Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/10 nk. 10-15
  • Liloba ya Nzambe likoumela seko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liloba ya Nzambe likoumela seko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango bamekaki kolimwisa yango
  • Kobatela Liloba ete libebisama te
  • Nsango epalangani na mokili mobimba
  • Yehova, Nzambe oyo ayebi kosolola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Boyekoli nimero 6—Makomi ya Greke ya boklisto kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mpo na nini mabongoli ebele ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Ndenge oyo Biblia ebatelamá tii na mikolo na biso
    Lamuká!—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/10 nk. 10-15

Liloba ya Nzambe likoumela seko

“Nde liloba na Nzambe na biso ekotɛlɛma libela.”​—YISAYA 40:8.

1. (a) “Liloba na Nzambe na biso” elimboli nini awa? (b) Bilaka ya bato bizalaka ndenge nini soki tokokanisi yango na liloba ya Nzambe?

MBALA mingi bato bazalaka pene ya kotya motema na bilaka ya mibali mpe basi ya lokumu. Kasi atako bilaka yango bikoki komonana malamu na miso ya bato oyo bazali koluka mbongwana kati na bomoi na bango, bilaka yango bizali lokola fololo oyo ezali kokauka soki tokokanisi yango na liloba ya Nzambe na biso. (Nzembo 146:3, 4) Eleki mbula 2 700, na kopemama na Yehova Nzambe, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Nyonso na nzoto bazali matiti, kitoko nyonso na yango lokola felele na elanga. . . . Matiti mazali kokauka, felele izali kolɛmba; nde liloba na Nzambe na biso ekotɛlɛma libela.” (Yisaya 40:6, 8) “Liloba” yango oyo likoumela ezali nini? Ezali bongo esakola ya Nzambe na ntina na mokano na ye. Lelo oyo tozali na “liloba” yango likomami kati na Biblia.​—1 Petelo 1:24, 25.

2. Liboso ya makambo nini mpe misala nini Yehova akokisaki liloba na ye na ntina na Yisalaele mpe Yuda ya kala?

2 Bato oyo bazalaki na ntango ya Yisalaele ya kala bamonaki bosolo ya makambo oyo Yisaya akomaki. Na nzela ya basakoli na ye, Yehova asakolaki ete na ntina na kozanga bosembo na bango monene epai na ye, liboso Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi mpe na nsima, Yuda, bokonzi ya mabota mibale esengelaki komemama na boombo. (Yilimia 20:4; Amosa 5:2, 27) Atako banyokolaki, mpe babomaki basakoli ya Yehova, batumbaki barulo oyo ezalaki na nsango ya kokebisa oyo eutaki na Nzambe, mpe basɛngaki lisungi ya mampinga ya Ezipito mpo na kopɛngola kokokisama ya esakweli yango, liloba ya Nzambe ekokisamaki. (Yilimia 36:1, 2, 21-24; 37:5-10; Luka 13:34) Lisusu, elaka ya Nzambe etali kozongisa batikali Bayuda oyo babongolaki motema na mokili na bango, ekokisamaki na lolenge ya kokamwa.​—Yisaya, mokapo 35.

3. (a) Yisaya akomaki bilaka nini oyo bizali na ntina mingi mpo na biso? (b) Mpo na nini ondimisami ete makambo oyo makosalema solo?

3 Na nzela ya Yisaya, Yehova asakolaki mpe boyangeli ya sembo mpo na bato nyonso na nzela ya Masiya, kosikolama na masumu mpe na liwa, mpe kobongolama ya mabelé ete ekóma paladiso. (Yisaya 9:6, 7; 11:1-9; 25:6-8; 35:5-7; 65:17-25) Makambo yango mpe makosalema solo? Ntembe ezali soko moke te! “Nzambe akobukaka lokuta te.” Akomisaki liloba na ye ya esakweli mpo na litomba na biso, mpe asalaki na boye ete liloba yango libatelama.​—Tito 1:2; Baloma 15:4.

4. Atako bamaniskri ya ebandeli ya Biblia ebatelamaki te, ndenge nini emonisami solo ete Liloba ya Nzambe ezali “na bomoi”?

4 Yehova abatelaki te bamaniskri ya ebandeli oyo kati na yango bakomeli na ye ya kala bakomaki bisakweli wana. Kasi “liloba” na ye, mokano oyo ebimi na monɔkɔ na ye, esili komonana ete ezali liloba ya bomoi. Mokano wana ezali ntango nyonso kokende liboso, mpe wana ezali kokende, makanisi mozindo mpe matindiki ya bato oyo bomoi na bango ezali kopusama na mokano yango mazali komonana polele. (Baebele 4:12) Lisusu, lisoló ya bato oyo likomami lizali komonisa ete kobatelama mpe kobongolama ya Makomami mapemami esalemaki na litambwisi ya Nzambe ye moko.

Ntango bamekaki kolimwisa yango

5. (a) Mokonzi moko ya Sulia asalaki molende nini mpo na kolimwisa Makomami ya Liebele mapemami? (b) Mpo na nini alóngaki te?

5 Mbala mingi, bayangeli basalaki milende mpo na kobebisa makomi mapemami. Na mobu 168 L.T.B., Antiochos Épiphane, Mokonzi ya Sulia (elilingi na ye ezali na lokasa 10) atongaki etumbelo mpo na Zeus kati na tempelo ya Yehova. Lisusu, alukaki ‘babúku ya Mibeko,’ atumbaki yango, mpe alobaki ete moto nyonso oyo akozwama na Makomami motindo wana akobomama. Atako atumbaki ebele ya bakopi na Yelusaleme mpe na Yudea, kasi akokaki kolimwisa Makomami nyonso te. Na eleko yango Bayuda mingi bapalanganaki na mikili ebele mpe eyanganelo mokomoko ezalaki na libombo na yango ya barulo.​—Kokanisá na Misala 13:14, 15.

6. (a) Molende nini esalemaki mpo na kobebisa Makomami oyo masalelamaki na baklisto ya liboso? (b) Esukaki ndenge nini?

6 Lolenge moko, na mobu 303 T.B., Dioclétien, Mokonzi ya Loma abimisaki mobeko ete biyanganelo nyonso ya baklisto bisengeli kobebisama mpe ete ‘Makomami na bango masengeli kotumbama na mɔ́tɔ.’ Kobebisama wana elandanaki na boumeli ya mbula zomi. Atako monyoko ezalaki makasi, Dioclétien alóngaki te kosukisa boklisto, mpe Nzambe atikaki te ete basaleli ya mokonzi bákoka kobebisa bakopi nyonso ata ya eteni moko ya Liloba na Ye lipemami. Na ndenge oyo batɛmɛlaki kokabolama mpe kosakolama ya Liloba ya Nzambe, bamonisaki lolenge mitema na bango mizali. Bamimonisaki ete bazali bato bazipami miso na Satana mpe bazali kokokisa mokano na ye.​—Yoane 8:44; 1 Yoane 3:10-12.

7. (a) Milende nini misalemaki mpo na kosukisa kopalangana ya boyebi ya Biblia na Mpótó ya wɛ́sti? (b) Nini esalemaki na oyo etali kobongolama mpe kokabolama ya Biblia?

7 Milende mpo na kopekisa kopalangana ya boyebi ya Biblia esalemaki mpe na ndenge mosusu. Ntango lokótá ya Latin ezalaki kolobama lisusu te, ezalaki bongo bayangeli bapakano te kasi baoyo bamibéngaki baklisto​—Pápa Grégoire VII (1073-1085) mpe Pápa Innocent III (1198-1216)​—nde batɛmɛlaki na nguya nyonso bobongoli Biblia na nkótá oyo izalaki kolobama na bato nyonso. Komonisáká molende mpo na kosukisa botɛmɛli nyonso na bokonzi ya lingomba, liyangani monene ya Lingomba ya Katolike oyo libéngami ete Concile de Toulouse, oyo esalemaki na ekólo France, na mobu 1229, ebimisaki mobeko ete moto mpamba akoki kozala na mikanda ya Biblia te na lokótá oyo bato nyonso balobaka. Banyokolaki bato na ntango ya Inquisition mpo na kolendisa mobeko yango. Kasi, nsima ya mibu 400 ya Inquisition, bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe basilaki kobongola Biblia mobimba mpe bazalaki kokabola búku yango oyo enyatamaki na nkótá soko 20, na minɔkɔ mosusu mikemike, mpe biteni na yango minene na minɔkɔ mosusu 16.

8. Na boumeli ya ekeke ya 19, nini esalemaki na likambo litali kobongolama mpe kokabolama ya Biblia na ekólo Russie?

8 Ezali bobele Lingomba ya Katolike ya Loma te nde esalaki molende mpo na kopekisa bato mpamba ete bázala na Biblia. Na ebandeli ya ekeke ya 19, Pavsky, profesere na “Académie de la Divinité” na engumba Saint-Pétersbourg, abongolaki Evanzile ya Matai na lokótá Russe uta na Greke. Mikanda mosusu ya Makomami ya Greke ya boklisto mibongolamaki mpe na lokótá Russe, mpe Pavsky abimisaki yango. Mikanda yango mikabolamaki mingi kino, na mobu 1826, na ntina na mwango mabe ya bakonzi ya lingomba, tsar (mokonzi ya Russie) apusamaki na kopesa Société ya Biblia ya Russie ete etambwisama na “Saint Synode” ya Lingomba ya Ortodokse ya Russie, oyo nsukansuka epekisaki misala na yango. Na nsima, Pavsky abongolaki Makomami ya Liebele na lokótá Russe uta na Liebele. Bobele na eleko yango, Makarios, oyo azalaki misionere ya Lingomba ya Ortodokse, ye mpe abongolaki Makomami ya Liebele na lokótá Russe uta na Liebele. Bato yango mibale bazwaki bitumbu mpo na milende na bango, mpe mabongoli na bango matyamaki na mabombo ya lingomba. Lingomba ezalaki na ekateli makasi ya kotika Biblia na lokótá Slave ya kala, oyo na eleko wana ezalaki kotángama te mpe bato bazalaki koyeba yango te. Ezali bobele na ntango oyo milende ya bato mpo na kozwa boyebi ya Biblia ekokaki lisusu kopekisama te nde “Saint Synode,” na mobu 1856, ebandisaki libongoli na yango moko ya Biblia, na kolandáká malako oyo mabongisamaki malamu mpo na komindimisa ete elobeli oyo ekosalelama ekoyokana na mateya ya lingomba. Na yango, lokola Liloba ya Nzambe epalanganaki, bokabwani ekómaki komonana polele kati na lolenge oyo bakonzi ya mangomba bazalaki komimonisa mpe makanisi na bango ya solosolo, oyo emonisamaki na maloba mpe na misala na bango.​—2 Batesaloniki 2:3, 4.

Kobatela Liloba ete libebisama te

9. Ndenge nini babongoli mosusu ya Biblia bamonisaki bolingo na bango mpo na Liloba ya Nzambe?

9 Kati na baoyo babongolaki mpe basalaki bakopi ya Makomami ezalaki na mibali oyo balingaki solo Liloba ya Nzambe mpe basalaki milende makasi mpo ete ekoka kokabolama epai ya bato banso. William Tyndale abomamaki lokola martíru (na mobu 1536) mpo na mosala oyo asalaki ya kobimisa Biblia na Lingelesi. Francisco de Enzinas atyamaki na bolɔ́kɔ na “Inquisition Catholique” (nsima ya mobu 1544) mpo ete abongolaki mpe akabolaki Makomami ya Greke ya boklisto na lokótá Espagnol. Kotyáká bomoi na ye na likámá, Robert Morrison (bandá mobu 1807 kino mobu 1818) abongolaki Biblia na lokótá Chinois.

10. Bandakisa nini emonisi ete babongoli mosusu bapusamaki na mikano mosusu kasi na bolingo mpo na Liloba ya Nzambe te?

10 Nzokande, longola bolingo mpo na Liloba ya Nzambe, ezali na makambo mosusu oyo mazalaki ntango mosusu na bopusi likoló ya mosala ya baakisi (copistes) mpe babongoli ya Biblia. Talelá ndakisa oyo minei: (1) Basamalia batongaki tempelo na Ngomba Gelizimi mpo na kotɛmɛla tempelo ya Yelusaleme. Mpo na kolóngisa likambo yango, bakɔtisaki likambo ya sika kati na Pantatɛ́kɛ ya Basamalia na Exode 20:17. Mobeko ebakisamaki, lokola moko ya Mibeko Zomi, ete esengeli kotonga etumbelo ya mabanga na Ngomba Gelizimi mpe kopesa mbeka na esika yango. (2) Moto ya liboso oyo abongolaki mokanda ya Danyele na Greke mpo na libongoli ya Septante abakisaki makambo mosusu na libongoli na ye. Akɔtisaki maloba oyo akanisaki ete makolimbola to makobakisa motuya ya makomi ya Liebele. Alongolaki makambo mosusu ya mikemike oyo akanisaki ete makondimama te na batángi. Ntango abongolaki esakweli na ntina na eleko ya komonana ya Masiya, oyo ezali na Danyele 9:24-27, abebisaki eleko ya ntango oyo elobelami kuna mpe abakisaki, abongwanisaki, mpe abalolaki maloba, mpe emonani ete asalaki yango mpo ete esakweli emonana ete ezali kolóngisa etumba ya ba Maccabées. (3) Na ekeke ya minei T.B., kati na búku moko ya Latin, emonani ete mokɔteli moko monene ya liteya ya Bosato abakisaki maloba “na likoló, Tata, Liloba, mpe elimo santu; mpe nyonso misato bazali moko” lokola ete maloba yango mautaki na 1 Yoane 5:7. Na nsima maloba yango makɔtisamaki na makomi ya maniskri moko ya Biblia ya Latin. (4) Louis XIII (1610-1643), na ekólo France, apesaki Jacques Corbin ndingisa ya kobongola Biblia na Lifalansé mpo na kotikala nsima ya Baprotestá te. Kozaláká na mokano wana na makanisi, Corbin abakisaki makambo mosusu na makomi, kati na yango likanisi ya “mbeka ya bulɛɛ ya Mísa” na Misala 13:2.

11. (a) Lolenge nini Liloba ya Nzambe ebatelamaki atako babongoli mosusu bazangaki sembo? (b) Tozali na bamaniskri boni ya kala mpo na kondimisa ete Biblia ezali sé na makambo oyo elobaki na ebandeli? (Talá na etanda.)

11 Yehova ayebisaki te liboso ete Liloba na ye ekobebisama lolenge wana, kasi yango ebongolaki mpe mokano na ye te. Yango ebimisaki mbuma nini? Kobakisa makambo matali Ngomba Gelizimi esalaki te ete losambo ya Basamalia ekóma esaleli ya Nzambe mpo na kopesa bato mapamboli. Kútu, yango epesaki elembeteli ete, atako Lingomba ya Basamalia elobaki ete endimaki Pantatɛ́kɛ, ekokaki kotyelama motema te mpo na koteya solo. (Yoane 4:20-24) Kobebisama ya elobeli kati na libongoli ya Septante epekisaki Masiya te ete aya na ntango oyo esakolamaki mpenza na mosakoli Danyele. Lisusu, atako libongoli ya Septante ezalaki kosalelama na ekeke ya liboso, emonani ete Bayuda bazalaki na momeseno ya koyoka botángi ya Makomami na Liebele kati na biyanganelo na bango. Mpo na yango, “bato bazalaki na mitema likoló” wana esakweli ekómaki pene na kokokisama. (Luka 3:15) Na ntina na makambo oyo makɔtisamaki na 1 Yoane 5:7 mpo na kondimisa liteya ya Bosato mpe na Misala 13:2 mpo na kolóngisa Mísa, yango ebongolaki mateya ya solo te. Mpe nsukansuka lokuta etɔndɔlamaki. Ebele ya bamaniskri ya Biblia na lokótá ya ebandeli ezali nzela ya koluka bosolo ya libongoli nyonso oyo esalemi.

12. (a) Babongoli mosusu ya Biblia basalaki mbongwana minene nini? (b) Mbongwana yango ekómaki kino wapi?

12 Milende mosusu mpo na kobebisa Makomami etalelaki bobele elobeli ya mwa bavɛrsɛ́ te. Yango ezalaki mpenza koluka kobebisa bomoto ya Nzambe ya solo. Motindo mpe bonene ya mbongwana epesaki elembeteli ya polele ete bopusi wana eutaki na nguya oyo eleki moto ye moko to ebongiseli ya bato​—ɛɛ, bopusi ya monguna monene ya Yehova, oyo ezali bongo Satana Zábolo. Komitikáká na nsé ya bopusi wana, babongoli mpe baakisi​—bamoko basalaki yango na mposa makasi, basusu basepelaki mpenza kosala yango te​—babandaki kolongola nkombo ya Nzambe, Yehova, kati na Liloba na ye lipemami na bisika ebele epai yango ezalaki komonana. Uta kala mpenza, babongoli mosusu ya Greke, ya Latin, ya Allemand, ya Lingelesi, ya Italien, ya Néerlandais, mpe nkótá isusu oyo babongolaki uta na Liebele, balongolaki nkombo ya Nzambe na bisika nyonso to mpe batikaki yango bobele na bisika moke. Lisusu balongolaki yango kati na bakopi ya Makomami ya Greke ya boklisto.

13. Mpo na nini molende oyo esalemaki mpo na kobebisa Biblia elóngaki te kolongola nkombo ya Nzambe na bɔɔngɔ́ ya bato?

13 Kasi, nkombo wana ya nkembo elongolamaki kati na bɔɔngɔ́ ya bato te. Mabongoli ya Makomami ya Liebele na lokótá Espagnol, Portugais, Allemand, Lingelesi, Lifalansé, mpe na nkótá mosusu mingi ebatelaki na bosembo nyonso nkombo ya Nzambe. Na ekeke ya 16, nkombo ya Nzambe ekómaki komonana lisusu na mabongoli ndenge na ndenge ya lokótá Liebele ya Makomami ya Greke ya boklisto; na lokótá Allemand na ekeke ya 18; na lokótá Croate mpe na Lingelesi na ekeke ya 19. Atako bato bazali komeka kobomba nkombo ya Nzambe, ntango “mokolo ya Yehova” ekoya, na ntango yango, lokola Nzambe ye moko alobi yango ‘mabota bakoyeba ete ngai nazali Yehova.’ Mokano wana ya Nzambe oyo esakolami ekokokisama.​—2 Petelo 3:10; Ezekiele 38:23; Yisaya 11:9; 55:11.

Nsango epalangani na mokili mobimba

14. (a) Na ekeke ya 20, Biblia esilaki konyatama na nkótá boni ya Mpótó, mpe yango esalaki bopusi nini? (b) Na nsuka ya 1914, Biblia ekomamaki na nkótá boni ya Afrika?

14 Na ebandeli ya ekeke ya 20, Biblia esilaki kobanda konyatama na nkótá 94 ya mikili ya Mpótó. Yango elamwisaki Bayekoli ya Biblia na mikili wana ete nsuka ya Ntango ya Mabota na 1914 ekoya nzela moko na makambo minene oyo makoningisa mokili, mpe yango esalemaki bongo! (Luka 21:24) Liboso ya kokóma na nsuka ya 1914, mbula oyo etyamaki elembo, Biblia mobimba to mikanda na yango mosusu, esilaki kobimisama na nkótá 157 ya Afrika, bakisa mpe Biblia na nkótá oyo: Lingelesi, Lifalansé, mpe Portugais, oyo ezalaki kosalelama mingi. Na yango, moboko esilaki kotyama mpo na koteya solo ya Biblia oyo ezali kosikola na elimo epai na basɔkɛmi kati na bitúlúká ndenge na ndenge mpe bikólo ndenge na ndenge oyo bizali kuna.

15. Wana mikolo ya nsuka mibandaki, kino wapi Biblia ekokaki komonana na nkótá ya bato ya Amerika?

15 Wana mokili ekɔtaki na mikolo ya nsuka oyo misakolamaki, Biblia ezalaki mingi na mikili ya Amerika. Bato oyo bautaki na mikili ya Mpótó bamemaki Biblia na nkótá na bango. Ebongiseli monene ya koteya Biblia ebandisamaki, yango esangisaki masukúlu ya bato banso mpe kokabolama ya mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mibimisamaki na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na eleko wana. Lisusu, konyatama ya Biblia esilaki kobanda kosalema na ba Sociétés ya Biblia na nkótá mosusu 57 mpo na kokokisa mposa ya babotami ya mikili ya Wɛ́sti.

16, 17. (a) Biblia ekómaki kino wapi wana ntango ekokaki mpo na mosala monene ya kosakola? (b) Ndenge nini Biblia emonanaki ete ezali solo búku oyo ezali koumela mpe ete ezali na bopusi?

16 Wana ntango ekómaki mpo na kosakola nsango malamu na mokili mobimba liboso ete ‘nsuka eya,’ Biblia ezalaki mokanda ya sika te na Azia mpe na bisanga ya Pasifike. (Matai 24:14) Esilaki kobimisama na nkótá 232 oyo elobamaka na mikili wana. Mabongoli mosusu ezalaki Biblia mobimba; mingi ezalaki mabongoli ya Makomami ya Greke ya boklisto; mosusu ezalaki mokanda bobele moko ya Makomami Mosantu.

17 Ya solo, Biblia ebatelamaki te lokola mokanda ya kotya na ndako ya kobomba biloko ya kalakala. Kati na mikanda nyonso oyo miyebani, ezali mokanda oyo eleki kobongolama mpe kokabolama na mokili mobimba. Kolandáká elembeteli wana oyo ezali komonisa ete endimamaki na Nzambe, makambo oyo makomami na búku yango mazalaki kokokisama. Mateya na yango mpe elimo santu oyo epemisaki mateya yango ezalaki mpe na bopusi monene na bomoi ya bato na mikili mingi. (1 Petelo 1:24, 25) Kasi makambo mingi​—mingi lisusu masengelaki koya nsima.

Ozali komikundola?

◻ “Liloba ya Nzambe na biso” oyo ekoumela seko ezali nini?

◻ Makambo nini masalemaki mpo na komeka kolimwisa Biblia, mpe esukaki ndenge nini?

◻ Ndenge nini Biblia ebatelamaki na mobimba na yango?

◻ Ndenge nini esakola ya mokano ya Nzambe emonanaki ete ezali liloba ya bomoi?

[Etanda na lokasa 12]

Toyebi mpenza makambo oyo Biblia elobaki na ebandeli?

Pene na maniskri 6 000 ya Liebele oyo ekomamaki na mabɔkɔ ezali kondimisa makambo mazali na Makomami ya Liebele. Mwa ndambo na yango ekomamaki liboso ya ntango ya boklisto. Maniskri pene na 19 ya Makomami ya Liebele mobimba oyo ezali naino kino lelo ekomamaki liboso ya kobimisama ya mwango ya konyata mikanda (imprimerie) na mobu 1450. Lisusu, kobanda na eleko wana, ezali na mabongoli oyo masalemaki na nkótá mosusu 28.

Mpo na Makomami ya Greke ya boklisto, ezali na maniskri pene na 5 000 na Greke oyo eyebani. Moko na yango ekomamaki liboso ya mobu 125 T.B., elingi koloba mwa bambula moke nsima ya makomi na yango ya ebandeli. Mpe ezali na biteni mosusu oyo ekanisami ete bikomamaki na badati oyo ezali liboso mpenza. Mpo na mikanda 22 kati na mikanda 27 mipemami, ezali na maniskri soko 10 kino 19 ekomama nyonso na balɛ́tɛlɛ mineneminene (onciale). Mokanda ya Emoniseli ezali na bamaniskri ya balɛ́tɛlɛ mineneminene mingi te​—ezali bobele misato. Maniskri moko ya Makomami ya Greke ya boklisto mobimba ekomamaki na ekeke ya minei T.B.

Ezali na mokanda mosusu te ya ntango ya kala oyo endimisami na ebele na bilembeteli wana ya kala.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto