Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ip-1 mok. 6 nk. 61-72
  • Yehova Nzambe ayokeli batikali mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova Nzambe ayokeli batikali mawa
  • Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Mbuma oyo Yehova atɔisi’
  • Batikali bakómi basantu na miso ya Yehova
  • Elaka ya kobatela bango na bolingo
  • Kobá kozela Yehova
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya​—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Bóyoka esengo libela na oyo nazali kosala”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
ip-1 mok. 6 nk. 61-72

Mokapo ya Motoba

Yehova Nzambe ayokeli batikali mawa

Yisaya 4:2-6

1, 2. Mosakoli Yisaya asakoli makambo nini mpo na Yuda mpe Yelusaleme?

EKUMBAKI moko makasi ebɛti na mboka moko oyo ezali na bato ebele. Mipɛpɛ makasi, mbula makasi mpe mpela monene epasoli nzela moko monene banda na ebandeli tii na nsuka ya mboka, ebuki bandako, ebebisi milona, mpe ebomi bato. Kasi eumelaki te, ekumbaki yango eleki, mpe nsima na yango mboka ekómi nyɛɛ. Mpo na bato oyo babikaki, ezali sikawa ntango ya kobongisa mpe kotonga lisusu mboka.

2 Mosakoli Yisaya asakoli likambo moko ya ndenge wana mpo na Yuda mpe Yelusaleme. Mapata ya kosambisa ya Nzambe ezali koyinda mpamba te, ezali koyinda na ntina mpenza! Libota yango ezali na ngambo monene. Ezala bayangeli to bato mosusu, batondisi mokili yango na makambo mabe mpe basopi makila mingi. Yango wana, na lisalisi ya Yisaya, Yehova atɔndɔli mabe ya Yuda mpe akebisi libota yango ya batomboki ete akosambisa bango. (Yisaya 3:25) Ekumbaki yango ekotika mokili ya Yuda mpamba. Likambo yango eyokisi Yisaya mawa mingi.

3. Nsango nini ya malamu ezali na Yisaya 4:2-6?

3 Kasi nsango moko ya malamu ezali! Ekumbaki ya kosambisa sembo ya Yehova ekoleka, mpe batikali bakobika. Ɛɛ, kosambisa oyo Yehova akosambisa Yuda ekolɛmbisama na motema mawa na ye! Nsango ya Yisaya oyo epemamaki, oyo ezali na Yisaya 4:2-6 ememi biso na eleko yango ya mapamboli. Ezali lokola nde moi epasoli mbala moko mapata, mpe nsima ya etumbu wana ya nsɔmɔ mpo na kotala mpe koyoka—ndenge elobami na Yisaya 2:6–4:1—makambo ebongwani, ekómi sikawa mokili kitoko na bato ya sika mpenza.

4. Mpo na nini ezali na ntina ete tótalela esakweli ya Yisaya oyo elobeli kozongisama ya batikali?

4 Esakweli ya Yisaya oyo ezali kolobela kozongisama ya batikali mpe ndenge bakobatelama ezali mpe kokokisama na mikolo na biso—“na mikolo ya nsuka.” (Yisaya 2:2-4) Tiká tótalela nsango yango oyo eyei mpenza na ntango ebongi, mpamba te ezali kaka te na ndimbola ya esakweli kasi ezali mpe koteya biso motema mawa ya Yehova mpe komonisa biso ndenge nini tokoki kozwa matomba na yango.

‘Mbuma oyo Yehova atɔisi’

5, 6. (a) Na maloba nini Yisaya alobeli eleko ya kimya oyo elandi ekumbaki oyo ezali koya? (b) Liloba ‘mbuma etɔi’ elimboli nini, mpe yango ezali komonisa nini mpo na mokili ya Yuda?

5 Yisaya akómi koloba na mongongo ya esengo ntango azali kokanisa ndenge bato bakozala nsima ya ekumbaki oyo ezali koya, eleko moko ya kimya. Akomi ete: “Na mokolo yango [mbuma oyo Yehova atɔisi, NW] ekozala kitoko mpe na nkembo mpe mbuma na mokili ikozala esengo mpe kitoko epai na baoyo bakobika na Yisalaele.”—Yisaya 4:2.

6 Awa Yisaya azali kolobela ndenge mokili yango ekozonga lisusu. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na ‘kotɔisa’ ezali komonisa ‘eloko nyonso oyo ebimaka na mabele, mwa nzete, mwa etape.’ Yango emonisaka bozwi, bokoli, mpe mapamboli oyo euti na Yehova. Yango wana, Yisaya azali komonisa ete azali na elikya—mpamba te atako etikali moke mboka ebeba, kasi yango ekoumela seko te. Na lisalisi ya mapamboli ya Yehova, mokili ya Yuda oyo ezalaki kala na bozwi ekobimisa lisusu biloko mingi.a—Levitike 26:3-5.

7. Na lolenge nini Yehova atɔisi mbuma oyo ekozala mpo na “kitoko mpe na nkembo”?

7 Yisaya asaleli maloba kitoko mpo na komonisa ete mbongwana oyo ekosalema ekozala mpenza ya monene. Yehova atɔisi mbuma oyo ekozala “kitoko mpe na nkembo.” Liloba “kitoko” ezali komonisa kitoko ya Mokili ya Ndaka na ntango oyo Yehova apesaki yango na Yisalaele bikeke mingi liboso. Ezalaki mpenza kitoko mpe bazalaki kotalela yango lokola “mokili moleki mikili nyonso na nkembo [“bonzenga,” Liloba lya Nzambe].” (Ezekiele 20:6) Yango wana, maloba ya Yisaya epesi bato elikya ete mokili ya Yuda ekozongela nkembo na yango mpe kitoko na yango ya kala. Ya solo, ekozala lokola libanga ya ntalo oyo ezali kongɛnga na mabele.

8. Banani bakozala wana mpo na kosepela na kitoko ya mokili yango oyo ezongisami, mpe ndenge nini Yisaya alobeli mayoki na bango?

8 Kasi, banani bakozala wana mpo na kosepela na kitoko ya mokili oyo ezongisami? Yisaya akomi ete “baoyo bakobika na Yisalaele.” Ya solo, bato mosusu bakobika na ntango ya kobebisama ya nsɔmɔ oyo esakolamaki. (Yisaya 3:25, 26) Ndambo ya babiki bakozonga na Yuda mpe bakopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga lisusu mboka. Mpo na bato yango oyo bazongi—“baoyo bakobika”—ebele ya mbuma ya mokili na bango oyo ezongi ekokóma eloko moko ya “esengo mpe kitoko.” (Yisaya 4:2) Na esika ete ezala nsɔni mpo na ndenge mboka ebebaki, ekokóma nde ntina ya kosepela.

9. (a) Nini esalemaki na mobu 537 L.T.B. mpo na kokokisa maloba ya Yisaya? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete kati na ‘baoyo babikaki’ ezali mpe na bato mosusu oyo babotamaki na boombo? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

9 Yisaya alobaki mpenza solo, ekumbaki ya etumbu ebɛtaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ntango bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme mpe Bayisalaele mingi bakufaki. Bato mosusu babikaki mpe bakendaki na boombo na Babilone, kasi soki mpo na motema mawa ya Nzambe te, mbɛlɛ babiki bazali te. (Nehemia 9:31) Nsukansuka, Yuda etikalaki mpenza mpamba. (2 Ntango 36:17-21) Na nsima, na 537 L.T.B., Nzambe ya motema mawa apesaki nzela ete ‘babiki’ bázonga na Yuda mpo na kozongisa losambo ya solo.b (Ezela 1:1-4; 2:1) Kobongola motema ya solosolo ya bato yango oyo bautaki na boombo elobelami na maloba kitoko na Nzembo 137, oyo mbala mosusu ekomamaki na ntango ya boombo to mwa moke nsima ya boombo. Ntango bazongi na Yuda, batimolaki mabele mpe balonaki milona. Tókanisa naino esengo oyo bayokaki ntango bamonaki ete Nzambe azali kopambola milende na bango, kokolisa milona na bango mpe mabele na bango ekómaki kobota malamu lokola “elanga ya Edene”!—Ezekiele 36:34-36.

10, 11. (a) Na lolenge nini Bayekoli ya Biblia bazalaki na boombo na “Babilone Monene” na ebandeli ya ekeke ya 20? (b) Ndenge nini Yehova apamboli batikali Bayisalaele ya elimo?

10 Kozongisama ya ndenge wana esalemi na mikolo na biso. Na ebandeli ya ekeke ya 20, Bayekoli ya Biblia—nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova— bakɔtaki na boombo ya elimo na “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 17:5) Atako babwakaki mateya mingi ya mangomba ya lokuta, Bayekoli ya Biblia bazalaki naino na mbindo ya makanisi mpe ya misala mosusu ya Babilone. Mpo na monyoko oyo eutaki na bakonzi ya mangomba, basusu kati na bango bakɔtaki mpenza bolɔkɔ. Mokili na bango ya elimo—elingi koloba lingomba na bango, to ezalela na bango ya elimo—etikalaki mpamba.

11 Kasi na ebandeli ya eleko ya molunge ya mobu 1919, Yehova ayokelaki batikali Bayisalaele yango ya elimo mawa. (Bagalatia 6:16) Amonaki ezalela na bango ya kobongola motema mpe mposa na bango ya kosambela ye na solo, yango wana asalaki ete bábima na bolɔkɔ mpe, mingi mpenza, básikolama na boombo ya elimo. ‘Babiki’ yango bazongisamaki na mokili na bango ya elimo oyo Nzambe apesaki bango mpe abotisaki yango biloko mingi. Mokili yango ya elimo ekómi kitoko mpe na yango ebendi bamilio ya bato oyo babangaka Nzambe ete básangana na batikali na losambo ya solo.

12. Ndenge nini maloba ya Yisaya ezali kokumisa motema mawa oyo Yehova amoniselaka basaleli na ye?

12 Maloba ya Yisaya awa ezali kokumisa motema mawa oyo Nzambe amoniselaka basaleli na ye. Atako libota mobimba ya Yisalaele bapesaki Yehova mokɔngɔ, ayokelaki batikali oyo babongolaki motema mawa. Tokoki mpenza kosepela ete ata bato oyo basali lisumu monene bakoki kozala na elikya mpe kozongela Yehova! Baoyo babongoli motema basengeli kokanisa te ete likoki ezali te mpo na kozwa ngɔlu ya Yehova, mpamba te ye asundolaka motema motungisami te. (Nzembo 51:17, NW) Biblia endimisi biso ete: “[Yehova] azali na motema molai, azali mpe na mawa; [asilikaka noki te mpe atondi na boboto. Lokola, NW] tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye.” (Nzembo 103:8, 13) Na ntembe te, ebongi mpenza kokumisa Nzambe ya motema mawa ndenge wana!

Batikali bakómi basantu na miso ya Yehova

13. Na Yisaya 4:3, ndenge nini Yisaya alobeli bato oyo batikali oyo Yehova akoyokela mawa?

13 Tosili koyeba batikali oyo Yehova akoyokela bango mawa, kasi sikawa Yisaya alobi makambo mosusu mpo na bango. Akomi ete: “Ekozala ete baoyo bakotikala na Siona, mpe baoyo batiki bango na Yelusaleme, bakoloba mpo na bango ete bazali basantu mpo na ye, baoyo nyonso bakomami nkombo mpo na bomoi na Yelusaleme.”—Yisaya 4:3, NW.

14. Bato oyo ‘bakotikala’ mpe baoyo ‘batikaki bango,’ ezali banani, mpe mpo na nini Yehova akoyokela bango mawa?

14 Bato yango oyo ‘bakotikala’ mpe oyo ‘batikaki bango’ ezali banani? Ezali bato oyo babiki, oyo balobelami na vɛrsɛ 2—Bayuda oyo bazali baombo oyo bakopesa bango nzela ya kozonga na Yuda. Sikawa, Yisaya amonisi mpo na nini Yehova akoyokela bango mawa—bakozala ‘basantu’ mpo na ye. Bosantu elimboli “bopɛto ya losambo.” Mpo na kozala mosantu, esengeli kozala pɛto na maloba mpe na misala, esengeli komitambwisa na boyokani na makambo oyo Yehova azali kotalela ete ezali sembo mpe ebongi. Na ntembe te, Yehova akoyokela baoyo amoni ete bazali ‘basantu’ mawa, mpe akopesa bango nzela ya kozonga na Yelusaleme, “mboka ya bosantu.”—Nehemia 11:1, NW.

15. (a) Maloba ‘bakomami nkombo mpo na bomoi na Yelusaleme’ ezali kokundolela biso momeseno nini Bayuda bazalaki na yango? (b) Likebisi nini oyo ezali na maloba ya Yisaya oyo ezali kotinda moto akanisa?

15 Bato yango oyo batikali mpe bazali sembo bakofanda kuna? Yisaya alaki ete ‘bakomami nkombo mpo na bomoi na Yelusaleme.’ Yango ezali kokundolela biso momeseno ya Bayuda ya kobatela babuku oyo bakomá bankombo ya mabota mpe bikólo ya Yisalaele. (Nehemia 7:5) Soki nkombo ya moto moko ekomami na buku moko, yango elingi koloba ete azalaki na bomoi, mpamba te ntango akufi bakoboma nkombo na ye. Na bisika mosusu na Biblia, totángaka ete ezali na buku moko ya elilingi oyo ezali na bankombo ya bato oyo Yehova apesaka bango bomoi. Kasi esɛngaka kokokisa masɛngami mpo nkombo etikala na buku yango, mpamba te Yehova akoki ‘kolongola’ bankombo yango. (Exode 32:32, 33; Nzembo 69:28) Yango wana, maloba ya Yisaya ezali na likebisi moko oyo ezali kotinda moto akanisa—bato oyo bazongi bakokoba kofanda na mokili na bango oyo ezongisami, kaka soki bazali ntango nyonso basantu na miso ya Nzambe.

16. (a) Yehova asɛngaki nini epai na bato oyo apesaki nzela ete bázonga na Yuda na mobu 537 L.T.B.? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova ayokeli batikali bapakolami mpe “bampate mosusu” mawa na ntina?

16 Na mobu 537 L.T.B., batikali oyo bazongaki na Yelusaleme bazalaki na makanisi malamu—kozongisa losambo ya pɛto. Moto moko te oyo amibebisaki na misala ya losambo ya bapakano to na etamboli ya mbindo oyo Yisaya akebisaki makasi azalaki na lotomo ya kozonga. (Yisaya 1:15-17) Kaka bato oyo bazalaki komonana basantu na miso ya Yehova nde bazongaki na Yuda. (Yisaya 35:8) Ndenge moko mpe, banda basikolamaki na boombo ya elimo na 1919, batikali bapakolami, sikawa esika moko na bamilio ya “bampate mosusu”—oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele—basalaka nyonso oyo ekoki na bango mpo na kozala basantu na miso ya Nzambe. (Yoane 10:16) Babwaki mateya mpe misala ya Babilone. Mokomoko azali kosala makasi mpo na kolanda mitinda ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu. (1 Petelo 1:14-16) Yehova ayokelaki bango mawa na ntina.

17. Na kati ya “buku [na ye] ya bomoi,” Yehova akomaka bankombo ya banani, mpe tosengeli kozala na molende ya kosala nini?

17 Tómikundola ete, na Yisalaele, Yehova amonaki baoyo bazalaki basantu mpe ‘akomaki bankombo na bango mpo na bomoi.’ Lelo mpe, Yehova amonaka milende oyo tosalaka mpo na kozala pɛto na makanisi mpe na nzoto ntango ‘tokabaka nzoto na biso lokola mbeka ya bomoi oyo ezali mosantu mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango.’ (Baloma 12:1, NW) Mpe baoyo nyonso basalaka milende mpo na kozala na bomoi ya ndenge wana, Nzambe akomi bankombo na bango na “buku ya bomoi”—buku ya elilingi oyo ezali na bankombo ya bato oyo bazali na likoki ya kozwa bomoi ya seko, na likoló to awa na mabele. (Bafilipi 4:3; Malaki 3:16) Yango wana, tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kotikala basantu na miso ya Nzambe, soki tosali bongo, bankombo na biso ekoki kotikala na “buku” yango ya motuya.—Emoniseli 3:5.

Elaka ya kobatela bango na bolingo

18, 19. Na Yisaya 4:4, 5, kosukolama nini Yehova asengeli kosala, mpe ndenge nini akosala yango?

18 Na nsima, Yisaya amonisi ndenge bato oyo bakofanda na mokili oyo ezongisami bakokóma basantu mpe mapamboli oyo ezali kozela bango. Alobi ete: “Wana Nkolo asili kosukola bosɔtɔ ya bana basi ya Siona mpe apɛtoli makila ya Yelusaleme na kati na yango na nzela na [elimo ya, kosambisa mpe elimo ya, NW] kozikisa. Bongo, [Yehova] akotonga likoló na bifandelo nyonso na ngomba na Siona mpe likoló na koyangana nyonso na ye lipata na molinga na ntango ya moi mpe kongɛnga na mɔ́tɔ [makasi, NW] na ntango ya butu; zambi likoló na nkembo nyonso kobatela ekozala.”—Yisaya 4:4, 5.

19 Liboso Yisaya apamelaki “bana basi ya Siona,” oyo bazalaki kobomba bizaleli mabe na bango na biloko ya monzele oyo bazalaki kolata. Atɔndɔlaki mpe ndenge bato bazalaki kosopa makila, mpe alendisaki bango bámisukola. (Yisaya 1:15, 16; 3:16-23) Nzokande awa, atali ndenge bato bakozala na mikolo ezali koya, eleko oyo Nzambe ye moko ‘akosukola bosɔtɔ,’ to mbindo ya bizaleli, mpe ‘akopetola Yeruzalem na makila masopani wana.’ (Yisaya 4:4, Liloba lya Nzambe) Ndenge nini kosukolama yango ekosalema? Na “[elimo ya, NW] kosambisa” mpe na “[elimo ya, NW] kozikisa.” Nkanda ya Nzambe likoló na libota yango ya mbindo ekomonana ndenge akobebisa Yelusaleme mpe ndenge etikali moke atinda bango na boombo na Babilone. Batikali oyo bakobika na malɔzi yango mpe bakozonga na mokili na bango bakokitisama, bakopɛtolama. Yango wana bakozala basantu na miso ya Yehova mpe akoyokela bango mawa.—Kokanisá na Malaki 3:2, 3.

20. (a) Maloba “lipata,” “molinga,” mpe “mɔ́tɔ makasi” ezali kokundola likambo nini? (b) Mpo na nini baombo oyo bapɛtolami basengeli kobanga eloko te?

20 Yehova alaki na nzela ya Yisaya ete ye moko akobatela na bolingo nyonso batikali yango oyo bapɛtolami. Maloba “lipata,” “molinga,” mpe “mɔ́tɔ makasi” ezali bililingi oyo ezali kokundolela biso lolenge Yehova abatelaki Bayisalaele nsima ya kobima na bango na Ezipito. “Likonzí ya lipata mpe likonzí ya mɔ́tɔ” ebatelaki bango mpo Baezipito oyo bazalaki kolanda bango bázwa bango te; ezalaki mpe kokamba bango na esobe. (Exode 13:21, 22; 14:19, 20, 24) Ntango Yehova amimonisaki na Ngomba Sinai, ngomba yango “ezingamaki na molinga.” (Exode 19:18) Na bongo, baombo yango oyo bapɛtolami basengeli kobanga eloko te. Yehova akozala Mobateli na bango. Akozala elongo na bango, ezala ntango bayangani na bandako na bango to ntango bayangani na mayangani mosantu.

21, 22. (a) Mpo na nini, mbala mingi, bazalaki kotonga mwa ndako ya matiti to hema? (b) Bomoi nini ezali kozela batikali oyo bapɛtolami?

21 Yisaya asukisi kolobela ndenge Nzambe akobatela mboka na komonisa ndenge bomoi ya mokolo na mokolo ekozala. Akomi ete: “Ekozala na mwa ndako ya matiti mpo na kopema na ntango ya moi makasi mpe molunge, mpe esika ya kokima mpe ya komibomba mpo na mopɛpɛ makasi mpe mpo na mbula.” (Yisaya 4:6, NW) Mbala mingi bato bazalaki kotonga mwa ndako ya matiti to mwa hema na kati ya bilanga ya vinyo to na kati ya bilanga mpo na kobombana na ntango ya moi makasi na eleko ya elanga mpe mpo na malili mpe mbula ya mipɛpɛ makasi na eleko ya mbula.—Kokanisá na Yona 4:5.

22 Ntango bakokutana na molunge makasi ya minyoko mpe na mbula ya mipɛpɛ makasi ya botɛmɛli, batikali oyo bapɛtolami bakomona ete Yehova azali Mobateli na bango mpe ekimelo na bango. (Nzembo 91:1, 2; 121:5) Yango wana, bomoi moko ya malamu ezali kozela bango: soki babwaki mateya mpe misala ya mbindo ya Babilone, bandimi kopɛtolama oyo euti na kosambisama ya Yehova mpe basali makasi bátikala ntango nyonso basantu, bakobatelama, ekozala lokola nde Nzambe azali kobatela bango na kati ya “mwa ndako ya matiti.”

23. Mpo na nini Yehova apamboli batikali bapakolami mpe baninga na bango?

23 Tosengeli koyeba ete kopɛtolama ezali na esika ya liboso, na nsima nde mapamboli. Yango mpe esalemi na mikolo na biso. Na 1919, na komikitisa nyonso, batikali bapakolami bandimi kopɛtolama, mpe Yehova ‘asukolaki’ bosɔtɔ na bango. Banda ntango wana, “ebele monene” ya bampate mosusu mpe bamitiki ete Yehova asukola bango. (Emoniseli 7:9) Ntango basukwami, batikali bapakolami mpe baninga na bango bapambolamaki—Yehova azwi bango mpo na kobatela bango. Alongolaka minyoko mpe mipɛpɛ makasi ya botɛmɛli oyo ekómelaka bango na ndenge ya likamwisi te. Kasi, abatelaka bango, lokola nde atii likoló na bango ‘mwa ndako ya matiti mpo na kopema na ntango ya moi makasi mpe esika ya komibomba mpo na mopɛpɛ ya mbula.’ Ndenge nini?

24. Ndenge nini emonani polele ete Yehova apamboli lisangá ya basaleli na ye?

24 Tókanisa naino: Baguvɛrnɛma mosusu oyo eleki nguya na lisolo ya bato epekisaki mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova to emekaki kosilisa bango nyɛɛ. Nzokande, Batatoli bazongi nsima te mpe bazali kokoba kosakola nsango malamu! Mpo na nini bikólo ya nguya balongi te koboma libela mosala ya bato yango oyo bazali mingi te mpe bamonanaka ete bazali na libateli te? Mpamba te Yehova atii basaleli na ye ya pɛto na nse ya “mwa ndako ya matiti” ya libateli oyo moto moko te akoki kokweisa yango!

25. Mpo na mokomoko na biso, kosala ete Yehova azala Mobateli na biso elimboli nini?

25 Tokoloba nini mpo na mokomoko na biso? Atako Yehova azali Mobateli na biso, yango elimboli te ete tozali na bomoi oyo ezangi mikakatano na mokili ya lelo. Baklisto ya sembo ebele bazali kokutana na mikakatano makasi, lokola bobola, makama oyo euti na koningana ya mabele, mipɛpɛ ya makasi, mpela, bitumba, maladi, mpe liwa. Ntango tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tóbosana soki moke te ete Nzambe azali elongo na biso. Azali kobatela biso na elimo, kopesa biso oyo tozali na yango mposa—ata mpe “nguya oyo eleki nguya ya bato”—mpo na koyika mpiko na mikakatano mpe kotikala sembo. (2 Bakolinti 4:7, NW) Ntango ye azali elongo na biso, tosengeli kobanga eloko te. Soki tozali ntango nyonso kosala oyo ekoki na biso mpo na kotikala basantu na miso na ye, eloko moko “ekoki kotangola biso te na bolingo na Nzambe.”—Baloma 8:38, 39.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Banganga-mayele ya Biblia balobi ete elobeli ‘mbuma oyo Yehova atɔisi’ ezali komonisa Masiya, oyo asengelaki kobima kaka nsima wana Yelusaleme ekotongama lisusu. Na kati ya Ba-Targoum, tozali kotánga maloba yango ete: “Masiya [Klisto] ya Yehova.” Likambo ya kosepelisa, bambula mingi na nsima, Yilimia asalelaki liloba yango ya Liebele (tsèmaḥ) ntango alobelaki Masiya ete azali “mbuma etɔi na bosembo” oyo euti na Davidi.—Yilimia 23:5; 33:15, NW.

b Kati na bato ‘oyo babikaki’ ezalaki mpe na baoyo babotamaki na boombo. Bakokaki kotalela bango lokola ‘babiki,’ mpamba te soki bankɔkɔ na bango bábikaka te, mbɛlɛ bango mpe babotami te.—Ezela 9:13-15; kokanisá na Baebele 7:9, 10.

[Elilingi na lokasa 63]

Ekumbaki ya kosambisa ya Nzambe ekobɛta likoló na Yuda

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto