Mokapo 2
Búku oyo ezali komonisa boyebi ya Nzambe
1, 2. Mpo na nini tozali na mposa ya litambwisi ya Mozalisi na biso?
EBONGI mpenza ete Mozalisi na biso ya bolingo apesa búku ya malako mpe ya litambwisi epai na bato. Mpe ondimaka ete bato bazali mpenza na mposa ya litambwisi, boye te?
2 Esili koleka mibu 2 500, mobali moko oyo azalaki mosakoli mpe mokomi na makambo ya kala akomaki ete: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Lelo oyo, bosolo ya maloba wana ezali mpenza komonana polele koleka ndenge ezalaki liboso. Mpo na yango, mokomi na makambo ya kala William H. McNeill, oyo azalaki kala mokambi ya Departemá ya Istware, na Iniversité ya Chicago, ayebisi ete: “Lisoló ya bato awa na mabelé ezali bobele kolandana ya bampasi mpe ya kobebisama ya ebongiseli etyami kati na libota ya bato.”
3, 4. (a) Lolenge nini tosengeli kotalela boyekoli ya Biblia? (b) Lolenge nini tokosala mpo na kotalela Biblia?
3 Biblia ezali kokokisa bamposa na biso nyonso na kopesáká biso litambwisi ya mayele. Ya solo, mingi bazali kobulungana wana bazali kotalela Biblia mpo na mbala ya liboso. Ezali búku moko monene mpe biteni na yango mosusu bizali mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Soki batikeli yo tɛstamá oyo ezali komonisa makambo oyo osengeli kosala mpo na kozwa libula moko ya motuya, okomibombela ntango mpo na kotánga yango na likebi nyonso, boye te? Soki omoni ete biteni mosusu ya tɛstamá wana bizali mpasi mpo na kokanga ntina na yango, ekoki mpenza kozala ete okoluka lisalisi ya moto oyo azali na boyebi mingi na likambo yango. Mpo na nini te kosala motindo moko mpo na oyo etali Biblia? (Misala 17:11) Ezali na likambo ya motuya mingi koleka libula ya biloko ya mosuni. Lokola touti komona yango na mokapo ya liboso, boyebi ya Nzambe ekoki komema na bomoi ya seko.
4 Tiká tótalela búku oyo ezali na boyebi ya Nzambe kati na yango. Ya liboso, tokolobela na mokuse makambo mazali kati na Biblia. Na nsima, tokolobela mpo na nini bato mingi ya bososoli bandimaka ete yango ezali Liloba lipemami ya Nzambe.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BIBLIA
5. (a) Makambo nini mazali kati na Makomami ya Liebele? (b) Tozali kokuta nini kati na Makomami ya Greke?
5 Biblia ezali na mikanda 66 oyo ekabolami na biteni mibale, oyo mbala mingi babéngaka yango ete Tɛstamá ya Kala mpe Tɛstamá ya Sika. Mikanda 39 ya Biblia mikomamaki mingimingi na Liebele mpe mikanda 27 mikomamaki na Greke. Makomami ya Liebele, kobanda Genese kino Malaki, mazali kolobela bozalisi mpe bambula 3 500 ya ebandeli ya lisoló ya bato. Wana ezali biso kotalela eteni yango ya Biblia, tozali koyekola makambo matali boyokani ya Nzambe elongo na Bayisraele—uta ebandeli na bango ntango libota yango lisalemaki na ekeke ya 16 L.T.B. kino na ekeke ya mitano L.T.B.a Makomami ya Greke, kobanda mokanda ya Matai kino Emoniseli, mazali kolobela mingi mateya mpe misala ya Yesu Klisto mpe ya bayekoli na ye na boumeli ya ekeke ya liboso T.B.
6. Mpo na nini tosengeli koyekola Biblia na mobimba na yango?
6 Basusu bandimaka ete “Tɛstamá ya Kala” ezali mpo na Bayuda mpe ete “Tɛstamá ya Sika” ezali mpo na Baklisto. Kasi engebene 2 Timoté 3:16 (NW), “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Na yango, boyekoli malamu ya Makomami esengeli kotalela Biblia na mobimba na yango. Ya solo, biteni mibale ya Biblia bizali na boyokani kati na yango, bizali kolobela motó na likambo bobele moko.
7. Motó na likambo ya Biblia ezali nini?
7 Mbala mosusu osilá koyangana na bamísa ya mangomba na boumeli ya bambula mpe osilaki koyoka wana bazalaki kotánga Biblia na mongongo makasi. To ekoki kozala ete osilá kotánga biteni na yango mosusu yo moko. Oyebaki ete Biblia ezali kolobela motó na likambo bobele moko kobanda Genese kino Emoniseli? Ee, Biblia ezali kolobela motó na likambo sé moko. Motó na likambo yango nini? Ezali bongo kolóngisama ya lotómo oyo Nzambe azali na yango ya koyangela bato mpe kokokisama ya mokano na ye ya bolingo na nzela ya Bokonzi na ye. Na nsima, tokomona lolenge Nzambe akokokisa mokano yango.
8. Biblia emonisi nini na ntina na bomoto ya Nzambe?
8 Longola likambo ya komonisa mokano ya Nzambe, Biblia ezali komonisa bizaleli na ye. Na ndakisa, tozali koyekola kati na Biblia ete Nzambe azali na mayoki mpe ete makambo oyo toponaka kosala ezalaka na bopusi na mayoki na ye. (Nzembo 78:40, 41; Masese 27:11; Ezekiele 33:11) Nzembo 103:8-14 (NW), elobi ete Nzambe azali na “motema mawa mpe na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema-boboto.” Asalelaka biso makambo na motema mawa nyonso, ‘abosani te ete tosalemi bobele na mputulu’ mpe ete tokozongaka kati na yango na ntango ya liwa. (Genese 2:7; 3:19) Oyo nde bizaleli kitoko azali komonisa! Ezali wana lolenge ya Nzambe oyo olingi kosambela, boye te?
9. Lolenge nini Biblia ezali kopesa biso likanisi ya polele na ntina na malako ya Nzambe, mpe lolenge nini tokoki kozwa litomba na boyebi yango?
9 Biblia emonisaka biso polele malako ya Nzambe. Na bantango mosusu yango elobelami lokola mibeko. Nzokande, mbala mingi, yango ezali komonana kati na mitindá oyo miteyami na nzela ya bandakisa. Nzambe asalaki ete makambo mosusu oyo masalemaki na lisoló ya Bayisraele ya kala ekomama mpo na litomba na biso. Masoló wana ya polele mamonisi bolamu oyo ezwamaka wana bato bazali kosala na boyokani na mokano ya Nzambe, mpe makambo ya mpasi oyo mabimaka wana basali makambo na lolenge na bango moko. (1 Mikonzi 5:4; 11:4-6; 2 Ntango 15:8-15) Na ntembe te, kotánga masoló wana ya makambo masalemaki solo ekosimba mitema na biso. Soki tomeki kokanisa makambo wana makomami, tokoki komitya na esika ya bato oyo balobelami kati na yango. Mpo na yango, tokoki kozwa litomba na ndakisa malamu mpe tokoki kopɛngola mitambo oyo mikangaki basáli-na-mabe. Nzokande, motuna oyo ya ntina mingi mosengeli kozwa eyano: Lolenge nini tokoki kondimisama ete makambo oyo tozali kotánga kati na Biblia mapemamaki solo na Nzambe?
OKOKI KOTYA ELIKYA NA BIBLIA?
10. (a) Mpo na nini basusu bakanisaka ete Biblia esilá ngala? (b) Ɛteni ya 2 Timoté 3:16, 17 eyebisi biso nini na ntina na Biblia?
10 Mbala mosusu osili komona ete babúku mingi oyo epesaka batoli esilaka ngala bobele nsima na mwa bambula. Ezali boni mpo na Biblia? Ezali búku moko ya kala mpenza, mpe pene na bambula 2 000 esili koleka uta maloba na yango ya nsuka makomamaki. Na yango, bato mosusu bakanisaka ete yango ekoki te kosalelama na eleko na biso. Kasi soki Biblia epemamaki na Nzambe, batoli na yango esengeli kozala ya sika ntango nyonso atako esili koumela bambula mingi. Makomami masengeli kozala na “litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobɔkɔla, kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”—2 Timoté 3:16, 17.
11-13. Mpo na nini tokoki koloba ete Biblia ebongi mpenza na mikolo na biso?
11 Botaleli mozindo emonisi ete mitindá ya Biblia mizali na ntina mingi lelo oyo motindo moko lokola yango ezalaki na ebandeli na ntango oyo bakomaki yango. Na ndakisa, mpo na oyo etali bizaleli ya bato, Biblia ezali komonisa mayele ya solosolo oyo ezali kosalelama mpo na bato ya bileko nyonso. Tokoki komona yango polele kati na Lisoló oyo Yesu asalaki likoló na Ngomba, oyo ezwami na mokanda ya Matai, mokapo 5 kino mokapo 7. Lisoló wana libendaki makasi likebi ya mokonzi ya kala ya Inde, Mohandas K. Gandhi, elobami ete ayebisaki moyangeli moko ya Grande-Bretagne ete: “Na ntango mboka na yo mpe oyo ya ngai ekolanda mateya oyo Klisto apesaki kati na Lisoló likoló na Ngomba, tokosilisa mikakatano bobele ya bamboka na biso te, kasi mpe oyo ya mokili mobimba.”
12 Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete mateya ya Yesu mazali na bopusi malamu likoló na bato! Kati na Lisoló likoló na Ngomba, amonisaki biso nzela ya kozwa bolamu ya solo. Alimbolaki lolenge ya kosilisa mikakatano. Yesu apesaki malako mpo na oyo etali lolenge ya kobondela. Amonisaki ezaleli ya mayele koleka oyo tosengeli kozala na yango liboso ya bamposa ya biloko ya mosuni mpe apesaki Lilako lileki malamu mpo na boyokani malamu elongo na basusu. Lolenge ya koboya bokosi ya mangomba mpe lolenge ya kozala malamu na mikolo mizali koya, yango ezalaki mpe kati na makambo mazwami na lisoló wana.
13 Kati na Lisoló likoló na Ngomba mpe na nkasa na yango mosusu, Biblia ezali koyebisa biso polele oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kopɛngola mpo ete bomoi na biso ebonga. Batoli na yango ebongi mpenza na boye ete molakisi moko apusamaki na koloba ete: “Atako nazali mopési-toli na eteyelo ya katikati mpe nazali na lipɔlɔ́mi ya liboso mpe ya mibale ya eteyelo ya monene mpe atako nasilá kotánga babúku mingi oyo ezali kolobela bokɔnɔ ya motó mpe bizaleli ya bato, namoni ete batoli ya Biblia na makambo lokola kozala na libala ya malamu, kopɛngola mobulu ya bilenge mpe lolenge ya kozwa mpe kobatela baninga, eleki mosika makambo nyonso oyo nasilaki kotánga to koyekola na eteyelo monene.” Longola likambo oyo ete batoli na yango ebongi mpe ezali ntango nyonso ya sika, Biblia ebongi na kotyela motema.
EZALI SOLO MPE EBONGI NA KOTYELA MOTEMA
14. Nini emonisi ete Biblia ezali na boyokani mpenza na siansi?
14 Atako Biblia ezali búku ya siansi te, kasi ezali na boyokani na makambo ya siansi. Na ndakisa, na ntango oyo bato mingi bazalaki kokanisa ete mabelé mazali patátálú, mosakoli Yisaya alobelaki yango ete ezali “zolongano” (na Liebele, chugh, oyo epesi likanisi ya “libungutulu”). (Yisaya 40:22) Likanisi oyo ete mabelé mazali libungutulu endimamaki te na bato mingi kino bankóto ya bambula na nsima ya mikolo ya Yisaya. Lisusu, Yobo 26:7 (NW)—oyo ekomamaki esili koleka bambula 3 000—eyebisi ete Nzambe “atɛlɛmisi mabelé likoló na eloko moko te.” Molimboli moko ya Biblia alobi ete: “Lolenge nini Yobo ayebaki likambo wana ya solo, oyo lindimami na boyekoli ya biloko ya likoló, ete mabelé matɛlɛmi na eloko te, ezali motuna oyo baoyo bandimaka te ete Makomami Mosantu mapemami, bakoki koyanola yango te.”
15. Lolenge nini kondimela Biblia elendisami na motindo oyo yango ekomamaki?
15 Lolenge ya koyebisa makambo oyo ezali kati na Biblia ezali mpe kolendisa kotya motema na biso kati na búku oyo eumeli mingi. Na bokeseni na masapo, makambo oyo mazali na Biblia malobeli bato mpe badati ya sikisiki. (1 Mikonzi 14:25; Yisaya 36:1; Luka 3:1, 2) Mpe atako bakomi na makambo ya kala ya mokili bazalaki ntango nyonso kolekisa ndelo mpo na kolobela bolóngi ya mikonzi na bango mpe bazalaki te komonisa kozanga kolónga na bango mpe mabungá na bango, nzokande bakomi ya Biblia balobelaki polele mpe na bosembo nyonso—ata masumu minene oyo basalaki.—Mituya 20:7-13; 2 Samwele 12:7-14; 24:10.
BÚKU YA BISAKWELI
16. Wapi elembeteli eleki na nguya oyo emonisi ete Biblia epemamaki na Nzambe?
16 Kokokisama ya bisakweli epesaka elembeteli makasi oyo emonisi ete Biblia epemamaki solo na Nzambe. Biblia ezali na bisakweli mingi oyo bikokisamaki na mobimba na yango. Ya solo, bato bango moko bakokaki kosala bongo te. Na bongo, nani azali nsima ya bisakweli wana? Biblia yango moko elobi ete “esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na elimo santu,” to nguya ya Nzambe oyo ekosalaka mosala. (2 Petelo 1:21, NW) Tótalela mwa bandakisa.
17. Bisakweli nini bisakolaki kokwea ya Babilone, mpe lolenge nini yango ekokisamaki?
17 Kokwea ya Babilone. Yisaya mpe Yilimia bango mibale basakolaki kokwea ya Babilone na mabɔkɔ ya ba Médo-Perse. Likambo ya kobenda likebi, esakweli ya Yisaya na ntina na likambo yango ekomamaki mibu soko 200 liboso ete Babilone ekweisama! Makambo ya esakweli yango oyo malobelami awa mayebani malamu kati na mikanda oyo milobelaka makambo maleká kala: kokauka ya ebale Efalata na kopɛngwisáká mai na yango na libeke oyo esalemaki na bato bango moko (Yisaya 44:27; Yilimia 50:38); bikuke ya Babilone bitikalaki polele (Yisaya 45:1); mpe etumba oyo etambwisamaki na mokonzi oyo azalaki na nkombo Siruse.—Yisaya 44:28.
18. Lolenge nini esakweli ya Biblia na ntina na kobima mpe kokwea ya “mokonzi ya Grèce” ekokisamaki?
18 Kobima mpe kokwea ya “mokonzi ya Grèce.” Kati na emonaneli moko, Danyele amonaki ntaba mobali ezali kobɛta mpate mobali, kobukáká bongo maseke na ye mibale. Na nsima, liseke monene ya ntaba mobali libukanaki, mpe maseke minei mabimaki na esika na yango. (Danyele 8:1-8) Elimbolamaki epai na Danyele ete: “Mobali na mpate oyo emonaki yo na maseke mibale, oyo izali mikonzi na Médo-Perse. Mpe mobali na ntaba azali mokonzi na Grèce; mpe liseke monene na kati na miso na ye ezali mokonzi na liboso. Mpo na liseke oyo ebukanaki, mpe minei mosusu ibimaki na esika na yango, bakonzi minei bakobima na mokili yango, nde bakozala na nguya na ye te.” (Danyele 8:20-22) Na boyokani na esakweli wana, bikeke soko mibale na nsima, “Mokonzi ya Grèce,” Alexandre Monene, alóngaki maseke mibale boyangeli ya Médo-Perse. Alexandre akufaki na mobu 323 L.T.B. mpe na nsima bakonzi minei ya basodá na ye bakitanaki ye. Nzokande, moko te kati na bikonzi yango ekokanaki na nguya oyo ezalaki na boyangeli ya Alexandre.
19. Bisakweli nini bikokisamaki epai na Yesu Klisto?
19 Bomoi ya Yesu Klisto. Makomami ya Liebele mazali na bisakweli mingi bikokisamaki na kobotama, na mosala, na liwa mpe na lisekwa ya Yesu. Na ndakisa, koleka mibu 700 na liboso, Mika asakolaki ete Masiya, to Klisto, asengelaki kobotama na Beteleme. (Mika 5:2; Luka 2:4-7) Yisaya, moto oyo azalaki na eleko moko na Mika, asakolaki ete Masiya asengelaki kobɛtama mpe kobwakelama nsɔi. (Yisaya 50:6; Matai 26:67) Bambula nkámá mitano na liboso, Zekalia asakolaki ete Masiya asengelaki kotɛkama na palata 30. (Zekalia 11:12; Matai 26:15) Koleka ebele na bambula na liboso, Davidi asakolaki makambo matalaki liwa ya Yesu Masiya. (Nzembo 22:7, 8, 18; Matai 27:35, 39-43) Mpe mwa bikeke mitano na liboso, esakweli ya Danyele emonisaki ntango oyo Masiya asengelaki kobima, boumeli ya mosala na ye mpe ntango ya liwa na ye. (Danyele 9:24-27) Wana ezali bobele mwa bandakisa na ntina na bisakweli oyo bikokanaki epai na Yesu Klisto. Okosepela na nsima kotánga makambo mingi na ntina na ye.
20. Masoló ya bisakweli ya Biblia oyo bikokisamaki masengeli kopesa biso endimiseli nini?
20 Ebele na bisakweli mosusu ya Biblia esili kokokisama. Okoki komituna ete: ‘Yango ezali na bopusi nini likoló na bomoi na ngai?’ Soki moto moko asili koyebisa yo solo na boumeli ya bambula mingi, osengeli na mbala moko kotyela ye ntembe soki ayebisi yo likambo moko ya sika? Te! Nzambe asili koyebisa solo kati na Biblia. Yango esengeli kolendisa elikya na yo kati na makambo oyo Biblia elaki, lokola bisakweli na yango na ntina na mabelé oyo makobongwana paladiso, boye te? Ya solo, tokoki kozala na elikya motindo moko na oyo ezalaki na Paulo, moko na bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso, oyo akomaki ete ‘Nzambe akoki kobuka lokuta te.’ (Tito 1:2) Lisusu, ntango tozali kotánga Makomami mpe kosalela batoli na yango, tozali komizwela mayele oyo bato bakoki kozwa yango bango moko te, mpamba te Biblia ezali búku oyo ezali komonisa boyebi ya Nzambe oyo ezali komema na bomoi ya seko.
“BÓYOKA MPOSA MAKASI” YA BOYEBI YA NZAMBE
21. Osengeli kosala nini soki makambo mosusu oyo ozali koyekola kati na Biblia mamonani lokola ete mazali kobulunganisa yo?
21 Wana ezali yo koyekola Biblia, na ntembe te, okomona makambo makeseni na oyo bateyaki yo liboso. Okoki nkutu komona ete mimeseno mosusu ya lingomba oyo ozalaki kolinga mingi mizali kosepelisa Nzambe te. Okoyekola ete Nzambe azali na mibeko mpo na oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, oyo eleki mosika mibeko oyo miyebani malamu kati na mokili oyo epesaka nzela na makambo nyonso. Yango ekoki kozala mpasi na ebandeli. Kasi, zalá na motema pɛtɛɛ! Talelá malamumalamu Makomami mpo na kozwa boyebi ya Nzambe. Zalá pene na kondima likambo oyo ete batoli ya Biblia ekoki kosɛnga yo ete osembola makanisi mpe misala na yo.
22. Mpo na nini osengeli koyekola Biblia, mpe lolenge nini okoki kosalisa basusu na kokanga ntina na yango?
22 Baninga mpe bandeko na yo na mikano malamu nyonso bakoki kotɛmɛla boyekoli na yo ya Biblia, kasi Yesu alobaki ete: “Boye, moto na moto oyo akoyambola ngai liboso na bato, ngai nakoyambola ye liboso na Tata na ngai na likoló. Nde ye oyo akoangana ngai liboso na bato, ngai mpe nakoangana ye liboso na Tata na ngai na likoló.” (Matai 10:32, 33) Basusu bakoki kobanga noki okomipesa na lingomba ya mpamba to okokóma moto ya bindimandima. Nzokande, na bosolo nyonso, ozali bobele kosala makasi mpo na kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya solo na ye. (1 Timoté 2:3, 4) Mpo na kosalisa bato mosusu ete bákanga ntina na yango, kozala na makambo makasi te, kozala na ezaleli ya koswana te na ntango ozali kolobela bango makambo oyo ozali koyekola. (Bafilipi 4:5) Omikundola ete mingi “bazwamaka kozanga liloba” wana bamoni elembeteli ete boyebi ya Biblia epesaka mpenza matomba epai na bato.—1 Petelo 3:1, 2, NW.
23. Lolenge nini okoki “koyoka mposa makasi” mpo na boyebi ya Nzambe?
23 Biblia elendisi biso ete: “Lokola bana babotami bobele sika bóyoka mposa makasi ya mabɛlɛ oyo mabebisami te oyo mazali na liloba.” (1 Petelo 2:2, NW) Mwana moke azalaka na mposa makasi ya mabɛlɛ ya mama na ye mpe asɛngaka ntango nyonso na motema likoló ete bákokisela ye mposa yango. Bobele bongo, tozali na mposa mpenza ya boyebi oyo euti epai na Nzambe. “Yoká mposa makasi” mpo na Liloba na ye na kolandáká boyekoli na yo. Salá ete mokano na yo ezala ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. (Nzembo 1:1-3) Yango ekomemela yo mapamboli mingi, mpamba te Nzembo 19:11 (NW), elobi na ntina na mobeko ya Nzambe ete: “Kotosa yango ezali na mbano monene.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a L.T.B. elimboli “Liboso ya Ntango na Biso,” oyo ezali mpenza sikisiki koleka L.K. (“Liboso ya Klisto”). T.B. elakisi “Ntango na Biso,” oyo ebéngami mbala mingi A.D., mpo na anno Domini, oyo elimboli “na mbula ya Nkolo na biso.”
MEKÁ BOYEBI NA YO
Na makambo nini Biblia ekeseni na babúku nyonso mosusu?
Mpo na nini okoki kotya elikya na Biblia?
Nini endimisi yo ete Biblia ezali Liloba lipemami ya Nzambe?
[Etanda na lokasa 14]
YEBÁ KOSALELA MALAMU BIBLIA NA YO
Komesana na Biblia esengeli kozala likambo ya mpasi te. Salelá etánda ya mikanda na yango mpo na koyeba molɔngɔ́ mpe esika mokanda mokomoko ya Biblia ezwami.
Mikanda ya Biblia mizali na mikapo mpe milɔngɔ́ oyo mipesami na lolenge ya pɛtɛɛ. Kokabolama ya mikapo ebakisamaki na boumeli ya ekeke ya 13, mpe ekoki kozala ete monyati moko ya mikanda, Mofalansé moko ya ekeke ya 16, nde akabolaki Makomami ya Greke ete ezala na milɔngɔ́. Biblia ya liboso na mobimba oyo ezalaki na mikapo mpe na milɔngɔ́ ezalaki ebimeli moko ya Lifalansé oyo ebimisamaki na 1553.
Ntango eteni moko etángami kati na búku oyo, motángo ya liboso emonisi mokapo mpe oyo elandi emonisi molɔngɔ́ ya kotánga. Na ndakisa, “Masese 2:5” elimboli mokanda ya Masese, mokapo 2, vɛrsɛ 5. Na kolukáká eteni oyo epesami, mosika te okomona ete ezali pɛtɛɛ mpo na koyeba mikapo ya Biblia.
Lolenge malamu mpo na komesana na Biblia ezali ya kotángaka yango mokolo na mokolo. Na ebandeli, ekoki komonana lokola likambo ya mpasi mpenza. Kasi soki ozali kotánga bobele mikapo misato kino mitano na mokolo moko, engebene molai na yango, okosilisa botángi ya Biblia mobimba na mbula moko. Mpo na nini te kobanda yango uta lelo?
[Etanda na lokasa 19]
BIBLIA—BÚKU OYO EKESENI NA NYONSO MOSUSU
● Biblia “epemamaki na Nzambe.” (2 Timoté 3:16, NW) Atako bato bakomaki maloba, Nzambe nde atambwisaki makanisi na bango na boye ete Biblia ezali mpenza “liloba na Nzambe.”—1 Batesaloniki 2:13.
● Biblia ekomamaki na boumeli ya bikeke koleka 16, bato oyo basanganaki na kokoma yango bazalaki soko 40, oyo bautaki na bisika bikeseni. Atako bongo, Biblia na mobimba na yango ezali na boyokani uta na ebandeli kino na nsuka.
● Biblia ekutanaki na botɛmɛli makasi koleka búku nyonso mosusu. Na boumeli ya eleko ebéngami Moyen Âge, bato mingi batumbamaki likoló na nzeté bobele mpo ete bazalaki na kopi ya Makomami.
● Biblia ezali búku oyo eleki kosombama kati na mokili mobimba. Esili kobongolama, na mobimba to na ndambo, na nkótá koleka 2 000. Esili konyatama na motángo ya bamiliare, mpe okoki kokuta yango bipai nyonso awa na mabelé.
● Eteni oyo eleki koumela ya Biblia ekomamaki na ekeke ya 16 L.T.B. Yango ezalaki liboso ya kobimisama ya Rig-Veda, búku ya Bahindu (pene na mobu 1300 L.T.B.), to “Les Trois corbeilles,” búku ya Babudiste (ekeke ya mitano L.T.B.), to Coran búku ya Islam (ekeke ya nsambo T.B.), ezalaki mpe liboso ya Nihongi, búku ya Bashinto (720 T.B.).
[Elilingi na lokasa mobimba 20]