Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/1 nk. 10-12
  • Lendisá libota na yo na “maloba ya kitoko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lendisá libota na yo na “maloba ya kitoko”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kanisáká oyo okoloba mpe ndenge oyo okoloba yango
  • Yekolá komipekisa
  • Lukáká maloba oyo ebongi
  • “Uta na makambo oyo etondi na motema”
  • Kanisáká liboso ya koloba!
  • Salelá malamu nguya ya lolemo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge nini okoki kolonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bimisáká maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Mpo na nini kokeba na maloba na yo?
    Lamuká!—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/1 nk. 10-12

Lendisá libota na yo na “maloba ya kitoko”

DAVID azalaki kozela mwasi na ye na kati ya motuka mpo bábima; azalaki kotalatala montre mpe mwasi na ye azalaki kaka koya te; akómaki na nkanda makasi. Nsukansuka, mwasi na ye Diane ayaki; David akokaki kopekisa nkanda na ye te.

Agangelaki Diane boye: “Ndenge nini ozali kozelisa ngai ntango molai boye? Ozalaka ntango nyonso na retare! Mokolo nini okosilisa komibongisa na ngonga malamu?”

Diane ayokaki mpasi na motema. Abandaki kolela mpe azongaki na kati ya ndako. David amonaki ete asalaki mabe mpenza. Maloba na ye ebebisaki makambo. Akokaki kosala nini sikoyo? Abimaki na motuka, mpe alandaki mwasi na ye na kati ya ndako.

Likambo ya ndenge wana ekómaka na mabota mingi. Esilá kokómela yo oluka kobongola maloba oyo obimisaki? Mbala mingi ntango tozali koloba kozanga kokanisa, tobimisaka maloba oyo ekoki kopesa biso mpasi na nsima. Yango wana, Biblia elobi boye: “Motema ya moyengebene ekobanzabanza liboso ya kozongisa liloba.”​—Masese 15:28.

Nzokande, ezalaka pɛtɛɛ te kokanisa malamu liboso ya koloba, mingimingi ntango tozali na nkanda, na kobanga, to ntango moto moko ayokisi biso mpasi na motema. Na ntango wana, tobimisaka maloba na koganga to koluka kopesa moto mosusu foti, mingimingi soki ezali ndeko, mwana to molongani na biso. Mpe yango ekoki kosala mpasi to mpe kobimisa koswana.

Tokoki kosala nini mpo tózalaka na maloba ya malamu? Ndenge nini tokoki kosala mpo nkanda elobisa biso maloba ya mabe te? Tokoki kozwa batoli na maloba ya Salomo, moko na bakomi ya Biblia.

Kanisáká oyo okoloba mpe ndenge oyo okoloba yango

Ntango Salomo akomaki mokanda ya Mosakoli, oyo emonisi ete bomoi ya bato ezali mpamba, emonani ete likambo yango ezalaki kotungisa ye. Alobaki boye: “Nayinaki bomoi.” Na esika mosusu alobaki ete “nyonso ezali mpamba.” (Mosakoli 2:17; 12:8) Atako bongo, mokanda ya Mosakoli etondi te na makambo oyo ezalaki kotungisa Salomo. Amonaki ete ezalaki malamu te alobela kaka makambo mabe ya bomoi. Na nsuka ya mokanda yango, Salomo alobaki ete “alukaki mpe maloba ya kitoko, mpe na sembo, akomaki maloba ya solo.” (Mosakoli 12:10) Libongoli mosusu elobi ete Salomo “azalaki koluka maloba oyo ekoki kosepelisa bato; pe makambo oyo ye akòmaki ezali solo.”​—Bible na Lingala ya lelo oyo.

Na ntembe te, Salomo amonaki ete asengelaki komipekisa. Azalaki ntango nyonso komituna boye: ‘Makambo oyo nalingi koloba ezali mpenza solo? Soki nasaleli maloba oyo, bato mosusu bakomona yango kitoko, mpe bakondima yango?’ Lokola Salomo alukaki “maloba ya kitoko” mpe ya solo, apekisaki motema na ye ebebisa makanisi na ye.

Mpo na yango, mokanda ya Mosakoli ezali kaka te na elobeli ya kitoko kasi etondi mpe na bwanya ya Nzambe oyo ezali koteya biso ntina ya bomoi. (2 Timote 3:16, 17) Ndenge oyo Salomo alobelaki makambo oyo ezalaki kotungisa ye ekoki kosalisa biso ntango tozali kosolola na bandeko na biso. Tótalela ndakisa moko.

Yekolá komipekisa

Tózwa ndakisa ya elenge mobali moko oyo amemi bulletin na ye na ndako mpe azali na elongi ya mawa. Tata na ye atali bulletin yango mpe amoni ete mwana azwi te na liteya moko. Tata ayoki nkanda na motema mpe akanisi bantango nyonso oyo mwana azalaki koboya kosala badevuare na ye. Ayoki mposa ya koloba na ye ete: “Ozali gɔigɔi! Soki okobi kaka boye, okolonga te na bomoi!”

Mpo tata yango abimisa te maloba ya ndenge wana na nkanda, asengeli komituna boye: ‘Makambo oyo nazali kokanisa ezali mpenza bongo?’ Komituna bongo ekoki kosalisa ye ayeba kotalela makambo ndenge ezali mpenza. (Masese 17:27) Ezali mpenza solo ete mwana yango akolonga te na bomoi kaka mpo azwi te na liteya moko? Mwana yango azali mpenza gɔigɔi na makambo nyonso, to azalaki koboya kosala badevuare na ye kaka mpo azalaki komona liteya yango makasi? Biblia emonisaka mbala na mbala ntina ya kozala makambo makasimakasi te mpe kotalela makambo na ndenge ebongi. (Tito 3:2; Yakobo 3:17) Mpo na kolendisa mwana, moboti asengeli kozalaka na ‘maloba ya sembo mpe ya solo.’

Lukáká maloba oyo ebongi

Ntango tata alingi koloba, asengeli komituna boye: ‘Maloba nini nasengeli kosalela mpo eyokisa mwana na ngai mpasi te?’ Ezali pɛtɛɛ te koloba maloba oyo ebongi. Kasi, baboti basengeli kobosana te ete bilenge mingi, soki bapameli bango na likambo moko, bamonaka lokola nde basalaka makambo nyonso malamu te. Yango wana, soki moboti alobi na mwana maloba ya mabe, ekoki kotinda mwana abanda kokanisa ete azali na ntina moko te. Bakolose 3:21 elobi boye: “Bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”

Mbala mingi, maloba lokola “osalaka ntango nyonso . . .” elekisaka ndelo. Ntango moboti alobi na mwana ete: “Okolonga soki moke te,” etindaka mwana amimona ete azali ata na ntina moko te. Soki moboti azali kozongela maloba yango mbala mingi, mwana akobanda komimona ete akoki kosala ata eloko moko te ya malamu. Maloba ya ndenge wana elɛmbisaka mpe ezali solo te.

Elekaka malamu kolobela makambo ya malamu. Na ndakisa na biso, tata akoki koloba boye: “Mwana na ngai, namoni ete ozali komitungisa mpo ozwi te na liteya moko. Kasi, nayebi ete osalaka malamu na mateya mingi. Tólobela naino liteya oyo ozwi te mpe tóyeba ndenge ya kosilisa mokakatano yango.” Mpo na koyeba ndenge malamu ya kosalisa mwana na ye, tata asengeli mpe kotuna mwa mituna mpo na koyeba soki mwana azali na mikakatano mosusu.

Maloba ya boboto mpe oyo moto akanisi malamu liboso ya koloba ebotaka mbuma ya malamu koleka maloba ya nkanda. Biblia elobi boye: “Maloba ya kitoko ezali . . . elɛngi epai na molimo mpe kobika kati na mikuwa.” (Masese 16:24) Bana, ata mpe bato mosusu, bamiyokaka malamu na kati ya libota oyo ezali na kimya mpe na bolingo.

“Uta na makambo oyo etondi na motema”

Tókanisa naino na ndakisa oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Omoni te ete elingaki koleka malamu soki mobali yango azwaki ntango ya koluka “maloba ya kitoko” mpe oyo ezali solo na esika ya kolobela mwasi na ye maloba ya nkanda? Na likambo ya ndenge wana, ebongi komituna boye: ‘Ata soki mwasi na ngai asengeli kosala makasi mpo na kotosaka ngonga, ezali solo ete azalaka ntango nyonso na retare? Sikoyo nde ntango malamu ya kolobela likambo yango? Koloba na ye na nkanda ekosalisa ye abongisa?’ Komituna mituna ya bongo ekoki kosalisa biso tóbimisa te maloba oyo ekozokisa bato oyo tolingaka.​—Masese 29:11.

Kasi, ezali boni soki tosukaka kaka na koswana ntango tozali kolobela likambo moko na kati ya libota? Tosengeli komitalela malamu mpo na koyeba mpo na nini tobimisaka maloba boye to boye. Maloba oyo tobimisaka, mingimingi ntango tozali na nkanda, ekoki komonisa ndenge oyo motema na biso ezali. Yesu alobaki boye: “Uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ elobaka.” (Matai 12:34) Na maloba mosusu, elobeli na biso mbala mingi emonisaka makanisi, bamposa, mpe elimo na biso.

Soki tozalaka na bokatikati mpe na makanisi ya malamu, ekomonana na elobeli mpe na masolo na biso. Soki tozalaka makambo makasi mpe na ezaleli ya kosambisa basusu, maloba na biso ekoki kolɛmbisa bango. Ntango mosusu tokoki koyeba te ete tokómi na elobeli moko ya mabe. Ntango mosusu kutu, tokoki kokanisa ete ndenge na biso ya kotalela makambo ezali malamu. Kasi, tosengeli kokeba ete tómikosa te.​—Masese 14:12.

Ezali malamu lokola tozali na Liloba ya Nzambe. Biblia ekoki kosalisa biso tótalela malamu makanisi na biso mpe tóyeba oyo wapi ezali malamu mpe oyo wapi tosengeli kobongisa. (Baebele 4:12; Yakobo 1:25) Ata soki tozali bato ya makila mɔtɔmɔtɔ, to ata tobɔkwamá ndenge nini, biso nyonso tokoki kobongola makanisi na biso mpe misala na biso soki tolingi yango.​—Baefese 4:23, 24.

Okoki mpe kosala likambo mosusu mpo na koyeba soki ozalaka na maloba ya ndenge nini. Okoki kotuna bato mosusu. Na ndakisa, okoki kotuna molongani, to mwana na yo ayebisa yo mpenza na bosembo soki ozalaka na maloba ya ndenge nini. Okoki mpe kosolola na moninga moko oyo ayebi yo malamu. Ekosɛnga na yo ozala na komikitisa mpo ondima makambo oyo bakoyebisa yo mpe obongola makambo mosusu.

Kanisáká liboso ya koloba!

Na yango, soki olingi te kozokisaka basusu na maloba na yo, osengeli kolanda toli ya Masese [Batoli] 16:23: “Moto ya mayele akanisaka liboso ya koloba; yango wana maloba na ye ekotelaka bato penza na kati ya mitema.” (Bible na Lingala ya lelo oyo) Kokeba na maloba na biso ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, soki tozali komitya na esika ya basusu na esika ya kosambisa to kokitisa bango, ekozala mpasi te tólobaka na bango na ndenge ya malamu.

Ya solo, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. (Yakobo 3:2) Na bantango mosusu, tobimisaka maloba ya mabe. (Masese 12:18) Kasi, na lisalisi ya Liloba ya Nzambe, tokoki koyekola kokanisa liboso ya koloba mpe koluka liboso bolamu ya basusu. (Bafilipi 2:4) Tiká tólukaka ntango nyonso “maloba ya kitoko” mpe ya solo, mingimingi ntango tozali koloba na bato ya libota na biso. Na ndenge yango, maloba na biso ekozokisa te baoyo tolingaka, kasi ekolendisa bango.​—Baloma 14:19.

[Elilingi na lokasa 12]

Ndenge nini okoki koboya koloba likambo oyo ekopesa yo mpasi na nsima?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto