Likambo lileki monene: yango nini?
LIKAMBO nini ya monene litaleli moko na moko kati na biso? Likambo yango lizali nde na boyokani na mpela monene ya mai—na—monana to na mindondo ya climat, oyo mikobimisaka móto mingi kati na etando na biso? Etali nde kobebisama ya eboké ya ozone mpe na makámá mauti na kongala makasi ya ba rayons ultraviolets? Ezali nde na boyokani elongo na kobakisama na bato oyo emonani na mokili mobimba na bokóli ya bobola mpe koboma? To, ezali nde likámá oyo bamilió ya bato bazali na yango na kobomama nyee kati na etumba ya nikleere, koboma oyo bato bakobika na yango bakosuka sé na kokufa kati na bampasi minene, likoló na mpio, na nzala, mpe na ngenge ya bankisi oyo esalelami na ba bombes?
Nsima na kolobela makambo oyo mpe mosusu, na 1989, zulunalo “Pour la science” esukisaki ete: “Likambo ya etumba ya nikleere ezali mpenza likámá monene oyo . . . bato [bazali na yango].” Likambo monene oyo litaleli biso banso ezali nde likámá ya etumba ya nikleere?
Likambo lileki monene
Uta mbóngwana monene oyo esalemaki kati na makambo ya politike na 1989, likámá ya etumba ya nikleere limonani lokola ete ekiti mpenza te. Kasi, lokola bibundeli ya nikleere bizali naino, yango ezali bobele likámá mpo na bato. Atako bongo, makambo oyo mazali katina lisoló moko liuti kobima kala mingi te (1990 Britannica Book of the Year) emonisi likambo mosusu ya monene. Mokanda yango momonisaki ete bato koleka bamilió 230 bandimaka te ete Nzambe azali. Engebene mikanda mosusu, bamilió na bato mosusu basili kopusama na filozofi oyo ekolakisaka ete Mozalisi azali te. Lisusu, ata soko bamiliare ya bato bazali kondima Nzambe, kasi bazali ntango nyonso na makanisi makeseni na ntina na Nzambe. Mpe mbala mingi, misala na bango mizali kobwaka nsoni likoló na Ye oyo bango bakolobaka ete bazali kosambela ye.—2 Petelo 2:1, 2.
Soko Nzambe azali—ntembe ata moke ezali te ete—likambo monene lisengeii mpenza mpenza kotalela ye. Mpo na nini azalisaki moto? Mikumba nini tozali na yango epai na ye? Akosala nini na ntina na kobebisama oyo moto asili kosala na etando na biso? Mpe eyano nini akopesa na ntembe oyo ete bato mingi baboyi kondima ye to mpe baboyi kotósa mokano na ye? Kasi, motuna monene oyo mozali liboso na moto na moto ezali oyo: Ozali kondima boyangeli ya Nzambe “oyo azali na nkombo JEHOVAH,” to mpe oboyi yango?—Nzembo 83:18.
Ebandeli ya molóngó
Ya solo mpenza, mpo na baoyo baboyi kondima Nzambe, likambo ya mikumba oyo moto azali na yango epai na Nzambe litali bango te. Kasi moto nyonso oyo azali kotalela na bosembo nyonso lolenge oyo etando na biso ezali, mpe kitoko na yango, moto yango akoki bobele kondima mpenza ete Moyemi monene azali. Ezali solo ete bato mingi na mayele balobelaka Nzambe te wana ekolimbolaka bango biloko kitoko bizingi biso. Na ndakisa, mingi bakolobaka ete molóngó mobimi longwa na eloko moke mpenza koleka motó ya péngele, mpe yango esalemaki “yango moko” na pwasa, kozanga Mozalisi moko. Nzokande, nsima na kobimisa liteya ya sika na ntina na ebandeli ya molóngó, Hanbury Brown, moto oyo ayekoli makambo ya molóngó, andimi kati na mokanda na ye La sagesse de la science (angl.) ete: “Nandimi te ete [maloba na ngai] makomonana lokuta epai na ebele na bato, kasi makotalelama lokola ndimbola ya solo.” Profesere Brown alobi na nsuka ete “ebandeli mpe nsuka ya molóngó” ezali “mabómbami minene” oyo bato na sianse bakoki kolimbola te.
Bato ya mayele basili komonisa ete, eloko oyo bakotongaka na yango biloko minene (matière) ekosala elongo na makasi (énergie), mpe ete eloko yango ekoki kobongwana na makasi, mpe makasi makoki kobongwana na eloko yango. Lokola oyo emonisami na ba bombes ya nikleere, eloko moke mpenza ekoki kobimisa makasi mingi mpenza. Na yango, nani azali bongo liziba ya makasi monene oyo mabimisami na minzoto 100 miliare oyo mizali kati na galaxie, to oyo na miliare moko ya ba galaxies oyo ezali bongo kosala molóngó oyo mozali komonana?
Biblia elobi ete: “Tombola miso na bino likoló mpe tala! Nani asalaki biloko oyo? Ezali Ye oyo akobimisaka yango na motuya na yango, mpe akobengaka moko na moko na nkombo na yango. Mpo na monene na makasi na ye, mpe mpo ete azali na bokasi kati na nguya na ye, moko na yango ekozanga te.” Ezali nani yango alobelami awa? Biblia eyanoli: “Ngai nazali Jéhovah, yango ezali nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te.”—Yisaya 40:26; 42:5, 8, MN.
Likanisi oyo likolobamaka ete mabelé mpe biloko mosusu ya molóngó ebimaki na pwasa, ezali koboya kopesa Jéhovah Nzambe, nkembo oyo esengeli na ye oyo azali Mozalisi. (Emoniseli 4:11) Lisusu, na lolenge wana ya kotalela makambo, moto akomiyoka te ete azali na mokumba na ntina na etanda Na yango, soki bato bayebaki ete bazali na mokumba liboso na Nzambe mpo na oyo ezali bango kosala epai na biloko oyo ye asili kozalisa, mbele bakokaki mpenza komibanzabanza na ntina na kobebisama ya (mabelé, mopepe mpe mai), na ntina na kobebisama ya ebóké na mopepe ya ozone to na kongalisama ya moi makasi na etando.
Ebandeli ya bomoi
Tolobela likambo mosusu. Bomoi ebimaki ndenge nini? Bazalí kolakisa na bato ete, bomoi ebimaki kozanga ete Nzambe asala yango. Kasi yango ezali kotemela etinda moko etyami mpenza na sianse. Na eleko moko, bato bazalaki koloba ete mangangálá (scarabées) mazalaki kobotama longwa na malalélá (fumier) mpe nkusu ezalaki kobotama longwa na mosuni mopoli, mpe mpóko ezalaki kouta na potopoto. Na ekeke euti koleka, bato na sianse balakisaki ete nyonso euti na eloko oyo ezangi bomoi (ezala moto, nyama to mpe nzete). Na eleko moko, makanisi wana matemelamaki na bato na mayele, lokola Redi, mpe na nsima, Pasteur asalaki lolenge moko. Mokanda moko (The World Book Encyclopedia, ebimeli 1990) elobi ete: “Na lisalisi ya baeksperianse ya Pasteur, bato mingi bayekoli Biologie bandimi likanisi oyo ete bomoi ekoutaka sé na bomoi mosusu.”
Kasi bato na sianse bazali bobele koloba ete ezalaki bongo te na kala mpenza. Balobi ete biloko na bomoi ya yambo, oyo ezalaki bobele na selile moko, ebimaki na pwasa kati na súpu ezangi bomoi, oyo ebéngami súpu ya ebandeli, oyo ezalaki na biloko nyonso ya ntina mingi mpo na bomoi ya moto. Kati na mokanda na ye “Une visite guidée de la cellule” (angl.), christian De Duve alobaki ete: “Ezali likambo na pwasa, mpe bobele likambo na pwasa nde epesaki nzela ete bomoi ebanda longwa na súpu ya ebandeli kino moto.”
Na ntina na Nzambe, Biblia elobi ete: “Mpo ete yo moko ozali liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9, MN) Maloba oyo mazali na boyokani elongo na makambo oyo tomonaki ete: bomoi ekouta sé na bomoi mosusu. Mpo ete sianse elingi kotalela bomoi lokola eloko ebimi na pwasa, nzokande ezali likabo ya motuya mpenza oyo Nzambe asili kopesa, bato mingi baboyi kozala na mikumba liboso na Nzambe. Yango ezali komema bango na kobuka mibeko na ye na konyokoláká bazalani na bango, na koyibáká, na kobomáká, mpe kopesáká ndambo monene na misolo na bango, ntango na bango mpe mayele na bango mpo na kosala bibundeli makasi mpenza ya koboma
Kokátama ya likambo
Longola bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali mpe baoyo balingi kobongola makanisi nyonso ete ezala ya sika, ebele na bato mosusu baboyi kondima boyangeli ya Nzambe. Nzokande mingi bakolobaka ete bazali kondima Nzambe, mpe bamilió 1 700 kati na bango bakomilobaka ete bazali baklisto. Na boumeli ya bikeke, Mangomba na boklisto ya lokuta basili kopesa masanzoli mingi epai na Nzambe na bamísa na bango. Kasi, etelemelo nini mpenza bamilió 1 700 na “baklisto” yango basili kozwa na likambo litali boyangeli ya Nzambe?
Ezala ata mpo na moto na moto to mpo na ekólo moko, basili komonisa ete bazali komibanzabanza soko moke te na likambo yango wana ezali bango kobuka mibeko oyo mipesami na Nzambe. Mabota oyo makomilobaka ete ezali ya boklisto, basili kotyola Nzambe na kosaláká mabe maleki mpenza, kati na yango totangi bitumba minene mibale na Lisoló na bato. Ngámbo nyonso mibale, bato ya Mangomba, “baklisto” bapambolaki bitumba yango. Motindo na bokosi wana emonisi Nzambe na lolenge mabe. Lokola oyo Biblia elobi yango: “Bakolobaka ete bayebi Nzambe, nde bazali kowangana ye na misala na bango.”—Tito 1:16MN.
Kasi likambo oyo tosengeli koyeba ezali ete: Nzambe “akomiangana ye moko te.” (2 Timoté 2:13) Mokolo ekoya oyo akokáta likambo litali boyangeli mpo na libela, mpe akosala yango na boyokani na mokano na ye oyo asili komonisa na maloba oyo ete: “[Mabota] bakoyeba ete ngai nazali Jéhovah.” (Ezekiele 38:23) Kasi mpo na nini atikaki ntango molai boye? Eyano nini mpenza ekopesama na likambo oyo? Mpe lolenge nini biso tokoki kozwa makatami malamu na ntina na likambo oyo lileki mpenza monene?
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover background: U.S. Naval Observatory photo
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Background: U.S. Naval Observatory photo