Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 nk. 23-25
  • Bótalelaka makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bótalelaka makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bótalelaka makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango
  • Toli malamu mpo na kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango
  • Bósepela mpo na elikya ya Bokonzi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Elimo ya komipesa ezali kotinda bato na Gileadi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bósepela kati na Yehova mpe bózala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bazali na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 nk. 23-25

Bótalelaka makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango

MOKOLO ya 14 Sɛtɛmbɛ 2002 ezalaki mokolo ya moi makasi mpe ya molunge na New York, na États-Unis. Mokolo yango, bato 6 521 oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge bayanganaki; bamosusu na Esika Monene ya Mateya ya Watchtower na Patterson, bamosusu na biro monene ya Brooklyn mpe bamosusu na ferme ya Wallkill. Bato yango bayanganaki mpo na likita ya kopesa badiplome na bandeko oyo bakɔtaki kelasi ya mbala ya 113 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Bana-kelasi bautaki na mikili 14 mpe balekisaki sanza mitano mpo na kozwa formasyo na mosala ya misionɛrɛ oyo bakosala na mikili 19 epai batindi bango.

Ndeko Carey Barber, oyo azali na mbula 98 mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, azalaki prezida ya likita yango . Alobelaki eteyelo ya Gileadi yango moko, oyo elingi kokokisa mbula 60, mpe esilá kobongisa bankóto ya bato mpo na mosala ya misionɛrɛ. Ndeko Barber alobaki boye: “Nakolekisa ndelo te soki nalobi ete formasyo oyo bazwaki esalisi mpo mbuma ebotama mingi. Na mokili mobimba, bandeko oyo bazwaki formasyo ya misionɛrɛ basalisi bankóto ya bato ya komikitisa bámipesa na Yehova mpe bándima losambo na ye ya solo mpe bándima kosala mosala na ye ya bosantu.”

Liboso bákende na Gileadi, bana-kelasi mingi bamonisaki ete bazali na mposa ya kosala mingi lisusu na mosala ya kosakola. Mobali moko na mwasi na ye balekisaki mbula mobimba na mwa basanza na kelasi mpo na koyekola monɔkɔ ya Chinois mpo bákoka koteya ebele ya Ba-Chinois oyo bazali kofanda na mboka na bango, na Canada. Mobali mosusu na mwasi na ye babandaki bango moko koyekola monɔkɔ ya Albanais mpe na nsima bakendaki na Albanie mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola lokola bato mingi bazali kosepela koyekola Biblia na ekólo yango. Bana-kelasi mosusu bautaki na Hongrie, na Guatemala, na République dominicaine, epai bakendaki mpo na kosalela Yehova mpamba te mposa ya bateyi ya Liloba ya Nzambe ezalaki mingi na mikili yango.

Liboso ya kokende bipai oyo batindi bango na Afrika, na Mpoto ya Ɛsti, na Amerika ya Ntei mpe ya Sudi, mpe na Azia, bana-kelasi nyonso balendisamaki ete bábosana Nzambe te na misala na bango nyonso.

Bótalelaka makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango

Nsima ya maloba ya ebandeli, Ndeko Barber abengaki Maxwell Lloyd, oyo azali na komite ya filiale ya États-Unis. Motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki ete “Bótalelaka makambo nyonso ndenge oyo Nzambe atalelaka yango.” Ndeko Lloyd alobelaki ndakisa ya Davidi mpe ya Yesu, Mwana ya Nzambe. (1 Samwele 24:6; 26:11; Luka 22:42) Ayebisaki bana-kelasi ete ndenge oyo bayekoli Biblia na boumeli ya sanza mitano ebongisi bango bátalelaka makambo ndenge oyo Nzambe atalelaka yango, na nsima atunaki boye: “Ntango bokobanda koyekola Biblia na bato na bamboka na bino ya sika, bokosalisa bango bátalelaka makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango?” Lisusu, na oyo etali kopesa basusu toli, alobaki na bana-kelasi boye: “Bólobaka te ete, ‘Na makanisi na ngai, nabanzi . . . ’ Kasi, bósalisa bango nde báyeba makanisi ya Nzambe. Soki bozali kosala bongo, bokosalisa mpenza bato oyo bokokutana na bango bipai oyo bakotinda bino.”

Na nsima, Gerrit Lösch, ye mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azwaki maloba. Motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki “Nazali na yo elongo”; alobelaki mabaku ndenge na ndenge oyo Yehova ayebisaki basaleli na ye ya sembo ete, “Nazali na yo elongo.” (Genese 26:​23, 24; 28:15; Yosua 1:5; Yilimia 1:​7, 8) Na mikolo na biso, tokoki mpe kozala na elikya ndenge yango epai ya Yehova soki tozali ntango nyonso sembo. Ndeko Lösch alobaki boye: “Bozali nde komituna soki bokokutana na bato oyo bokoyekola na bango Biblia? Bóbosana te, Yehova alobaki ete, ‘Nazali na yo elongo.’ Bozali nde komitungisa soki bokozwa biloko oyo bosengeli na yango? Yehova alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’ ” (Baebele 13:⁠5) Na nsuka, Ndeko Lösch ayebisaki bana-kelasi ete Yesu alakaki ete akozala na bayekoli na ye ya sembo na mosala na bango ya kokómisa bato bayekoli.​—⁠Matai 28:⁠20.

Lawrence Bowen, ye azali molakisi na eteyelo ya Gileadi, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Okobatelama na nzela ya komekama makasi?” Alobaki ete mpo na ntembe oyo Satana abimisaki na Edene, bato nyonso oyo balingaki kosambela kaka Yehova bakutanaki na mikakatano mpe ntango mosusu kutu na komekama makasi. Alendisaki bana-kelasi bálanda ndakisa ya Yesu, moto oyo azwaki libateli ya solosolo na ndenge atyelaki Yehova motema mobimba mpe andimaki komekama makasi oyo Yehova atikelaki nzela mpo ete botosi ya Mwana na ye ekóma ya kokoka. (Baebele 5:​8, 9) Tokoki kokokanisa Yehova na moto oyo apɛtolaka wolo; moto yango asalelaka mɔtɔ oyo ekoki mpenza mpo na kolongola salite nyonso na wolo. Kondima oyo emekami ebatelaka koleka wolo oyo epɛtolami. Mpo na nini? Ndeko Bowen ayanolaki boye: “Mpamba te soki tozali na kondima oyo epɛtolami, tokoki koyikela komekama nyonso mpiko mpe kondima yango epesaka biso oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko tii na ‘nsuka.’ ”​—⁠Matai 24:13.

Mark Noumair, ye mpe azali molakisi na eteyelo ya Gileadi, asalaki lisolo oyo motó ya likambo na yango ezalaki motuna: “Okozala moto oyo alingami?” Motó ya likambo yango eutaki na maloba ya 1 Samwele 2:26 (NW), oyo ezali koloba ete Samwele “azalaki moto oyo alingami na miso ya Yehova mpe ya bato.” Nsima ya kolobela ndakisa ya Samwele, Ndeko Noumair​—⁠ye moko asalaki mosala ya misionɛrɛ na Afrika na boumeli ya mbula koleka zomi​—⁠alobaki boye: “Bino mpe bokoki kokóma bato oyo balingami mingi na miso ya Nzambe soki botiki te mosala oyo Nzambe apesi bino. Apesi bino mosala ya motuya monene: mosala ya misionɛrɛ.” Na nsima, Ndeko Noumair alendisaki bana-kelasi bátalela mosala na bango ete ezali eloko ya bosantu oyo Nzambe apesi bango mpe alendisaki bango na kolanda makanisi ya Nzambe na mosala na bango.

Ntango bazalaki na eteyelo, na bawikende, bana-kelasi bazwaki mabaku mingi ya koyebisa bato na bamboka oyo ezali zingazinga ya eteyelo “makambo minene ya Nzambe” oyo Biblia elobeli. (Misala 2:11) Kutu, bateyaki makambo yango na minɔkɔ zomi. Na lisolo na ye oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “ ‘Makambo minene ya Nzambe’ ezali kopesa bato mposa ya kosala mosala,” Wallace Liverance, ye mpe azali molakisi na Gileadi, atunaki mwa ndambo ya bana-kelasi bálobela makambo oyo bakutanaki na yango. Alobaki boye: “Na mokolo ya Pantekote, elimo etindaki bato oyo bazalaki na eteni ya ndako ya likoló na koloba ‘makambo minene ya Nzambe.’ Elimo moko wana ezali kosala lelo oyo kati na basaleli nyonso ya sembo ya Nzambe.” Bamosusu bayekolaki kutu minɔkɔ ya bapaya mpo na kotatola epai ya bato mingi koleka.

Toli malamu mpo na kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango

Nsima ya masukulu ya ebandeli, Gary Breaux na William Young, bango mibale basalaka na Betele ya États-Unis, batunaki bandeko ya bakomite ya filiale ya mikili ndenge na ndenge epai bamisionɛrɛ bazali kosala; batunaki mpe ndeko mobali moko na mwasi na ye oyo balekisaki mbula 41 na mosala ya misionɛrɛ. Likambo moko oyo balobaki yango oyo: “Bamisionɛrɛ oyo baumelaka na mosala na bango ezali baoyo basɛngaka makambo mingi te. Batyaka makanisi na bango na likambo oyo bakendaki kosala kuna. Bayebaka ete bakendaki kosakola nsango malamu mpe kosalisa bato báyeba Yehova.”

David Splane, ye mpe azali na Lisangani ya Mikólo-Bakambi, asalaki lisukulu ya nsuka na likita yango; motó ya likambo na yango ezalaki ete: “Bozali kokende mosika te!” Alingaki mpenza koloba nini, mpamba te toyebi ete bana-kelasi 46 oyo bauti kozwa badiplome bakokende na mikili ndenge na ndenge? Alobaki boye: “Ata soki batindi bino wapi na mokili, bokozala kaka na ndako ya Nzambe soki botikali sembo.” Baklisto nyonso ya sembo, ata soki bazali esika nini, bazali kosala na tempelo to ndako monene ya Nzambe na elimo oyo esalemaki ntango Yesu azwaki batisimo na ekeke ya liboso. (Baebele 9:⁠9) Bayangani basepelaki mpenza na koyeba ete Yehova azali pene na basaleli na ye nyonso ya sembo na mokili mobimba! Ntango Yesu azalaki awa na mabele, miso ya Yehova ezalaki likoló na ye; ndenge moko mpe, miso ya Yehova ezali likoló na biso nyonso mpe na mosala oyo tozali kosalela Ye, ata soki tozali wapi. Yango wana, na oyo etali losambo, tozali mosika te na bandeko mosusu mpe tozali mosika te na Yehova mpe Yesu.

Nsima ya koyoka bambote oyo eutaki na bisika ndenge na ndenge na mokili, mpe nsima ya koyebisa bisika oyo batindi moto mokomoko, mpe nsima ya koyoka mokanda ya bana-kelasi mpo na komonisa botɔndi na bango mpo na mateya oyo bazwaki, prezida asukisaki likita malamu mpenza. Alendisaki bamisionɛrɛ ya sika ete bákende liboso na mosala malamu na bango mpe básepela na mosala ya Yehova.​—⁠Bafilipi 3:⁠1.

[Etanda na lokasa 23]

MAKAMBO ETALI BANA-KELASI

Bauti na bikólo: 14

Batindami na bikólo: 19

Bana-kelasi bazalaki: 46

Mwayene ya mbula ya kobotama: 35

Mwayene ya mbula basali na lisangá: 17,2

Mwayene ya mbula basali mosala ya ntango nyonso: 13,7

[Elilingi na lokasa 24]

Kelasi ya mbala ya 113 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia

Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.

(1) Ligthart, M.; Hosoi, S.; Berktold, A.; Liem, C.; Aoki, J. (2) Baglyas, J.; Bouqué, S.; Bossi, A.; Alton, J.; Escobar, I.; Escobar, F. (3) Stoica, A.; Stoica, D.; Freimuth, S.; Karlsson, M.; LeBlanc, R. (4) Bianchi, R.; Bianchi, S.; Kaminski, L.; Joseph, L.; Paris, S.; LeBlanc, L. (5) Paris, M.; Skidmore, B.; Horton, J.; Horton, L.; Skidmore, G. (6) Liem, B.; Alton, G.; Quirici, E.; Langlois, M.; Steininger, S.; Aoki, H. (7) Langlois, J.; Steininger, M.; Bossi, F.; Kaminski, J.; Bouqué, J.; Ligthart, E.; Hosoi, K. (8) Baglyas, J.; Quirici, M.; Karlsson, L.; Freimuth, C.; Berktold, W.; Joseph, R.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto