Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 4 lok. 5
  • 2 Poná baninga mpe makambo oyo ekoki kosalisa yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 2 Poná baninga mpe makambo oyo ekoki kosalisa yo
  • Lamuká!—2016
  • Masolo mosusu
  • 1 Talelá makambo na ndenge ebongi
    Lamuká!—2016
  • Tiká ete makambo omeseni na yango epesa yo litomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Maloba ya ebandeli
    Lamuká!—2016
  • Maloba ya ebandeli
    Lamuká!—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 4 lok. 5
Babongisi bilamba ya ngalasisi, sapato, molangi ya mai, mpe aparɛyi na butu

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOTIKA MIMESENO YA MABE

2 Poná baninga mpe makambo oyo ekoki kosalisa yo

  • Ozwaki mokano ya kolya bilei oyo etongaka nzoto, kasi motema ezali kotinda yo kaka olya krɛmɛ ya malili.

  • Ozwaki mokano ya kotika makaya, kasi moninga na yo moko oyo ayebi ete ozali kosala nyonso mpo otika komɛla yango apesi yo lisusu likaya.

  • Okanaki kosala ngalasisi lelo, kasi koluka sapato oyo olataka mpo na kokima mbangu ekómeli yo mosala!

Bandakisa oyo misato ekokani na nini? Emonanaka mbala mingi ete bato oyo tolekisaka na bango ntango mpe makambo oyo tosalaka nde esalaka ete tókóma na mimeseno ya malamu to ya mabe.

TOLI YA BIBLIA: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”​—Masese 22:3.

Biblia elendisaka biso tókanisaka liboso. Soki tosali bongo, tokoki kokima makambo oyo ekoki kobebisa mikano na biso mpe tokosala makambo oyo ekozala mpo na litomba na biso. (2 Timote 2:22) Na mokuse, ekozala malamu tópona baninga mpe makambo oyo ekoki kosalisa biso.

Salá ete ekómela yo mpasi kosala likambo ya mabe kasi pɛtɛɛ kosala oyo ya malamu

OYO OKOKI KOSALA

  • Salá ete ekómela yo mpasi kosala likambo ya mabe. Na ndakisa, soki olingi kotika kolya bilei oyo etongaka nzoto te, kotya te na kuku to na kwizini bilei oyo oyebi ete ezali mabe mpo na yo. Soki osali bongo, ntango mposa ya kolya yango ezwi yo, ekozala mpasi olya yango.

  • Salá ete ekómela yo pɛtɛɛ kosala likambo ya malamu. Na ndakisa, soki okani kosala ngalasisi na ntɔngɔ, tyá bilamba na yo ya ngalasisi pembeni ya mbeto liboso okende kolala. Soki ekómeli yo pɛtɛɛ kosala yango, ekozala mpasi te okoba kosala yango.

  • Poná malamu baninga na yo. Ezalaka mpasi te tómekola bato oyo tolekisaka na bango ntango. (1 Bakorinti 15:33) Yango wana, kozalaka mingimingi te na bato oyo bakotinda yo osala makambo oyo ozali na mposa ya kotika, kasi luká nde baoyo bakoki kosalisa yo omesana na makambo ya malamu.

TOLI MOSUSU YA BIBLIA

“Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

“Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”​—Masese 21:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto