Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/2 nk. 3-7
  • Tyáká Yehova liboso na yo ntango nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyáká Yehova liboso na yo ntango nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova ayokaka mabondeli na biso
  • Tosáká Nzambe na makambo nyonso
  • Tyeláká Yehova motema ntango nyonso
  • Tyeláká elimo santu motema
  • Tóbangaka ntango nyonso Yehova na bibele
  • Ruta ná Naomi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tósalisa basi oyo bakufelá mibali na mpasi na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Epai okokende, ngai mpe nakokende”
    Mekolá kondima na bango
  • “Epai okokende, ngai mpe nakokende”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/2 nk. 3-7

Tyáká Yehova liboso na yo ntango nyonso

“Natii [Yehova] liboso na ngai libela.”​—NZ. 16:8.

1. Masolo ya Biblia ekoki kozala na ntina nini mpo na biso?

BIBLIA ezali na masolo mingi ya bato oyo bazalaki na boyokani malamu na Yehova Nzambe. Elobeli bato ndenge na ndenge oyo Nzambe asalelaki mpo na kokokisa mokano na ye. Maloba mpe misala na bango ekomamaki na Biblia kaka te mpo na kosepelisa biso, kasi ekoki mpe kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe.​—Yak. 4:8.

2, 3. Maloba ya Nzembo 16:8 elimboli nini?

2 Biso nyonso tokoki kozwa mateya na masolo ya bato oyo bankombo na bango eyebani mingi; na ndakisa Abalayama, Sala, Moize, Luta, Davidi, Esetele, ntoma Paulo, mpe bamosusu. Nzokande, tokoki mpe kozwa mateya na masolo ya bato oyo balobelami mingi te na Biblia. Komanyola na masolo na bango ekoki kosalisa biso tósala lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki boye: “Natii [Yehova] liboso na ngai libela; azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, bongo nakokwea te.” (Nz. 16:8) Maloba yango elimboli nini?

3 Na ntango ya kala, soda azalaki kosimba mopanga na lobɔkɔ ya mobali; na bongo, ngámbo wana ya lobɔkɔ ya mobali ezalaki kotikala polele, mpamba te azalaki kosimba nguba na lobɔkɔ ya mwasi. Kasi, moninga oyo azali kobunda pembeni na ye, na lobɔkɔ ya mobali, azalaki kobatela ye. Yehova akobatela biso soki tozali kobosana ye te mpe tozali kosala mokano na ye. Na yango, tótalela ndenge oyo masolo ya Biblia ekoki kolendisa kondima na biso mpo ‘tókanisaka tango nyonso [Yehova].’​—Bible na Lingala ya lelo oyo.

Yehova ayokaka mabondeli na biso

4. Pesá ndakisa moko ya Biblia oyo emonisi ete Nzambe ayokaka mabondeli.

4 Soki totye Yehova liboso na biso, akoyoka mabondeli na biso. (Nz. 65:2; 66:19) Lisolo ya mosaleli moko ya Abalayama, mbala mosusu Eliezele, emonisi yango. Abalayama atindaki ye na Mezopotamia mpo akende kolukela Yisaka mwasi oyo abangaka Nzambe. Eliezele abondelaki Nzambe asunga ye mpe ntango Lebeka amɛlisaki bakamela na ye mai, amonaki ete Nzambe ayokaki libondeli na ye. Lokola Eliezele abondelaki, azwaki mwasi mpo na Yisaka. (Gen. 24:12-14, 67) Ya solo, mosaleli ya Abalayama azalaki na mokumba moko ya sikisiki. Kasi, biso mpe tosengeli kozala na kondima ete Yehova ayokaka mabondeli na biso!

5. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova ayokaka ata libondeli ya mokuse oyo esalemi na nse ya motema?

5 Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga tósala libondeli ya mokuse mpo Nzambe asunga biso. Mokolo moko Alatazelezese, mokonzi ya Perse, amonaki ete Nehemia, mosali na ye na mesa azalaki mawamawa. Atunaki ye boye: “Yo ozali kolɔmba nini?” Na mbala moko, Nehemia ‘abondelaki epai ya Nzambe ya lola.’ Na ntango wana libondeli oyo Nehemia asalaki na nse ya motema ekokaki kozala molai te. Atako bongo, Nzambe ayokaki libondeli yango, mpamba te mokonzi apesaki Nehemia lisalisi mpo na kotonga lisusu bifelo ya Yelusaleme. (Tángá Nehemia 2:1-8.) Ya solo, Nzambe akoki koyoka ata libondeli ya mokuse oyo tosali na nse ya motema.

6, 7. (a) Ndakisa nini Epafalasi apesaki na ntina na libondeli? (b) Mpo na nini tosengeli kobondelaka mpo na basusu?

6 Biblia elendisi biso ‘tóbondelaka’ mpo na basusu, ata soki tozali komona mbala moko te eyano ya Nzambe na mabondeli yango. (Yak. 5:16) Epafalasi, “ministre ya sembo ya Klisto,” azalaki kobondela makasi mpo na bandeko na ye bandimi. Na mokanda moko oyo Paulo akomaki ntango azalaki na Loma, alobaki boye: “Epafalasi, oyo azali moto ya epai na bino [Bakolose], moombo ya Klisto Yesu, atindeli bino mbote, azali ntango nyonso koboma nzoto mpo na bino na kati ya mabondeli na ye, mpo nsukansuka bózala bato bakoki na nyonso mpe oyo bazali na kondimisama makasi na kati ya mokano mobimba ya Nzambe. Ɛɛ, nazali kotatola mpo na ye ete azali kosala nyonso mpenza mpo na bino mpe mpo na bato ya Laodikia mpe mpo na bato ya Hiyelapolisi.”​—Kols. 1:7; 4:12, 13.

7 Kolose, Laodikia, mpe Hiyelapolisi, yango nyonso ezalaki bingumba ya Asie Mineure. Baklisto ya Hiyelapolisi bafandaki esika moko na basambeli ya nzambe-mwasi Cybele, baklisto ya Laodikia bafandaki esika moko na bato oyo bazalaki kolinga biloko ya mokili mingi, mpe baklisto ya Kolose bazalaki esika oyo bato ya filozofi bazalaki mingi. (Kols. 2:8) Tokoki kokamwa te ete Epafalasi, oyo azalaki moto ya Kolose, ‘azalaki koboma nzoto na mabondeli’ mpo na baklisto ya engumba yango! Biblia elobi te ndenge oyo Nzambe ayanolaki mabondeli ya Epafalasi; atako bongo Epafalasi atikaki te kobondela mpo na bandeko na ye ya elimo; biso mpe tosengeli kotika te kobondela mpo na bandeko na biso. Atako ‘tomikɔtisaka te na makambo ya bato mosusu,’ tokoki koyeba ndeko to moninga moko oyo kondima na ye ezali komekama makasi. (1 Pet. 4:15) Ebongi mpenza ete ntango tozali kobondela biso moko, tóbondelaka mpe mpo na ye! Mabondeli ya bandeko mosusu esalisaki Paulo; mabondeli na biso mpe ekoki kosalisa basusu.​—2 Kol. 1:10, 11.

8. (a) Ndenge nini toyebi ete bankulutu ya Efese bayebaki ntina ya libondeli? (b) Mpo na nini tosengeli komekola bankulutu ya Efese?

8 Toyebani lokola bato oyo babondelaka mingi? Ntango Paulo akutanaki na bankulutu ya Efese, “afukamaki elongo na bango nyonso mpe abondelaki.” Na nsima, “mpisoli mingi esopamaki na kati na bango nyonso, mpe bakwelaki Paulo na nkingo mpe bapwɛpwaki ye na boboto mpenza, mpamba te bayokaki mpasi mingimingi mpenza na liloba oyo alobaki ete bakomona elongi na ye lisusu te.” (Mis. 20:36-38) Toyebi bankombo ya bankulutu yango te, kasi emonani ete bayebaki ntina ya libondeli. Tosengeli mpenza kosepela na libaku malamu ya kobondela Nzambe mpe tosengeli ‘kotombolaka mabɔkɔ ya sembo’ na elikya ete Tata na biso ya likoló akoyoka biso.​—1 Tim. 2:8.

Tosáká Nzambe na makambo nyonso

9, 10. (a) Bana basi ya Selofehada batikaki ndakisa nini? (b) Liteya nini moklisto oyo azali monzemba akoki kozwa na ndakisa ya bana basi ya Selofehada?

9 Kokanisa Yehova ntango nyonso ekosalisa biso tótosaka ye mpe tokozwa mapamboli. (Det. 28:13; 1 Sam. 15:22) Yango ezali kosɛnga tózala na botosi. Tótalela ndakisa ya bana basi mitano ya Selofehada, na mikolo ya Moize. Na Yisalaele, batata bazalaki kotika libula epai ya bana na bango ya mibali. Kasi, Selofehada akufaki mpe atikalaki kobota bana mibali te; yango wana Yehova alobaki ete bana na ye mitano ya basi basengelaki kozwa libula na ye​—kasi asɛngaki bango likambo moko. Basengelaki kobala na libota ya Manase mpo libula etikala kaka na libota ya tata na bango.​—Mit. 27:1-8; 36:6-8.

10 Bana basi ya Selofehada bazalaki na kondima ete makambo ekotambola malamu soki batosi Nzambe. Biblia elobi boye: “Bana basi ya Selofehada basalaki lokola elakelaki [Yehova] Moize, mpo ete Mala mpe Tilesa mpe Hogela mpe Milika mpe Noa, bana basi ya Selofehada, babalanaki na bana mibali ya bandeko ya tata na bango. Babalanaki kati na mabota ya bana ya Manase, mwana ya Yozefe, mpe libula na bango etikalaki kati na libota ya tata na bango.” (Mit. 36:10-12) Basi yango batosaki malako ya Yehova. (Yos. 17:3, 4) Baklisto oyo bazali minzemba mpe bakomeli na elimo bamonisaka kondima ya ndenge wana, batosaka mobeko ya Nzambe ya kobala “na kati ya Nkolo kaka.”​—1 Kol. 7:39.

11, 12. Ndenge nini Kalebe amonisaki ete azalaki na elikya epai ya Nzambe?

11 Tosengeli kotosaka Yehova na makambo nyonso ndenge Kalebe asalaki. (Det. 1:36) Nsima ya kobimisama ya Bayisalaele na Ezipito na ekeke ya 16 L.T.B., Moize atindaki mibali 12 mpo na konɔnga mokili ya Kanana, kasi kaka mibale​—Kalebe ná Yosua—​nde balendisaki bato bázala na elikya makasi epai ya Nzambe mpe bákɔta na mokili yango. (Mit. 14:6-9) Mbula soki 40 na nsima, Yosua mpe Kalebe bazalaki kaka na bomoi mpe bazalaki kotosa Yehova na makambo nyonso; Nzambe asalelaki Yosua mpo na kokɔtisa Bayisalaele na Mokili ya Ndaka. Nzokande, emonani ete banɔngi 10 oyo bazangaki kondima bakufaki na boumeli ya mbula 40 oyo Bayisalaele batambolaki na esobe.​—Mit. 14:31-34.

12 Lokola Kalebe atikalaki na bomoi nsima ya ntango oyo Bayisalaele balekisaki na esobe, atɛlɛmaki liboso ya Yosua mpe alobaki boye: “Nabilaki [Yehova] Nzambe na ngai nyonso.” (Tángá Yosua 14:6-9.) Atako Kalebe akómaki na mbula 85, asɛngaki ete azwa libula ya mokili ya bangomba oyo Nzambe alakaki ye, atako banguna bazalaki kofanda kuna, na kati ya bingumba oyo ezalaki na bifelo ya makasi.​—Yos. 14:10-15.

13. Ata soki tokutani na mikakatano, Nzambe akopambola biso soki tozali kosala nini?

13 Ndenge Yehova asungaki Kalebe, moto ya sembo mpe ya botosi, akosunga mpe biso soki tozali kolanda ye na motema mobimba. Ntango tokutani na mikakatano ya makasi, Yehova akopambola biso soki tozali kolanda ye na motema mobimba. Kasi, kosala yango bomoi na biso mobimba ndenge Kalebe asalaki, ekoki kozala mpasi. Mokonzi Salomo abandaki malamu; kasi ntango akómaki mobange, basi na ye babendaki ye na losambo ya lokuta, mpe “alandaki Yehova na motema mobimba te lokola Davidi tata na ye.” (1 Mik. 11:4-6, NW) Ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini, tiká tótosaka Nzambe na makambo nyonso mpe tótyaka ye liboso na biso ntango nyonso.

Tyeláká Yehova motema ntango nyonso

14, 15. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Naomi na oyo etali kotyela Nzambe motema?

14 Tosengeli kotyela Nzambe motema, mingimingi ntango tokutani na makambo oyo toyebi te ndenge ekosuka. Tózwa ndakisa ya Naomi, mobange oyo akufelaki mobali mpe bana na ye mibale ya mibali ntango azalaki na mokili ya Moaba. Ntango azongaki na Yuda, alobaki boye: “[Bóbenga] ngai Naomi te [oyo elimboli “esengo na ngai”], kasi [bóbenga] ngai Mala [oyo elimboli “bololo”], mpo ete Oyo-na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo ya bololo mingi. Nakendaki na ngai na mabɔkɔ matondi mpe [Yehova] azongisi ngai na mabɔkɔ mpamba. Botángi ngai Naomi mpo na nini awa [Yehova] atatoli mabe na ntina na ngai mpe Oyo-na-Nguya-Nyonso apesi ngai bolɔzi?”​—Luta 1:20, 21.

15 Atako Naomi azalaki komitungisa, soki totángi mokanda ya Luta malamu, tokomona ete akobaki kotyela Yehova motema. Na nsima, makambo ebongwanaki mpenza! Luta, bokilo na ye, akómaki mwasi ya Boaza mpe abotaki mwana moko ya mobali. Naomi akómaki mobɔkɔli ya mwana yango; Biblia elobi boye: “Basi bazalani na ye bapesaki ye nkombo na koloba ete, Mwana mobali abotami na Naomi. Bapesaki mwana yango nkombo Obede. Ye azalaki tata ya Yisai, tata ya Davidi.” (Luta 4:14-17) Ntango Naomi akosekwa, akoyeba ete Luta, oyo akosekwa mpe, akómaki nkɔkɔ ya Yesu Masiya. (Mat. 1:5, 6, 16) Lokola Naomi, tokoki koyeba te ndenge oyo makambo ekoki kobongwana. Yango wana, tótyelaka Nzambe motema ntango nyonso, ndenge Masese 3:5, 6 elendisi biso: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”

Tyeláká elimo santu motema

16. Ndenge nini elimo santu ya Nzambe esalisaki bato mosusu na Yisalaele?

16 Soki tozali kotya Yehova liboso na biso ntango nyonso, akotambwisa biso na lisalisi ya elimo santu na ye. (Gal. 5:16-18) Elimo santu ya Nzambe esalisaki mibali 70 oyo baponamaki mpo na kosunga Moize na ‘komema mokumba ya bato’ ya Yisalaele. Biblia etángi kaka bankombo ya Eledada ná Medada, kasi elimo santu esalisaki mibali yango nyonso na kokokisa mikumba na bango. (Mit. 11:13-29) Na ntembe te, bazalaki mibali ya mayele, bazalaki kobanga Nzambe, babongaki kotyelama motema, mpe bazalaki sembo, lokola bato oyo baponamaki liboso. (Ex. 18:21) Lelo oyo, bankulutu bamonisaka bizaleli yango.

17. Ndenge nini elimo santu ya Yehova esalisaki na mosala ya kotonga tabenakle?

17 Elimo santu ya Yehova esalisaki mpenza na mosala ya kotonga tabenakle na esobe. Yehova aponaki Besalele mpo atambwisa misala ya kotonga tabenakle mpe alobaki ete ‘akotondisa ye na elimo ya Nzambe mpe na mayele mpe na kososola mpe na boyebi mpe na mayele na misala nyonso.’ (Ex. 31:3-5) “Bato ya mayele” basalaki elongo na Besalele mpe mosungi na ye Oholiaba na mosala yango. Longola yango, elimo ya Yehova etindaki bato ya mitema malamu bápesa makabo. (Ex. 31:6; 35:5, 30-34) Lelo oyo mpe, elimo yango etindaka basambeli ya Nzambe básala nyonso oyo bakoki na mosala ya Bokonzi. (Mat. 6:33) Tokoki kozala na mayele mingi, kasi mpo na kokokisa mosala oyo Yehova apesi bato na ye lelo oyo, tosengeli kosɛngaka elimo santu mpe kotika yango etambwisa biso.​—Luka 11:13.

Tóbangaka ntango nyonso Yehova na bibele

18, 19. (a) Elimo santu ya Nzambe ekoki kopesa biso ezaleli nini? (b) Liteya nini ozwi na ndakisa ya Simeona mpe Ana?

18 Elimo santu epesaka biso ezaleli ya kobanga Yehova, oyo esalisaka biso tótyaka ye liboso na biso ntango nyonso. Nzambe alobaki na bato na ye boye: “[Yehova] na bibele, okotánga ye bulɛɛ; ye azala kobanga na yo.” (Yis. 8:13) Simeona mpe Ana bazalaki mibange oyo bazalaki kobanga Nzambe na Yelusaleme, na ekeke ya liboso. (Tángá Luka 2:25-38.) Simeona azalaki kondima bisakweli oyo elobelaki Masiya mpe azalaki “kozela kobɔndisama ya Yisalaele.” Nzambe asopelaki Simeona elimo santu mpe ayebisaki ye ete akomona Masiya. Esalemaki mpe bongo. Mokolo moko, na mobu 2 L.T.B., Malia, mama na Yesu mpe Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, bamemaki Yesu na tempelo. Elimo santu etindaki Simeona asakola makambo na ntina na Masiya mpe mawa mpo na Malia; Malia ayokaki mawa yango ntango babakaki Yesu na nzete. Kasi, kanisá esengo ya Simeona ntango amemaki “Klisto ya Yehova” na mabɔkɔ na ye! Simeona atikelaki basaleli ya Yehova lelo oyo ndakisa malamu ya kobanga Nzambe!

19 Ana, mobange ya mbula 84 oyo azalaki kobanga Nzambe “azalaki kozanga soki moke te na tempelo.” Azalaki kosala mosala mosantu butu moi “na kokila bilei mpe na malɔmbɔ.” Ana mpe azalaki wana ntango bamemaki Yesu na tempelo. Na ntembe te, azalaki na esengo ndenge amonaki ye oyo asengelaki kokóma Masiya! Kutu, “abandaki kozongisa matɔndi epai ya Nzambe mpe koloba na ntina etali mwana wana epai ya baoyo nyonso bazalaki kozela kosikolama ya Yelusaleme.” Ana amonaki ete asengeli koyebisa bato mosusu nsango malamu yango. Na ndakisa ya Simeona mpe Ana, baklisto oyo bakómi mibange basepelaka mingi ndenge Yehova andimaka ata mibange bázala Batatoli na ye.

20. Tózala bilenge to mibange, tosengeli kosala nini mpe mpo na nini?

20 Tózala bilenge to mibange, tosengeli kotya Yehova liboso na biso ntango nyonso. Soki tosali bongo, akopambola milende oyo tozali kosala mpo na koyebisa basusu nsango ya bokonzi na ye mpe misala na ye. (Nz. 71:17, 18; 145:10-13) Nzokande, mpo na kokumisa Yehova, tosengeli kozala na bizaleli ya malamu. Ndenge nini masolo mosusu ya Biblia ekoki kosalisa biso tólona bizaleli yango?

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini toyebi ete Yehova ayokaka mabondeli?

• Mpo na nini tosengeli kotosa Yehova na makambo nyonso?

• Ata soki tozali komitungisa, mpo na nini tosengeli ntango nyonso kotyela Yehova motema?

• Ndenge nini elimo santu ya Nzambe esalisaka basaleli na ye?

[Elilingi na lokasa 4]

Yehova ayokaki libondeli ya Nehemia

[Elilingi na lokasa 5]

Kokanisa ndenge oyo makambo ebongwanaki mpo na Naomi ekosalisa biso tótyelaka Yehova motema

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto