Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/5 lok. 31
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Alei na ndako ya Simo na Betania
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Malasi bato babandá kosalela yango kala mpenza
    Lamuká!—2002
  • Na Betania, epai na Simona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/5 lok. 31

Oyebaki yango?

Mpo na nini Biblia elobi ete mafuta ya nsolo kitoko oyo Malia asalelaki ezalaki ya ntalo mingi?

Mwa mikolo liboso Yesu akufa, Malia, ndeko ya Lazalo, “ayaki na molangi ya alabasita ya mafuta ya nsolo kitoko, nalada ya solosolo, ya ntalo mingi,” mpe asopaki yango na motó ya Yesu. (Malako 14:3-5; Matai 26:6, 7; Yoane 12:3-5) Evanzile ya Malako mpe ya Yoane elobi ete mafuta yango ezalaki na motuya ya badenali 300, lifuta mpo na mbula mobimba ya mosala.

Mafuta yango ya ntalo mingi ezalaki kouta wapi? Nalada oyo Biblia elobeli ezali nzete moko moke ya nsolo kitoko (Nardostachys jatamansi) oyo ebotaka na bangomba ya Himalaya. Mbala mingi, bato bazalaki kosangisa nalada yango ya ntalo mingi na biloko mosusu ata mpe kosala ya monyato. Nzokande, Malako ná Yoane basaleli maloba “nalada ya solosolo.” Lokola Biblia elobi ete mafuta yango ezalaki ya ntalo mingi emonisi ete mbala mosusu eutaki mosika, na Inde.

Mpo na nini Malako alobi ete Malia ‘abukaki molangi ya alabasita’? Mbala mingi, molangi ya alabasita ezalaki na mwa nkingo mpo na kokanga yango makasi mpo nsolo ya mafuta ebima te. Na buku na ye (Discoveries From the Time of Jesus), Alan Millard alobi boye: “Tokoki komona na makanisi ndenge mwasi yango oyo azalaki na esengo abukaki [nkingo ya molangi], na esika asuka kaka na kofungola monɔkɔ ya molangi, mpe asopaki mafuta nyonso na mbala moko.” Ekoki kozala mpo na yango nde “ndako etondaki na nsolo ya mafuta yango ya nsolo kitoko.” (Yoane 12:3) Likabo yango ezalaki ya ntalo mingi mpe ebongaki mpenza. Mpo na nini? Mwasi yango azalaki na botɔndi mpo Yesu asekwisaki ndeko na ye Lazalo.​—Yoane 11:32-45.

Engumba na nkombo Yeliko ezalaki kaka moko to ezalaki mibale?

Matai, Malako, mpe Luka balobeli likamwisi moko oyo esalemaki pembeni ya engumba Yeliko. (Matai 20:29-34; Malako 10:46-52; Luka 18:35-43) Matai ná Malako balobi ete Yesu asalaki likamwisi yango ntango ‘azalaki kobima’ na Yeliko. Nzokande, Luka alobi ete esalemaki ntango Yesu azalaki “kopusana pene” na Yeliko.

Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, engumba na nkombo Yeliko ezalaki kaka moko to ezalaki mibale? Buku moko (Bible Then & Now) elobi boye: “Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Yeliko esilaki kotongama lisusu na sudi ya engumba [Yeliko] ya kala, na ntaka ya kilomɛtrɛ moko na ndambo. Kuna, Elode Monene atongaki ndako oyo azalaki kofanda na eleko ya malili.” Buku moko (Archaeology and Bible History) emonisi likambo yango na moloba oyo: “Na ntango ya Yesu, Yeliko ezalaki na biteni mibale. . . . Engumba ya kala oyo Bayuda batongaki ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki moko na ndambo na engumba ya sika oyo Baloma batongaki.”

Na yango, ekoki kozala ete Yesu asalaki likamwisi yango ntango azalaki kobima na eteni moko ya engumba yango mpe azalaki kopusana na eteni mosusu. Ya solo, koyeba ndenge makambo ezalaki ntango masolo oyo ekomami na Biblia esalemaki, esalisaka biso tókanga ntina ya makambo oyo ekoki komonana bongolabongola.

[Elilingi na lokasa 31]

Molangi ya Alabasita

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Réunion des Musées Nationaux/​Art Resource, NY

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto