Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • “Bóbɔndisa bato na ngai”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
    • 28, 29. (a) Ndenge nini Yehova akundoleli basaleli na ye ete akosalisa baoyo balɛmbi? (b) Elilingi nini esalelami mpo na komonisa ndenge Yehova apesaka basaleli na ye nguya?

      28 Na nzela ya Yisaya, Yehova akobi kolendisa baombo oyo batungisami ete: “Akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya. Ata bilenge bakosenzwa, bakolɛmba, mpe bato na [mbula, NW] mingi te bakokweakwea na nse; nde baoyo [bakotyaka elikya epai ya Yehova, NW], bakozwa nguya ya sika, bakopombwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbango nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.”—Yisaya 40:29-31.

      29 Ntango azali kolobela mposa ya kopesa moto oyo alɛmbi nguya, mbala mosusu Yehova azali kokanisa mobembo molai oyo baombo basengeli kosala mpo na kozonga epai na bango. Yehova akundoleli basaleli na ye ete azali na momeseno ya kosalisa baoyo balɛmbi soki baluki lisalisi na ye. Ata bato ya makasi koleka—“bilenge”—bakoki mpe kosenzwa mpo na kolɛmba. Kasi, Yehova alaki kopesa baoyo bazali kotyela ye elikya—nguya oyo esilaka te—ya kopota mpe kotambola. Kopumbwa ya mpongo, oyo emonanaka lokola ezalaka mpasi te, ndɛkɛ wana ya makasi oyo ekoki kotika kobɛta mapapu na boumeli ya bangonga mingi, emonisaka ndenge Yehova apesaka basaleli na ye nguya.e Bayuda oyo bazali baombo bazali na elikya ya kozwa lisalisi ya ndenge wana epai ya Nzambe, bazali na ntina te ya kolɛmba nzoto.

  • “Bóbɔndisa bato na ngai”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
    • 30. Ndenge nini baklisto ya solo bakoki lelo oyo kozwa libɔndisi na bavɛrsɛ ya nsuka ya Yisaya mokapo 40?

      30 Bavɛrsɛ yango ya nsuka ya Yisaya mokapo 40, ezali na maloba ya kobɔndisa mpo na baklisto ya solo na mikolo oyo ya nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo. Lokola bampasi mpe mikakatano mingi elɛmbisaka, ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete komekama oyo tozali koyikela mpiko mpe minyoko oyo tozali komona ezali koleka mpamba te na miso ya Nzambe na biso. Tokoki kozala na elikya ete Mozalisi ya biloko nyonso, Ye oyo “mayele na ye ekoki kotángama te,” akolongola minyoko yango na ntango mpe na lolenge oyo ye moko amoni malamu. (Nzembo 147:5, 6) Kino ntango wana ekóma, tosengeli koyika mpiko na makasi na biso moko te. Yehova, oyo azali liziba ya nguya oyo ekoki kosila te, akoki kopesa basaleli na ye oyo balɛmbi, nguya—kutu “nguya oyo eleki makasi” na ntango oyo bazali konyokwama.—2 Bakolinti 4:7, NW.

  • “Bóbɔndisa bato na ngai”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
    • e Mpongo, ata soki ezali lisusu na makasi mingi te, etikaka kobɛta mapapu na boumeli ya ntango molai. Ekokaka kosala bongo mpamba te esalelaka mopɛpɛ ya molunge oyo emataka na likoló to courants thermiques.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto