Yehova atondi na bolingo ya sembo
“Yehova . . . atondi na motema-boboto.”—NZEMBO 145:8, NW.
1. Nzambe azali komonisa bolingo na ye ata epai ya banani?
“NZAMBE azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Maloba kitoko wana ezali komonisa ete Yehova ayangelaka na bolingo. Na bolingo na ye, angɛngisaka moi mpe anokisaka mbula ata mpo na bato oyo batosaka ye te! (Matai 5:44, 45) Lokola Nzambe alingaka bato, ata banguna na ye bakoki kobongwana, koya epai na ye, mpe kozwa bomoi. (Yoane 3:16) Kasi, etikali moke Yehova aboma bato mabe oyo balingi kobongola motema te mpo bato oyo balingaka ye bázwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya boyengebene.—Nzembo 37:9-11, 29; 2 Petelo 3:13.
2. Bolingo ya ndenge nini Yehova amonisaka epai ya bato oyo bamipesi na ye?
2 Yehova alingaka basambeli na ye na ndenge malamu mpe ya solosolo. Bolingo wana ebengami na liloba moko ya Liebele oyo ebongolami na “motema-boboto,” to “bolingo ya sembo.” Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, azalaki kosepela mingi na motema-boboto ya Nzambe. Makambo oyo Davidi akutanaki na yango mpe komanyola makambo oyo Nzambe asalelaka bato etindaki ye ayemba na kondima mpenza ete: “Yehova . . . atondi na motema boboto [to, “bolingo ya sembo”].”—Nzembo 145:8.
Bayengebene ya Nzambe
3, 4. (a) Ndenge nini Nzembo 145 esalisi biso na koyeba bayengebene ya Yehova? (b) Ndenge nini bayengebene ya Nzambe ‘bapambolaka’ ye?
3 Hana, mama ya mosakoli Samwele, alobaki ete: “[Yehova] akobatela makolo ya bayengebene na ye.” (1 Samwele 2:9) “Bayengebene” yango ezali banani? Mokonzi Davidi asalisi biso tóyeba bango. Nsima ya kokumisa bizaleli malamu ya Yehova, alobaki boye: “Bayengebene na yo bakopambola yo.” (Nzembo 145:10, NW) Okoki mbala mosusu komituna ndenge nini bato bakoki kopambola Nzambe. Bato bapambolaka Nzambe libosoliboso ntango bazali kosanzola ye to bazali koloba malamu mpo na ye.
4 Bayengebene ya Yehova ezali baoyo balobaka malamu mpo na ye. Na bomoi ya mokolo na mokolo mpe na makita ya lisangá, balobelaka mingimingi nini? Bokonzi ya Nzambe! Basaleli ya sembo ya Nzambe bakanisaka lokola Davidi, oyo ayembaki ete: “Bakoloba mpo na nkembo ya bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo.”—Nzembo 145:11.
5. Nini emonisi biso ete Yehova ayokaka ntango bayengebene na ye balobaka malamu mpo na ye?
5 Yehova ayokaka ntango bayengebene na ye basanzolaka ye? Ɛɛ, ayokaka masanzoli na bango. Na esakweli moko oyo elobeli losambo ya solo na mikolo na biso, Malaki akomaki boye: “Bongo, baoyo batosaki [Yehova] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova] ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda ya kokanisa ekomamaki liboso na ye mpo na baoyo bazalaki kotosa [Yehova] mpe kobanga nkombo na ye.” (Malaki 3:16) Yehova asepelaka mingi ntango bayengebene na ye bazali koloba malamu mpo na ye, mpe abosanaka bango te.
6. Mosala nini esalisaka biso na koyeba bayengebene ya Nzambe?
6 Moto akoki koyeba basaleli ya sembo ya Yehova na mpiko mpe mayele na bango mpo na kosakola epai ya bato oyo bazali basambeli ya Nzambe ya solo te. Bayengebene ya Nzambe ‘bayebisaka bato misala na ye ya nguya mpe nkembo ya bokonzi na ye.’ (Nzembo 145:12) Olukaka mabaku ya koyebisa bato mosusu bokonzi ya Yehova mpe osalelaka yango? Bokonzi ya Yehova ezali te lokola baguvɛrnɛma ya bato oyo etikali moke elongwa, mpo yango ekoumela libela na libela. (1 Timote 1:17) Lokola ntango etikali moke, ebongi mpenza ete bato báyeba bokonzi ya Yehova oyo ekoumela seko mpe bámitya na ngámbo na ye. Davidi ayembaki ete: “Bokonzi na yo ezali bokonzi ya seko, mpe nguya na yo ekoumela na mabota na mabota.”—Nzembo 145:13.
7, 8. Likambo nini esalemaki na 1914, mpe elembo nini ezali komonisa ete Nzambe azali sikoyo koyangela na nzela ya Bokonzi ya Mwana na ye?
7 Kobanda 1914, tozali mpe na ntina mosusu ya koloba mpo na bokonzi ya Yehova. Na mbula yango, Nzambe atyaki Yesu Klisto, Mwana ya Davidi, Mokonzi na Bokonzi ya Masiya. Na ndenge yango, Yehova akokisaki elaka na ye ete bokonzi ya Davidi ekotɛlɛma seko na seko.—2 Samwele 7:12, 13; Luka 1:32, 33.
8 Eloko emonisi ete Yehova azali koyangela sikoyo na nzela ya Bokonzi ya Mwana na ye, Yesu Klisto, ezali kokokisama ya elembo ya kozala ya Yesu. Likambo eleki monene ya elembo yango ezali mosala oyo Yesu asakolaki ete bayengebene nyonso ya Nzambe bakosala ntango alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:3-14) Lokola bayengebene ya Nzambe bazali kokokisa esakweli yango, bato koleka milio motoba: mibali, basi mpe bana, bazali sikoyo kosala mosala monene yango oyo ekosalema lisusu te. Etikali moke, banguna nyonso ya Bokonzi ya Yehova bakobomama.—Emoniseli 11:15, 18.
Tózwa matomba na bokonzi ya Yehova
9, 10. Na ndenge nini Yehova akeseni na bato oyo bazali na bokonzi?
9 Soki tozali baklisto oyo bamipesi na Nzambe, boyokani na biso na Nkolo Mokonzi Yehova ekomemela biso matomba mingi. (Nzembo 71:5; 116:12) Na ndakisa, lokola tobangaka Nzambe mpe tomonisaka boyengebene, asepelaka na biso mpe, na elimo, tozali penepene na ye. (Misala 10:34, 35; Yakobo 4:8) Nzokande, bakonzi ya mokili bazalaka mingi-mingi penepene na bato minene, na ndakisa bakonzi ya basoda, bato minene ya mombongo, to bavɛdɛti ya masano. Zulunalo moko ya Afrika (Sowetan) eyebisaki ete mokonzi moko ya Leta alobaki mpo na bisika oyo babola bazali mingi na mboka na ye: “Nayebaka mpo na nini mingi kati na biso tolingaka kokende na bisika yango te. Ezali mpo tóbosana ete makambo ya ndenge wana ezali. Soki totali [mituka] ya ntalo oyo totambolaka na yango, etungisaka lisosoli na biso.”
10 Ezali ya solo ete bakonzi mosusu bamibanzabanzaka mpenza mpo na bolamu ya bato. Kasi, ata bakonzi oyo baleki malamu bayebaka bato na bango malamu te. Yango wana, tokoki kotuna boye: Ezali na mokonzi moko oyo amibanzabanzaka mpo na bato na ye nyonso na boye ete asalisaka nokinoki mokomoko na bango ntango azali na mpasi? Ɛɛ, azali. Davidi akomaki boye: “[Yehova] akosimbaka nyonso baoyo balingi kokwea mpe [akosembola] nyonso bagumbami.”—Nzembo 145:14.
11. Komekama nini ekómelaka bayengebene ya Nzambe mpe ndenge nini bazwaka lisalisi?
11 Mikakatano mpe mpasi mingi ekómelaka bayengebene ya Yehova Nzambe mpo bazali bato ya kozanga kokoka mpe mpo bazali na mokili oyo Satana, “moto mabe” azali koyangela. (1 Yoane 5:19; Nzembo 34:19) Baklisto bazali konyokwama. Bamosusu bazali kobɛla bamaladi makasi to mpe bazali kobungisa bandeko na bango. Ntango mosusu, mpo na mabunga oyo basali, bayengebene ya Yehova bakoki na kolɛmba nzoto to, ndenge vɛrsɛ elobi yango, ‘kogumbama.’ Kasi, ata soki bamekami na ndenge nini, Yehova azali ntango nyonso pene mpo na kobɔndisa mpe kopesa mokomoko na bango makasi na elimo. Mokonzi Yesu Klisto amibanzabanzaka mpe ndenge yango mpo na bato na ye ya sembo.—Nzembo 72:12-14.
Bilei malamu na ntango ebongi
12, 13. Ndenge nini Yehova akokisaka bamposa ya “bikelamu nyonso ya bomoi”?
12 Na motema-boboto monene na ye, Yehova akokisaka bamposa nyonso ya basaleli na ye. Na ndakisa, aleisaka bango malamu. Mokonzi Davidi akomaki boye: “Bato nyonso bakotalelaka yo [Yehova] na elikya, mpe okoleisa bango na ntango malamu. Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.” (Nzembo 145:15, 16) Ata na ntango ya mpasi, Yehova akoki kosala ete bayengebene na ye bázwa ‘mampa mpo na mokolo.’—Luka 11:3; 12:29, 30.
13 Davidi alobaki ete mposa ya “bikelamu nyonso ya bomoi” ekokisamaka. Banyama mpe bazali na kati ya bikelamu yango. Soki matiti ya zamba mpe milona ya mai ezalaki te, bambisi, bandɛkɛ, mpe banyama elingaki kozala na mopɛpɛ te mpo na kopema to bilei mpo na kolya. (Nzembo 104:14) Kasi, Yehova akokisaka bamposa na yango nyonso.
14, 15. Ndenge nini bilei ya elimo ezali kopesama lelo oyo?
14 Bato bazali na bamposa ya elimo, eloko oyo banyama bazali na yango te. (Matai 5:3) Yehova akokisaka bamposa ya elimo ya bayengebene na ye malamu mpenza! Liboso Yesu akufa, alakaki ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” akopesa bayekoli na ye “bilei [ya elimo] na ntango oyo ebongi.” (Matai 24:45) Moombo yango ezali batikali na kati ya bapakolami 144 000. Na nzela na bango, Yehova epesi ebele ya bilei ya elimo.
15 Na ndakisa, sikoyo basaleli ya Yehova mingi bazali na Biblia ya sika mpe ya malamu na minɔkɔ na bango. Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ezali mpenza likabo malamu! Lisusu, ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali kobimisama na minɔkɔ koleka 300. Bilei ya elimo nyonso wana ezali likabo malamu mpo na basambeli ya solo na mokili mobimba. Nani abongi kozwa lokumu mpo na nyonso wana? Yehova Nzambe. Na motema-boboto na ye, asali ete moombo apesa “bilei na ntango malamu.” Bibongiseli wana ezali kokokisa “mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi” na kati ya paladiso ya elimo oyo ezali lelo. Basaleli ya Yehova bazali mpe kosepela na elikya ete mosika te bakofanda na mabelé oyo ekobongwana paladiso!—Luka 23:42, 43.
16, 17. (a) Bandakisa nini tokoki kotánga ya bilei ya elimo oyo epesamaki na ntango oyo ebongi? (b) Ndenge nini Nzembo 145 ezali komonisa makanisi ya bayengebene ya Nzambe mpo na likambo eleki monene oyo Satana abimisaki?
16 Tótalela ndakisa moko ya bilei ya elimo oyo epesamaki na ntango malamu. Na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Mpoto. Kaka na mbula yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ ezalaki na lisolo moko oyo motó ya likambo na yango ezalaki “Tókɔta na makambo ya mokili te.” Lokola lisolo yango elimbolaki makambo polele, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bamonaki ete basengeli te kokɔta na bitumba. Mpo na yango, na bikólo nyonso oyo ekɔtaki na etumba yango oyo eumelaki mbula motoba, bakonzi bazalaki kosepela na bango te. Nzokande, atako bapekisaki mosala na bango mpe bazalaki konyokola bango, bayengebene ya Nzambe bakobaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Likambo ya kokamwa, kobanda 1939 tii 1946, motángo na bango ebakisamaki mingi (157%). Lisusu, bosembo na bango na bambula wana ya etumba ezali kosalisa bato tii lelo oyo na koyeba lingomba ya solo.—Yisaya 2:2-4.
17 Bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa na ntango ebongi ezali mpe malamu mingi. Ntango bikólo ya mokili ezalaki kondongwana na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Yehova abendaki likebi ya basaleli na ye na eloko moko oyo ezali na ntina koleka lobiko na bango moko. Asalisaki bango bákanga ntina ete likambo eleki monene mpe etaleli bikelamu nyonso, ezali nde lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi. Ezali esengo na koyeba ete lokola Motatoli mokomoko atikalaki sembo, alongisaki bokonzi ya Yehova mpe amonisaki ete Zabolo azali mobuki lokuta! (Masese 27:11) Soki Satana azali koloba mabe mpo na Yehova mpe bokonzi na ye, na ngámbo na bango, bayengebene ya Yehova bazali kosakola ete: “[Yehova] azali na boyengebene na nzela na ye nyonso.”—Nzembo 145:17.
18. Ndakisa nini ya sika tozali na yango ya bilei malamu oyo epesami na ntango ebongi?
18 Ndakisa mosusu ya bilei malamu oyo eyei na ntango ebongi ezali buku Approchez-vous de Jéhovah, oyo ebimaki na mayangani ya etúká “Basakoli ya Bokonzi ya molende” oyo esalemaki na mokili mobimba na mobu 2002. Buku yango ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, ezali kolobela bizaleli kitoko ya Yehova Nzambe; na ndakisa, oyo Nzembo 145 elobeli. Na ntembe te buku yango kitoko ekosalisa bayengebene ya Nzambe bápusana lisusu penepene na ye.
Ntango ya kopusana penepene na Yehova
19. Ntango nini ya ntina mingi ekómi pene, mpe tokosala nini na ntango yango?
19 Ntango oyo likambo etali bokonzi ya Yehova esengeli kokatama ekómi pene. Ndenge Ezekiele mokapo 38 esakolaki yango, etikali moke Satana akokisa mokumba na ye ya “Gogo ya mokili ya Magogo.” Yango elimboli ete akobundisa basaleli ya Yehova na mokili mobimba. Ekozala nsuka na eyoma oyo Satana akobimisa mpo na koluka kobebisa bosembo ya bayengebene ya Nzambe. Basambeli ya Yehova bakobelela ye na ndenge oyo basalá naino te, ata mpe koganga mpo na kosɛnga ye lisalisi. Ezaleli na bango ya kobanga Nzambe mpe bolingo na bango mpo na ye ekozala mpamba? Te, mpamba te Nzembo 145 elobi: “[Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye, baoyo bakobyanga ye na solo. Akosukisa mposa na bango baoyo bakobanga ye, akoyoka mpe koganga na bango mpe akobikisa bango. [Yehova] akobatela baoyo nyonso bakolinga ye kasi akoboma bato nyonso mabe.”—Nzembo 145:18-20.
20. Ndenge nini maloba ya Nzembo 145:18-20 ekokokisama mosika te?
20 Ekozala esengo monene komona ete Yehova azali pene na biso mpe komona nguya na ye ya kobikisa ntango akosilisa bato nyonso ya mabe! Na ntango yango, oyo ezali lisusu mosika te, Yehova akoyoka kaka baoyo “bakobyanga ye na solo.” Akoboya koyoka bato ya liso na nse ya lokasa. Liloba ya Nzambe ezali komonisa polele ete Nzambe ayokaka te moto mabe oyo azelaka ntango ekóma mpenza na nsuka mpo abanda kobelela nkombo na Ye.—Masese 1:28, 29; Mika 3:4; Luka 13:24, 25.
21. Ndenge nini bayengebene ya Yehova bamonisaka ete basepelaka kosalela nkombo ya Nzambe?
21 Sikoyo mpenza nde ntango oyo esengeli ete baoyo babangaka Yehova ‘bábyanga ye na solo.’ Bayengebene na ye basepelaka kosalela nkombo na ye na mabondeli na bango mpe na biyano oyo bapesaka na makita ya lisangá. Basalelaka nkombo ya Nzambe na masolo na bango. Bayebisaka mpe bato nkombo ya Yehova na mpiko nyonso na mosala ya kosakola.—Baloma 10:10, 13-15.
22. Mpo na nini ezali na ntina mingi tóboya elimo mpe bamposa ya mokili?
22 Mpo boyokani na biso na Yehova Nzambe ezala ntango nyonso na matomba mpo na biso, ezali mpe na ntina tóboya ntango nyonso elimo mabe ya kolinga biloko ya mokili, masano ya mabe, mpe ezaleli ya koboya kolimbisa, to kokangela bato oyo bazali na bosɛnga motema. (1 Yoane 2:15-17; 3:15-17) Soki toboyi bizaleli mpe mikano wana te, ekoki komema biso na lisumu monene mpe na bongo, Yehova akopesa biso mokɔngɔ. (1 Yoane 2:1, 2; 3:6) Tokomonisa bwanya soki tozali kobosana te ete Yehova akokoba komonisa motema-boboto, to bolingo ya sembo, epai ya baoyo bazali sembo epai na ye.—2 Samwele 22:26.
23. Bayengebene ya Nzambe bakozala na bomoi ya malamu ndenge nini?
23 Yango wana, tókanisaka ntango nyonso bomoi malamu mingi oyo bayengebene ya Yehova bakozala na yango. Soki tozali kosala bongo, tokozala na elikya kitoko ya kozala na kati ya bato oyo bakokumisa, bakopambola, mpe bakosanzola Yehova “mikolo nyonso” mpe “seko na seko.” (Nzembo 145:1, 2) Yango wana, tiká ‘tómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe mpo na bomoi ya seko.’ (Yuda 20, 21) Wana Tata na biso ya likoló azali komonisa biso bizaleli malamu na ye, lokola motema-boboto na ye epai ya baoyo balingaka ye, tózala na makanisi lokola oyo Davidi alobaki na maloba ya nsuka ya Nzembo 145: “Monɔkɔ na ngai ekosanzola [Yehova]; tiká mpe mosuni nyonso esanzola nkombo na ye ya bulɛɛ, lobiko na lobiko.”
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini Nzembo 145 esalisi biso na koyeba bayengebene ya Nzambe?
• Ndenge nini Yehova ‘akokisaka mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi’?
• Mpo na nini tosengeli kopusana penepene na Yehova?
[Elilingi na lokasa 16]
Bayengebene ya Nzambe basepelaka kolobela misala minene na ye
[Elilingi na lokasa 17]
Basaleli ya Yehova bazalaka na mpiko mpo na kosalisa bapaya na koyeba nkembo ya bokonzi na ye
[Bililingi na lokasa 18]
Yehova aleisaka “bikelamu nyonso ya bomoi”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Banyama: Parque de la Naturaleza de Cabárceno
[Elilingi na lokasa 19]
Yehova apesaka makasi mpe atambwisaka bayengebene na ye, oyo babondelaka ye asalisa bango