Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/01 lok. 7
  • Mokanda euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Bokoli ezali kosɛnga ete bisika mosusu ya losambo etongama nokinoki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 6/01 lok. 7

Mokanda euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

OYO nde libaku malamu tozali na yango mpenza! Tozali Batatoli ya Yehova te kaka mpo toyebi ye lokola Nzambe bobele moko ya solo mpe oyo azali na bomoi, Mozalisi ya molɔngɔ́ mobimba; kasi mpo ete tozali kosalela ye mpe tozali komema nkombo na ye. Ezali na libaku mosusu malamu oyo eleki yango?​—Yis. 43:12; Ebe. 8:11.

Tozali na elikya ya lobiko, kasi tozali mpe na mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpo ete bato mosusu báya kosambela Yehova mpe bazala na elikya lokola biso. (Mat. 24:14; Lom. 10:13, 14; 1 Tes. 5:8) Tozali na esengo ya kosala libota monene ya bandeko ya mikili mingi oyo bazali kosambela Yehova, bazali na bolingo kati na bango mpe bazali kosalisana. Ezali mpenza esengo!

Biblia ezali kopesa biso libyangi oyo ebongi mpenza, ete: “Bósalela [Yehova] na esengo. ... Bókɔta kati na bikuke na ye na matɔndi, na lopango na ye na kosanzola; bótɔnda ye, bósanzola nkombo na ye. Zambi [Yehova] azali malamu, boboto na ye ekosila te; solo na ye ekotikalaka na libota na libota.” (Nz. 100:2-5) Mpo na kosalela Yehova na esengo, tosengeli kozala na boyokani ya malamu na ye. Azali kopesa biso likoki yango mpe likambo yango ezali lokumu mpo na biso. Soki tozali na boyokani motindo wana na ye, boye tokoyeba ete azali ntango nyonso pene ya kosalisa biso mpe ya kolendisa biso ntango tozali na mposa ya lisungi. Tondimi mpenza ete akopesa biso nguya mpe litambwisi ya elimo oyo ebongi mpo tóyika mpiko na mikakatano ya bomoi oyo tozali kokutana na yango na mikolo oyo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo. Ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini, tozali kokokisa na esengo nyonso mosala na biso mpe tozali kotɔnda Yehova mikolo nyonso, mpamba te ndenge Liloba na ye eyebisi biso yango, ‘azali komibanzabanza mpo na biso.’​—1 Pet. 5:7.

Na mbula eleki, Yehova apambolaki biso mpenza. Na mayangani ya etúká “Batosi ya Liloba ya Nzambe,” tosanganaki na esengo nyonso elongo na bankóto ya basaleli ya Yehova mosusu oyo bazali na kondima moko na biso mpo na koyemba mpe kolya na mesa ya elimo ya Yehova. Na boyekoli ya mokanda, kondima na biso elendisamaki ntango toyekolaki elongo mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Mpe lisusu, tozalaki na esengo ya kozwa volimi ya liboso ya buku Esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso. ‘Kɔpɔ na biso etondi mpenza maa.’​—Nz. 23:5.

Ezali mpenza esengo ya koyeba ete tosangani na bamilio ya bandeko na biso ya elimo mpo na kosala mosala ya Yehova! Ezali mpenza esengo na komona mitango minene oyo tokokisaki na mosala ya kosakola! Tozali mpe na esengo ya komona ete bamilio ya bato bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Nkolo na biso atako mikakatano etondi na mokili. Emonani mpenza ete na mokili mobimba, “mbuma mingi iteli solo.” (Luka 10:2) Na mbula eleki, pɔsɔ na pɔsɔ ezalaki na bayekoli ya Biblia soki 5 555, oyo bakolaki na elimo tii na komipesa na Nzambe, bazwaki batisimo. Atako na bikólo mosusu mbuma na elanga iteli mingi mpenza koleka na bikólo mosusu, kasi biso nyonso tozali kosepela na makambo oyo Yehova azali kokokisa. Yango ezali komonisa polele ete azali kopambola milende oyo basaleli na ye bazali kosangisa.

Kotonga Bandako ya Bokonzi ezali mpe likambo mosusu oyo ezali kopesa esengo mingi. Tozali mpenza na esengo ya komona ete bandeko na biso ya mikili oyo ezali na bozwi mingi te bazali kopesa mabɔkɔ na esengo nyonso na mosala yango. Bankama ya Bandako ya Bokonzi esili kotongama na lisalisi ya bandeko oyo bamipesi mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Esengelaki naino kolakisa bandeko yango mosala. Bandeko yango bazali kokende na lisangá moko mpe mosusu ya mboka na bango mpo na kotambwisa mosala ya kotonga. Lokola tosengeli kotonga Bandako ya Bokonzi mingi, libyangi epesami na mikili oyo ezali na bozwi mingi te ete bandeko mingi ya bolingo malamu bápesa lisungi na bango na mosala yango ya ntina mpenza. Soki ofandaka na moko ya mikili yango, okoki te kosɛnga ete opesa mabɔkɔ na mosala yango? Bandeko na biso ya bolingo bazali na esengo ya kozala na Bandako ya Bokonzi ya bango moko mpo na losambo. Bazali na botɔndi mingi epai ya bandeko na bango na mokili mobimba mpo na mbongo oyo bazali kopesa mpo mosala yango esalema.

Bansango oyo ezali komonisa ndenge tozali kolonga liboso ya batribinale ezali kolendisa biso mpenza, kasi na bisika mingi bato ya minene bazali koluka kolimwisa losambo ya Yehova. Na kotalela likambo yango, tozali kotya ntembe te ete tokozwa lisungi ya Nzambe, mpamba te ye asungaka ata soki banguna na biso bazali mingi to biso tozali komonana makasi te. (2 Nta. 14:11, NW) Tozali kopesa longonya na bandeko na biso nyonso oyo bazali kokangama na losambo ya solo.

Wana bozali kokokisa na esengo nyonso mikumba na bino ya boklisto, bólanda kolendisa kondima na bino, bótalela Yehova mpe bóluka litambwisi na ye. (Mas. 3:5, 6) Ata soki Yehova atikeli banguna na biso nzela, tosengeli kolɛmba ata moke te. Bómikundolaka maloba ya kolendisa oyo Elisa ayebisaki mosaleli na ye oyo azalaki kobanga ete: “Bangá te mpo ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!” (2 Mik. 6:15-17) Ndenge ezalaki na mikolo ya Elisa, mampinga ya Yehova oyo ezali na likoló ezali lelo oyo pene ya kobatela matomba ya losambo ya solo. Tozali kotalela mikolo oyo ezali koya na elikya mpenza, mpamba te Yehova azali kotambwisa makambo nyonso, mpe mabota ekoki te kowelana na ye. Asili kotya mwana na ye Mokonzi mpe apesi ye nguya nyonso. “Bango nyonso baoyo bakomibomba epai na ye bakopambolama.”​—Nz. 2:1-6, 12.

Bandeko, bóyeba ete tozali kokanisa bino ntango nyonso na bolingo mpenza. Tozali mpenza kobondela mpo ete moko na moko kati na bino ‘azala moto oyo akoki mpenza mpe azali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.’​—Kols. 4:12, NW.

Bandeko na bino,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto