-
Tyelá Yehova motema na yo mobimbaLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2003 | 1 Septembre
-
-
18, 19. Biblia elobi nini mpo na kolendisa biso na kotyela Yehova motema, kasi na likambo yango, libunga nini bato mosusu bazalaka na yango?
18 Liloba ya Nzambe elobi na biso ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Yango ezali maloba kitoko mpe ezali kopesa elikya. Na ntembe te, na molɔ́ngɔ́ mobimba, ezali na moto moko te oyo tokoki kotyela motema koleka Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló. Nzokande, kotánga maloba yango ya Masese ezali mpasi te, kasi kosalela yango nde ezali mpasi.
-
-
Tyelá Yehova motema na yo mobimbaLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2003 | 1 Septembre
-
-
22, 23. (a) Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema ntango tokutani na mikakatano, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
22 Nzokande, Masese 3:6 emonisi ete tosengeli ‘kotalela Yehova na banzela na biso nyonso,’ kasi te kaka ntango tokutani na mikakatano. Na bongo, bikateli na biso ya mokolo na mokolo esengeli komonisaka ete totyelaka Yehova motema. Ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kobungisa elikya te, kobanga te, to koboya kolanda toli ya Yehova oyo elakisaka ndenge eleki malamu ya kosilisa mikakatano. Tosengeli kotalela mikakatano lokola mabaku ya komonisa ete tozali kondima bokonzi ya Yehova, mpo biso mpe tómonisa ete Satana azali mobuki-lokuta, mpe mpo na kolona botosi mpe bizaleli mosusu oyo esepelisaka Yehova.—Baebele 5:7, 8.
-