Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/6 nk. 28-30
  • Ezali mpenza na moto moko oyo atyelaka ngai likebi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali mpenza na moto moko oyo atyelaka ngai likebi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” atyelaka biso likebi
  • Libondeli mpe lisekwa emonisaka ete Nzambe atyelaka biso likebi
  • Yehova azali mopesi-mbano
  • Nzambe azali komibanzabanza mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Yehova atyelaka yo likebi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova azali Mobateli na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Yehova azali ‘Ekimelo na biso na ntango ya mpasi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/6 nk. 28-30

Ezali mpenza na moto moko oyo atyelaka ngai likebi?

Omonaka ete ozali yo moko mpe moto azali te mpo na kosunga yo, mpe ete moto moko te azali koyeba bampasi oyo ozali kokutana na yango? Ata soki bayebi, omonaka ete bato yango batyelaka yo mpenza likebi te.

NTANGO mikakatano ebimeli biso, tomonaka lokola nde ekosila te. Ekómaka kutu tóloba ete makambo oyo tozali kokutana na yango eleki mpenza mpasi mpe tokokoka lisusu te. Yango emonanaka mingi ntango tokutani na likambo moko oyo ezali konyokola biso na makanisi, likama moko ya nsɔmɔ, maladi moko oyo esilaka te to likambo mosusu ya ndenge wana. Tokoki kolɛmba nzoto, kozanga elikya, mpe komituna soki nani akosalisa biso. Ezali mpenza na moto moko oyo atyelaka biso likebi?

“Nzambe ya kobɔndisama nyonso” atyelaka biso likebi

Biblia ebengi Nzambe “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Bakolinti 1:3) Nzambe, oyo nkombo na ye ezali Yehova, ayebi ete tozalaka na mposa ya kobɔndisama. Biblia esaleli liloba “kobɔndisama” na ndenge mingi, mbala koleka nkama; emonisi ete Nzambe ayebaka bampasi na biso mpe alukaka kobɔndisa biso. Likambo yango esalisi biso tóyeba ete ata soki bato mosusu bazali komona bampasi na biso te to mpe bazali kokipe te, Yehova Nzambe atyelaka biso likebi.

Biblia emonisi polele ete Yehova atyelaka mokomoko na biso likebi. Elobi boye: “Miso ya [Yehova] ezali bipai nyonso, kotalaka mabe mpe malamu.” (Masese 15:3) Ndenge moko mpe, Yobo 34:21 elobi boye: “Miso na ye ezali likoló ya nzela ya moto, amoni matambe na ye nyonso.” Yehova amonaka oyo tosalaka, ezala makambo ya malamu to ya mabe, mpe ayebi makambo ya bomoi na biso; na yango akoki kosunga biso na ndenge oyo amoni ete ezali malamu. Maloba ya mosakoli Hanani epai ya Asa, mokonzi ya Yuda, endimisi likambo yango; alobaki boye: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”​—2 Ntango 16:7, 9.

Ezali mpe na ntina mosusu oyo Yehova atalaka biso. Yesu alobaki boye: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Yehova atalaka motema ya moto mpo na koyeba soki moto yango alingi koyeba ye. Soki ya solo moto yango alingi koyeba ye, akosalisa ye. Na ndakisa, na République Dominicaine, mwasi moko azalaki na lopitalo mpo na lipaso ya kanser. Abondelaki Nzambe asalisa ye amona lingomba ya solo. Kaka na ntango yango, mobali na ye amemelaki ye mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?a Motatoli moko oyo ayaki na ndako na bango na ntɔngɔ ya mokolo yango, nde atikelaki ye mwa buku yango. Mwasi yango atángaki yango mpe amonaki ete ezali eyano ya Nzambe na libondeli na ye. Andimaki koyekola Biblia na Motatoli yango, mpe sanza motoba ekokaki te, apesaki bomoi na ye epai ya Nzambe mpe azwaki batisimo.

Na mokanda ya Nzembo, ezali na maloba mingi oyo bakomi ya nzembo lokola Davidi basalelaki mpo na kolobela motema boboto ya Yehova epai ya basaleli na ye. Na Nzembo 56:8, tozali kokuta maloba oyo ya Mokonzi Davidi: “Osili kotya mpisoli na ngai kati na molangi na yo; yango ekomami na mokanda na yo te?” Elilingi oyo Davidi asaleli na maloba na ye, emonisi ete andimaki mpenza ete Yehova ayebaki malamu bampasi na ye mpe ndenge ezalaki kosala ye na motema. Yehova ayebaki malamu bampasi ya Davidi mpe abosanaki te ndenge oyo Davidi azalaki koyoka na motema mpo na bampasi yango nyonso oyo ezalaki kotinda ye alela. Ya solo, Mozalisi na biso atalaka baoyo nyonso basalaka milende mpo na kosala mokano na ye, “baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”

Mokapo mosusu oyo emonisi ete Nzambe atyelaka basaleli na ye likebi, ezali Nzembo 23. Maloba na yango ya ebandeli ekokanisi Nzambe na mobateli ya mpate ya bolingo; elobi boye: “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.” Na Azia, mobateli ya mpate atyaka likebi na mpate mokomoko, ayebaka ata nkombo ya mokomoko. Na ntɔngɔ abengaka mpate mokomoko epai na ye, mpe na bolingo nyonso asimbaka yango mpe atalaka soki ezali na mpota. Soki amoni mpota, apakolaka yango mafuta mpo ekauka noki. Soki mpate ezali kobɛla, mobateli ya mpate akokɔtisa nkisi na mongongo ya mpate mpe akotɛlɛmisa yango mpo ekwea mpe ekufa te. Na ntembe te, yango ezali elilingi kitoko mpo na komonisa ndenge Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo batyelaka ye elikya.

Libondeli mpe lisekwa emonisaka ete Nzambe atyelaka biso likebi

Maloba ya banzembo yango mpe ya banzembo mosusu ekomamá na Biblia kaka te mpo tótángaka mpe tósepelaka na yango. Emonisaka ndenge basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki kofungolela Yehova mitema na bango, koyebisa ye mposa oyo bazalaki na yango ya kozwa lisungi na ye, mpe kopesa botɔndi mpo na litambwisi mpe mapamboli na ye. Maloba yango emonisaka polele ete basaleli yango ya kala bazalaki kondima mpenza ete Nzambe atyelaka bango likebi. Kotánga mpe komanyola maloba yango ekoki kosalisa biso tótalela Nzambe lokola bango. Libondeli emonisaka polele ete Nzambe atyelaka biso likebi.

Kasi, ekoki kokóma ete mikakatano elekela biso mpe tóyeba te ndenge ya kobondela mpo na yango. Yango epekisaka Yehova ayeba bampasi na biso? Baloma 8:26 elobi boye: “Elimo mpe ezali kopesa lisalisi mpo na bolɛmbu na biso; mpo na mokakatano oyo ete eloko oyo tosengeli kobondela mpo na yango ndenge mposa na biso ezali toyebaka te, kasi elimo yango moko elobelaka biso na komilela oyo maloba ebimaka te.” Vɛrsɛ yango eyebisi biso ete mabondeli oyo basaleli ya Nzambe na ntango ya kala basalaki, oyo ekomamá na Biblia, ekoki komonisa mayoki na biso mpe Yehova, oyo ‘ayokaka mabondeli,’ akoki kondima yango lokola nde euti epai na biso.​—Nzembo 65:2.

Elikya ya lisekwa ezali mpe likambo mosusu oyo emonisaka ete Nzambe atyelaka moto mokomoko likebi. Yesu Klisto alobaki boye: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Liloba ya Grɛki oyo basaleli awa ebongolami malamu na “malita ya kokanisama,” kasi “malita” ya mpamba te. Yango emonisi ete Nzambe abosanaka te makambo ya bomoi ya mowei.

Kanisá naino, mpo na kozongisa moto na bomoi, Nzambe asengeli koyeba makambo nyonso ya moto yango, ata mpe ndenge azalaki, bizaleli na ye nyonso, ata oyo azwaki epai ya baboti na ye, mpe makambo nyonso oyo ayebaki! (Malako 10:27) Ata nsima ya bankóto ya bambula, Nzambe abosanaka te makambo ya basaleli na ye oyo bakufá. (Yobo 14:13-15; Luka 20:38) Na yango, bamilio ya bato oyo bakufá, Yehova Nzambe abombá na makanisi na ye makambo na bango nyonso; yango endimisi biso ete Nzambe atyelaka moto mokomoko likebi!

Yehova azali mopesi-mbano

Tosengeli kosala nini mpo Yehova amibanzabanzaka mpo na biso mpe atyelaka biso likebi? Libosoliboso, tosengeli komonisa ete totyelaka ye motema, totosaka ye mpe tozali na kondima. Ntoma Paulo amonisaki boyokani oyo ezali kati na kozala na kondima mpe kozwa lipamboli ya Nzambe. Akomaki boye: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa ye mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”​—Baebele 11:6.

Simbá ete kondima oyo esepelisaka Nzambe esɛngaka makambo mibale. Ya liboso, tosengeli “kondima ete ye azali,” elingi koloba, kondima ete Nzambe azalaka mpe ete azali Mokonzi oyo aleki bankonzi nyonso, mpe abongi tótosa mpe tósambela ye. Ya mibale, tosengeli kondima ete azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” Kondima ya solosolo esɛngaka kozala na elikya ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na bolamu ya baoyo nyonso balukaka kosala mokano na ye mpe apambolaka bango. Soki ozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe kosangana na bato oyo batosaka ye, yo mpe okokóma na kondima ya ndenge wana, oyo ekotinda Nzambe apambola mpe amibanzabanzaka mpo na yo.

Bato mingi lelo oyo bakanisaka ete Nzambe akipaka makambo ya bato te. Kasi, ndenge tomoni yango, Biblia elobi polele ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na baoyo nyonso bazali na kondima ya solosolo epai na ye. Ata soki bomoi lelo oyo etondi na bampasi mpe na mitungisi, tosengeli kozanga elikya te. Yehova Nzambe atyelaka biso mpenza likebi. Kutu, asɛngi biso na boboto nyonso, tótalela ye mpo na kozwa lisungi. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.”​—Nzembo 55:22.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 29]

Bavɛrsɛ oyo ekondimisa yo ete Nzambe atyelaka yo likebi

“Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”​—2 NTANGO 16:9

“Osili kotya mpisoli na ngai kati na molangi na yo; yango ekomami na mokanda na yo te?”​—NZEMBO 56:8

“[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.”​—NZEMBO 23:1

“Yo okoyokaka mabondeli; bato nyonso bakoya epai na yo.”​—NZEMBO 65:2

“Okobianga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—YOBO 14:15

“Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”​—BAEBELE 11:6

“Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.”​—NZEMBO 55:22

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto