Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 3
  • Makambo oyo Biblia elobi ezali mpenza solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo Biblia elobi ezali mpenza solo?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Ondimaka ete makambo Biblia elobi ezali solo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
  • Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Biblia ekoki kosalisa yo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 3
Liteya 3. Bamaniskri ya kala ya Biblia ezali likoló ya mesa.

LITEYA 03

Makambo oyo Biblia elobi ezali mpenza solo?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Biblia ezali na bilaka mingi mpe na batoli ebele. Ekoki kozala ete olukaka koyeba makambo oyo yango eteyaka, kasi mbala mosusu obangaka kondima likambo mbala moko. Osengeli mpenza kondimela bilaka mpe batoli ya buku wana ya kalakala? Makambo oyo Biblia elobi ekoki mpenza kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu lelo? Tokoki mpenza kondima makambo oyo yango elobi mpo na mikolo ezali koya? Bato mingi bandimaka yango. Tótalela makambo oyo ekoki mpe kondimisa yo.

1. Masolo ya Biblia ezali mpenza solo?

Biblia elobi ete ‘ekomi na bosikisiki maloba ya solo.’ (Mosakoli 12:10) Ebɛtaka masolo ya solo oyo elobelaka bato oyo bazalaki mpenza na bomoi. (Tángá Luka 1:3; 3:1, 2.) Bato mingi ya istware mpe baoyo balukalukaka biloko ya kala balobi ete badati, bato, bisika mpe makambo oyo Biblia elobeli ezali mpenza solo.

2. Mpo na nini Biblia esilaka ngala te?

Mbala mingi, Biblia elobeli makambo oyo eyebanaki te na ntango oyo yango ekomamaki. Na ndakisa elobeli makambo ya siansi. Ntango Biblia ekomamaki, bato mingi bazalaki kondima makambo yango te. Kasi, lelo bato ya mayele na makambo ya siansi bandimi ete makambo oyo Biblia elobi ezali solo. Makambo yango “Ebongi kotyelama motema ntango nyonso, sikoyo mpe mpo na libela.” ​—Nzembo 111:8.

3. Mpo na nini tosengeli kondima makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya?

Biblia ezali na bisakwelia oyo elobeli “makambo oyo esalemi naino te.” (Yisaya 46:10) Elobelá makambo na bosikisiki liboso ete makambo yango esalema. Elobelá mpe na bosikisiki mpenza makambo oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo. Na liteya oyo, tokolobela bisakweli mosusu ya Biblia. Komona ndenge ekokisamá ekamwisaka mpenza!

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge siansi endimi makambo oyo Biblia elobi, mpe ndenge oyo bisakweli mosusu ya Biblia ekokisamaki.

4. Siansi endimi makambo oyo Biblia elobi

Na ntango ya kala, bato mingi bazalaki kondima ete mabele efandi likoló ya eloko moko boye. Talá VIDEO.

VIDEO: Mabele efandi likoló ya eloko moko te (1:13)

Talá makambo oyo mokanda ya Yobo elobaki eleki sikoyo bambula soki 3500. Tángá Yobo 26:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini koyeba ete mabele esimbami “na eloko moko te” ezali kokamwisa?

Kaka na bambula ya 1800 nde bato bayaki koyeba esika oyo mai ya mbula eutaka. Kasi, talá oyo Biblia elobaki eleki sikoyo bambula soki 3500. Tángá Yobo 36:27, 28, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini ndenge oyo Biblia elobeli esika oyo mai ya mbula eutaka ezali kokamwisa?

  • Bavɛrsɛ oyo outi kotánga esalisi yo okóma lisusu na kondima mingi mpo na Biblia?

Biblia elobeli makambo oyo esalemaka mpo mai ezala kaka na mabele. Makɔnga oyo ezali komonisa ndenge mai eutaka na mabele mpe emataka likoló, ezongaka na mabele mpe emati lisusu likoló.

5. Biblia esakolá makambo ya ntina

Tángá Yisaya 44:27–45:2, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Makambo nini Biblia esakolaki bambula 200 liboso ete Babilone ekwea?

Talá VIDEO.

VIDEO: Biblia esakolaki kokwea ya Babilone (0:58)

Istware emonisi ete Siruse, mokonzi ya Perse, ná basoda na ye bakweisaki Babilone na mobu 539 L.T.B.b Balekisaki mai ya ebale oyo ezalaki kobatela engumba yango na nzela mosusu. Bakɔtaki na engumba na baporte oyo etikalaki ya kofungwama mpe bazwaki yango na pɛtɛɛ nyonso kozanga ete bábunda. Lelo oyo, nsima ya bambula koleka 2500, Babilone etikalá mpamba. Sikoyo tótala makambo oyo Biblia esakolaki.

Tángá Yisaya 13:19, 20, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini esakweli yango ekokisamaki?

Lelo na Irak, Babilone etikalá mpamba

Bililingi: Makambo oyo Biblia esakolá mpo na ‘mikolo ya nsuka.’ 1. Bandako ezali kozika. 2. Soda moko azali kobɛta masasi. 3. Bato bazali kobunda na bapolisi. 4. Mibali mibale bazali koyiba na butiki. 5. Motuka ya bitumba ebebisi engumba. 6. Bato oyo balati masque bazali na nzala batɛlɛmi na molɔngɔ mpo na kozela biloko. 7. Mabele ya kokauka ekabwani. 8. Ndako moko ebukani nsima ya koningana ya mabele.

6. Biblia esakolá makambo oyo ezali kosalema lelo

Biblia elobi ete tozali na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1) Talá makambo oyo Biblia esakolaki ete ekosalema na mikolo ya nsuka.

Tángá Matai 24:6, 7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Biblia esakolaki ete makambo nini ekosalema na mikolo ya nsuka?

Tángá 2 Timote 3:1-5, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Biblia esakolaki ete bizaleli nini bato bakozala na yango na mikolo ya nsuka?

  • Bizaleli nini ozali komona epai ya bato lelo oyo?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Biblia ezali mokanda ya mindɛlɛ.”

  • Nini endimisi yo mpenza ete okoki kotyela Biblia motema?

NA MOKUSE

Istware, siansi, mpe bisakweli emonisi ete okoki kotyela Biblia motema.

Bozongeli

  • Masolo ya Biblia ezali mpenza solo?

  • Wapi mwa makambo oyo Biblia elobi mpe siansi endimi yango?

  • Okanisi ete Biblia elobeli makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Mpo na nini?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Ntango Biblia elobelaka makambo ya siansi, elobaka solo?

“Biblia eyokani na siansi?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Makambo nini Biblia elobi mpo na “mikolo ya nsuka”?

“Bisakweli 6 ya Biblia oyo ozali komona kokokisama na yango” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2011)

Luká koyeba ndenge bisakweli ya Biblia oyo etali ampire ya Grɛsi ekokisamaki.

Tolendisami na “maloba ya esakweli” (5:22)

Talá ndenge bisakweli ya Biblia ebongolaki bomoi ya moto moko.

“Nazalaki kondima te ete Nzambe azali” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 5 2017)

a Bisakweli ezali makambo oyo Nzambe alobá mpo na mikolo ezali koya.

b L.T.B. elakisi “Liboso ya ntango na biso,” mpe T.B. elakisi “na ntango na biso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto