Tósanzola Yehova na bomoko
“Bósanzola Yah!”—NZ. 111:1, NW.
1, 2. Liloba “Aleluya” elimboli nini, mpe ndenge nini esalelami na Makomami ya Grɛki ya boklisto?
“ALELUYA!” Liloba wana esalelamaka mingi na mangomba ya boklisto. Bato mosusu bakómá kosalela liloba yango ntango nyonso, ata na masolo na bango. Nzokande, kaka bato moke nde bayebi ndimbola na yango, mpe etamboli ya bato mingi oyo basalelaka yango ekumisaka Nzambe te. (Tito 1:16) Buku moko emonisi ete “bato mingi oyo bakomaki banzembo basalelaki liloba Aleluya mpo na kosɛnga bato nyonso bákumisa Nzambe elongo na bango.” Kutu, balimboli mingi ya maloba ya Biblia balobaka ete “Aleluya” elimboli “‘Bókumisa Yah,’ [elingi koloba] Yehova.”
2 Yango wana, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli maloba oyo ezali na Nzembo 111:1 boye: “Bósanzola Yah!” Na Grɛki, liloba yango esalelami mbala minei na Emoniseli 19:1-6 mpo na kosepela kobomama ya mangomba ya lokuta. Ntango likambo yango ekosalema, basambeli ya solo bakozala na ntina mpenza ya koloba “Aleluya” na limemya nyonso.
Misala na ye minene
3. Ntina ya libosoliboso oyo toyanganaka ezali nini?
3 Mokomi ya Nzembo 111 apesi bantina mingi oyo ebongi tósanzola Yehova na bomoko. Vɛrsɛ 1 (NW) elobi boye: “Nakokumisa Yehova na motema na ngai mobimba na etuluku ya bato ya makambo alima mpe na liyangani.” Lelo mpe, Batatoli ya Yehova bazalaka na makanisi yango. Ntina ya libosoliboso oyo tokendaka na makita mpe na mayangani ezali ya kokumisa Yehova.
4. Ndenge nini bato bakoki koyekola misala ya Nzambe?
4 “Misala ya Yehova ezali minene, baoyo nyonso basepelaka na yango bayekolaka yango.” (Nz. 111:2, NW) Simbá maloba “bayekolaka yango.” Buku moko elobi ete vɛrsɛ yango ekoki kosalelama mpo na bato oyo basalaka “makasi mpo na komanyola mpe koyekola” misala ya Nzambe. Biloko nyonso oyo Yehova akelá ezali na ntina. Atyá moi, mabelé mpe sanza na bisika oyo ebongi mpenza, mpe ezali mpenza na boyokani na kati na yango; yango wana mabelé ezwaka molunge, mpe pole, butu eyindaka mpe ntɔngɔ etanaka, bileko ebongwanaka mpe mai ya mbu emataka mpe ekitaka.
5. Makambo oyo bato basili koyeba na ntina na molɔ́ngɔ́ emonisi nini?
5 Bato ya mayele bayebi makambo mingi na ntina na esika oyo mabelé etyamá na kati ya molɔngɔ, nzela oyo sanza elekaka ntango ezali kobaluka mpe monene na yango. Ndenge oyo biloko yango ebongisamá mpe esalaka na bomoko epesaka nzela ete tózala na bileko ndenge na ndenge. Bayebi mpe makambo mingi na ndenge oyo biloko nyonso ya molɔ́ngɔ́ etambolaka na boyokani. Yango wana, na lisolo moko oyo akomaki (The Designed ‘Just So’ Universe), profɛsɛrɛ moko alobaki boye: “Tokoki kokamwa te ete bato mingi ya siansi babongoli makanisi na bango na boumeli ya bambula 30 oyo euti koleka; bandimi ete tozali na likoki te ya komonisa ete molɔ́ngɔ́ ebimá kaka yango moko. Makambo oyo tosili koyeba na ntina na mabelé oyo tofandi ezali komonisa mpenza ete ezali na Mozalisi oyo akelaki yango.”
6. Oyokaka ndenge nini ntango ozali komona ndenge Nzambe asalá moto?
6 Ndenge oyo tokelamá ezali mpe moko ya misala ya kokamwa ya Nzambe. (Nz. 139:14) Ntango asalaki moto, apesaki ye bɔɔngɔ, nzoto ná binama ya ntina mingi mpe likoki ya kosala mosala. Na ndakisa, makoki oyo Nzambe apesá biso ya koloba, koyoka, kotánga mpe kokoma ezali mpenza likamwisi. Bato mingi bazali na makoki yango. Likoki oyo ozali na yango ya kotɛlɛma semba emonisi ete ozali ekelamu ya kokamwa. Ndenge nzoto na yo esalemá mpe likoki oyo ozali na yango ya kotɛlɛma, kotambola mpe makambo mosusu oyo esalemaka na kati ya nzoto na yo ezali likambo ya kokamwa. Longola yango, bɔɔngɔ na yo oyo epesaka yo likoki ya kokanisa, komona, koyoka nsolo to makelele, kosimba mpe kosala makambo mosusu, eleki mosika biloko nyonso oyo bato ya siansi basalá. Kutu, bato bakoki kosala eloko moko te soki bazangi biloko wana nyonso oyo totángi. Ata moto moko te ya mayele akoki kosala masini moko oyo ekoki kosala mosala oyo misapi na biso esalaka. Omituna naino: ‘Bato balingaki kozala na likoki ya kosala misala ya kokamwa lokola kotonga bandako soki bazalaki na misapi te?’
Misala minene ya Yehova mpe bizaleli na ye
7. Mpo na nini tosengeli kotalela Biblia lokola moko ya misala ya kokamwa ya Nzambe?
7 Na kati ya misala minene ya Yehova, tokoki kotánga makambo kitoko oyo asalá mpo na bato, ndenge emonisami na Biblia. Biblia yango moko ezali mpe moko ya misala ya kokamwa ya Yehova, mpe babuku na yango nyonso ezali na boyokani. Na bokeseni na babuku mosusu, Biblia “epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya.” (2 Tim. 3:16) Na ndakisa, Genese, mokanda ya liboso ya Biblia, elimboli ndenge Nzambe alongolaki mabe na ntango ya Noa. Exode, mokanda ya mibale, emonisi ndenge Nzambe amonisaki Bonzambe na ye na ndenge abimisaki Bayisalaele na boombo na Ezipito. Na ntembe te, mokomi ya nzembo azalaki kokanisa likambo yango ntango akomaki boye: “Mosala [ya Yehova] ezali ya lokumu mpe ya nkembo mpenza, mpe boyengebene na ye ezali mpo na libela. Asalá ekaniseli mpo na misala na ye ya kokamwa. Yehova azali na ngɔlu mpe na motema mawa.” (Nz. 111:3, 4, NW) Omoni te ete makambo oyo Yehova asali banda mokili ebandá mpe oyo azali kosala na ntango na biso emonisaka ‘lokumu mpe nkembo’ na ye?
8, 9. (a) Na ndenge nini misala ya Nzambe ekeseni na misala mingi ya bato? (b) Wapi bizaleli mosusu ya Nzambe oyo esepelisaka yo?
8 Tóbosana te ete mokomi ya nzembo alobeli mpe bizaleli kitoko ya Yehova, na ndakisa boyengebene, ngɔlu mpe motema mawa. Misala ya bato ya masumu emonisaka boyengebene te. Mbala mingi emonisaka lokoso, bilulela mpe lolendo. Yango ezali komonana na bibundeli ya nsɔmɔ oyo bato bazali kosala mpo na bitumba oyo bazali kobimisa mpe mpo na lokoso ya mbongo. Yango ezali komemela bamilio ya bato mpasi. Lisusu, misala mingi ya bato ezalaka kaka mpo na konyokola babola. Na ndakisa, tokoki kotánga bapiramide oyo baombo na Ezipito bazalaki kotonga. Bazalaki kosalela yango mingimingi mpo na kokunda Bafalao to bakonzi ya ekólo yango. Lisusu, misala mingi oyo bato bazali kosala lelo oyo esuki kaka te na konyokola bato, kasi ezali mpe “kobebisa mabelé.”—Tángá Emoniseli 11:18.
9 Yango ekeseni mpenza na misala ya Yehova, oyo ezalaka ntango nyonso sembo! Na kati ya misala na ye, tokoki kotánga ebongiseli oyo azwaki mpo na kosikola bato ya masumu. Nzambe ‘alakisaki boyengebene na ye moko’ na ndenge apesaki lisiko. (Lom. 3:25, 26) Ya solo mpenza, “boyengebene na ye ezali mpo na libela”! Ndenge moko mpe, ngɔlu na ye emonani na ndenge azali komonisela bato ya masumu motema molai. Ntango mosusu, azalaki kosalela maloba lokola “nabondeli bino,” ntango azalaki kosɛnga Bayisalaele bátika banzela na bango ya mabe mpe básala oyo ezali malamu.—Tángá Ezekiele 18:25.
Azangaka te kokokisa bilaka na ye
10. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali sembo na kondimana na ye na Abalayama?
10 “Apesi baoyo babangaka ye bilei. Akokanisa kondimana na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Nz. 111:5, NW) Emonani ete na vɛrsɛ yango, mokomi ya nzembo alobelaki kondimana ya Abalayama. Yehova alakaki ete akopambola momboto ya Abalayama mpe ete bakozwa mokili ya banguna na bango. (Gen. 22:17, 18; Nz. 105:8, 9) Na kokokisama ya liboso ya elaka yango, momboto ya Abalayama ekómaki ekólo Yisalaele. Ekólo yango eumelaki na boombo na Ezipito, kasi na nsima “Nzambe akanisaki kondimana kati na ye na Abalayama” mpe alongolaki bango na boombo. (Ex. 2:24) Ndenge oyo Yehova azalaki komibanzabanza mpo na bango emonisaki ete azali mokabi monene. Azalaki koleisa bango na mosuni mpe na elimo. (Det. 6:1-3; 8:4; Neh. 9:21) Na bikeke oyo elandaki, Bayisalaele bazalaki kopesa Nzambe mokɔngɔ mbala na mbala, atako azalaki kotinda basakoli mpo na kolendisa bango bátika nzela ya mabe. Mbula koleka 1 500 nsima ya kobimisa Bayisalaele na Ezipito, Nzambe atindaki Mwana na ye bobele moko awa na mabelé. Bayuda mingi baboyaki Yesu mpe bandimaki abomama. Yango wana Yehova asalaki ekólo ya sika, “Yisalaele ya Nzambe.” Elongo na Klisto, ekólo yango esali momboto ya Abalayama, oyo Yehova alakaki ete mabota nyonso ekopambwama na nzela na yango.—Gal. 3:16, 29; 6:16.
11. Ndenge nini Yehova azali kokoba ‘kokanisa kondimana na ye’ na Abalayama?
11 Yehova azali kokoba ‘kokanisa kondimana na ye’ mpe mapamboli oyo alakaki kopesa na nzela na yango. Lelo oyo, azali kopesa ebele ya bilei ya elimo na minɔkɔ koleka 400. Lisusu, azali kokoba koyanola na mabondeli oyo tosalaka mpo na bamposa na biso ya mosuni, na boyokani na maloba oyo: “Pesá biso mampa na biso ya mokolo engebene bamposa ya mokolo.”—Luka 11:3; Nz. 72:16, 17; Yis. 25:6-8.
Nguya ya kokamwa ya Yehova
12. Na ndenge nini Bayisalaele bazwaki “libula ya bikólo”?
12 “Ayebisá bato na ye nguya ya misala na ye, na ndenge apesá bango libula ya bikólo.” (Nz. 111:6, NW) Ekoki kozala ete likambo ya ntina mingi na lisolo ya Bayisalaele oyo mokomi ya nzembo azalaki kokanisa ezali likamwisi oyo Nzambe asalaki mpo na kobimisa libota na ye na Ezipito. Ntango Yehova atikaki Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, babenganaki banguna na bango oyo bazalaki na ngámbo ya ɛsti mpe ya wɛsti ya Ebale Yolodani. (Tángá Nehemia 9:22-25.) Ya solo, Yehova apesaki Bayisalaele “libula ya bikólo.” Nzambe amonisaki mpenza nguya na ye monene!
13, 14. (a) Ekoki kozala ete mokomi ya nzembo azalaki kokanisa nini ntango alobelaki nguya oyo Nzambe amonisaki na Babilone? (b) Wapi misala mosusu ya nguya oyo Yehova asali mpo na kosikola basaleli na ye?
13 Nzokande, biso nyonso toyebi ete atako Yehova asalelaki bango makambo wana nyonso, Bayisalaele bamonisaki limemya te epai ya Nzambe ata mpe epai ya bankɔkɔ na bango Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo. Bakobaki na botomboki na bango tii ntango Nzambe asalelaki bato ya Babilone bámema bango na boombo. (2 Nta. 36:15-17; Neh. 9:28-30) Soki ya solo mokomi ya Nzembo 111 azalaki na bomoi ntango Bayisalaele bazongaki na mboka na bango, ndenge balimboli mosusu ya Biblia balobaka yango, alingaki kozala na ntina mosusu ya kokumisa Yehova mpo na bosembo mpe nguya na ye. Nzambe amonisaki nguya yango na ndenge alongolaki Bayuda na boombo na Babilone, ekólo oyo eyebanaki ete etikaka te baombo na yango.—Yis. 14:4, 17.
14 Bikeke soki mitano na nsima, Yehova asalelaki lisusu nguya na ye na ndenge ya kokamwa ntango abikisaki bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (Lom. 5:12) Yango epesaki nzela na bato 144 000 bákóma bayekoli bapakolami ya Klisto. Na mobu 1919, Yehova asalelaki mpe nguya na ye mpo na kobimisa batikali bapakolami na boombo ya mangomba ya lokuta. Mosala oyo bazali kosala na ntango oyo ya nsuka, ezali kosalema na nguya ya Nzambe. Soki batikali sembo tii na liwa, bakoyangela elongo na Yesu Klisto na likoló, mpe yango ekomemela bato awa na mabelé mapamboli mingi. (Emon. 2:26, 27; 5:9, 10) Na bokeseni na Bayisalaele, bato yango bakozwa mabelé mobimba.—Mat. 5:5.
Mitinda na ye esilaka ngala te
15, 16. (a) Na kati ya misala ya mabɔkɔ ya Nzambe, tokoki kotánga nini? (b) Mibeko nini Nzambe apesaki na Bayisalaele?
15 “Misala ya mabɔkɔ na ye ezali solo mpe bosembo; mitindo nyonso oyo apesaka ebongi kotyelama motema, esimbami malamu mpo na libela, mpo na seko, esalemi na solo mpe na bosembo.” (Nz. 111:7, 8, NW) Kati na “misala ya mabɔkɔ [ya Yehova]” tokoki kotánga bitanda mibale ya mabanga oyo mibeko ekomamaki likoló na yango mpo na Bayisalaele. (Ex. 31:18) Mibeko yango mpe mitinda mosusu oyo ezalaki na kati ya Mibeko ya Moize esilaka ngala te mpe ebongi kotyelama motema.
16 Na ndakisa, moko ya mibeko yango elobaki boye: “Ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.” Elobi lisusu ete Yehova amonisaka ‘motema boboto kino na libota ya nkóto ya baoyo balingaka ye mpe babatelaka mibeko na ye.’ Bitanda yango ya mabanga ezalaki mpe na mibeko mosusu lokola oyo: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo” mpe “Osengeli koyiba te,” mpe mobeko mosusu oyo epekisaki kolula eloko ya mozalani.—Ex. 20:5, 6, 12, 15, 17, NW.
Mosikoli na biso mosantu
17. Bantina nini Bayisalaele bazalaki na yango ya kokumisa nkombo mosantu ya Nzambe?
17 “Atindeli bato na ye lisiko. Apesi mitindo ya kondimana na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Nkombo na ye ezali mosantu mpe nsɔmɔ.” (Nz. 111:9, NW) Lisusu, ekoki kozala ete mokomi ya nzembo azalaki kokanisa bosembo oyo Yehova amonisaki mpo na kondimana oyo asalaki na Abalayama. Na boyokani na kondimana yango, Yehova atikaki bato na ye na boombo te, ezala na Ezipito to na Babilone. Na mbala yango mibale, Nzambe abikisaki bango. Ata mpo na makambo yango mibale, Bayisalaele basengelaki mpenza kokumisa nkombo mosantu ya Nzambe.—Tángá Exode 20:7; Baloma 2:23, 24.
18. Mpo na nini omonaka ete komema nkombo ya Nzambe ezali libaku monene?
18 Ezali mpe bongo lelo oyo mpo na biso baoyo tosikolami na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Tosengeli kosala makasi tózala na bomoi oyo eyokani na libondeli oyo: “Tiká nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Komanyola nkembo ya nkombo yango ekotinda biso tóbangaka Nzambe. Mokomi ya Nzembo 111 azalaki kobanga Nzambe na ndenge ebongi. Alobaki boye: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya. Baoyo nyonso bazali kosalela yango [kotosa mibeko na ye] bazalaka mpenza na mayele ya kososola.”—Nz. 111:10, NW.
19. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
19 Kobanga Nzambe na ndenge ebongi ekosalisa biso tóboya oyo ezali mabe. Ekosalisa biso mpe tómekola bizaleli kitoko ya Nzambe oyo ezali na Nzembo 112, oyo tokotalela na lisolo oyo elandi. Nzembo yango ezali komonisa oyo tokoki kosala mpo biso mpe tózala na kati ya bamilio ya bato oyo bakokumisa Nzambe libela na libela. Yahova abongi mpenza na lokumu. “Lisanzoli na ye ezali mpo na seko.”—Nz. 111:10, NW.
Mituna ya bozongeli
• Mpo na nini ebongi tókumisa Yehova na bomoko?
• Bizaleli nini ya Yehova emonanaka na biloko oyo akelá?
• Ndenge nini otalelaka libaku ya komema nkombo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 20]
Ntina ya libosoliboso oyo toyanganaka ezali ya kokumisa Yehova
[Elilingi na lokasa 23]
Mibeko nyonso ya Yehova esimbami na mitinda oyo ebongi mpenza kotyelama motema mpe esilaka ngala te