Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ozali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1999 | 15 Novembre
    • 12. Limbolá na maloba na yo moko makambo oyo Salomo alobaki na Mosakoli 12:11, 12?

      12 Mikanda ezalaki mingi na ntango ya Salomo, atako bazalaki na bamasini ya imprimerie te lokola lelo oyo. Basengelaki kotalela mikanda yango ndenge nini? Mosakoli alobaki boye: “Maloba na bato na mayele izali lokola [fimbo] mpe wana eyanganisami yango na koyangana moko oyo epesameli na mobateli moko, izali lokola nsɛtɛ ikɔtisami makasi. Lisusu mwana na ngai, opamelama na yango. Ezali na nsuka na kosala mikanda te, koyekola mingi ekolɛmbisa nzoto.”—Mosakoli 12:11, 12.

  • Ozali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1999 | 15 Novembre
    • 14. (a) Mikanda nini ezali na ntina te ete ‘tóyekola yango mingi’? (b) Tosengeli koyekola mingimingi mikanda nini, mpe mpo na nini?

      14 Kasi mpo na nini Salomo alobaki ete kosala mikanda ezali na nsuka te? Mpo soki tokokanisi mikanda yango na Liloba ya Nzambe, ebele ya mikanda oyo ezali na mokili oyo etondi se na makanisi ya bato. Mingimingi makanisi na yango ezali se kolanda elimo ya Satana Zabolo. (2 Bakolinti 4:4) Yango wana, “koyekola mingi” makambo ya mokili epesaka bolamu ya solosolo te. Kutu, makambo na yango mingi ekoki koboma moto na elimo. Biso tólanda nde ndakisa ya Salomo, tókanisa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na bomoi. Yango ekolendisa kondima na biso mpe boninga na biso na Yehova. Komipesa na kotánga mikanda mosusu to makambo oyo bato bayekolaka ekoki kolɛmbisa biso. Mikanda yango ekoki kobebisa kondima na biso epai ya Nzambe mpe na mikano na ye, mingimingi soki makambo oyo ekomami kuna ezali makanisi ya bato ya mokili oyo eyokani te na mayele oyo euti na Nzambe. Yango wana, tóbosana te ete mikanda oyo elekaki malamu na ntango ya Salomo mpe oyo eleki malamu na ntango na biso ezali mikanda oyo ezali komonisa mayele ya “mobateli moko,” elingi koloba Yehova Nzambe. Apesi biso mikanda 66 ya Makomami Mosantu, mpe tosengeli kotya makanisi na biso mingi na mikanda yango. Biblia mpe mikanda mosusu ya ‘moombo ya sembo’ esalisaka biso mpo ‘tóyeba Nzambe.’—Masese 2:1-6.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto