Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • fy mok. 15 nk. 173-182
  • Tókumisa baboti na biso atako bakómi mibangé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókumisa baboti na biso atako bakómi mibangé
  • Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOYEBA BAMPOSA YA MAYOKI
  • TÓKOKISAKA BAMPOSA NA BANGO YA MOSUNI
  • BOLINGO MPE KOMIPIMELA
  • TÓZALA NA MOTEMA MAWA MPE TÓMITYA NA ESIKA NA BANGO
  • TÓBATELA EZALELI YA SEMBO
  • BASUNGI BAZALI MPE NA MPOSA YA LISUNGI
  • NGUYA OYO ELEKI NGUYA YA BOMOTO
  • Biblia elobi nini na likambo etali kosunga baboti oyo bakómi mibange?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya kosunga mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Pesáká mibange lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
fy mok. 15 nk. 173-182

MOKAPO YA ZOMI NA MITANO

Tókumisa baboti na biso atako bakómi mibangé

1. Nyongo nini tozali na yango epai na baboti na biso, mpe na yango mayoki na biso mpe misala na biso epai na bango esengeli kozala lolenge nini?

“YOKAMELÁ tata na yo oyo abotaki yo mpe tyolá mama na yo te wana ekonuna ye,” ezali wana toli moto na mayele apesaki na ntango ya kala. (Masese 23:22) Okoki koloba ete: ‘Nakoki kotyola bango soko moke te!’ Na esika ya kotyola bamama na biso​—to batata na biso—​mingimingi tozalaka nde na mayoki ya bolingo makasi mpo na bango. Toyebi ete tozali na nyongo monene epai na bango. Likambo ya ntina koleka, ezali na nzela ya baboti na biso nde tozwi bomoi. Atako Yehova azali Liziba ya bomoi, soki baboti na biso te mbɛlɛ tozali na bomoi te. Ezali na eloko moko te oyo tokoki kopesa na baboti na biso oyo ezali na motuya motindo moko na bomoi yango moko. Na bongo, kanisá mpo na nyonso oyo basalaki mpo na biso, komibanzabanza ya bolingo, mosolo oyo babimisaki, mpe likebi ya bolingo mpo na kosalisa mwana uta bomwana kino kokóma mokóló. Na yango, ezali mpenza likambo libongi ete Liloba ya Nzambe lipesa toli oyo ete: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo . . . Bongo ezala na yo malamu ete oumela na mokili ntango molai”!​—Baefese 6:2, 3.

KOYEBA BAMPOSA YA MAYOKI

2. Lolenge nini bana oyo bakóli bakoki kopesa “mwa makabo” epai na baboti na bango?

2 Ntoma Paulo akomelaki baklisto ete: “[Tiká ete bana mpe bana ya bana] báyekola kosalela Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso mpe bázongisa mwa makabo epai na baboti. Zambi oyo ekosepelisa Nzambe.” (1 Timoté 5:4) Bana oyo bakóli bapesaka “mwa makabo” yango na komonisáká botɔ́ndi mpo na bambula ya bolingo, ya mosala, mpe ya likebi oyo baboti na bango mpe bankɔ́kɔ na bango balekisaki na kobɔkɔla bango. Nzela moko oyo bana bakoki kosala yango ezali ya koyeba ete lokola bato nyonso, mibangé mpe bazali na mposa ya bolingo mpe ya kobɔndisama​—oyo mbala mingi bazangaka kozwa yango. Lokola biso banso, bango bazalaka na mposa ya komona ete bazali na motuya. Bazali na mposa ya komiyoka ete bomoi na bango ezali na ntina.

3. Lolenge nini tokoki kokumisa baboti na biso mpe bankɔ́kɔ na biso?

3 Na yango, tokoki kokumisa baboti na biso mpe bankɔ́kɔ na biso na kopesáká bango likoki ya koyeba ete tolingaka bango. (1 Bakolinti 16:14) Soki baboti na biso bafandaka esika moko na biso te, tosengeli komikundola ete ekozala likambo ya esengo epai na bango soki bazali kozwa bansango na biso. Nkomá ya kosimba motema, kobénga na telefone, to kokende kotala bango ekoki kopesa bango esengo mingi. Miyo, oyo afandaka na Japon, akomaki ntango azalaki na mibu 82 ete: “Mwana na ngai ya mwasi [oyo mobali na ye azali mokɛngɛli-motamboli] ayebisaka ngai ete: ‘Mama, “salá mobembo” elongo na biso.’ Atindelaka ngai manáka mpo na koyeba masangá oyo bakotala mpe nimero ya telefone mpo na pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Nakoki kofungola kálati na ngai mpe koloba ete: ‘Ah. Sikawa bazali awa!’ Ntango nyonso natɔ́ndaka Yehova na lipamboli ya kozala na mwana motindo wana.”

TÓKOKISAKA BAMPOSA NA BANGO YA MOSUNI

4. Lolenge nini mimeseno ya lingomba ya Bayuda elendisaki kozanga mawa epai na baboti oyo bakómi mibangé?

4 Kokumisa baboti etaleli mpe kokokisa bamposa na bango ya mosuni? Ɛɛ. Mbala mingi ezalaka bongo. Na mikolo ya Yesu, bakonzi na lingomba ya Bayuda bandimaki lilako ya bonkɔ́kɔ oyo elobaki ete soki moto alobi ete mbongo na ye to biloko na ye ezali “likabo lipesami na Nzambe,” moto yango asɛngisamaki te na kosalela biloko yango mpo na kosunga baboti na ye. (Matai 15:3-6) Oyo nde kozanga mawa! Bakonzi wana ya lingomba bazalaki kolendisa te bato na kokumisa baboti na bango, kasi ete básalela bango makambo na botyoli nyonso na koboyáká kokokisa bamposa na bango. Biso tosengeli kosala bongo soko moke te!​—Deteronome 27:16.

5. Atako Letá azali kopesa lisalisi na mikili misusu, mpo na nini kokumisa baboti esɛngaka ntango mosusu lisalisi ya mosolo?

5 Na mikili mingi lelo, bibongiseli ya Letá mpo na lisungi bikokisaka mwa moke bamposa ya mosuni ya mibangé, na ndakisa bilei, bilamba, mpe ndako. Longola bibongiseli wana, ekoki kozala ete mibangé bango moko babombaki mwa ndambo ya mosolo oyo mokoki kosalisa bango na ntango bakokóma mibangé. Kasi soki mosolo yango mosili to mokoki lisusu te, bana bakomonisa ete bazali kokumisa baboti na bango na kosaláká oyo bakoki kosala mpo na kokokisa bamposa ya baboti na bango. Ya solo, komibanzabanza mpo na baboti oyo bakómi mibangé ezali elembeteli ya bizaleli na moto na Nzambe, yango emonisi bokangami ya moto epai na Yehova Nzambe, Mobandisi ya libota.

BOLINGO MPE KOMIPIMELA

6. Bibongiseli nini ya malamu bamoko basili kokamata mpo na kokokisa bamposa ya baboti na bango?

6 Bana mingi oyo bakómi mikóló bazali kokokisa, na bolingo nyonso mpe na elimo ya komipimela, bamposa ya baboti na bango oyo bazali baandikapé. Bamoko basili kokamata baboti na bango mpo na kofanda na bango na ndako na bango to basili kokende kofanda pene na bango. Basusu balongwaka na esika moko mpo na kokende kofanda na esika mosusu elongo na baboti na bango. Mbala mingi, bibongiseli motindo wana bisili komonana ete bizali lipamboli mpo na baboti mpe mpo na bana.

7. Mpo na nini ezali malamu kosala na lombangu te mpo na kokamata bikateli na makambo matali baboti oyo bakómi mibangé?

7 Kasi, na bantango mosusu, bibongiseli wana bizalaka malamu te. Mpo na nini? Mpamba te, ekoki kozala ete bikateli bikamatamaki na lombangu to bizwaki moboko bobele likoló na mayoki. Na mayele nyonso Biblia ekebisi ete: “Moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” (Masese 14:15) Na ndakisa, kanisá ete mama na yo oyo akómi mobangé azali na mokakatano ya kofanda ye moko mpe okanisi ete ekozala litomba mpo na ye kozala esika moko na yo. Mpo na kotala na mayele nyonso nzela ekokenda yo, okoki kotalela makambo malandi: Bamposa mpenza na ye ezali nini? Ezali na lisungi moko to na mosala moko oyo ekoki kosilisa mokakatano na ye? Alingi mpenza kozala esika moko na yo? Soki alingi mpenza kokende, na nini yango ekozala na bopusi likoló na bomoi na ye? Akondima kotika baninga na ye? Lolenge nini yango ekozala na bopusi likoló na mayoki na ye? Osili kosolola na ye na ntina na makambo wana? Lolenge nini koya na ye ekoki kozala na bopusi likoló na yo, na mwasi na yo, mpe na bana na yo? Soki mama na yo azali na mposa ya lisalisi, nani akopesa yango? Mokumba yango ekoki nde kokabolama na bato mosusu? Osili kosolola likambo yango elongo na baoyo nyonso batalelami mpenza na yango?

8. Nani okoki kosolola na ye mpo na kozwa ekateli na lolenge ya kosalisa baboti oyo bakómi mibangé?

8 Lokola mokumba ya kosalisa ezali likoló na bana nyonso kati na libota, ekozala likambo ya mayele kosala likita kati na libota mpo ete bino banso bókamata bikateli. Kosolola likambo yango na bankulutu kati na lisangá ya boklisto to na baninga oyo bakutanaki na likambo yango ekoki mpe kosalisa yo. Biblia ekebisi ete: “Myango ikokufa wana bato na toli bazangi, nde ikolónga wana [bapesi na toli, NW] bayei mingi.”​—Masese 15:22.

TÓZALA NA MOTEMA MAWA MPE TÓMITYA NA ESIKA NA BANGO

Elilingi na lokasa 179

Ezali likambo ya kozanga mayele kokamata bikateli mpo na moboti kozanga ete osolola na ye liboso

9, 10. (a) Atako bapusani na mbula, lolenge nini tosengeli kotalela mibangé? (b) Ezala milende nini mwana oyo akóli azali kosala mpo na baboti na ye, nzokande nini asengeli ntango nyonso kopesa bango?

9 Kokumisa baboti na biso oyo bakómi mibangé esɛngaka kozala na motema mawa mpe koyeba komitya na esika na bango. Lokola bobangé eyaka na mikakatano na yango, mibangé bakoki kozala na mikakatano mingi mpo na kotambola, kolya, mpe komikundola makambo. Bakoki kozala na mposa ya lisalisi. Mbala mingi bana bakómaka komibanzabanza mpo na bango mpe basalaka makasi mpo na kopesa bango litambwisi. Kasi mibangé bazali mikóló oyo bazali na mayele mingi mpe na eksperiansi mingi oyo basili kozwa kati na bomoi, bazali bato oyo bayebi komibatela mpe komityela mikano kati na bomoi. Bomoto na bango mpe limemya oyo bazalaka na yango mpo na bango moko etongami likoló na mokumba oyo bazali na yango lokola baboti mpe mikóló. Baboti oyo bazali na mayoki ete bazali kotika bomoi na bango na mabɔkɔ ya bana na bango bakoki kotungisama na makanisi to kozala na nkanda. Bamoko basilikaka mpe batɛmɛlaka makambo oyo bakoki komona ete elingi kolongwela bango bonsomi na bango.

10 Ezali na myango ya pɛtɛɛ te mpo na kosilisa mikakatano wana, kasi ezali likambo ya boboto kotikela baboti oyo bakómi mibangé nzela ya komibatela bango moko mpe ya kokamata bikateli bango moko na meko oyo makoki na bango epesi bango nzela. Ezali likambo ya mayele te na kokamata bikateli na ntina na oyo okanisi ete ezali malamu koleka mpo na baboti na yo kozanga kosolola likambo yango liboso elongo na bango. Ekoki kozala ete basili kobungisa makambo mingi. Pesá bango likoki ya kobatela mwa ndambo oyo batikali na yango. Okomona ete soki ozali kosala makasi na kozala na bokonzi te likoló na bomoi ya baboti na yo, boyokani na yo elongo na bango ekozala malamu. Bakozala na esengo mingi, mpe yo okozala na esengo lokola. Ata soki esengeli na yo ete olobela na makasi makambo mosusu oyo mazali mpo na bolamu na bango, kokumisa baboti na yo ezali kosɛnga na yo ete opesa bango kiló mpe limemya oyo ebongi na bango. Liloba ya Nzambe epesi toli oyo ete: “Okotɛlɛma liboso na nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali anuni.”​—Levitike 19:32.

TÓBATELA EZALELI YA SEMBO

11-13. Soki mwana oyo akóli azalaki na boyokani ya malamu te elongo na baboti na ye ntango bazali kobɔkɔla ye, lolenge nini akoki kolónga makanisi ya kolɛmbisa mpo na oyo etali kosalisa bango na ntango bakómi mibangé?

11 Na bantango mosusu mokakatano oyo bana bakómi mikóló bakutanaka na yango mpo na kokumisa baboti na bango oyo bakómi mibangé etaleli boyokani oyo bazalaki na yango elongo na baboti na bango ntango bazalaki bana mike. Ekoki kozala ete tata na yo azalaki na motema mawa te mpe na bolingo te, mama na yo azalaki kosalela bokonzi na ye na lolenge mabe mpe azalaki na makambo makasi. Okoki kozala naino na mayoki ya kolɛmba nzoto, na nkanda, to kosala mabe mpamba te bazalaki lolenge ya baboti oyo ozalaki kolinga te. Okoki kolónga mayoki motindo wana?a

12 Basse, oyo akólaki na Finlande, ayebisi ete: “Mobali ya mama na ngai azalaki sodá ya SS na Allemagne ya Nazi. Azalaki koumela te mpo na kosilika, mpe azalaki bongo moto mabe. Azalaki kobɛta mama na ngai mbala na mbala na miso na ngai. Mokolo moko ntango asilikelaki ngai, abimisaki mokaba na ye mpe abɛtaki ngai na yango na elongi. Esalaki ngai mpasi makasi kino nakweaki na mbeto.”

13 Nzokande, ezalaki na makambo mosusu matalelaki ezaleli na ye. Basse abakisi ete: “Epai mosusu, azalaki mpenza kosala mosala makasi mpe azalaki koboma nzoto mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. Azalaki komonisela ngai bolingo ya tata epai na mwana soko moke te, kasi nayebaki ete azalaki kotungisama kati na mayoki. Mama na ye abenganaki ye na ndako ntango azalaki elenge. Akólaki na ezaleli ya kobunda mingi mpe akɔtaki mosala ya sodá wana azalaki elenge. Nazalaki koyeba yango mpe nazalaki kopamela ye mpo na yango te. Ntango nakómaki mokóló, nasalisaki ye na meko oyo ekokaki na ngai kino ntango ayaki kokufa. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te, kasi nasalaki oyo nakokaki. Nasalaki makasi na kozala mwana malamu kino liwa na ye mpe nakanisi ete andimaki ngai lokola mwana malamu.”

14. Mokapo nini mobongi kosalelama na makambo nyonso, sangisá makambo oyo mazali kobima mpo na kosalisa baboti oyo bakómi mibangé?

14 Na makambo matali libota, ezala mpe na makambo mosusu, toli oyo ya Biblia ebongi kosalelama: “Bómilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ. Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. Pelamoko [Yehova] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.”​—Bakolose 3:12, 13.

BASUNGI BAZALI MPE NA MPOSA YA LISUNGI

15. Mpo na nini kosalisa baboti ezalaka mpasi na bantango mosusu?

15 Kosunga moboti oyo azali andikapé ezali likambo moko makasi, oyo esɛngaka mosala mingi, mikumba mingi, mpe ngonga mingi. Kasi likambo lileki mokakatano mbala mingi etalelaka mayoki. Komona baboti na yo kobungisa kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto, makanisi na bango, mpe bonsomi na bango etungisaka mingi na makanisi. Sandy, oyo azali mobotami ya Porto Rico, ayebisi ete: “Mama na ngai nde azalaki moto oyo asimbaki libota. Ezalaki likambo ya mpasi mingi mpo na komibanzabanza na ntina na ye. Liboso abandaki kotɛnguma; na nsima asengelaki kotambola na nzeté moko, na nsima na nzeté mibale, na nsuka na kiti ya batɛngumi. Na nsuka na yango maladi ekómaki mpenza makasi kino ayaki kokufa. Azalaki na kanser ya mikuwa mpe yango esɛngaki kobatela ye ntango nyonso​—butu na moi. Tozalaki kosukola ye nzoto mpe koleisa ye bilei mpe kotángela ye mikanda. Ezalaki mpenza mokakatano—​mingimingi na mayoki. Ntango nayebaki ete mama na ngai azalaki pene na kokufa, nalelaki mpamba te nalingaki ye mingi.”

16, 17. Toli nini ekoki kosalisa mosungi na kolanda kozala na likanisi ya bokatikati?

16 Soki yo ozali kati na ezalela motindo wana, okoki kosala nini mpo na kolónga? Koyoka Yehova na kotángáká Biblia mpe na kosololáká elongo na ye na nzela ya libondeli ekosalisa yo mingi. (Bafilipi 4:6, 7) Na lolenge lobongi, omindimisa ete ozali kolya bilei ya malamu mpe ozali kosala makasi mpo na kolala mpɔngi ya malamu. Na kosaláká bongo, okozala malamu koleka, na mayoki mpe na nzoto, mpo na kosalisa molingami na yo. Mbala mosusu okoki kobongisa ntango ya kopema kati na misala ya mokolo na mokolo. Ata soki mabaku ya kopema makoki kozwama te, ezali likambo ya mayele kozala na manáka mpo na kominanola. Mpo na kozala na mwa ntango, okoki kosɛnga na moto mosusu ete abatela moboti na yo oyo azali kobɛla.

17 Emonanaka mbala mingi ete mikóló oyo bazali basungi bazali komityela mikano oyo mileki makoki na bango. Kasi kokanisa te ete ozali na ekweli mpo na likambo oyo okoki kosala te. Na makambo mosusu okosengela kotya moboti na yo molingami na bandako oyo basalisaka bato. Soki ozali mosungi, omityela mikano oyo okokokisa. Osengeli kozala na bokatikati bobele na bamposa ya baboti na yo te kasi mpe na oyo ya bana na yo, ya mwasi na yo, mpe oyo ya yo moko.

NGUYA OYO ELEKI NGUYA YA BOMOTO

18, 19. Lisungi nini Yehova asili kolaka, mpe likambo nini limonisi ete akokisaka elaká yango?

18 Na nzela ya Liloba na ye, Biblia, Yehova azali kopesa na bolingo nyonso litambwisi oyo likoki kosalisa moto na kobatela baboti na ye oyo bakómi mibangé, kasi yango ezali te lisalisi bobele moko oyo ye azali kopesa. Na kopemama na Nzambe, mokomi na Nzembo akomaki ete: “[Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye. Akoyoka mpe konganga na bango mpe akobikisa bango.” Yehova akobikisa, to akobatela, basembwi na ye ata kati na mikakatano makasi.​—Nzembo 145:18, 19.

19 Myrna, na mboka Philippines, ayekolaki likambo yango ntango azalaki kobatela mama na ye, oyo azalaki lisusu na makasi te na ntina na bokɔnɔ na bɔɔngɔ́. Myrna akomi ete: “Likambo oyo epesaka mpasi mingi na makanisi ezali ya komona molingami na yo wana azali konyokwama, kozanga likoki ya koyebisa yo epai wapi azali koyoka mpasi. Ezalaki lokola komona ye kozinda na mai mokemoke, mpe eloko nakokaki kosala ezalaki te. Mbala mingi nazalaki kofukama mpe koyebisa Yehova kolɛmba oyo nazalaki na yango. Nangangaki lokola Davidi, oyo alɔmbaki Yehova na etingya nyonso ete atya mpisoli na ye kati na molangi mpe akanisa ye. [Nzembo 56:8] Mpe lokola Yehova alakaki yango, apesaki ngai nguya oyo nasengelaki na yango. ‘Yehova akómaki mosungi mpo na ngai.’”​—Nzembo 18:18.

20. Bilaká nini ya Biblia bizali kosalisa mosungi na kolanda kozala na makanisi malongobani, ata soki moto oyo azali kosalisa akufi?

20 Esili kolobama ete kobatela baboti oyo bakómi mibangé ezali lokola “lisoló oyo esukaka sé na mawa.” Atako mosungi akosala milende misengeli, mibangé basukaka sé na kokufa, lokola yango esalemaki mpo na mama ya Myrna. Kasi baoyo bazali kotya elikya epai na Yehova bayebi ete liwa ezali nsuka ya makambo te. Ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali na elikya [epai] na Nzambe . . . ete lisekwa ekozala [mpo] na bato sembo mpe [mpo] na bato sembo te.” (Misala 24:15) Baoyo basili kobungisa kati na kufa baboti na bango oyo bazalaki mibangé babɔndisami na elikya ya lisekwa elongo na elaká ya mokili ya sika ya kitoko oyo Nzambe akosala, oyo kati na yango “kufa ekozala lisusu te.”​—Emoniseli 21:4.

21. Matomba nini malamu mazali kozwama na kokumisa baboti na biso oyo bazali mibangé?

21 Basaleli ya Nzambe bazali na limemya mozindo epai na baboti na bango, ata soki basili kokóma mibangé. (Masese 23:22-24) Bazali kokumisa bango. Na kosaláká bongo, bazali komona oyo lisese lipemami lilobi: “Tata na yo mpe mama na yo bakosepela mpe mama oyo aboti yo akoyoka esengo.” (Masese 23:25) Mpe likambo ya ntina koleka, baoyo bazali kokumisa baboti na bango oyo bakómi mibangé, bazali kosepelisa mpe kokumisa Yehova Nzambe.

a Awa tozali te kolobela ezalela ya makambo oyo kati na yango baboti bazali na ekweli monene mpo ete basalelaki nguya mpe mikumba na bango na lolenge mabe mpenza, makambo oyo matalelami lokola ngambo monene.

LOLENGE NINI MITINDÁ OYO YA BIBLIA MIKOKI KOSALISA . . . BISO NA KOKUMISA BABOTI NA BISO ATAKO BAKÓMI MIBANGÉ?

Tosengeli kopesa mwa makabo epai na baboti mpe bankɔ́kɔ.​—1 Timoté 5:4.

Makambo na biso nyonso masengeli kosalema na bolingo.​—1 Bakolinti 16:14.

Bikateli minene bisengeli kokamatama na lombangu te.​—Masese 14:15.

Baboti oyo bakómi mibangé, ata soki bazali na maladi mpe balɛmbi, esengeli kopesa bango limemya.​—Levitike 19:32.

Tozali na elikya ete konuna mpe kokufa ekosuka mokolo mosusu.​—Emoniseli 21:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto