Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nani asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2011 | Juillet 1
    • Lisusu, likanisi ete eloko moko te esimbi mabele, ebimisi motuna mosusu oyo: Kasi, nini esimbi yango mpe biloko mosusu oyo ezalaka na likoló? Yoká maloba ya kokamwa oyo Nzambe ayebisaki Yobo mokolo moko: “Okoki nde kokanga makasi minzoto ya Kima na minyɔlɔlɔ, to okoki nde kofungola bansinga ya minzoto ya Kesile?” (Yobo 38:31) Na boumeli ya bomoi na ye Yobo azalaki komona butu nyonso ndenge minzoto wana ezalaki kobima mpe kolala.c Kasi mpo na nini minzoto yango ezalaki komonana kaka ndenge moko, mbula na mbula? Nini mpenza esimbaka minzoto yango mpo ezala kaka na bisika na yango? Na ntembe te, kokanisa na likambo yango ekamwisaki Yobo.

      Soki minzoto esimbamaka kaka na basɛrklɛ ya likoló, ntina ya biloko oyo esimbi yango elingaki kozala te. Kaka bankóto ya bambula na nsima nde bato ya siansi bayaki koyeba mingi na ntina na “biloko” to “bansinga” oyo emonanaka te, oyo ekangisi biloko ya likoló esika moko, mpe esalaka ete biloko yango etambola na molili. Isaac Newton mpe na nsima Albert Einstein bayebanaki mingi mpo na makambo oyo bamonaki na likambo yango. Na ntembe te, Yobo ayebaki eloko te mpo na banguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kokangisa biloko ya likoló esika moko. Kasi, maloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, oyo ezali na mokanda ya Yobo, emonani solo nsima ya bankóto ya bambula koleka makanisi ya Aristote moto ya mayele. Kasi, soki Yehova te, oyo apesá mibeko, nani mosusu akokaki kozala na bososoli ya ndenge wana?

  • Nani asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2011 | Juillet 1
    • c Ekoki kozala ete basalelaka maloba “minzoto ya Kima” mpo na kolobela liboke ya minzoto oyo babengi pléiade. Mpe maloba “minzoto ya Kesile” mpo na kolobela liboke ya minzoto oyo babengi Orion. Esɛngaka bankóto ya bambula mpo kosalema ya minzoto yango ebongwana mpenza.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto