te na mwasi wana ya komikitisa mpe ya sembo. (1 Samwele 1:5) Na bantango mosusu, Biblia elobelaka makambo oyo Nzambe atiki nzela esalema lokola nde ye nde asali yango.

c Ekoki kozala ete ntaka yango, ezali kobanda na Rama, engumba ya Elekana, ezalaki esika oyo na nsima eyaki koyebana na nkombo Arimate na mikolo ya Yesu.

[Etanda na lokasa 17]

Mabondeli mibale ya ntina

Mabondeli mibale ya Hana oyo ezali na 1 Samwele 1:11 mpe 2:1-10, ezali na makambo mingi ya ntina. Tótalela kaka mwa ndambo:

◼ Na libondeli ya liboso, Hana abengaki Nzambe “Yehova ya mampinga.” Azali moto ya liboso oyo Biblia elobi ete asalelaki titre wana. Maloba yango ezali mbala soki 285 na Biblia mpe emonisaka bokonzi oyo Nzambe azali na yango likoló ya ebele ya bana na ye ya elimo.

◼ Simbá ete Hana asalaki libondeli wana ya mibale, ntango mwana na ye abotamaki te, kasi ntango ye ná Elekana bakendaki kopesa mwana na mosala ya Nzambe na Shilo. Na yango, esengo monene oyo Hana azalaki na yango ezalaki te na ndenge akangisaki Penina, mbanda na ye monɔkɔ, kasi ndenge Yehova apambolaki ye.

◼ Ntango Hana alobaki: “Ya solo, Yehova atomboli liseke na ngai,” ekoki kozala ete azalaki kokanisa na ngɔmbɛ-mobali, nyama ya makasi oyo ezalaki komema kilo oyo ezalaki kosalela maseke na yango na nguya. Na ndenge yango, Hana azalaki nde koloba ete: ‘Yehova ayeisi ngai makasi.’​—1 Samwele 2:1.

◼ Maloba oyo asalelaki mpo na kolobela ‘moto oyo atyami mafuta’ ezalaki esakweli. Ezali kaka maloba wana nde ebongolami na “masiya,” mpe Hana azalaki moto ya liboso oyo Biblia emonisi ete asalelaki yango mpo na kolobela mokonzi oyo asengelaki kotyama mafuta.​—1 Samwele 2:10.

◼ Mbula soki nkóto moko na nsima, Maria mama ya Yesu azongelaki maloba mosusu ya Hana, ntango asanzolaki Yehova.​—Luka 1:46-55.

[Elilingi na lokasa 16]

Hana azalaki mpenza kotungisama ntango azalaki kobota te, mpe Penina asalaki nyonso mpo akómisa bomoi ya Hana bololo

[Elilingi na nkasa 16, 17]

Okoki komekola ndakisa ya Hana, kobondela Nzambe na motema mobimba?

[Elilingi na lokasa 17]

Atako Eli akaniselaki ye mabe, Hana asilikaki te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto