Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/8 nk. 28-31
  • Bamisionɛrɛ batindami mpo na ‘kokómisa bato bayekoli’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamisionɛrɛ batindami mpo na ‘kokómisa bato bayekoli’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bayekoli basengeli te kaka kotikala epai na bango”
  • “Bókende liboso mpe bómikumisa”
  • “Bokokokisa mokumba na bino?”
  • Makambo mosusu ya ntina ya programɛ yango
  • Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna oyo batunaki bango
  • Mokolo ya esengo mingi mpe ya elikya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Elimo ya komipesa ezali kotinda bato na Gileadi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bazali na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bamisionɛrɛ batindami “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/8 nk. 28-31

Kelasi ya mbala ya 128 ya Gileade

Bamisionɛrɛ batindami mpo na ‘kokómisa bato bayekoli’

“MPO bato ya bikólo nyonso báyoka nsango malamu, bakristo mosusu basengelaki kondima kotika mabota mpe bikólo na bango mpo na kosakola nsango malamu na mokili mosusu.” Na maloba wana nde, David Splane ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova abongisaki makanisi ya bayangani mpo na molulu moko ya kolendisa.

Na mokolo ya 13 Marsi 2010, bato pene na 8 000 bayanganaki na molulu ya kopesa badiplome epai ya bana-kelasi ya mbala ya 128 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Baninga, bandeko ya mabota mpe bapaya oyo bautaki na bikólo 27 bayanganaki na programɛ yango.

“Bayekoli basengeli te kaka kotikala epai na bango”

Ndeko Splane, prezida ya likita yango abandaki programɛ yango na kolobela etinda oyo Yesu apesaki ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 28:19, 20) Amonisaki ete Yesu atindaki bayekoli na ye epai ya bato. Toboyi te, na Pantekote ya mobu 33, bato oyo bautaki na Mezopotamia, na Nɔrdi ya Afrika mpe na bisika mingi ya Ampire ya Roma bayaki na Yerusaleme mpe bayokaki nsango malamu. Ata bongo, molobi alobaki ete: “Bayekoli basengelaki te kotikala kaka epai na bango mpe kozela ete bato ya bikólo nyonso báya epai na bango. Basengelaki kokende tii na esika eleki mpenza mosika na mabele mpo na koluka bato.”​—Misala 1:8.

Ndeko Splane alobaki ete: “Yesu asukaki kaka te na koyebisa bayekoli na ye oyo basengelaki kosala, kasi ateyaki bango mpe ndenge ya kosala yango. Ayebisaki bango te kaka ndenge ya kobondela; ateyaki bango mpe ndenge ya kobondela. Ayebisaki bango kaka te básakola, kasi alakisaki bango mpe ndenge ya kosakola. Ayebisaki bango kaka te bázala bateyi malamu; alakisaki bango mpe lolenge malamu ya koteya.”

Ndeko Splane, atángelaki baboti ya bana-kelasi maloba oyo ya kolendisa oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye, ete: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:20) Molobi alendisaki bayangani ete Yesu akokoba kobatela bana-kelasi na mikili ya bapaya, epai bakokende.

“Bókende liboso mpe bómikumisa”

Ndeko Anthony Morris ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alendisaki bana-kelasi ‘bákende liboso mpe bámikumisa.’ Alobaki ete ezali na lolenge ya malamu mpe ya mabe ya komikumisa. Komikumisa na lolenge ya mabe elimboli koluka lokumu na biso moko. Komikumisa ya malamu ezali oyo elobelami na 1 Bakorinti 1:31, ete: “Moto oyo azali komikumisa, amikumisa na Yehova.” Ndeko Morris alobaki ete: “Ezali na eloko oyo moto akoki komikumisa mpo na yango​—kozala na mayele ya kososola mpe boyebi ya Yehova Nzambe. Kutu, libaku monene koleka oyo ngai ná bino tozali na yango ezali ya komema nkombo wana mosantu, kozala Batatoli ya Yehova.”​—Yirimia 9:24.

Na nsima, mpo na komonisa ntina ya koyebisa bato nkombo ya Yehova, molobi alobelaki likambo moko oyo misionɛrɛ moko akutanaki na yango na Afrika. Misionɛrɛ yango ná mwasi na ye, bazalaki kokende mpo na kosala lisolo moko ya Biblia. Ntango bakómaki na esika moko oyo basoda bazalaki kotala biloko nyonso ya bato, soda moko ya elenge alakisaki misionɛrɛ wana mondoki mpe atunaki soki azali nani. Mwasi na ye, amikundwelaki mateya oyo bazwaki na Gileade, ayebisaki mobali na ye na litoi ete: “Yebisá ye ete ozali Motatoli ya Yehova mpe ozali kokende kosala lisolo moko ya Biblia.” Alandaki toli ya mwasi na ye, mpe batikaki bango báleka. Na mokolo oyo elandaki, ndeko wana ná mwasi na ye bayokaki na radio ete prezida ayebisaki basoda na ye báluka babomi-bato oyo bazalaki komibenga bamisionɛrɛ. Lokola balobaki ete bazali Batatoli ya Yehova na esika ya koloba ete bazali bamisionɛrɛ, ndeko wana ná mwasi na ye babikaki mpenza na likama. Ndeko Morris asukisaki lisolo na ye na maloba oyo: “Ntango bokokóma esika batindi bino, bókende liboso mpe bómikumisa. Bómikumisa na oyo nyonso Yehova akokokisa wana azali kosalela bino mpo na nkembo na ye ya libela.”

“Bokokokisa mokumba na bino?”

Geoffrey Jackson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe oyo azalaki misionɛrɛ, asalisaki bana-kelasi na motuna yango. Atunaki boye: “Tolingaka mpenza koloba nini soki tolobi ete songolo azali misionɛrɛ?” Alimbolaki ete liloba “misionɛrɛ” euti na liloba ya Latin oyo esalelamaka mpo na kolobela moto to etuluku ya bato oyo bazwi mokumba moko ya ntina mingi. Mokumba na biso Batatoli ya Yehova ezali ya kosakola nsango malamu mpe kosalisa basusu báyeba Yehova. Tosalaka mosala yango na kolanda ndakisa ya Yesu Kristo, oyo azalaki kobosana te mokumba oyo azalaki na yango awa na mabele. Epai ya Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma, Yesu alobaki ete: “Ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina na solo.”​—Yoane 18:37.

Molobi asalisaki bana-kelasi bákanisa na lisolo moko ya Biblia oyo elobeli etumba ya Yeriko. Na boumeli ya mikolo motoba, basoda ya Yisraele bazalaki kolamuka na ntɔngɔ, kozwa bibundeli na bango mpe kozinga Yeriko, na nsima kozonga ndako. Molobi alobaki ete: “Na makanisi ya biso bato, mosala na bango ekokaki komonana ete ezali bozoba.” Alobaki ete basoda mosusu bakokaki kokanisa boye: ‘Tozali kobebisa ntango mpamba.’ Kasi, na mokolo ya nsambo, Bayisraele bazwaki etinda ya kozinga engumba yango mbala nsambo, mpe na nsima basengelaki kobɛta ntangwa makasi ya etumba. Nini esalemaki? Bifelo ya Yeriko ekweaki!​—Yosua 6:13-15, 20.

Na lisolo yango ya Yeriko, ndeko Jackson amonisaki mateya minei. (1) Botosi ezali na ntina. Tosengeli kosala makambo ndenge Yehova alingi, tókanisa te ete lolenge na biso ya kokanisa nde eleki malamu. (2) Kondima mpe kotyela Yehova motema ezali na ntina. “Na kondima bifelo ya Yeriko ekweaki,” kasi ekweaki te mpo babɛtaki yango na bibende. (Baebre 11:30) (3) Tosengeli kozala motema molai. Na ntango oyo ebongi, mapamboli ya Yehova “ekozwa yo.” (Kolimbola Mibeko 28:2) (4) Kolɛmba te. Kobosana soki moke te mosala na yo. Ndeko Jackson asukisaki lisolo na ye na maloba oyo: “Soki bobosani te makanisi oyo, bokokokisa mosala na bino mpo na lokumu mpe nkembo ya Yehova.”

Makambo mosusu ya ntina ya programɛ yango

“Bólingaka Biblia mpe Nkolo na yango.” Yango nde motó ya likambo ya lisolo oyo Maxwell Lloyd, moko ya bandeko ya Komite ya filiale ya États-Unis asalaki. Ayebisaki bana-kelasi ete: “Biblia esengeli kozala na bomoi mpo na bino.” Na nsima, alendisaki bango ete: Bótika soki moke te ete bolingo na bino mpo na Yehova ekóma malili. Bókanisa te ete bato nyonso bakokanga ntina ya makambo oyo bozali koteya. Bólimbolaka solo ya Biblia na ndenge ya pɛtɛɛ mpo esimba mitema ya bayekoli ya Biblia. Bózala na komikitisa. Bómonisa te ete bozali na boyebi koleka. Ndakisa na bino eteyaka bato. Bato oyo bozali koyekola na bango Biblia basengeli komona ete bolingaka mpenza Biblia.

“Bótala malamumalamu bayanganga.” Ezali lisolo oyo ndeko Michael Burnett, moko ya balakisi mpe oyo azalaki misionɛrɛ, asalaki. Alobaki ete na bantango mosusu bokokutana na makambo oyo ekotungisa bino. Kasi, bómikundola toli oyo ya Yesu: “Bótala malamumalamu bayanganga, mpamba te elonaka te mpe ebukaka te, . . . kasi atako bongo Nzambe aleisaka yango.” (Luka 12:24) Na kotalela Mibeko ya kondimana, bayanganga ezalaki bandɛkɛ ya mbindo, oyo ebongaki te mpo na kolya yango. Ezalaki kotalelama lokola eloko ya mpii. (Balevi 11:13, 15) Atako bongo, Nzambe aleisaka yango. Ndeko Burnett alobaki boye: “Soki bokutani na mitungisi ya makasi, bókanisa yanganga. Soki Nzambe aleisaka ndɛkɛ ya mbindo mpe ya mpii lokola yanganga, na ntembe te akomibanzabanza mingi mpo na bino, baoyo bozali pɛto na miso na ye.”

‘Nasali bino mabe te.’ Mark Noumair, moko ya balakisi ya Gileade, asalisaki bayangani nyonso na kotalela ndakisa oyo Yesu apesaki na oyo etali basali ya elanga ya vinyo. Basali mosusu basalaki mosala makasi mokolo mobimba. Basusu basalaki kaka ngonga moko. Kasi, bango nyonso bazwaki kaka lifuti ndenge moko! Basali oyo basalaki ntango molai babandaki koimaima. Epai ya basali yango oyo bazalaki komilela, nkolo elanga ya vinyo alobaki ete: ‘Nasali bino mabe te. Boyokanaki na ngai ete nakofuta bino denari moko, boye te? Bókamata lifuti na bino mpe bókende.’ (Matai 20:13, 14) Liteya nini tosengeli kozwa? Komikokanisa te na basusu. Ndeko Noumair alobaki boye: “Komikokanisa ná basusu ekolongola bino esengo. Kutu, likambo ya mabe koleka, ekoki kotinda yo otika mosala na yo, otika libaku kitoko ya mosala.” Molobi akundwelaki bana-kelasi ete Yesu azali kokamba mosala ya kobuka mbuma ya elimo na mikolo na biso mpe akoki kosalela bayekoli na ye ndenge alingi. Soki Yehova ná Yesu bazwi ekateli ya kosala likambo moko ya monene epai ya basusu, yango elingi koloba te ete basali yo mabe. Tyá nde likebi na mosala na yo, mpe kotika soki moke te ete “lifuti” ya basusu ezongisa yo nsima na mosala oyo Yehova apesi yo osala.

Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna oyo batunaki bango

Ntango bazalaki kotánga te to kosala badevuare na ndako, bana-kelasi ya Gileade bazalaki kokende na masangá oyo batindaki bango mpo na kosakola. Sam Roberson, moko ya balakisi ya Gileade, asololaki na mwa ndambo ya bana-kelasi mpo bálobela makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ndeko moko ya mwasi na nkombo Alessandra Kirchler, akutanaki na mwasi moko oyo azalaki komitungisa mingi mpo mwana na ye ya mobali azalaki na ezaleli ya komɛla makaya. Na nsima, Alessandra azongelaki mwasi yango mpe amemelaki ye Lamuká! oyo elobelaki likambo yango. Akutaki moto te na ndako, kasi atikaki kaka zulunalo yango. Nsukansuka, Alessandra akutaki mwasi yango na ndako mpe mwasi yango asɛngaki ye akɔta. Mwasi yango asepelaki makasi na zulunalo yango mpe alobaki boye: “Nazalaki ntango nyonso komituna soki Nzambe alingi koteya ngai nini na bampasi nyonso oyo apesi ngai.” Alessandra alakisaki ye na Biblia ete Nzambe te nde abimiselaka biso bampasi oyo tokutanaka na yango. (Yakobo 1:13) Lelo oyo, mwasi yango ná mwana na ye bazali koyekola Biblia.

Ndeko Melvin Jones, ya Departema ya Mosala asololaki na bandeko misato oyo bakɔtá kelasi ya Gileade: Jon Sommerud, oyo asalaka na Albanie; Mark Anderson, oyo asalaka na Kenya; mpe James Hinderer, oyo asalaka na Departema ya biteyelo ya Teokrasi. Bango nyonso misato bandimaki ete Gileade esukaka kaka te na koteya bana-kelasi mateya oyo esimbi Biblia, kasi elakisaka bango mpe ndenge ya kosalela mateya yango, ata soki bana-kelasi yango bazali ndenge nini to mpe bazali kosala epai wapi.

Moko ya bana-kelasi atángaki mokanda ya kosimba motema mpenza mpo na komonisa botɔndi ya bana-kelasi. John Barr, oyo azali na mbula 96, mpe mokóló mpenza ya bandeko nyonso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asukisaki programɛ yango na libondeli; asɛngaki Yehova apambola mosala ya bana-kelasi ya mbala ya 128 ya Gileade.

[Etanda/​Karte na lokasa 31]

MAKAMBO ETALI BANA-KELASI

Bauti na mikili: 8

Bana-kelasi bazalaki: 54

Babalani: 27

Mwayene ya mbula ya kobotama: 35,2

Mwayene ya mbula ya batisimo: 19,1

Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,8

[Karte]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Batindami na mikili: 25 oyo ezali awa na nse:

EPAI BAMISIONƐRƐ BATINDAMI

ALBANIE

ARUBA

BOLIVIE

CAMBODGE

CÔTE D’IVOIRE

ÉQUATEUR

GHANA

GUATÉMALA

GUINÉE

GUYANA

HONDURAS

INDONÉSIE

KOSOVO

LETTONIE

LIBÉRIA

MADAGASCAR

MONGOLIE

NAMIBIE

NICARAGUA

PARAGUAY

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

ROUMANIE

RWANDA

SERBIE

TAïWAN

(ESIKA OYO FILIALE YA AUSTRALIE EKAMBAKA MOSALA)

[Elilingi na lokasa 30]

Bana-kelasi ya Gileade bazali kosala elakiseli moko ya makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 31]

Bana-kelasi ya mbala ya 128 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia

Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi, mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.

(1) Keller, E.; Ostopowich, I.; Jacobsen, S.; Arias, M.; Dieckmann, Y.; Tanaka, J.; Harada, K.

(2) Camacho, L.; Kirchler, A.; Rodríguez, S.; Ward, B.; Trenalone, K.; Victoria, V.; Oxley, F.; Nguyen, K.

(3) Oxley, O.; De Dios, A.; Lindström, C.; Allen, J.; Meads, T.; Waddington, J.; Victoria, E.

(4) Harada, H.; Lindström, A.; Orsini, E.; Logue, D.; Missud, T.; Bergeron, S.; Camacho, G.; Ward, T.

(5) Kirchler, W.; Nguyen, H.; Kremer, E.; Burgaud, C.; Titmas, N.; De Dios, C.; Rodríguez, A.; Waddington, M.

(6) Dieckmann, J.; Allen, C.; Titmas, R.; Arias, J.; Bergeron, E.; Keller, J.; Ostopowich, F.; Burgaud, F.

(7) Tanaka, K.; Kremer, J.; Jacobsen, R.; Trenalone, J.; Logue, J.; Meads, D.; Missud, D.; Orsini, A.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto