Kobikisama ya bato na nzela ya ekamwiseli ebɛlɛmi
“TOMONI likambo na lolenge oyo liboso soko moke te.” Wana ezali maloba ya bato oyo bamonaki Yesu kobikisa mokatatali na mbala moko na nzela ya bikamwiseli. (Malako 2:12) Yesu abikisaki mpe mokufi-miso, emimi, motɛngumi, bayekoli na ye mpe basalaki lolenge yango. Kasi, na nguya nini Yesu asalaki bikamwiseli yango? Kondima ezalaki kozwa esika nini? Makambo wana oyo masalemaki na ekeke ya liboso mazali kongɛngisama nini likoló na kobikisama na nzela ya bikamwiseli oyo ezali kosalema na eleko na biso?—Matai 15:30, 31.
“Kondima na yo esili kobikisa yo”
Basáli na bikamwiseli na mikolo oyo balingaka mingi kozongela maloba Yesu alobaki na mwasi oyo azalaki kotanga makila na boumeli ya mibu 12 mpe ayaki epai na ye mpo na kobikisama: “Kondima na yo esili kobikisa yo.” (Luka 8:43-48) Maloba wana ya Yesu malingi nde komonisa ete kobika ya mwasi yango etalelaki kondima na ye? Yango ezalaki ndakisa ya “kobikisama na nzela ya kondima” lokola ezali kosalema lelo?
Soki totángi lisoló ya Biblia na likebi nyonso, tokomona ete mbala mingi Yesu mpe bayekoli na ye basɛngaki soko moke te ete babɛli báyambola kondima na bango liboso ete bákoka kobikisama. Mwasi oyo touti kolobela ayaki mpe, kozanga ete aloba likambo moko na Yesu mpe kozanga makɛlɛlɛ asimbaki elamba na ye na nsima mpe “nokinoki litanga na ye na makila ekaokaki.” Na libaku mosusu, Yesu abikisaki mobali moko oyo azalaki kati na baoyo bayaki kokanga ye. Kútu, abikisaki mpe moto moko oyo ayebaki te soki Yesu azalaki nani.—Luka 22:50, 51; Yoane 5:5-9, 13; 9:24-34.
Na yango, kondima ezalaki kozwa esika nini? Ntango Yesu mpe bayekoli na ye bakendaki na etúká ya Tula mpe Sidona, mwasi moko mobotami na Foinike ayaki mpe angangaki ete: “Ɛ Nkolo, Mwana na Davidi, yokelá ngai mawa! Mwana mwasi na ngai azali na [elimo, NW] mabe.” Kanisá na mawa na ye ntango azali komilela ete: “Nkolo, sungá ngai!” Na mawa nyonso, Yesu ayanolaki ete: “Ɛ mama, kondima na yo ezali monene mpenza! Ebimela yo lokola elingi yo.” Mpe mwana mwasi na ye abikaki “longwa na ntango yango.” (Matai 15:21-28) Ezali polele ete kondima etalelamaki, kasi kondima ya nani? Simbá likambo oyo ete Yesu akumisaki kondima ya mama, kasi ya mwana oyo azalaki na bokɔnɔ te. Mpe kondima na likambo nini? Na kobéngáká Yesu ete “Nkolo, Mwana na Davidi,” mwasi yango andimaki na miso ya bato ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki. Ezalaki te maloba mpamba ya komonisa kondima epai ya Nzambe to kondima kati na nguya ya mobikisi. Ntango Yesu alobaki ete “kondima na yo esili kobikisa yo,” alingaki koloba ete kozanga kondima ye ete azali Masiya, mbɛlɛ banyokwami bakokaki koya epai na ye te mpo na kobikisama.
Uta na ndakisa yango euti na Makomami, tokoki komona ete kobikisama oyo Yesu asalaki ekeseni mpenza na oyo ezali komonana mingi to ezali kolobelama lelo oyo. Ezalaki na makambo ya kobimisa mayoki makasi te kati na bibele oyo bazalaki koya—makambo lokola konganga, koyemba makasi, kosala makɛlɛlɛ, kosenzwa, mpe bongo na bongo—mpe Yesu azalaki na bisalasala te. Lisusu, Yesu alembaki kobikisa babɛli te na kopesáká mokalo ete bazangaki kondima to mpo ete mabonza na bango ezalaki moke.
Kobikisama na nguya ya Nzambe
Ndenge nini Yesu mpe bayekoli na ye bazalaki kobikisa? Biblia eyanoli ete “nguya ya Nkolo ezalaki na ye mpo na kobikisa babɛli.” (Luka 5:17) Luka 9:43 elobi ete nsima ya kobikisa moto moko “bango nyonso bakamwaki monene na Nzambe.” Na lolenge lobongi mpenza, Yesu alingaki te ete bato báyeba ye lokola mobikisi ya makɔnɔ. Na libaku moko ayebisaki mobali oyo ye autaki kosikola na mitungisi ya bilimu mabe ete: “Zongá na ndako na yo epai na bandeko na yo koyebisa bango likambo nini lisili Nkolo kosala mpo na yo, mpe motindo mosili ye koyokela yo mawa.”—Malako 5:19.
Lokola Yesu mpe bantoma na ye babikisaki bato na nguya ya Nzambe, ezali na mpasi te kokanga ntina ete kondima ezalaki ntango nyonso te lisɛngami epai na ye oyo asengelaki kobikisama liboso ete abika. Nzokande, esengelaki ete mobikisi azala na kondima makasi. Na yango, ntango bayekoli ya Yesu balóngaki te kobimisa elimo mabe moko ya nguya makasi, Yesu ayebisaki bango ntina oyo balóngaki te, alobaki ete: “Mpo na kondima moke na bino.”—Matai 17:20.
Mokano ya kobikisama na nzela ya bikamwiseli
Atako Yesu abikisaki bato mingi na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, mosala na ye ya liboso ezalaki te ‘mosala ya kobikisa.’ Kobikisa na nzela ya bikamwiseli oyo asalaki—oyo mpo na yango asɛngaki bato eloko te, mabonza mpe te—ezalaki nsima ya lobanzo na ye ya liboso: “kosakola Nsango Malamu na Bokonzi.” (Matai 9:35) Lisoló lilobi ete na libaku moko “anyangelaki bango mpe asololaki bango likambo na Bokonzi na Nzambe, mpe abikisaki bango bazalaki na bosɛnga na kobika.” (Luka 9:11) Kati na Baevanzile, mbala mingi Yesu azalaki kobéngama ete “Molakisi” kasi abéngamaki soko moke te ete “Mobikisi.”
Boye, mpo na nini Yesu abikisaki bato na nzela ya bikamwiseli? Libosoliboso ezalaki mpo na komimonisa lokola Masiya oyo alakamaki. Ntango Yoane Mobatisi atyamaki na bolɔ́kɔ atako asalaki mabe moko te, alingaki komindimisa ete asilisaki mosala oyo Nzambe atindaki ye. Atindaki bayekoli na ye epai na Yesu mpo na kotuna ete: “Yo ozali ye oyo akoya soko tótalela mosusu?” Yoká oyo Yesu alobaki na bayekoli ya Yoane: “Bókenda komonisa Yoane makambo mayoki bino mpe mamoni bino. Bakufi-miso bazali komona lisusu mpe mikatatali bazali kotambola, bato na mbala bazali kopɛtwa mpe bakufi-matoi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe babola bazali koyoka Nsango Malamu.”—Matai 11:2-5.
Ɛɛ, Likambo oyo ete Yesu asukaki te bobele na kobikisa babɛli kasi asalaki mpe misala mosusu ya nguya oyo mikomami kati na Baevanzile ezali komonisa na bosikisiki ete azali “Ye oyo akoya,” Masiya oyo alakamaki. Ezalaki na ntina te ete ‘bátalela’ moto ‘mosusu.’
Kobikisama na nzela ya bikamwiseli na mikolo na biso?
Boye, tosengeli komizela ete Nzambe amonisa nguya na ye na nzela ya bikamwiseli lelo oyo? Te. Na nzela ya misala ya kokamwisa oyo asalaki na nguya ya Nzambe, Yesu asilaki komonisa na bosikisiki ete azalaki Masiya oyo Nzambe alakaki ete akoya. Misala minene ya Yesu mikomami kati na Biblia mpo ete bato nyonso bákoka kotánga yango. Ezali na ntina te ete Nzambe amonisa nguya na ye na kozongeláká misala motindo wana libota na libota.
Likambo ya kobenda likebi ezali ete kobikisama mpe misala mosusu ya kokamwisa mizalaki kondimisa bobele mwa ndambo ya bato. Kútu bato mosusu kati na baoyo bamonaki bikamwiseli ya Yesu bandimaki te ete asalaki yango na lisalisi ya Tata na ye ya likoló. “Ata asili kosala bilembo mingi boye liboso na bango, bandimi ye te.” (Yoane 12:37) Na ntina yango, nsima ya kolobela makabo ndenge na ndenge ya elimo—kosakola, koloba na nkótá ndenge na ndenge, kobikisa, mpe bongo na bongo—oyo Nzambe apesaki epai na bato ndenge na ndenge kati na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, ntoma Paulo apemamaki na koloba ete: “Soko bisakweli izali, ikolimwa; soko maloba na ndenge na ndenge, ikosuka; soko boyebi, ekolimwa. Zambi toyebi bobele na ndambo mpe tokosakolaka bobele na ndambo. Nde wana ekoya oyo ezali malamu nyonso, oyo ezali bobele ndambo ndambo ekolimwa.”—1 Bakolinti 12:28-31; 13:8-10.
Ya solo, kozala na kondima epai na Nzambe ezali na ntina mpo na bolamu na biso. Nzokande, kotonga kondima na biso likoló na bilaka ya lokuta ya kobikisama ekosuka sé na mawa ya komona ete elikya na biso ekokisami te. Lisusu, na ntina na ntango ya nsuka, Yesu apesaki likebisi oyo: “Baklisto na lokuta mpe basakoli na lokuta bakotɛlɛma mpe bakomonisa bilembo mpe bikamwiseli minene mpo na kopɛngwisa Baponami, soko nde bakokoka.” (Matai 24:24) Longola bozimbisi mpe kobuba, ekozala mpe na misala ya nguya ya bademó. Mpo na yango, makambo oyo mazali kolobama ete mazali bikamwiseli masengeli kokamwisa biso te, mpe yango ezali soko moke te moboko ya kondima ya solosolo epai na Nzambe.
Lokola lelo oyo moto moko te asalaka bikamwiseli na lolenge oyo Yesu asalaki, tokoloba ete tozangi eloko? Soko moke te. Kútu, baoyo Yesu abikisaki bakokaki lisusu kobɛla. Bango nyonso bakómaki mibange mpe bakufaki. Matomba ya kobikisama oyo bazwaki ezalaki ya ntango mokuse. Nzokande, bikamwiseli ya kobikisa oyo Yesu asalaki bizali na ndimbola ya libela na boye ete yango ezalaki komonisa mapamboli ya mikolo mizali koya.
Na yango, nsima ya kotalela Biblia, Liloba ya Nzambe, Alexandre mpe Benedite, oyo tolobelaki liboso, balongolaki elikya na bango na kobikisama mpe nkisi ya elimo oyo ezali kosalema na mikolo na biso. Nzokande, bazali na kondima makasi ete kobikisama na nzela ya bikamwiseli ezali te makambo masilá koleka. Mpo na nini? Bango mpe bamilió mosusu ya bato bazali kozela mapamboli ya kobikisama na nsé ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 6:10.
Bokɔnɔ mpe liwa ekozala lisusu te
Lokola tosilaki komona yango liboso, mokano ya liboso ya mosala ya Yesu ezalaki te kobikisa babɛli mpe kosala bikamwiseli. Nzokande, mosala na ye ya liboso ezalaki nde kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 9:35; Luka 4:43; 8:1) Bokonzi yango ezali mwango oyo Nzambe akosalela mpo na kobikisama ya bato na nzela ya bikamwiseli mpe akolongola mbeba nyonso oyo lisumu mpe ezalela ya kozanga kokoka esilaki koyeisela libota ya bato. Ndenge nini mpe ntango nini akosala makambo yango?
Kosakoláká makambo masengelaki koya liboso, Klisto Yesu apesaki ntoma na ye Yoane emonaneli ya esakweli ete: “Sasaipi lobiko, na nguya, na Bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye, esili koya!” (Emoniseli 12:10) Makambo nyonso mamonisi ete uta mobu 1914 Satana, monguna monene ya Nzambe asilaki kobwakama na nzinganzinga ya mabelé, mpe Bokonzi ezali sikawa koyangela! Yesu asilaki kotyama lokola Mokonzi na Bokonzi ya Masiya mpe sikawa alingi kokɔtisa mbongwana monene na mabelé.
Mosika te, boyangeli ya likoló oyo etambwisami na Yesu ekoyangela libota ya sika ya bato ya sembo, yango “mabelé ya sika.” (2 Petelo 3:13) Na bongo makambo makozala ndenge nini? Talá emonaneli ya nkembo ya makambo makoya: “Namonaki likoló na sika, na nsé na sika, mpo ete lola na liboso, na nsé na liboso isili kolongwa . . . [Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:1, 4.
Okoki kokanisa lolenge bomoi ekozala ntango kobikisama ya bato na nzela ya ekamwiseli ekosalama? “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi; bato baoyo bakofanda wana bakolimbisama masumu na bango.” Ɛɛ, Nzambe akosala oyo babikisi na nzela ya kondima bakoki soko moke te kosala. Ya solo “akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25:8; 33:24.
[Elilingi na lokasa 7]
Na nsé ya Bokonzi ya Nzambe bato bakobikisama na nzela ya ekamwiseli