Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 1 lok. 14
  • Boyebi oyo ekokómisa yo moninga ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyebi oyo ekokómisa yo moninga ya Nzambe
  • Lamuká!—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe azali na nkombo
  • Yehova azali Nzambe ya bolingo
  • Yehova alimbisaka
  • Yehova ayokaka mabondeli
  • ‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yehova—Moto oyo aleki bato nyonso na likambo etali kolimbisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nzambe azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 1 lok. 14

Boyebi oyo ekokómisa yo moninga ya Nzambe

Nzambe azali nguya moko boye te. Azali nde moto oyo azali na bizaleli ya malamu mpenza. Mpe alingi ete tóyeba ye mpe tókóma baninga na ye. (Yoane 17:3; Yakobo 4:8) Yango wana, ayebisi biso makambo na ye ebele mpenza.

Nzambe azali na nkombo

“Mpo bato báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—NZEMBO 83:18.

Biblia eteyaka ete Yehova azali Nzambe ya solo kaka moko. Ye moto akelá molɔ́ngɔ́ mobimba mpe biloko nyonso. Tosengeli kosambela kaka ye moko.​—Emoniseli 4:11.

Yehova azali Nzambe ya bolingo

“Nzambe azali bolingo.”​—1 YOANE 4:8.

Yehova amonisi bizaleli na ye mingi na nzela ya Biblia mpe na nzela ya biloko oyo asalá. Bolingo ezali ezaleli na ye ya monene mpenza. Bolingo nde etindaka ye asala makambo nyonso. Soki toyebi Yehova malamu, tokolinga ye mpe mingi.

Yehova alimbisaka

“Yo ozali Nzambe ya bolimbisi.”​—NEHEMIA 9:17.

Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka. Yango wana ‘alimbisaka’ biso. Ntango tosɛngi ye bolimbisi mpe tosali makasi tótika kosala makambo ya mabe, akolimbisa biso mpe akopesa biso etumbu te mpo na masumu ya kala.​—Nzembo 103:12, 13.

Yehova ayokaka mabondeli

“Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye . . . Akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.”​—NZEMBO 145:18, 19.

Tosengeli te kosala milulu moko boye to kosalela bikeko to biloko mosusu mpo na kosambela Yehova. Ayokaka mabondeli na biso ndenge baboti ya bolingo bayokaka bana na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto