Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/11 nk. 18-23
  • Ozali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nyonso ezali mpamba?
  • Komipesa mpe makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso
  • Kanisá malamu liboso ya kokamata mikano!
  • Makambo oyo ekoki kosalisa biso tókanisa Mozalisi na biso Monene
  • Makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi biso
  • Kokisá makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga yo
  • Mokanda ya Biblia nimero 21—Mosakoli
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • ‘Nyonso oyo esɛngami epai na moto’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tókokisa mokumba na biso epai ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Mosakoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/11 nk. 18-23

Ozali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga yo?

“Mpo ete Nzambe akokómisa misala nyonso epai na kosambisama elongo na makambo nyonso mabombami, soko mazali malamu, soko mazali mabe.”—MOSAKOLI 12:14.

1. Yehova abongisi nini mpo na basaleli na ye?

YEHOVA asalisaka bato oyo babosanaka ye te lokola Mozalisi na bango Monene. Liloba na ye elakisaka bango makambo oyo basengeli koyeba mpo básepelisa ye. Elimo santu ya Nzambe elakisaka bango nzela ntango bazali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga bango mpe elimo santu yango kaka esalisaka bango ‘bábota mbuma na misala nyonso malamu.’ (Bakolose 1:9, 10) Lisusu, na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” Yehova apesaka bango bilei ya elimo mpe atambwisaka bango na ebongiseli ya Teokrasi. (Matai 24:45-47) Yango wana, Yehova apambolaka mingi basaleli na ye ntango bazali kosalela ye mpe bazali kosala mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, oyo ezali mosala ya ntina mingi.​—Malako 13:10.

2. Mpo na mosala ya Yehova, mituna nini tokoki kotuna?

2 Baklisto ya solo bazali na esengo mpo bazali komipesa na mosala ya Yehova. Kasi, bamosusu kati na bango bakoki kolɛmba nzoto mpe kokanisa ete bazali kosala mosala ya mpunda. Na ndakisa, baklisto mosusu oyo bamipesi bakoki ntango mosusu komituna soki milende makasi oyo bazali kosala ezali mpenza na ntina. Ntango tata ya libota azali kokanisa likambo ya koyekola na libota mpe makambo mosusu, akoki mbala mosusu komituna mituna lokola oyo: ‘Yehova asepelaka mpenza na makambo oyo tozali kosala? Tozali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga biso?’ Mosakoli alobaki maloba ya mayele oyo ekoki kosalisa biso mpo tózwa biyano na mituna yango.

Nyonso ezali mpamba?

3. Soki tolandi makanisi ya Mosakoli 12:8, likambo nini ezali mpenza mpamba?

3 Bato mosusu bakoki kokanisa ete maloba ya moto ya mayele ezali mpenza kolendisa te, ezala mpo na bilenge to mikóló. Mosakoli alobaki ete: “Bisalasala na mpamba! Nyonso ezali mpamba!” (Mosakoli 12:8) Ya solo, ntango moto azali elenge, soki asaleli Mozalisi Monene te mpe akómi mobange, mpo na moto ya ndenge wana nyonso ezali mpenza mpamba. Tokoki koloba mpo na ye ete nyonso ezalaki mpamba, to ezalaki na ntina te, ata soki na liwa na ye atiki biloko mingi mpe nkombo ya lokumu na mokili oyo ezali na mabɔkɔ ya oyo mabe, elingi koloba Satana Zabolo.​—1 Yoane 5:19.

4. Mpo na nini tokoki koloba ete makambo nyonso ezali mpamba te?

4 Kasi tokoloba te ete nyonso ezali mpamba mpo na bato oyo bazali kobomba biloko ya motuya na likoló mpo bazali kosalela Yehova na bosembo. (Matai 6:19, 20) Bazali komipesa na mosala ya Nkolo mpe mosala yango ezali mpamba te. (1 Bakolinti 15:58) Soki tozali baklisto oyo tomipesi na Nzambe, tozali mpenza kosala mosala oyo Nzambe apesi biso na mikolo oyo ya nsuka? (2 Timote 3:1) To tozali kosala makambo lokola kaka bato mosusu oyo tofandi na bango? Bato yango bazali mbala mosusu bandimi na mangomba ndenge na ndenge mpe ekoki kozala ete bamipesaka na kosambela mpe mbala na mbala bakendaka na bandakonzambe, mpe basalaka makambo oyo basɛngaka bango na mangomba na bango. Kasi, bazali basakoli ya nsango ya Bokonzi te. Bayebi mpenza te ete tozali sikoyo na “ntango ya nsuka” mpe bayebi te ete tozali na mikolo oyo tosengeli kobebisa ntango na biso mpambampamba te.​—Danyele 12:4, NW.

5. Soki tomoni ete tokómi kotya makanisi na biso nyonso na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, tosengeli kosala nini?

5 Yesu Klisto alobaki boye mpo na ntango ya mpasi oyo tozali na yango lelo oyo: “Zambi lokola ezalaki mikolo na Noa, koya na Mwana na moto ekozala bongo. Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolya mpe komela, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eingelaki Noa na [masuwa]; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya na Mwana na moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:37-39) Kolya mpe komela ezali mabe te soki tozali kolekisa ndelo te. Mpe lisusu, Nzambe ye moko nde asalaki bato ete bábalanaka. (Genese 2:20-24) Kasi, soki tomoni ete tokómi kotya makanisi na biso nyonso kaka na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, ekozala malamu tóbondela Yehova asalisa biso. Yehova akoki kosalisa biso tótya Bokonzi na esika ya liboso, tósala oyo ezali malamu, mpe tókokisa makambo oyo ye azali kosɛnga biso.​—Matai 6:33; Baloma 12:12; 2 Bakolinti 13:7.

Komipesa mpe makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso

6. Makambo nini ya ntina mingi oyo baklisto mosusu, atako bazwá batisimo, bazali kokokisa te oyo Nzambe azali kosɛnga bango?

6 Baklisto mosusu oyo bazwi batisimo basengeli kobondela mingi mpo emonani ete bazali kokokisa te makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bango, makambo oyo bandimaki kosala ntango bamipesaki epai na ye. Na bambula oyo eleki, mbula na mbula bato koleka 300 000 bazwaki batisimo, kasi motango ya Batatoli ya Yehova oyo bazali kosala mosala ebakisami mingi na ndenge yango te. Bato mosusu oyo bakómaki basakoli ya Bokonzi bazali lisusu kosakola nsango malamu te. Toyebi ete moto asengeli mpenza kosakola liboso azwa batisimo. Yango elingi koloba ete bayebi malamu likambo oyo Yesu atindaki bayekoli na ye básala: “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Soki likambo moko monene epekisi bango te, lokola maladi to likambo mosusu oyo elekeli bango, bato oyo bazwi batisimo mpe batiki kosala mosala lokola Batatoli ya Yehova mpe ya Klisto, bazali kokokisa te makambo nyonso oyo Mozalisi na biso Monene azali kosɛnga biso.​—Yisaya 43:10-12.

7. Mpo na nini tosengeli koyanganaka mbala na mbala mpo na losambo?

7 Ekólo ya Yisalaele ya kala emipesaki na Nzambe. Na kotalela kondimana ya Mibeko, Bayisalaele bazalaki na makambo oyo basengelaki kokokisa mpo na Yehova. Na ndakisa, mibali nyonso basengelaki kokende na bafeti misato oyo ezalaki kosalema mbula na mbula, mpe mobali nyonso oyo aboyi na nko kokende na feti ya Elekeli, bazalaki ‘koboma’ ye. (Mituya 9:13; Levitike 23:1-43; Deteronome 16:16) Mpo bákokisa makambo oyo Nzambe azalaki kosɛnga bango lokola basaleli na ye oyo bamipesi, Bayisalaele bazalaki koyangana mbala na mbala mpo na losambo. (Deteronome 31:10-13) Esika moko te Mibeko elobaki ete: ‘Salá likambo boye soki okoki kosala yango.’ Mpo na bato oyo bazali komipesa na Yehova lelo oyo, mobeko oyo esɛngaki Bayisalaele báyanganaka mpo na losambo epesi lisusu makasi na maloba ya Paulo ete: “Tótalanaka mpo tópusama na komonisa bolingo mpe misala malamu, tótika koyangana na biso te, lokola bamosusu bameseni kosala yango, kasi, tólendisanaka, mingimingi lokola mokolo yango ekómi pene.” (Baebele 10:24, 25, NW) Ɛɛ, Nzambe azali kosɛnga na biso baklisto oyo tomipesi ete tóyanganaka mbala na mbala na bandeko na biso.

Kanisá malamu liboso ya kokamata mikano!

8. Mpo na nini elenge oyo amipesi na Nzambe asengeli kokanisa malamu mpo na mosala na ye epai ya Nzambe?

8 Mbala mosusu ozali elenge oyo amipesi na Yehova. Yebá ete soki otii matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na yo, okozwa bolamu mingi. (Masese 10:22) Soki ozali kobondela Nzambe mpe obongisi makambo na yo malamu liboso, okoki kolekisa mwa bambula mosusu ya bolenge na yo na lolenge moko ya mosala ya ntango nyonso. Yango ezali lolenge malamu ya kolakisa ete ozali kokanisa Mozalisi na yo Monene. Soki te, okolekisa ntango na yo nyonso mpe kotya makanisi na yo nyonso se na koluka biloko ya mokili. Okoki mbala mosusu kosala ndenge bato nyonso bazali kosala. Okoki koluka kobala ntango ozali naino elenge mpe kokɔta banyongo mpo ozala na biloko mingi. Okoki kolekisa ntango na yo nyonso mpe kotya makasi na yo nyonso na mosala oyo bakofuta yo malamu. Ntango okobota bana, okozwa sikoyo mokumba ya kobɔkɔla bango bambula ebele. (1 Timote 5:8) Ekoki kozala ete obosani Mozalisi na yo Monene te, kasi ezali likambo ya mayele oyeba ete makambo oyo ozali kokana sikoyo, to soki ozali kokana eloko te, yango nde ezali kobongisa ndenge bomoi na yo ekozala ntango okokóma mokolo. Bambula mingi na nsima, okoki kokanisa mikolo eleká mpe okomona ete olekisaki bolenge na yo malamu na mosala ya Mozalisi na biso Monene. Ebongi mpenza okanisa malamu sikoyo mpe obondela mingi mpo na makambo oyo ozali kokana kosala mpo ozala na esengo ya kosalela Yehova na bolenge na yo.

9. Mobange oyo kala azalaki na mikumba na lisangá akoki lisusu kosala nini?

9 Tótalela ndakisa mosusu. Ekoki kozala ete moto moko asalaká kala lokola mobateli ya “etonga ya Nzambe.” (1 Petelo 5:2, 3) Mpo na makambo mosusu, ye moko atikaki mosala malamu wana. Sikoyo, akómi mobange mpe ekómi mpasi mpo na ye ete akokisa malamu mosala ya Nzambe. Kasi, mbala mosusu akoki lisusu kozwa mokumba na lisangá. Moto yango akosalela bato mosusu malamu mingi soki andimi lisusu mikumba na kati ya lisangá! Mpe lokola moto moko te asengeli koluka kaka bolamu na ye moko, baninga na ye na bato ya libota na ye bakosepela soki akoki lisusu kosala mosala mingi mpo na lokumu ya Nzambe. (Baloma 14:7, 8) Likambo eleki ntina ezali ete Yehova akobosana te mosala oyo moto asaleli ye. (Baebele 6:10-12) Na yango, nini ekoki kosalisa biso tókanisa Mozalisi na biso Monene?

Makambo oyo ekoki kosalisa biso tókanisa Mozalisi na biso Monene

10. Mpo na nini ebongaki ete mosakoli apesa malako na likambo ya kokanisa Mozalisi na biso Monene?

10 Mosakoli azalaki moto oyo abongi mpenza mpo na kolakisa ndenge oyo tokoki kokanisa Mozalisi na biso Monene. Yehova ayokaki mabondeli na ye mpe apesaki ye mayele mingi. (1 Mikonzi 3:6-12) Salomo ayekolaki makambo nyonso oyo bato basalaka. Mpe lisusu, elimo ya Nzambe etindaki ye akoma makambo nyonso oyo ayekolaki mpo na bolamu ya bato mosusu. Akomaki boye: “Mpe mpo ete Mosakoli azalaki na mayele, alakisaki mpe bato boyebi. Ɛɛ, atalaki malamu, alukaki mpe abongisaki masese mingi. Mosakoli alukaki mpe maloba na kitoko mpe na sembo, akomaki maloba na solo.”—Mosakoli 12:9, 10.

11. Mpo na nini tosengeli kondima toli ya mayele oyo Salomo apesi?

11 Na Biblia ya Septante na monɔkɔ ya Greke, maloba yango ebongolami boye: “Mpe lisusu, lokola mosakoli azalaki na mayele, lokola ateyaki bato mayele; mpo ete litoi eyoka maloba kitoko ya masese, moteyi alukaki malamumalamu mpo na kozwa maloba kitoko mpe kokoma na bosembo—maloba ya solo.” (Septante, ya mobongoli Charles Thomson) Salomo alukaki maloba kitoko mpe masolo ya malamu mpe ya ntina mpo na kosimba mitema ya bato oyo bakotánga makambo oyo akomaki. Lokola elimo santu epusaki ye na kokoma maloba na ye oyo ezali na Biblia, tokoki kokakatana te kondima makambo oyo amonaki mpe toli malamu oyo apesaki.​—2 Timote 3:16, 17.

12. Limbolá na maloba na yo moko makambo oyo Salomo alobaki na Mosakoli 12:11, 12?

12 Mikanda ezalaki mingi na ntango ya Salomo, atako bazalaki na bamasini ya imprimerie te lokola lelo oyo. Basengelaki kotalela mikanda yango ndenge nini? Mosakoli alobaki boye: “Maloba na bato na mayele izali lokola [fimbo] mpe wana eyanganisami yango na koyangana moko oyo epesameli na mobateli moko, izali lokola nsɛtɛ ikɔtisami makasi. Lisusu mwana na ngai, opamelama na yango. Ezali na nsuka na kosala mikanda te, koyekola mingi ekolɛmbisa nzoto.”—Mosakoli 12:11, 12.

13. Ndenge nini maloba ya baoyo bazali na mayele euti na Nzambe ezali lokola fimbo, mpe banani bazali lokola “nsɛtɛ ikɔtisami makasi”?

13 Na ndimbola nini maloba ya bato ya mayele ezali lokola fimbo? Maloba yango epusaka moto oyo azali kotánga yango to koyoka yango mpe azali kolanda yango ete akola. Lisusu, baoyo bayekolaka ‘maloba eyanganisami’ to maloba ya mayele mpe ya ntina, bazali lokola “nsɛtɛ ikɔtisami makasi.” Mbala mosusu ezali mpo ete maloba kitoko ya bato yango emonisaka mayele ya Yehova mpe ekoki kosala ete moto oyo azali kotánga to koyoka atɛlɛma alima mpe atɛngatɛnga te. Soki ozali moboti oyo abangaka Nzambe, osengeli kosala nyonso mpo okɔtisa mayele yango na bɔɔngɔ mpe na motema ya mwana na yo.​—Deteronome 6:4-9.

14. (a) Mikanda nini ezali na ntina te ete ‘tóyekola yango mingi’? (b) Tosengeli koyekola mingimingi mikanda nini, mpe mpo na nini?

14 Kasi mpo na nini Salomo alobaki ete kosala mikanda ezali na nsuka te? Mpo soki tokokanisi mikanda yango na Liloba ya Nzambe, ebele ya mikanda oyo ezali na mokili oyo etondi se na makanisi ya bato. Mingimingi makanisi na yango ezali se kolanda elimo ya Satana Zabolo. (2 Bakolinti 4:4) Yango wana, “koyekola mingi” makambo ya mokili epesaka bolamu ya solosolo te. Kutu, makambo na yango mingi ekoki koboma moto na elimo. Biso tólanda nde ndakisa ya Salomo, tókanisa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na bomoi. Yango ekolendisa kondima na biso mpe boninga na biso na Yehova. Komipesa na kotánga mikanda mosusu to makambo oyo bato bayekolaka ekoki kolɛmbisa biso. Mikanda yango ekoki kobebisa kondima na biso epai ya Nzambe mpe na mikano na ye, mingimingi soki makambo oyo ekomami kuna ezali makanisi ya bato ya mokili oyo eyokani te na mayele oyo euti na Nzambe. Yango wana, tóbosana te ete mikanda oyo elekaki malamu na ntango ya Salomo mpe oyo eleki malamu na ntango na biso ezali mikanda oyo ezali komonisa mayele ya “mobateli moko,” elingi koloba Yehova Nzambe. Apesi biso mikanda 66 ya Makomami Mosantu, mpe tosengeli kotya makanisi na biso mingi na mikanda yango. Biblia mpe mikanda mosusu ya ‘moombo ya sembo’ esalisaka biso mpo ‘tóyeba Nzambe.’—Masese 2:1-6.

Makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi biso

15. (a) Salomo alobaki nini mpo na ‘makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi na bato nyonso’? (b) Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa makambo oyo Nzambe asɛngi biso?

15 Nsima ya koyekola makambo ndenge na ndenge, mosakoli, elingi koloba Salomo alobaki boye na mokuse: “Tóyoka nsuka na likambo mobimba: Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali [makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi na bato, NW]. Mpo ete Nzambe akokómisa misala nyonso epai na kosambisama elongo na makambo nyonso mabombami, soko mazali malamu, soko mazali mabe.” (Mosakoli 12:13, 14) Kobanga Mozalisi na biso Monene, to kotosa ye ekobatela biso mpe libota na biso mpo tómipesa na misala mabe te na bomoi na biso. Misala mabe yango ekoki komemela biso moko mpe libota na biso mikakatano mpe mpasi mingi. Kobanga Nzambe elimboli kobanga ye na ndenge ya malamu mpe yango nde ebandeli ya mayele mpe ya boyebi. (Nzembo 19:9; Masese 1:7) Soki tozali na mayele oyo euti na Liloba ya Nzambe mpe soki tozali kolanda toli na yango na makambo nyonso, tokokokisa “makambo” oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Yango elingi koloba te ete tokosala liste ya makambo oyo tosengeli kosalelaka Nzambe. Kasi, basɛngi biso tólukaka makanisi ya Biblia ntango tozali koluka kosilisa mikakatano na biso mpe tósalaka ntango nyonso makambo na ndenge oyo Nzambe alingaka.

16. Na oyo etali kosambisa, Yehova akosala nini?

16 Tosengeli koyeba ete Mozalisi na biso Monene amonaka makambo nyonso. (Masese 15:3) “Akokómisa misala nyonso epai na kosambisama.” Ɛɛ, Ye Oyo-Aleki-Likoló akosambisa makambo nyonso, na makambo oyo ebombami. Soki tozali kobosana likambo yango te, tokotosa mibeko ya Nzambe. Kasi, eloko oyo esengeli libosoliboso kotinda biso na kotosa mibeko na ye ezali mpo tolingaka Tata na biso ya likoló. Ntoma Yoane akomaki boye: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.” (1 Yoane 5:3) Lokola Nzambe apesi biso mibeko mpo na bolamu na biso ya libela, ezali malamu mingi mpenza tótosa mibeko yango. Baoyo balingaka Mozalisi Monene bamonaka te ete kotosa mibeko na ye ezali kilo. Basepelaka kokokisa makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bango.

Kokisá makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga yo

17. Tosengeli kosala nini soki tolingi mpenza kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga biso?

17 Soki tozali mpenza na mayele mpe tolingi kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga biso, tosengeli kotosa mibeko na ye; tosengeli mpe kobanga koyokisa ye mawa. Kutu, ‘kobanga [Yehova] ezali ebandeli ya mayele,’ mpe baoyo batosaka mibeko na ye bazali na ‘bososoli.’ (Nzembo 111:10; Masese 1:7) Yango wana, tózala na mayele mpe tótosa Yehova na makambo nyonso. Likambo yango ezali na ntina mingi lelo oyo, mpamba te Mokonzi Yesu Klisto azali koyangela, mpe mokolo oyo akosambisa lokola Zuzi oyo Nzambe aponi ekómi pene.​—Matai 24:3; 25:31, 32.

18. Tokozwa mbano nini soki tokokisi makambo nyonso oyo Yehova Nzambe azali kosɛnga biso?

18 Nzambe azali kotala malamumalamu misala ya mokomoko na biso. Totii nde makanisi na biso na makambo ya elimo to totiki ete makambo ya mokili ebebisa boninga na biso na Nzambe? (1 Bakolinti 2:10-16; 1 Yoane 2:15-17) Biso nyonso, bilenge mpe mikóló, tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosepelisa Mozalisi na biso Monene. Soki totosi Yehova mpe tobateli mibeko na ye, tokoboya makambo mpamba ya mokili oyo ezali koleka. Na ndenge yango, tokozala na elikya ya bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (2 Petelo 3:13) Oyo ezali mpenza bilikya kitoko mpo na bato nyonso oyo bazali kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga bango!

Okopesa eyano nini?

◻ Mpo na nini okoki koloba ete makambo nyonso ezali mpamba te?

◻ Mpo na nini elenge moklisto asengeli kotalela malamumalamu mosala oyo azali kosalela Nzambe?

◻ Mikanda nini ezali na ntina te ‘tóyekola yango mingi’?

◻ ‘Makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga na bato’ ezali makambo nini?

[Elilingi na lokasa 20]

Mpo na baoyo bazali kosalela Yehova, nyonso ezali mpamba te

[Elilingi na lokasa 23]

Liloba ya Nzambe ekeseni na mikanda mingi, yango ebɔndisaka mpe ezali na litomba

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto