Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/11 nk. 13-16
  • Biloko oyo Yehova akelá ekumisaka ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biloko oyo Yehova akelá ekumisaka ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nani atyaki fondasyo ya mabelé, mpe nani atambwisaka mai ya mbu?
  • Nani asalaka ete ntɔngɔ etana?
  • Nani nkóló bandako ya kobomba nɛjɛ mpe mbula ya mabanga?
  • Nani asalá mbula, mamwɛ, mpiɔ, mpe ngalasi?
  • Nani atyaki mibeko ya likoló?
  • Nani atyaki bwanya na kati ya mapata?
  • Misala ya kokamwa ya Nzambe ekumisaka Ye
  • Tyá likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tózala na botondi mpo na mbula
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biloko bizalisami bizali kotatola ete: “bakoki kolimbisama te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mokanda ya Biblia nimero 18—Yobo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/11 nk. 13-16

Biloko oyo Yehova akelá ekumisaka ye

YEHOVA NZAMBE azali na lokumu mingi koleka ndenge bato bakoki kokanisa. Biloko oyo akelá awa na mabelé mpe na likoló epesaka ye nkembo mpe ekamwisaka biso.​—Nzembo 19:1-4.

Lokola Yehova azali Mozalisi mpe Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ebongi mpenza ete tóyoka ye ntango azali koloba. Kasi, tókanisa naino ndenge tokoyoka soki ye moko alobi na biso! Kanisá ete alobi na yo, ntango mosusu na nzela ya anzelu. Na ntembe te okotya mpenza likebi. Yobo, moto ya sembo ayokaki mpenza na likebi nyonso ntango Nzambe alobaki na ye esili koleka bambula soki 3 500. Makambo oyo Nzambe ayebisaki Yobo mpo na biloko oyo ezali awa na mabelé mpe na likoló ekoki koteya biso nini?

Nani atyaki fondasyo ya mabelé, mpe nani atambwisaka mai ya mbu?

Na kati ya mopɛpɛ makasi, Nzambe atuni Yobo mituna na ntina na biloko oyo ezali awa na mabelé mpe na mai ya mbu. (Yobo 38:1-11, NW) Moto moko te alobaki na Nzambe ete mabelé ezala monene boye to boye mpe na nsima apesaki ye mabɔkɔ mpo na kosala yango. Nzambe akokanisi mabelé na ndako, mpe atuni Yobo boye: “Nani atyaki libanga na yango ya litumu?” Moto te! Baanzelu ya Nzambe bazalaki kotala mpe basepelaki ntango Yehova asalaki mabelé.

Mai ya mbu ezali lokola mwana ya Nzambe, mpe na maloba ya elilingi, alatisaka yango bilamba. “Ekómaki kobima lokola ntango epunzwaki na matrisi.” Nzambe atye mai ya mbu lokola na lopango ya bibende mpe akangi yango na bikuke; sanza mpe moi esalaka ete mai ya mbu ekita mpe emata.

Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Mbala mingi mopɛpɛ nde esalaka ete mbonge emata na mai ya mbu, ebandaka naino na bambonge ya mikemike na nsima ekómaka mbonge minene na molai koleka mɛtrɛ 30. . . Soki mopɛpɛ esili, mbonge esilaka mbala moko te mpe ekoki kokende mosika, bakilomɛtrɛ mingi longwa na esika oyo ebandaki. Na ntango wana ezalaka lisusu makasi te. Nsukansuka, mbonge yango ekómaka na libongo, esika esukaka mpe etikaka ndelo.” Mai ya mbu etosaka mobeko ya Nzambe: “Okoki koya kino awa, kasi koleka te; mpe mbonge na yo ya lolendo esengeli kosuka awa.”

Nani asalaka ete ntɔngɔ etana?

Na nsima, Nzambe atuni Yobo makambo na ntina na pole mpe biloko mosusu oyo asalá. (Yobo 38:12-18, NW) Moto moko te azali na likoki ya kosala ete butu eyaka mpe ntɔngɔ etanaka. Na ndenge ya elilingi, pole ya ntɔngɔ esimbaka bansuka ya mabelé mpe eningisaka bato mabe. Bato mabe bakoki kosala makambo na bango ya mabe na “molili ya mpokwa.” (Yobo 24:15, 16, NW) Kasi, pole epanzaka bato mingi ya mabe.

Kongɛnga ya ntɔngɔ ezali lokola kashɛ na lobɔkɔ ya Nzambe oyo ezali mokemoke kotika liyemi na yango na mabelé. Kongɛnga ya moi esalaka ete langi ndenge na ndenge emonana polele, na ndenge yango mabelé emonanaka lokola nde elati bilamba ya kitoko. Yobo asalaki ata eloko moko te na makambo wana nyonso mpe akitaki te na mai mozindo mpo na koyeba bozwi na yango. Ata lelo oyo bato ya mayele bayebi makambo nyonso te ya biloko oyo ezalaka na mai ya mbu!

Nani nkóló bandako ya kobomba nɛjɛ mpe mbula ya mabanga?

Moto moko te asilá kokɔtisa pole to molili na ndako na yango to asilá kokɔta na bandako ya kobomba nɛjɛ to mbula ya mabanga oyo Nzambe abombaka mpo na “mokolo ya kobunda mpe ya etumba.” (Yobo 38:19-23, NW) Na Gibona, ntango Yehova asalelaki mbula ya mabanga mpo na kobunda na banguna na ye, “baoyo bakufaki na [mbula ya mabanga, NW] balekaki baoyo mibali ya Yisalaele babomaki bango na mopanga.” (Yosua 10:11) Akoki mpe kosalela mbula ya mabanga oyo bonene na yango eyebani te mpo na koboma bato mabe oyo batambwisami na Gogo to Satana.​—Ezekiele 38:18, 22.

Na sanza ya Yuli 2002, na etúká ya Henan, na Chine, mbula ya mabanga oyo libanga na yango mokomoko ezalaki na bonene ya likei, ebomaki bato 25 mpe bato 200 bazokaki. Mpo na mbula ya mabanga oyo ekweaki na mobu 1545, Benvenuto Cellini, moyemi moko ya Italie akomaki boye: “Mokolo moko tozalaki mosika na engumba Lyon . . . na mbala moko bankake ebandaki kobɛta makasi. . . Ntango nkake etikaki kobɛta likoló ebimisaki lokito makasi mpe ya nsɔmɔ, nakanisaki ete ezali nsuka ya mokili; bongo natɛlɛmisaki mpunda na ngai mwa moke, wana mbula ya mabanga ekómaki kokwea mpe ata litanga ya mai ezalaki kokwea te. . . Mabanga ya ngalasi oyo ekómaki kokwea ezalaki monene lokola mbuma ya citron oyo ya monene. . . Eumelaki mwa moke mpe na nsima esilaki. . . Tolakisanaki mwa bampota mikemike oyo tozokaki mpe bisika oyo evimbaki mwa moke; kasi, ntango topusanaki mwa moke tomonaki likambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki oyo elekaki kutu mwa mpasi moke oyo biso tozwaki mpe mwaye ya kolimbola yango ezali te. Banzete nyonso elongwaki nkasa mpe ebebaki; banyama ya zamba bakufaki; babateli mingi ya mpate bakufaki; tomonaki mpe ebele ya mabanga ya ngalasi ya minene oyo moto akoki te kokanga yango na mabɔkɔ mibale.”—Autobiography (Book II, 50), Harvard Classics, Volime 31, nkasa 352-353.

Ekozala ndenge nini ntango Yehova akofungola bandako na ye ya kobomba nɛjɛ mpe mbula ya mabanga mpo na kobundisa banguna na ye? Bakoki kobika te soki Nzambe asaleli nɛjɛ to mbula ya mabanga mpo na kokokisa mokano na ye.

Nani asalá mbula, mamwɛ, mpiɔ, mpe ngalasi?

Na nsima, Yehova atuni Yobo mpo na mbula, mamwɛ, mpiɔ, mpe ngalasi. (Yobo 38:24-30, NW) Nzambe nde anɔkisaka mbula ata na “esobe esika bato bazali te.” Ezali moto te nde asalaka mbula, ngalasi, mpe mpiɔ.

Zulunalo moko (Nature Bulletin) elobi boye: “Likambo ya kokamwa mingi mpe ntango mosusu ya ntina mingi na [ngalasi] ezali ete mai evimbaka ntango ezali kokóma ngalasi . . . Ngalasi oyo esalemaka likoló ya mai mpe etepaka likoló na yango na eleko ya mpiɔ epesaka nzela na banzete oyo ezalaka na nse ya mai mpe bambisi ekufa te. Soki . . . ezali ete ntango mai ekómi ngalasi ekómaka kilo, mbɛlɛ ngalasi ekitaka na nse ya mai. Bangalasi ekobanda kosalema tii ntango ebale mobimba ekokóma ngalasi. . . Na mikili oyo malili ezalaka makasi, mbɛlɛ bibale, maziba, balaki mpe ata mbu ekangamá ngalasi libela.”

Tozali mpenza na botɔndi ndenge mai ya bibale ekómaka nyonso ngalasi te na eleko ya mpiɔ! Tozali mpe na botɔndi ndenge mbula mpe mamwɛ, biloko oyo Yehova asalá ekolisaka milona.

Nani atyaki mibeko ya likoló?

Na nsima, Nzambe atuni Yobo mpo na likoló. (Yobo 38:31-33, NW) Bato mingi balobaka ete liboke ya minzoto ya Kima oyo Biblia elobeli, ezali liboke ya minzoto oyo ebengamaka Pléiades; yango ezali liboke moko ya minzoto nsambo ya minene mpe mwa ndambo ya minzoto ya mike, ekabwani na ntaka molai mpenza na moi (années-lumière soki 380). Moto akoki te “kokanga makasi bansinga ya liboke ya minzoto ya Kima,” kokangisa minzoto yango nyonso esika moko. Moto moko te akoki “kofungola bansinga ya liboke ya minzoto ya Kesil,” oyo bato mingi balobaka ete ezali nde liboke ya minzoto oyo ebengamaka lelo Orion. Lelo oyo, toyebi te oyo babengi liboke ya minzoto ya Mazarote mpe ya Ashe, atako bongo, moto akoki te kotambwisa yango. Bato bakoki te kobongola “mibeko ya likoló.”

Nzambe nde atyá mibeko oyo etambwisaka biloko oyo ezali na likoló; oyo esalaka ete awa na mabelé molunge ezala, mbula ebɛta, malili ezala, mai ya mbu ekita mpe emata, mopɛpɛ ezala, ata mpe bikelamu ya bomoi. Tózwa ndakisa ya moi. Buku moko (The Encyclopedia Americana, ebimeli ya 1996) elobi boye: “Moi epesaka molunge mpe pole awa na mabelé, epesaka nzela na banzete ekola malamu, esalaka ete mai ya mbu mpe ya bibale emata likoló na ndenge ya londende, esalaka ete mopɛpɛ etambolaka, mpe esalaka makambo mingi mosusu oyo epesaka nzela ete bomoi ezala awa na mabelé.” Buku yango elobi lisusu boye: “Mpo moto ayeba bonene ya nguya ya kongɛnga ya moi, asengeli koyeba ete nguya nyonso oyo ezalaka na mopɛpɛ mpe bibale, nguya nyonso oyo ezali na biloko lokola nkoni, makala, mpe esansi ezali kaka nguya ya kongɛnga ya moi oyo [mabelé,] mwa planɛti oyo ekabwani na moi na ntaka ya kilomɛtrɛ milio 150 ebombaka.”

Nani atyaki bwanya na kati ya mapata?

Yehova asɛngi Yobo atalela mapata. (Yobo 38:34-38, NW) Moto akoki te koloba ata na lipata moko ebima mpe ekweisa mai na yango. Nzokande, ebongiseli oyo Mozalisi asalá ete mai ebongwanaka, yango nde esimbi bomoi ya bato awa na mabelé!

Kobongwana ya mai esalemaka ndenge nini? Molunge ya moi ematisaka mai ya mbu na likoló na ndenge ya londende; na likoló mai yango esanganaka mpe esalaka mapata, na nsima ekweaka lisusu awa na mabelé (na ndenge ya mbula to nɛjɛ) mai yango ekotyola tii na mingala, na miluka, na bibale, mpe nsukansuka na mbu. Epai mbongwana yango ekobandela lisusu. Esalemaka bongo mbala na mbala, kozanga nsuka.

Mapata ya mbula ezali lokola bilokó ya mai ya likoló. Soki Yehova asopi yango ekoki kokitisa mai mingi ya mbula na boye ete putulu ekómaka pɔtɔpɔtɔ mpe mabelé ya makasi ekangamaka liboke. Nzambe akoki konɔkisa mbula to mpe kopekisa yango ete enɔka te.​—Yakobo 5:17, 18.

Mbala mingi soki mbula ezali konɔka mikalikali esalemaka, kasi moto akoki te kotinda mikalikali ete ekokisa mokano na ye. Mikalikali emonisami lokola nde ezali koloba na Nzambe ete, “Biso oyo!” Buku moko (Compton’s Encyclopedia) elobi boye: “Mikalikali esalaka makambo mingi na mopɛpɛ. Soki mokalikali ebɛti, ebimisaka mɔtɔ ya makasi oyo esangisaka azote ná oxygène mpo ebimisa nitrate mpe biloko mosusu. Biloko yango ekitaka na mabelé na mai ya mbula. Na ndenge yango, mopɛpɛ ezangaka te biloko oyo milona esengeli na yango mpo ekola.” Moto ayebi makambo nyonso te ya mikalikali, kasi Nzambe ayebi yango nyonso.

Misala ya kokamwa ya Nzambe ekumisaka Ye

Ya solo, misala ya kokamwa oyo ezali na mokili ekumisaka Mozalisi ya biloko nyonso. (Emoniseli 4:11) Yobo akamwaki mpenza na makambo oyo Yehova alobaki na ye mpo na biloko oyo ezali na mabelé mpe na likoló!

Misala ya kokamwa oyo Nzambe alobelaki Yobo esuki kaka te na oyo touti kotalela. Kasi, ata oyo tolobeli ezali kotinda biso tóloba boye: “Talá! Nzambe azali na lokumu koleka oyo tokoki kokanisa.”​—Yobo 36:26, NW.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 14]

Nɛjɛ: snowcrystals.net

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Maboke ya minzoto: NASA, ESA mpe AURA/Caltech; mbisi: U.S. Fish & Wildlife Service, Washington, D.C./William W. Hartley

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto