Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • Liteya 25. Mabele.

      LITEYA 25

      Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?

      Biblia elobi ete bomoi ya bato ezali ‘mokuse mpe etondi na mpasi.’ (Yobo 14:1) Nzambe alingi mpenza tózala na bomoi ya ndenge wana? Soki ezali bongo te, alingi tózala na bomoi ya ndenge nini? Makambo oyo Nzambe alingi mpo na biso ekosalema mpenza? Tótalela biyano ya kolendisa oyo Biblia epesi.

      1. Yehova alingi tózala na bomoi ya ndenge nini?

      Yehova alingi tózala na bomoi ya malamu mpenza. Ntango asalaki Adama ná Eva, atyaki bango na paradiso moko kitoko, oyo Biblia ebengi elanga ya Edene. Na nsima, “Nzambe apambolaki bango, mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi, bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.’” (Ebandeli 1:28) Yehova alingaki ete bábota bana, bákómisa mabele mobimba paradiso mpe bábatela banyama. Yehova alingaki mpe ete bato bázala na nzoto ya kokoka mpe bázala na bomoi libela na libela.

      Atako makambo esalemaki te ndenge Nzambe alingaki,a mokano na ye ebongwani te. (Yisaya 46:10, 11) Alingi kaka bato ya botosi bázala na bomoi ya kokoka mpe ya seko.​—Tángá Emoniseli 21:3, 4.

      2. Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya esengo lelo oyo?

      Yehova asalá biso na ‘bamposa ya elimo,’ elingi koloba, mposa ya koyeba ye mpe ya kosambela ye. (Tángá Matai 5:3-6.) Alingi ete ozala moninga na ye, elingi koloba, “kotambola na banzela na ye nyonso, kolinga ye,” mpe kosalela ye “na motema na yo mobimba.” (Kolimbola Mibeko 10:12; Nzembo 25:14) Soki osali bongo, okozala na bomoi ya esengo, atako ozali na mikakatano. Soki ozali kosambela Yehova mpe kotosa mibeko na ye, bomoi na yo ekozala na ntina mingi.

      KƆTÁ NA MOZINDO

      Talá ndenge Yehova abongiselá biso mabele na bolingo mpenza, mpe oyo Liloba na ye eteyaka biso na oyo etali bomoi.

      Adama ná Eva bazali kotala elanga ya Edene oyo etondi na banzete, bafololo mpe banyama.

      3. Yehova alingi ete bato bázala na bomoi ya malamu mpenza

      Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

      VIDEO: Mpo na nini Nzambe akelaki mabele?​—Video ya mokuse (1:41)

      • Mpo na nini Nzambe akelaki mabele?

      Tángá Mosakoli 3:11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Vɛrsɛ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?

      4. Makambo oyo Yehova akaná mpo na bato ebongwani te

      Tángá Nzembo 37:11, 29 mpe Yisaya 55:11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Ndenge nini toyebi ete makambo oyo Yehova akaná mpo na bato ebongwani te?

      A. Ndako moko ebebi. Nsamba (toiture) na yango elongwe, bafenetre ebukani, mpe lopango etondi na salite. B. Babongisi ndako yango, ekómi kitoko mpe lopango ekomi pɛto.

      Ndako oyo ebebi, bakoki kobongisa yango. Ndenge moko mpe, mabele oyo bato babebisi, Nzambe akobongisa yango mpo na bato oyo balingaka ye

      5. Kosambela Yehova esalaka ete bomoi ezala na ntina

      Koyeba ntina ya bomoi epesaka biso esengo. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

      VIDEO: Nayaki koyeba ntina ya bomoi (5:03)

      • Bolamu nini Terumi azwaki ndenge ayebaki ntina ya bomoi?

      Tángá Mosakoli 12:13, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Lokola Yehova asalelá biso makambo mingi, ndenge nini tokoki komonisela ye botɔndi?

      SOKI MOTO ATUNI YO: “Ntina ya bomoi ezali nini?”

      • Okopesa ye eyano nini?

      NA MOKUSE

      Yehova alingi ete tózala na bomoi ya kokoka mpe ya seko awa na mabele. Soki tozali kosambela ye na motema na biso mobimba, tokozala na esengo ata lelo oyo.

      Bozongeli

      • Yehova alingaki ete Adama ná Eva bázala na bomoi ya ndenge nini?

      • Ndenge nini toyebi ete makambo oyo Nzambe alingaki mpo na bato ebongwani te?

      • Osengeli kosala nini mpo ozala na esengo ya solosolo na bomoi?

      Oyo okoki kosala

      MAKANISI MOSUSU

      Luká koyeba makambo oyo emonisi ete elanga ya Edene ezalaki mpenza.

      “Elanga ya Edene ezalaki mpenza to ezalaki te?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2011)

      Luká koyeba mpo na nini tondimaka ete mabele ekozala libela na libela.

      “Mabele ekobebisama?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

      Talá makambo oyo Biblia elobi mpo bomoi na yo ezala na ntina.

      “Bomoi ezali na ntina nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

      Talá ndenge moto moko, oyo azalaki kokanisa ete azali na nyonso na bomoi na ye, ayaki komona ete eloko moko ezalaki kozanga ye.

      Sikoyo bomoi na ngai ekómi na ntina (3:55)

      a Na liteya oyo elandi, okoyeba mpo na nini tozali na bomoi ya ndenge wana te lelo oyo.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 2. Yesu akoyangela elongo na banani?

      Yesu akoyangela ye moko te. Biblia elobi ete “bato [oyo bakouta] na mabota nyonso, na minɔkɔ nyonso, na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso . . . bakoyangela mabele.” (Emoniseli 5:9, 10) Bato boni bakoyangela elongo na Kristo? Banda ntango Yesu azalaki awa na mabele, bamilio ya bato bakómá bayekoli na ye. Bango nyonso nde bakoyangela elongo na ye? Te! Kaka bato 144 000 nde bakoyangela elongo na Yesu na likoló. (Tángá Emoniseli 14:1-4) Bakristo mosusu nyonso awa na mabele bakozala bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.​—Nzembo 37:29.

  • Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?

      Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela na likoló. Etikali moke ebongisa makambo na mabele. Tólobela mwa ndambo ya makambo ya malamu oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala awa na mabele.

      1. Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekozongisa kimya mpe bosembo awa na mabele?

      Yesu, Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, akoboma bato mabe nyonso mpe akobebisa baguvɛrnema nyonso na etumba ya Armagedone. (Emoniseli 16:14, 16) Na ntango yango esakweli oyo ya Biblia ekokokisama: “Etikali kaka mwa ntango moke, bato mabe bakozala lisusu te.” (Nzembo 37:10) Na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, Yesu akosala ete kimya mpe bosembo ezala na mabele mobimba.​—Tángá Yisaya 11:4.

      2. Bomoi ekozala ndenge nini ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabele?

      Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili, “bato ya sembo bakozwa mabele, mpe bakofanda wana mpo na libela.” (Nzembo 37:29) Kanisá ete ozali na mokili oyo bato nyonso bazali sembo, balingaka Yehova mpe balinganaka! Moto moko te akobɛla mpe bato nyonso bakozala na bomoi libela na libela.

      3. Bokonzi ya Nzambe ekosala nini nsima ya koboma bato mabe?

      Nsima ya koboma bato mabe, Yesu akoyangela na boumeli ya mbula 1000. Na ntango yango, Yesu ná bato 144000 oyo bakoyangela elongo na ye bakosalisa bato awa na mabele mpo bákóma bato ya kokoka, elingi koloba, bakozala lisusu na lisumu te. Na nsuka ya mbula 1000, mabele ekokóma paradiso mpe bato nyonso bakozala na esengo mpo bazali kotosa mibeko ya Yehova. Na nsima, Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye, Yehova. Mpe ‘nkombo ya Yehova ekosantisama’ mpo na libela. (Matai 6:9, 10) Yango ekomonisa ete Yehova azali Mokonzi ya malamu oyo alingaka bikelamu na ye. Na nsima, Yehova akoboma Satana, bademo, mpe moto nyonso oyo akotombokela Bokonzi na ye. (Emoniseli 20:7-10) Makambo nyonso ya malamu oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala ekoumela libela na libela.

      KƆTÁ NA MOZINDO

      Luká koyeba mpo na nini tosengeli kondima ete Nzambe akosalela Bokonzi na ye mpo na kokokisa bilaka nyonso ya Biblia oyo etali mikolo ezali koya.

      4. Bokonzi ya Nzambe ekolongola baguvɛrnema ya mokili

      Biblia elobi: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo na kosilisa makambo ya kozanga bosembo.

      Tángá Danyele 2:44 mpe 2 Batesaloniki 1:6-8, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Makambo nini Yehova ná Mwana na ye, Yesu, bakosala baguvɛrnema ya mokili oyo mpe bato oyo bapesaka yango mabɔkɔ?

      • Makambo oyo oyekoli mpo na Yehova ná Yesu endimisi yo ete bakosala makambo ya malamu mpe ya sembo? Mpo na nini?

      Mokonzi Yesu na likoló azali koyangela mabele oyo ebongwani paradiso.

      5. Yesu azali Mokonzi ya malamu koleka

      Lokola Yesu azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, akosalisa bato awa na mabele na makambo mingi. Talá VIDEO mpo na komona ndenge Yesu amonisaki ete azali na mposa ya kosalisa bato mpe Nzambe apesaki ye nguya ya kosala yango.

      VIDEO: Yesu amonisaki makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala (1:13)

      Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki na mokuse makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala. Na mapamboli oyo elandi, oyo wapi ozelaka mpenza na mposa makasi? Tángá bavɛrsɛ oyo elobeli mapamboli yango.

      NTANGO AZALAKI AWA NA MABELE, YESU . . .

      NA LIKOLÓ, YESU . . .

      • akitisaki mipɛpɛ makasi. ​—Marko 4:36-41.

      • akosilisa makama nyonso.​—Yisaya 35:1, 2.

      • aleisaki ebele ya bato na ndenge ya likamwisi.​—Matai 14:17-21.

      • akosilisa nzala na mokili.​—Nzembo 72:16.

      • abikisaki bato ebele ya maladi.​—Luka 18:35-43.

      • akosala ete bato nyonso bázala na nzoto kolɔngɔnɔ.​—Yisaya 33:24.

      • asekwisaki bato oyo bakufaki. ​—Luka 8:49-55.

      • akosekwisa bato oyo bakufá mpe akolongola liwa.​—Emoniseli 21:3, 4.

      6. Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato makambo ya malamu na mikolo ezali koya

      Bokonzi ya Nzambe ekopesa bato bomoi ya malamu oyo Yehova alingaka bázala na yango. Bakozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele. Talá VIDEO mpo na komona ndenge oyo Yehova asaleli Mwana na ye, Yesu, mpo akokisa mokano na ye.

      VIDEO: Makambo ya kitoko oyo ekosalema na mikolo ezali koya (4:38)

      Tángá Nzembo 145:16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Koyeba ete Yehova ‘akokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi,’ esali ete omiyoka ndenge nini?

      SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Mikakatano ya bato ekoki kosila na yango soki batye bakonzi ya malamu.”

      • Mikakatano nini Bokonzi ya Nzambe ekosilisa, oyo baguvɛrnema ya mokili ekokoka kosilisa te?

      NA MOKUSE

      Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo oyo Nzambe alingi. Ekobongola mabele mobimba paradiso, oyo ekotonda na bato oyo bakosambela Yehova mpo na libela.

      Bozongeli

      • Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekosantisa nkombo ya Yehova?

      • Mpo na nini tokoki kondima ete Bokonzi ya Nzambe ekokokisa bilaka ya Biblia?

      • Na makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala, oyo wapi ozelaka mpenza na mposa makasi?

      Oyo okoki kosala

      MAKANISI MOSUSU

      Luká koyeba soki Armagedone ezali nini.

      “Etumba ya Armagedone ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

      Talá makambo oyo ekosalema na boumeli ya ntango oyo Yesu abengaki “bolɔzi monene.”—Matai 24:21.

      “Bolɔzi monene ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

      Talá ndenge mabota bakoki komona na makanisi ndenge bakozala elongo na Paradiso.

      Mimoná na Paradiso (1:50)

      Tángá lisolo “Nazalaki na mituna mingi oyo ezalaki kotungisa ngai,” mpo na komona ndenge moto moko ya politiki oyo azalaki motomboki azwaki eloko oyo azalaki mpenza koluka.

      “Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2012)

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto