Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova asambwisi engumba moko ya lolendo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
    • 17, 18. Kokwea ya Babilone ekobimisa matomba nini mpo na Yisalaele?

      17 Kokwea ya Babilone ekozala libɔndisi mpo na Yisalaele. Yango ekolimbola kobima na boombo mpe libaku ya kozonga na Mokili ya Ndaka. Yango wana, Yisaya alobi sikawa ete: “Mpo ete [Yehova] akoyokela Yakobo mawa, akopona naino Yisalaele mpe akotya bango na mokili na bango mpenza; mpe bapaya bakoyangana esika moko na bango mpe bakozala na ndako ya Yakobo na lisangana. Bato bakokamata bango mpe bakoyeisa bango na esika na bango; mpe ndako ya Yisalaele bakozala bankolo na bango na kati ya mokili ya [Yehova] lokola baombo babali mpe baombo basi; bakokanga lokola baombo baoyo bakangaki bango liboso; bakozala na bokonzi likoló na baoyo banyokolaki bango.” (Yisaya 14:1, 2) Awa, “Yakobo” ezali komonisa Yisalaele mobimba—mabota nyonso 12. Yehova akoyokela “Yakobo” mawa, akopesa ekólo yango nzela ya kozonga na mokili na yango. Bakokenda elongo na bankóto ya bapaya, oyo mingi kati na bango bakosalela Bayisalaele lokola basali na tempelo. Kutu, Bayisalaele mosusu bakozala na bokonzi likoló na bankolo na bango ya kala.c

  • Yehova asambwisi engumba moko ya lolendo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
    • 19. Nini esengeli mpo ete Yisalaele ezwa bolimbisi ya Yehova, mpe yango etei biso nini?

      19 Kasi, ngɔlu ya Nzambe ekoki kozwama mpambampamba te. Basaleli na ye basengeli komonisa mawa oyo bayoki mpo na mabe na bango, oyo etindaki Nzambe apesa bango etumbu makasi. (Yilimia 3:25) Soki bayamboli masumu na bango polele, Yehova akolimbisa bango. (Talá Nehemia 9:6-37; Danyele 9:5.) Etinda yango ezali solo kino lelo oyo. Lokola “moto azali te oyo akosalaka masumu te,” biso nyonso tozali na mposa ya motema mawa ya Yehova. (2 Ntango 6:36) Yehova, Nzambe ya motema mawa, abyangaka biso na bolingo nyonso epai na ye mpo tóyambola masumu na biso, tóbongola mitema, mpe tótika banzela nyonso ya mabe, mpo tókoka kobika. (Deteronome 4:31; Yisaya 1:18; Yakobo 5:16) Yango esalisaka biso kaka te ete andima biso lisusu kasi mpe mpo tóbɔndisama.—Nzembo 51:1; Masese 28:13; 2 Bakolinti 2:7.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto