Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova alendisi elimo ya bato ya komikitisa
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
    • 22. Mpo na ntango ezali koya Yehova asakoli nini mpo na (a) baoyo babongoli motema? (b) bato mabe?

      22 Yehova amonisi bokeseni oyo ekozala kati na baoyo babongoli motema mpe baoyo batingami na banzela na bango ya mabe, mpe alobi boye: ‘Ngai nakosala mbuma ya bibɛbu. Kimya! Kimya! epai ya moto ya mosika mpe ya penepene . . . mpe nakobikisa ye. Nde bato mabe bazali lokola mai-na-monana mazali kotombwatombwa, bayebi kofanda na kimya te, mai na yango ekobwaka bosɔtɔ mpe pɔtɔpɔtɔ likoló. Nzambe na ngai alobi ete, Mpo na bato mabe kimya ezali te.’—Yisaya 57:19-21.

  • Yehova alendisi elimo ya bato ya komikitisa
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
    • 24. (a) Nani nde azalaka na kimya ya Nzambe, mpe yango ebimisaka nini? (b) Banani bakoki te kozala na kimya, mpe ekosukela bango ndenge nini?

      24 Boye Bayuda bapesaki mpenza mbeka ya mbuma ya bibɛbu ya esengo mingi ntango bazongaki na mboka na bango, wana bayembaki mpo na kosanzola Yehova! Bazali solo na esengo ya kozala na kimya ya Nzambe, bázala “mosika” (mosika na Yuda, wana bazalaki kozela kozonga) to bázala “penepene” (wana bazongi na mboka na bango). Nzokande, makambo ezalaka mpenza bongo te mpo na bato mabe! Moto nyonso oyo aboyi etumbu ya Yehova, moto mabe, ezala azali nani to azali wapi, akozwa kimya ya solo te. Bazali kopunzwapunzwa lokola mai ya mbu oyo efandaka kimya te, bazali ntango nyonso kobimisa mbuma ya bibɛbu te, kasi nde “bosɔtɔ mpe pɔtɔpɔtɔ,” makambo nyonso ya mbindo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto