Biloko bizalisami bizali kotatola ete: “bakoki kolimbisama te”
“Bizaleli na ye bizangi komonana uta kozalisama ya mokili, bimonani polele longwa na misala na ye na kozalisa, mpamba te yango esalami na mayele, ee, nguya na ye ya seko mpe bonzambe na ye, na boye ete baoyo baboyi kondima bakoki kolimbisama te.—BALOMA 1:20, MN.
1, 2. (a) Wapi lolenge mabe oyo Yobo amilelaki epai na Jéhovah? (b? Lolenge nini Yobo abongolaki maloba na ye na nsima?
YOBO, moto ya ntango na kala oyo azalaki na bosembo mpenza liboso na Jéhovah Nzambe, amekamaki makasi epai na Satana. Diable abebiselaki Yobo biloko na ye nyonso, abomaki bana na ye ya mibali mpe ya basi, anyokolaki ye na maladi mabe. Yobo akanisaki ete Nzambe nde azalaki kopesa ye mpasi nyonso wana, mpe amilelaki mingi epai na Jéhovah ete: “Emonani malamu epai na yo konyokola? ... ete olukaluka masumu na ngai mpe kotalatala mabe na ngai, ata oyebi ete ngai nazali na mabe te?”—Yobo 1:12-19; 2:5-8; 10:3, 6, 7.
2 Nsima na mwa ntango, maloba na Yobo epai na Nzambe mabongwanaki mpenza: “Makambo maleki na kokamwa mpo na ngai, nayebaki yango te. Nayokaki bobele nsango na yo, nde sikawa namoni yo na miso na ngai. Yango wana namisɔkisi, mpe nabongoli motema kati na mabelé mpe na mputulu ya mɔ́tɔ.” (Yobo 42:3, 5, 6, MN) Likambo nini libongolaki ezaleli ya Yobo?
3. Yobo azwaki likanisi nini ya sika na ntina etali biloko bizalisami?
3 Katikati wana, Jéhovah alobaki na Yobo na mpiko mpenza longwa na mopepe makasi. (Yobo 38:1) Asukisaki Yobo na mituna. ˈOzalaki wapi wana natyaki miboko ya mabelé? Nani akangaki mai monene na bikuke wana ezalaki kopunzwa epai mbonge na yango ezali kobima? Okoki kosala ete mapata manakisa mbula na mabelé? Okoki kobimisa lititi? Okoki kokangisa minzoto esika moko mpe kokamba yango na momekano?ˈ Na bolai ya mokapo 38 kino mokapo 41 ya mokanda ya Yobo, Jéhovah asopelaki Yobo ebele ya mituna mpe mingi likoló ya biloko bizalisami na Ye. Amonisaki Yobo kokesena monene oyo ezali kati na Nzambe mpe moto, mpe akundwelaki ye mpenza mayele mpe nguya oyo emonisami na kozalisama na Nzambe, biloko oyo Yobo akokaki kosala yango te ata mpe kososola te. Wana asosolaki nguya monene mpe mayele na kokamwa ya Nzambe, oyo emonanaki na biloko oyo azalisaki, Yobo aokaki nsɔmɔ wana akanisaki na likambo oyo ete abangaki te kolobana na Jéhovah. Na yango alobaki ete: “Nayokaki bobele nsango na yo, nde sikawa namoni yo na miso na ngai.”—Yobo 42:5, MN.
4. Nini tosengeli kososola longwa na biloko bizalisami na Jéhovah, mpe ezali boni mpo na baoyo baboyi kondima biloko yango?
4 Bikeke mingi na nsima, na kopemama na Nzambe, mokomi moko ya Biblia andimaki ete bizaleli ya Jéhovah bimonani na biloko bizalisami na ye. Ntoma Paulo akomaki na Baloma 1:19, 20 (MN) ete: “Makambo makoki koyebana na ntina na Nzambe, mamonani na bango polele, mpo ete Nzambe amoniselaki bango yango. Mpo ete, bizaleli na ye bizangi komonana uta kozalisama ya mokili, bimonani polele longwa na misala na ye na kozalisa, mpamba te yango esalami na mayele, ee, nguya na ye ya seko mpe bonzambe na ye, na boye ete baoyo baboyi kondima bakoki kolimbisama te.”
5. (a) Moto azali na mposa nini oyo abotami na yango, mpe mpo na nini tokoki koloba ete basusu bazali kokokisa mposa yango na lolenge mabe? (b) Etinda nini Paulo apesaki epai na Bagreke ya Atɛne?
5 Moto azalisamaki elongo na mposa ya kosambela nguya moko eleki monene. Kati na mokanda Kozanga komiyeba (na Lingelesi), Monganga C. G. Jung alobelaki mposa wana lokola “ezaleli ebotami na moto, oyo emonani na boumeli ya bomoi ya moto.” Ntoma Paulo alobelaki mposa ya kosambela ezwami epai na moto, oyo elimboli ntina Bagreke ya Atɛne bazalaki kosala bikeko mpe bitumbelo mpo na ebele ya banzambe oyo bayebani mpe oyo bayebani te. Paulo alakisaki mpe bango Nzambe ya solo mpe amonisaki ete basengelaki kokokisa mposa wana ya kobotama, na lolenge malamu na kolukaka Jéhovah, Nzambe ya solo, “soki balukiluki ye mpe soki bazwi ye mpenza, mpo azali mosika te na moko na moko na biso.” (Misala 17:22-30, MN) Soki tokozala pene na biloko bizalisami na ye, tokososola mpe bizaleli na ye mpe motindo naye.
Zolongano ya kokamwa na kobongwana na mai
6. Bizaleli nini ya Jéhovah oyo bimonani kati zolongano na kobongwana na mai?
6 Na ndakisa, bizaleli nini ya Jéhovah oyo tozali komona na likambo oyo ete mapata oyo mamonani lokola elingamálingamá mazali na batone ya mai? Tozali komona bolingo na ye mpe mayele na ye, mpo ete azali kopesa mbula oyo ezali bongo lipamboli mpo na mabelé. Mpo na yango, azali kosalela zolongano ya kobongwana na mai oyo elobelami na Mosakoli 1:7, ete: “Mai na mbula nyonso makotiola kino mai monene, nde mai monene makotonda te. Na esika mai na mbula mautaki, makozongaka bobele wana lisusu.” Mokanda ya Yobo molimboli malamu lolenge likambo yango likosalemaka.
7. Lolenge nini mai makómaka kino na mapata longwa na mai monene, mpe lolenge nini mapata oyo mazali lokola elingamilingami, makoki kozala na batone na mai?
7 Ntango mai na mbula makomibwaka na mai monene, ekotikala wana te. Jéhovah “akobenda matanga na mai, yango ekokɛngala mbula na mbɔngí na yango.” Lokola mai mazali na lolenge ya mbɔngí (vapeur), “mapata mazali koningana te, yango misala ya kokamwa ya ye oyo azali na mayele na kokoka.” (Yobo 36:27; 37:16; Segond, note) Na ntango nyonso oyo yango ezali na lolenge ya mbɔngí, mapata makopepa: “Akangi mai kati na lipata na ye ya mbinga, nde lipata lipaswani na nsé na yango te.” To, lokola yango elobelami na libongoli mosusu ete: “Ye akobombaka mai o kati ya mapata, mpe mapata makopaswana mpo na bozito te.”—Yobo 26:8, Haut-fleave; Liloba lya Nzambe.
8. “Mbeki na mai ya makoló” elekaka matambé boni mpo na kosopana kino kosukisa zolongano na kobongwana na mai?
8 “Nani akolalisa mbeki-na-mai ya lola” wana mpo ete mbula enɔka? (Yobo 38:37) Ye oyo azali na “mayele na kokoka” atyaki yango na esika yango ezalaki liboso mpe ˈazali kokengola mbula na mbɔngí na yango.ˈ Nini esengeli kosala mpo na kokengala matanga ya mbula longwa na mbɔngí? Esengeli eloko moko ya moke mpe ya makasi, lokola mabanga mikemike ya mputulú to ya mungwa—euti na bankóto na bankóto ya santimetele kibe moko na moko ya mopepe—oyo ezali lokola ndiká (noyaux) epai matangá mikemike ya mai masalemi zingazinga na yango. Ekanisami ete, mpo na kozwa bobele litangá moko ya mbula, esengeli milió moko ya matangá mikemike ya mai kati na lipatá. Bobele na nsima na kosalema bongo nde mapatá makokweisa mai na yango na mabelé mpo na kosala mikɛlɛ oyo mizali komibwaka na mai monene. Zolongano ya kobongwana na mai esuki bongo. Nyonso wana ekokaki kosalema bobele yango moko? Oyo nde likanisi likoki kolimbisama te!
Moko na maziba ya mayele ya Salomo
9. Likambo nini ya kokamwa oyo Salomo amonaki epai na nsɛlɛlɛ?
9 Na ntango ya kala, mayele ya Salomo malekaki mayele ya bato nyonso. Eteni monene ya mayele wana etalaki biloko bizalisami na Jéhovah: “[Salomo] alobelaki banzeté, longwa na ɛzɛlɛ oyo ezali na Lebanona kino isɔpɔ oyo ebimi na etutú; alobelaki mpe banyama mpe bandeke mpe banyoka mpe bambisi.” (1 Mikonzi 4:33) Bobele mokonzi Salomo wana nde akomaki ete: “Kenda epai na nsɛlɛlɛ, yo moto na goigoi, talela nzela na ye mpe zala na mayele. Ata azali na mokambi te, soko motambwisi te, soko mokonzi te, kasi azali kobongisa bilei na ye na eleko ya moi makasi; akoyanganisa biloko na ye na eleko ya kobuka mbuma.”—Masese 6:6-8, MN.
10. Lolenge nini bosolo ya lisese ya Salomo na ntina na nsɛlɛlɛ oyo ekoyanganisaka mbuma endimamaki?
10 Nani alakisaki nsɛlɛlɛ ete ayanganisa bilei na eleko ya moi makasi mpo na kolya yango na eleko ya malili? Na boumeli ya bikeke mingi, ntembe ebetamaki na ntina na bosolo ya lisoló ya Salomo na ntina etali nsɛlɛlɛ oyo ezali koyanganisa mbuma mpe kobómba yango mpo na eleko ya malili. Moto moko te azalaki na elembeteli ete yango ezalaki na bomoi. Kasi, na 1871, moto moko ya Grande-Bretagne oyo ayekoli zebi ya banyama, amonaki esika [nsɛlɛlɛ] bazalaki kobomba mbuma na bango na nse na mabelé, mpe bandimaki bosolo ya lisoló ya Biblia oyo elobelaki bango. Kasi lolenge nini nsɛlɛlɛ wana bayebaki kobomba biloko, likambo oyo lizali kosalisa bango na koyeba na eleko ya moi makasi ete, eleko ya malili ekoya, mpe kozwa mayele ya koyeba nini basengelaki kosala? Biblia yango moko ezali kolimbola ete biloko mingi bizalisami na Jéhovah bizali na mayele oyo mabongisameli yango uta kozalisama, ete ekoka kobika. Nsɛlɛlɛ oyo ekobukaka mbuma, bazwaki lipamboli wana epai na Mozalisi na bango. Mpo na yango, Masese 30:24 elobi ete: “Bazali na mayele [masili kobongisama mpo na bango].” Ezali likambo ya mayele te na koloba ete bwanya wana eutaki na yango moko; baoyo baboyi kondima nguya ya Mozalisi balimbisami te.
11. (a) Mpo na nini nzeté sequoia ezali kokamwisa? (b) Mpo na nini mosala ya liboso ya photosynthèse mozali mpe kokamwisa?
11 Ezali polele ete, soki moto atelemi na nsé na nzeté monene séquoia, akomimona lokola nsɛlɛlɛ moke. nzeté wana ezali mpenza mbinga: bametele 90 ya bolai, bametele 11 ya molongósembaa (diamètre); loposo na yango ezali na bonene ya basantimetele 60 mpe misisi na yango milandi kino koleka ntaká ya hectare moko. Kasi, oyo ezali kokamwisa mpenza, ezali lolenge oyo biloko bizali na kati mpe na libanda na yango, bizali kosala mpo ete ekóla. Nkasa na yango ezali kozwa mai na nzela ya misisá, ezali kozwa mbɔngí na nsolo mabe (gaz carbonique) kati na mopepe mpe nguya kati na mwese, mpo na kosala sukali (glucides) kati na yango mpe kobimisa mopepe kitoko. Mwango wana mobengami ete photosynthèse, mozali kosala ete biloko bizali kati na nzeté bikokisa soko misala 70, nyonso misosolami te. Likambo ya kokamwa ezali ete, mpo ekokisama, mosala ya liboso mozali na mposa ya pole euti na mwese, oyo ezali mpenza na langi mpe na nguya oyo esengeli; soki makambo wana makokisamaki te, mbele biloko mike bizwami na chlorophylle (eloko ekoyeisaka banzeté na langi ya mai na mpondu mpe ekobotisaka sukali kati na yango, longwa na mbɔngí na nsolo mabe) bizali te, mpe mbɛlɛ mwango ya photosynthèse mosalami te.
12. (a) Likambo na kokamwa nini limonani na lolenge oyo sequoia ezali kosalela mai? (b) Mpo na nini azote ezali na ntina mingi mpo na bekóli ya banzeté, mpe zolongano na kobongwana na yango ezali kosuki boni?
12 Likambo mosusu ya kokamwa ezali ete, nzeté oyo ya bametele 90 ya bolai ekoki kobenda mai longwa na misisá na yango kino na nsɔngɛ na yango. Ezali bongo kobenda ebele na mai koleka oyo esengeli mpo ete photosynthèse esalema. Ndambo na mai oyo mazali na mosala te, makobimisama kati na mopepe na nzela na nkasa lokola motoki. Nzeté yango ezali bongo na ebongiseli ekokani pene na oyo na biso bato, oyo ekolembisaka molunge na lisalisi ya mai. Mpo ete ba protéines esalema, esengeli ete mopepe oyo babengi azote mosangana na sukali (hydrates de carbone). Lokasa ya nzeté ekoki te kosalela azote oyo ezwami kati na mopepe na lolenge ya mbɔngí, kasi biloko na bomoi bizwami na nsé na mabelé bizali kobongola azote na mongwa mouti na acide makasi (nitrates) mpe na mongwa mouti na acide ya makasi mingi te (nitriites), oyo ekosenzwa na mai, mpe yango ekoleka longwa na misisa ya nzeté kino na nkasa na yango. Soki banzeté mpe banyama oyo esalelaka azote wana mpo na bobotisi protéines ekufi mpe epoli, azote ekobima lokola mbɔngí, mpo na kokokisa zolongano na kobongwana ya azote. Ebele ya makambo oyo nyonso mazali kokamwisa mpe ekoki soko moke te kobima bobele yango moko.
Eyebi kobimisa maloba te, soko mongongo te, kasi ezali koloba!
13. Likoló litondi na minzoto lisakolaki likambo nini epai na Davidi, mpe makambo nini yango elandi koyebisa biso?
13 Na butu, likoló litondi na minzoto lizali komonisa bonene ya Mozalisi, likambo lizali kopusa na kopesa ye limemya mozindo. Na Nzembo 8:3, 4, Davidi alobeli nsɔmɔ oyo azalaki na yango: “Emoni ngai makolo oyo ezali mosala ya misapi na yo, sanza mpe minzoto na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nani ete okanisa ye? Mpe mwana na moto azali nani ete otalela ye?” Lokola epai na Davidi, likoló litondi na minzoto likolóbaka epai na baoyo bazali na miso, na matoi mpe na motema, ete: “Makoló makosakolaka nkembo ya Nzembe.”—Nzembo 19:1-4.
14. Mpo na nini nguya ya moko na minzoto ezali na ntina mingi mpo na bomoi na biso?
14 Wana tokoyeba makambo mingi likoló minzoto, yango mpe ekolobela biso na makasi mingi. Na Yisaya 40:26 (MN), tobyangami na kotya likebi na nguya na yango monene, ete: “Tombola miso na bino likoló mpe tala! Nani asalaki biloko oyo? Ezali Ye oyo akobimisaka yango na motuya na yango, mpe akobengaka moko na moko na nkombo na yango. Mpo na monene na makasi na ye, mpe mpo ete azali na bokasi kati na nguya na ye, moko na yango akozanga te.” Ezali bokasi ya bozelinginya (Force gravitationnelle) mpe nguya ya moko na minzoto wana, mwesé to moi, nde ezali kosimba mabelé mpo na kolanda nzela na yango ya bozelinginya, ezali kobimisa banzeté mpe ezali kopesa molunge, mpe ezali kopesa nzela ete biloko nyonso bizala na bomoi awa na mabelé. Ntoma Paulo alobaki wana apemamaki na Nzembe ete: “Monzoto na monzoto mokeseni mpo na nkembo na yango.” (1 Bakolinti 15:41, MN) Sianse eyebi minzoto ya langi na mosaká lokola mwesé, eyebi mpe minzoto ya langi na bulé, mpe minzoto ya minene na langi motane, mpe minzoto ya mikemike na langi mpembe, minzoto oyo mikongalisaka mpe minzoto na nguya oyo mikobimisaka mɔ́tɔ, mpe oyo mikobimisaka nguya eleki monene.
15. Batongi mingi na biloko bazwi mateya nini longwa na biloko bizalisami oyo bango bamekolaki lolenge na yango?
15 Batongi na biloko mingi bazali kozwa liteya na biloko bizalisami mpe bazali komekola lolenge na bikelamu ya bomoi. (Yobo 12:7-10) Totalela bobele mwa makambo ya ntina na biloko bizalisami. Ezali na bandeke ekotambolaka na mai oyo ezali na biloko bikosilisaka ngɛnɛe ya mungwa; bambisi na bibale mpe na mai minene oyo ebimisaka lotiliki; bambisi, minsɔpi mpe banyama mikemike oyo ekopesaka pole; bangembó mpe mbisi oyo babéngi dauphins, bakosalelaka eloko oyo eyebi kotalisa makamá na mosika (sonar); bayɔ́tɔ (guêpes) bakosalaka ba papiers; bansɛlɛlɛ bakotongaka gbagba (ponts); ba castors (nyama moke na Amerika) ekotongaka barrages; banyoka ezali na termometele; banyama mikemike ezwami kati na mai ezali kosalela biloko bikopesaka nzela na kopema mpe na koloba; ba pieuvres ezali kosalela nguya ekotambwisa epai na epai; mampulututú (araignées) matongaka boeya (toiles) mpe ekosalaka mitambo, minyama, mikulu, mpe bazali na bana oyo bazali mpenza bakumbi mpepo, baoyo bakoki kosala mobembo mosika kuna na likoló na ntaká ya bankóto na bankóto ya bakilometele; bambisi mpe banyama mikemike oyo ezali na ekókótó, ezali na biloko bikopesaka yango bokatikati na kati ya mai motindo moko na masuwa oyo babéngi sous-marins; mpe ezali na bandeke, banyama mikemike, nkobá ya mai monene, bambisi mpe banyama oyo esalaka mibembo milai na mikili misusu—makambo nyonso oyo sianse eyebi kolimbola yango te.
16. Makambo nini mayokani solo na sianse oyo malobelami kati na Biblia bambula mingi liboso ete sianse eyeba yango?
16 Biblia eyebisaki makambo na solo ya sianse bambula mingi liboso ete sianse eyeba yango. Bambula mingi liboso ya Pasteur, Mibeko ya Moize (ekeke ya zomi na motoba L.T.B.) mimonisaki bamaladi oyo euti na bamikrobe. (Levitike, mikapo 13, 14) Na ekeke ya zomi na nsambo L.T.B., Yobo alobaki ete: “Akakisi mabelé likoló na eloko te.” (Yobo 26:7, MN) Mbula nkóto liboso na Klisto, Salomo akomaki likoló na lolenge oyo makila mazali kotambola na nzoto; esengelaki kozela kino na ekeke ya zomi na nsambo mpo ete sianse ya monganga eyeba makambo yango. (Mosakoli 12:6) Liboso na yango, Nzembo 139:16 emonisi boyebi na ntina etali biloko biuti na kosangana ya mbuma ya mobali na oyo ya mwasi, ete: “Miso na yo mamonaki ngai naino nasalamaki te; mikolo na ngai nyonso mikomami kati na mokanda na yo. Yango eponamaki mpo na ngai, wana moko na yango ekomaki naino te.” Na ekeke ya nsambo L.T.B., liboso ete bato oyo bayekoli zebi ya nyama basosola likambo oyo ete bandeke basalaka mibembo, Yilimia akomaki lokola emonisami na Yilimia 8:7, ete: “Ata nkɔngi ayebi eleko na kotambola na ye; epópó, mbilambila mpe endɔngɛndɔngɛ, bayebi ntango ya kozonga.”—Biblia Français courant.
Oyo balakisi ya évolution baponi lokola “mozalisi”
17. (a) Baloma 1:21-23 elobi nini na ntina na bato mosusu oyo baboyi kondima Mozalisi ya mayele na nzela na biloko bizalisami? (b) Na lolenge mosusu, balakisi ya évolution baponi nini lokola “mozalisi” na bango?
17 Na ntina na baoyo baboyi kondima Mozalisi ya mayele na nzela ya biloko bizalisami, Makomami mayebisi ete: “Bazangaki bososoli kati na makanisi na bango mpe mitema na bango mizangi mayele mikɔtaki na molili. Wana bamitangaki bato ya mayele, bakómaki nde na ligbomá mpe babongolaki nkembo na Nzambe oyo akokufaka te na eloko oyo ekokani na elilingi na moto oyo akokufaka mpe na ndeke mpe na banyama ya makolo minei mpe na banyama ikolandaka.” “Basombitanyi solo ya Nzambe na lokutà; basambeli mpe basaleli biloko bizalisami na esika ya Oyo azalisaki yango.” (Baloma 1:21-23, 25, MN) Ezali lolenge moko mpo na balakisi ya évolution, baoyo bazali mpenza kokumisa “mozalisi” na bango, molongo ya makanisi mpamba, oyo mobandi longwa na mikrobe mike-minsópi-mbisi-mimbembá-banyama ikolandaka-banyama ikonungisaka kino na “moto-makako.” Nzokande bayebi ete, eloko te oyo ezali bobele na cellule moko mpamba, ekoki kobimisa biloko mosusu. Eloko oyo eyebani na mikolo na biso ete eleki moke mpenza, ezali na bamiliare ya ba atomes oyo ezali kolendisa misala nkóto na nkóto oyo mikokisami na nzoto.
18, 19. (a) Nani azali bobele Ye mpenza liziba ya bomoi? (b) Na meko nini tozali komona biloko bizalisami na Jéhovah?
18 Jéhovah Nzambe azali Mozalisi ya bomoi. (Nzembo 36:9) Azali Motongi na Liboso aleki monene. Nkombo na ye, Jéhovah, elimboli “Akoyeisaka.” Biloko bizalisami na ye bizali mingi. Ya solo, ezali na bamilió na yango mingi oyo moto ayebi yango te. Nzembo 104:24, 25 (MN) emonisi yango ete: “Ɛ Jéhovah, misala na yo mizali mingi! Osali yango nyonso na mayele.” Yobo 26:14 (MN) elimboli yango ete: “Tala! Oyo ezali bobele ndambo na banzela na ye, mpe toyokaki bobele nungúnungú mpo na ye. Kasi nani akoki kososola konguluma ya nguya na ye?” Tozali komona bobele ndambo, tozali koyoka bobele nungúnungú, nde mpo na nyonso etali nguya na ye makasi, tokoki kososola yango te.
19 Nzokande, tozali na mwango moleki malamu mpo na komona ye na nzela ya biloko bizalisami na ye, oyo bizali komonana. Mwango yango moleki malamu ezali Biblia, Liloba na ye. Mwango wana nde tokolobela kati na lisoló lilandi.
Ozali komikundola?
◻ Yobo asosolaki nini ntango Jéhovah alobaki na ye kati na mopepe makasi?
◻ Mpo na nini Paulo alobaki ete bato mosusu balimbisami te?
◻ Limbola zolongano na kobongwana na mai?
◻ Biloko nini bisalami na pole ya mwesé, oyo bizali na ntina mingi mpo na biso?
◻ Makambo nini mayokani solo na sianse oyo Biblia emonisaki yango liboso ete sianse eyeba yango?