Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/1 lok. 32
  • Tósambela Yehova na mabɔkɔ pɛto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósambela Yehova na mabɔkɔ pɛto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/1 lok. 32

Tósambela Yehova na mabɔkɔ pɛto

NA KOPEMAMA na Nzambe, Davidi mokomi na Nzembo ayembaki ete: “Nakosukola mabɔkɔ na ngai mpo na sembo, ɛ [Yehova], na kobɛlɛma na etumbelo na yo.”​—Nzembo 26:6.

Ekoki kozala ete wana abimisaki maloba oyo, Davidi alingaki kolobela momeseno oyo banganga Balevi ya Yisalaele bazalaki na yango ya komata na elekelo ya etumbelo mpe na nsima kotya mbeka na bango likoló na mɔ́tɔ. Kasi liboso ya kosala likambo wana losambo, esɛngisamaki na banganga ete básukolaka mabɔkɔ na bango mpe makolo na bango. Yango ezalaki likambo moke te. Nganga akokaki kokufa mpo na kozanga kosala bongo!​—Exode 30:18-21.

Kosukola ya elilingi ezalaki kopesa bopɛto ya elimo mpe ya bizaleli. (Yisaya 1:16; Baefese 5:26) Lelo oyo mpe, Yehova alingi ete ‘tóbɛlɛma na etumbelo na ye’ na kosaleláká ye. Kasi azali kosɛnga na biso ete tósalela ye na mabɔkɔ pɛto​—lokola Davidi alobeli yango, mabɔkɔ oyo masukwami “mpo na sembo.” Yango ezali lisɛngami ya moke te, mpamba te baoyo basalaka misala ya mbindo bakosangola Bokonzi ya Nzambe te. (Bagalatia 5:19-21) Kozala na bomoi ya kosalela Nzambe epesaka nzela te na etamboli ya mbindo. Na yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Nazali kobɛta nzoto na ngai mpe nakokómisa yango lokola moombo ete nazala moboyami te awa esili ngai kosakwela bamosusu.”​—1 Bakolinti 9:27.

Baoyo balukaka kondimama na Nzambe mpe balukaka bolamu ya solosolo basengeli kosalela Yehova na mabɔkɔ pɛto. Lokola Davidi, bazali kotambola “na motema malamu mpe sembo.”​—1 Mikonzi 9:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto