Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • “Mikano na yo ekobongisama”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2007 | 15 Mai
    • NA LOYEMBO moko oyo akomaki, Davidi abondelaki boye: “Ee Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai. Zongiselá ngai esengo ya kobikisa na yo mpe kangá ngai na [elimo oyo elingaka kotosa, NW].” (Nzembo 51:10, 12) Bavɛrsɛ yango emonisi ete nsima ya kokwea na lisumu na Bata-seba, Davidi abongolaki motema mpe asɛngaki Yehova Nzambe apɛtola motema na ye mpe atya kati na ye mposa ya kosala oyo ezali malamu.

      Yehova azalisaka mpenza na kati na biso motema ya sika, mpe atyaka mpenza na kati na biso elimo ya sika, oyo elingaka kotosa? To biso moko nde tosengeli kosala makasi mpo tókóma na motema ya pɛto mpe tóbatela yango? “Yehova atalaka mitema,” kasi na meko nini abongolaka yango? (Masese 17:3, NW; Yilimia 17:10) Ndenge nini atambwisaka bomoi, makanisi, mpe misala na biso?

  • “Mikano na yo ekobongisama”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2007 | 15 Mai
    • Nani asalaka “myango ya motema”?

      Masese 16:1a elobi ete “myango ya motema ezali likambo ya moto.” Ezali polele ete biso moko nde tozali na mokumba ya kosala “myango ya motema.” Yehova abongisaka motema na biso na ndenge ya likamwisi te; apesaka mpe biso elimo oyo elingaka kotosa na ndenge ya likamwisi te. Tosengeli kosala makasi mpo na kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia, Liloba na ye, komanyola makambo oyo tozali koyekola, mpe koyokanisa makanisi na biso na oyo ya ye.​—Masese 2:10, 11.

      Nzokande, libondeli oyo Davidi asalaki mpo na kosɛnga “motema ya pɛto” mpe “elimo ya sika” emonisi ete ayebaki ete azali moto ya masumu mpe ete azali na mposa ya lisalisi ya Nzambe mpo na kopɛtola motema na ye. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kobendama na “misala ya mosuni.” (Bagalatia 5:19-21) Tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo na ‘koboma binama ya nzoto na biso oyo bizali na mabelé na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato.’ (Bakolose 3:5) Ezali na ntina tóbondelaka Nzambe mpo na kosɛnga ye asalisa biso tókwea te na komekama mpe tólongola na mitema na biso mposa ya kosala masumu!

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto