Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/6 nk. 19-21
  • Bilenge​—Bokolónga nde momekamo ya bosembo na boklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge​—Bokolónga nde momekamo ya bosembo na boklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Masenginya oyo mazali kopusa na kozanga sembo
  • Motindo na bomoi mibale
  • ‘Bongisa makambo’ elongo na Nzambe
  • Ndenge nini komonisa bosembo ya solo?
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tótalela baoyo bazali sembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Kozala sembo—Ezali na motuya nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/6 nk. 19-21

Bilenge​—Bokolónga nde momekamo ya bosembo na boklisto?

“TOYEBAKA te ete wana tozali etamboli ya mbindo, tozali nde komonisa kozanga bosembo. Tozali bobele kosakana, esuki bongo. Toyebi solo ete, soki baboti na biso to bankulutu bayebi makambo tozali kosala, biso banso tokooka mawa mpo na yango, mpe ekobimisa mindondó. Kasi wana ezali biso kosakana, tokolongolaka mpenza makanisi motindo wana na elimo na biso.”

Elenge mobali oyo alobaki boye, azalaki kosala pite na nkuku. Azalaki na mitindo mibale ya bomoi, kokosáká bongo baboti na ye mpe lisangá ya boklisto. Na ntango wana asosolaki mpenza likoló na yango te, kasi bosembo na ye ya moklisto etyamaki na komekama mpe akokisaki mikumba na ye te.

Baklisto mingi oyo bosembo na bango bomekamaki na motindo oyo, bakokisaki mikumba na bango te. Yango ezali likambo ya kokamwa te! Satan le Diable ‘azali kobundisa’ basaleli ya Nzambe, komekáká na lolenge nyonso ete abebisa bosembo na bango. (Emoniseli 12:17) Azali koluka mingimingi bilenge na “mayele na ye mabe.” (Baefese 6:11) Esengeli bongo kosala milende mingi mpe kozwa ekateli makasi mpo na kotikala sembo.

Bosembo ezali mpenza nini? Kati na Makomami na liebele, liloba oyo libongolami na “bosembo” emonisi bokangani botondi na bolingo oyo bakomoniselaka moto na ntina moko ya sikisiki. (Nzembo 18:25) Ezali boyokani ya pɛtɛpɛtɛ te oyo ekoki kobeba kozanga nkaká, kasi ezali bokangani makasi oyo bokoumela kino kokokisa mokano oyo mozalaki kolukama. Kati na Makomami na Greke, liloba oyo libongolami na “bosembo” epesi likanisi ya bosantu, ya boyengebene to ezaleli ya kobanga Nzambe.

Bosembo elimboli kozala na boyokani malamu elongo na Nzambe. Na Baefese 4:24, esengami na biso “kolata bomoto ya sika oyo bozalisamaki. . . kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.” Olingi kozala sembo epai na Jéhovah? Na yango osengeli kokólisa bokangani ya sembo na bomoto na ye, boyokani oyo ekobebisama te, mpe kozala na ekateli ya kosepelisa ye na makambo nyonso oyo ozali kosala. Osengeli kotósa na mitinda ya boyengebene na Jéhovah, ezala masenginya nini mazali kopusa yo na kopengwa longwa na yango.

Masenginya oyo mazali kopusa na kozanga sembo

Bilenge ba Témoins de Jéhovah mingi bazali kosala milende mibongi na lokumu mpo na kotikala sembo, likambo oyo lizali kosalisa bango na kozala na lisosoli ya peto. Atako bongo, ntoma Paulo asakolaki ete na “mikolo ya nsuka” kozanga sembo ekomonana na bato banso. (2 Timoté 3:1, 2) Mawa mpenza, bilenge baklisto mosusu bazali komitika ‘kozimbisama’ na mokili oyo mozangi sembo. (Baloma 12:2) Ndenge nini Satana azali kosala yango?

Bopusi ya baninga ezali esaleli makasi oyo Satana azali kosalela. Bato mingi balingaka kondimama na bato mosusu mpe Satana ayebi lolenge nini akoki kosalela malamu mposa wana ezali epai na bato banso. Lokola bilenge baklisto mosusu balingaki ete batalelama lokola bato banso, bakómaki kosolola makambo na mbindo, bakómaki na etamboli ya mbindo, bamelaki makayá, balangwaki masanga mpe ata ba drogues-bobele mpo ete bandimama na baninga na bango.

Satana alingi ete ‘tomitambwisa engebene bamposa ya nzoto na biso, kosaláká makambo oyo nzoto elingi.’ (Baefese 2:3) Ayebi malamu kino esika nini mposa ya kosangisa nzoto ezali makasi na “eleko ya bolenge.’’(Bakolinti 7:36) Mpe alingi ete bokokisa bamposa yango. Kozanga koyeba, bilenge baklisto mosusu bazali kosala misala ya Diable na kotalaka mikanda, ba films mpe ba vidéocassettes oyo ezali kolakisa bililingi ya basi na mibali oyo bazali bolumbu to na kosakanaka na binama ya nzoto (masturbation). Mbala mingi misala mina mizali komema na kosala makambo minene ya bozangi sembo. Mokili ya Satana esila ‘kokweisa yo na moko na bizaleli na yango’ wana?

Motindo na bomoi mibale

Kosala lisumu monene lokola pite ezali likambo monene mpenza, nzokande bilenge mosusu bazali koyeisa lisusu bampasi na bango makasi. Bazali lokola “bato na lokuta,” oyo elobi Nzembo 26:4, “bakosi.” Bilenge yango bazali na motindo na bomoi mibale, na komimonisaka na lolenge moko ntango bazali elongo na baboti na bango mpe baklisto mosusu bateli na elimo, mpe kosalaka na lolenge mosusu na baninga na bango.

Nzokande, motindo na bomoi mibale ememaka eloko moko te ya malamu; nkutu ezali nde konyokola. Misala mabe oyo mizali kotikama te mbala mingi mimemaka na misala misusu ya mabe. Na libandeli, mbala mosusu lisosoli likotungisama; kasi mingi okoumela na kosala mabe mpe mokemoke lisosoli ekobanda kolemba. Bakoki kokoma kino ete bazali ‘kooka lisusu mpasi te’ ntango bazali kosala mabe.​—Baefese 4:19, Kingdom interlinear.

Kokoma na esika wana, ekomaka mpasi mingi na koyebisa misala mabe na ye mpe koluka lisalisi. Yango ezali mpenza solo soki bilenge baklisto basusu bayebi likambo yango. Liyoki ya bosembo oyo elakisami mabe elongaka mbala mingi. Elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo alimboli: “Bazali koyeba oyo bazali kosala, mpe bayebi ete ezali mabe. Mpo na kokima kobimisa matata na bato nyonso oyo bayebi likambo yango, bakondima koloba eloko moko te na moto.”

Ata soki moto moko azali koluka ‘kobomba ezaleli na ye’ na baboti na ye to na lisangá, akoki komibomba te na miso ya Jéhovah. “Eloko moko ezali te oyo ebombani liboso na ye, kasi nyonso ezali bolumbu mpe emonisami polele na miso na ye oyo azali na biso na makambo.” Biblia ezali koyebisa ete: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te.” (Masese 28:13) Ekokoma na mokolo moko oyo lisumu yango ekoyebana. Bakokoka te kokosa Jéhovah. Masese 3:7 elobi: “Tika te ete omonana na mayele na miso na yo moko. Tosa Jéhovah mpe longwa na mabe.” Omikundola mpe ete “miso na Jéhovah ezali bipai nyonso, kotalaka bato mabe na bato malamu.”​—Masese 15:3.

Elenge oyo tolobelaki na ebandeli, na mpe mingi misusu oyo bazalaki kosala misala ya mabe na kobombana elongo, bayaki koyebana mpe babimisamaki na lisangá ya boklisto. Na nsima, babongisaki etamboli na bango ya elimo mpe bazongisamaki na lisangá. Kasi ezali mpasi na koyekola oyo elimboli bosembo na motindo wana!

‘Bongisa makambo’ elongo na Nzambe

Bongo soki moto moko na ndakisa amonisi bozangi na bosembo na kosalaka likambo moko ya mabe? Ezali mpasi te na komikosa mpe kowangana ntina ya kobongisa likambo yango. Elenge mwasi moko oyo azalaki kosala pite na kobombana alobaki. “Nabakisaki bangonga na ngai na mosala ya kosakola, kokanisaka ete yango ekokaki, na lolenge moko to mosusu, kobomba lisumu.” Libota na botomboki ya Yisraele, bango mpe bamekaki kolembisa nkanda ya Jéhovah na nzela ya mabonza. Kasi Jéhovah aboyaki losambo wana ya bokosi. Na bongo apamelaki libota yango boye: “Bomisukola, bomipetola, bolongola mabe na makambo masalaki bino liboso na miso na ngai; botika kosala mabe.” Jéhovah akondima mabonza na bango kaka nsima na‘kobongisa makambo elongo na ye.’ Yango mpe ezali na ntina na mikolo na biso mpo na baoyo nyonso bazali kosala misala ya mabe.​—Yisaya 1:11, 15-18.

Okoki kobongisa makambo elongo na Jéhovah te na koyebisa kaka na moninga moko. Ya liboso, baninga bakopesa yo lisalisi ya malamu mikolo nyonso te mpo ete, na makambo mingi, bazali na mayele mingi te ya bomoi koleka yo. Oyo eleki ntina lisusu, bakoki te kolimbisa masumu na yo. Bobele ye moko Nzambe akoki kosala yango. Yambola nde masumu na yo na Jéhovah na ‘kozipolaka motema na yo’ liboso na ye. Atako okoki koyoka nsoni makasi na ntina ya etamboli na yo, ondimisama ete Jéhovah ‘alimbisaka mingi.’​—Yisaya 55:7.

Okozala na mposa ya lisalisi mosusu. Elenge moklisto moko oyo azwaki lisalisi ya ndenge wana apesi toli oyo: “Kaka na ebandeli, yebisa yango na baboti na yo, yebisa yango na bankulutu noki.” Solo mpenza, baboti na yo bakoki kosalisa yo. ‘Pesa bango motema na yo,’ monisa bango bonene ya mpasi na yo. (Masese 23:26) Bakokamata bibongiseli mpo ete okoka kozwa, soki esengeli, lisalisi ya koleka epai na bankulutu ya lisangá.​—Yakobo 5:14, 15.

Ndenge nini komonisa bosembo ya solo?

Na ntembe te, ekozala malamu na komikotisa te na ezaleli ezangi sembo. Nzembo 18:25 eyebisi biso: “Epai na moto na sembo yo (Jéhovah] okomimonisa na sembo; epai na moto azali kotambola alima, okomimonisa alima.” Jéhovah azali kopambola mingi baoyo bazali kotikala sembo na komonisaka etamboli moko ya malamu koleka.

Kasi bosembo na yo ekoki kotyama na komekama na lolenge mosusu. Na ndakisa, kanisa ete moko na baninga na yo amikotisi na nzela ya mabe. Okotika ete bosembo oyo elakisami mabe epai na moninga yango elonga bosembo na yo na Jéhovah? Mpo na kolakisa bolingo na moninga yango, osengeli kokende epai na ye mpe kolendisa ye na koyebisa mabe na ye na baboti na ye to na bankulutu. Okoyebisa ye ete soki asali yango te na nsima ya mwa mikolo, yo nde moto okosala yango. Masese 27:5 elobi: ’’Kopamela polele eleki bolingo bibombami na malamu.” Na kosalisaka moninga na yo na ndenge wana, okolakisa ye kaka bolingo ya solo te, kasi lisusu okolakisa bozindo ya bosembo na yo epai na Jéhovah.

Ezali boyokani makasi oyo tozali na yango na Jéhovah nde epesaka makasi na kolakisa bosembo na biso, ata soki tozali na mimekano ya ndenge nini. Mabondeli ya bozindo mpe boyekoli na yo moko ya Biblia ntango nyonso ekoki kozanga te mpo ozala na boyokani ya ndenge wana. Ezali esengo na koyeba ete bilenge nyonso oyo tolobelaki liboso mpe oyo basalaki masumu bandimaki ete mabondeli na bango mpe boyekoli na bango moko ya Biblia ekomaki se bongo na bongo​—mpe na nsima ya ntango, ezalaki kosalama lisusu te. Bazalaki komona Jéhovah lokola moto ya solo lisusu te, mpe mwa nsima bamizindisaki kati na etamboli ya mbindo. Na nzela ya libondeli mpe boyekoli na yo moko, olendisaka boyokani na yo na Jéhovah na lolenge ya kobatela bosembo na yo?

Ezali solo ete, mbala mosusu, okoki komituna soki ozali kozanga te mabaku ya kosakana. Elenge mwasi moko alobaki ete: “Mbala mosusu, tozali komona ete bato ya mokili bazali kosakana malamu. Kasi ntango okoya kokweya na likama, okoya koyeba ete likambo na kosakana ezali wana te.” Ayebaki yango mpo asilaki kokutana na makambo motindo wana, asalaki pite, oyo esukaki na zemi mpe kobimisa yango. Sikawa alobi, nsima na liteya oyo azwi na mpasi, ete: “Kozala na solo ezali libateli.” Nzembo 119:165 ezali kokundwela biso ete “kimya mingi ezali na bango balingi mobeko na [Nzambe].”

Sala nyonso ekoki otikala sembo. Tonga boyokani makasi elongo na Jéhovah. Yina mabe mpe kangama na makambo malamu. (Baloma 12:9) Nzembo 97:10 elobi na biso: “Bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boboya mabe. Ye akobatelaka bomoi na bato na ye na boyengebene; akobikisaka bango na loboko na bato mabe.” Ee, bilenge baklisto, bokoki kozwa libateli ya Jéhovah mpe bomoi ya seko soki bokolonga momekano na bosembo ya boklisto.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto