Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/3 nk. 20-25
  • ‘Toluka kimya mpe tolanda yango’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Toluka kimya mpe tolanda yango’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mposa na nzoto”
  • Kimya elongo na bandeko
  • “Esengo na bato na kimya”
  • Maloba na kimya
  • ‘Tosala nyonso oyo ekoki na biso’
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Luká kimya mpe landá yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ndenge oyo okoki kozwa kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/3 nk. 20-25

‘Toluka kimya mpe tolanda yango’

“Tika ete Jéhovah asanzolama, ye oyo akosepelaka na kimya ya mosaleli na ye!”​—NZEMBO 35:27.

1. Kimya nini tozali na yango?

OYO nde esengo na kozala na mokili mosili kokabwana! Oyo nde mapamboli na kosambela Jéhovah “Nzambe na kimya ye moko,” mpe kozwa matomba oyo mauti na “kondimana na ye na kimya”! Oyo nde elendiseli kozala na “kimya na Nzambe, oyo eleki makanisi nyonso,” kati na mimekamo ya bomoi, mpe kozala na ‘ekanganeli na kimya’ oyo ezali kosala bomoko ya basaleli na Nzambe, ata soko bazali bato ya ekólo nini, mposo nini to mpe etelemelo nini bazali na yango!​—1 Batesaloniki 5:23; Ezekiele 37:26; Bafilipi 4:7; Baefese 4:3.

2, 3. (a) Nini ekoki kokómela baklisto mosusu atako liboké mobimba ya basaleli na Nzambe bazali kolanda koyika mpiko? (b) Biblia ezali kolendisa biso na kosala nini?

2 Ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa motuya mingi na kimya wana. Nzokande, bakoki kotalela te ete basili mpenza kozwa yango mpo na libela. Moto akozala na kimya te bobele mpo ete azali koyangana na makita ya lisangá to mpo azali mosangani ya libota moko na boklisto. Awa etongá oyo esalemi na batikali bapakolami mpe baninga na bango “bampate mosusu,” bazali koyika mpiko kino nsuka, ekoki kokóma mbala mosusu ete moto moko abungisi kimya na ye mpe atiki kopota mbangu na emekaneli etyami liboso na baklisto.​—Yoane 10:16; Matai 24:13; Baloma 11:22; 1 Bakolinti 10:12.

3 Na eleko na ye, ntoma Paulo apesaki baklisto likebisi oyo lilandi: “Bandeko, bokeba ete motema mabe oyo mozangi kondima, ezala kati na moko na bino te ete botangwa na Nzambe na bomoi te.” (Baebele 3:12) Likebisi oyo lizali mpe na ntina mingi mpo na ebele monene. Biblia ezali lisusu kopesa elendiseli oyo epai na baklisto ete:‘Luka kimya mpe landa yango. Mpo ete miso na Jéhovah mazali likoló na bayengebene, mpe matoi na ye epai na malómbo na bango; nde elongi na Jéhovah etemeli bango bakosalaka mabe.’​—1 Petelo 3:10-12; Nzembo 34:14, 15.

“Mposa na nzoto”

4. Eloko nini ekoki kobebisa kimya na biso elongo na Nzambe?

4 Eloko nini ekoki kobebisa bolukiluki na biso na kimya? Paulo amonisi eloko moko wana alobaki ete: “Mposa na nzoto elimboli kufa, kasi mposa na elimo elimboli bomoi mpe kimya; mpo ete mposa na nzoto elimboli koyinana na Nzambe.” (Baloma 8:6, 7, MN) Na liloba “nzoto,” Paulo azali komonisa ezalela na biso mabe ya bato bazangi kokoka, mpo na masumu oyo tosangolaki yango. Ye oyo azali na makanisi mabe na nzoto, azali lisusu na kimya te. Moklisto oyo asali pité, oyo akokósaka, oyo ayibi, oyo akomele bangi to mpe drogue to oyo akobuka mobeko na Nzambe ezala na lolenge nini, kozanga ete aoka mawa mpo na mabe wana, ye mpenza akobebisa kimya oyo azali na yango elongo na Jéhovah. (Masese 15:8, 29; 1 Bakolinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8) Oyo eleki mpenza ezali oyo ete, soki moklisto moko akomonisaka motuya monene na makambo ya mosuni koleka makambo ya elimo, likámá monene ezali mpenza likoló na kimya na ye elongo na Nzambe.​—Matai 6:24; 1 Yoane 2:15-17.

5. Kolanda kimya esengi nini?

5 Epai mosusu, Paulo alobaki ete: “Mposa na elimo elimboli bomoi mpe kimya.” Kimya ezali kati na mbuma ya elimo; soki nde tosaleli motema na biso ete mopesa motuya na biloko ya elimo, na kosengáká Nzambe lisalisi ya elimo na ye, tokotangwa longwa na “mposa na nzoto.” (Bagalatia 5:22-24) Na 1 Petelo 3:10-12, kimya esangani na boyengebene (Baloma 5:1) Petelo alobi ete bolandi na kimya ekosengaka “kotika mabe mpe kosala malamu.” Elimo na Nzambe ekoki kosalisa biso na ‘kolanda boyengebene’ mpe na kobatela kimya oyo tozali na yango elongo na Nzambe.​—1 Timoté 6:11, 12.

6. Mokumba nini bankulutu bazali na yango mpo na oyo etali kimya ya lisangá?

6 Kati na lisangá, kolanda kimya ezali lobanzo monene ya bankulutu. Na ndakisa, soki moto moko azali koluka kokótisa makambo na mbindo kati na yango, bankulutu bazali na mokumba ya kobatela lisangá na kopameláká moto yango oyo asali lisumu. Soki andimi toli, akozwa lisusu kimya. (Baebele 12:11) Soki te, ekosengela mbala mosusu ete abimisama mpo na kobatela boyokani ya kimya ya lisangá elongo na Jéhovah.​—1 Bakolinti 5:1-5.

Kimya elongo na bandeko

7. Paulo akebisaki Bakolinti na “bamposa [nini] ya nzoto”?

7 “Mposa na nzoto” ekoki kobebisa te bobele kimya oyo tozali na yango elongo na Nzambe, kasi lisusu, boyokani na biso elongo na baklisto mosusu. Paulo akomaki epai na Bakolinti ete: “Bozali naino bato na mosuni. Mpo naino zuwa mpe koswana ezali kati na bino, boye bozali bato na mosuni te? Mpe bozali kotambola lokola bato te?” (1 Bakolinti 3:3) Zuwa mpe koswana, nyonso mibale ekeseni na kimya.

8. (a) Nini ekoki kokómela moto oyo azali kokótisa zuwa mpe koswana kati na lisangá? (b) Esengeli nini mpo ete tozala na kimya elongo na Nzambe?

8 Kobebisa kimya ya lisangá na kokótisáká zuwa mpe koswana, ezali likambo na mpasi mingi. Kolobáká na ntina na ezaleli moko oyo eyokani na kimya, oyo ezali mpe mbuma ya elimo, ntoma Yoane apesaki likebisi oyo, ete: “Soko moto nani akolobaka ete: ‘Nalingi Nzambe,’ nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete ye oyo akolingaka ndeko na ye te oyo ye asili komona, akolinga Nzambe te oyo asili naino komona ye te.” (1 Yoane 4:20) Bobele bongo, moto oyo azali kobimisa zuwa mpe koswana kati na bandeko, akoki nde kozala mpenza na kimya elongo na Nzambe? Soko moke te. Tosili kozwa elendiseli oyo: “Bosepelaka, bolanda komisembola, bomibondisana, bolobaka na motindo moko, bozalana na kimya; mpe Nzambe na bolingo mpe na kimya, akozala na bino.” (2 Bakolinti 13:11, MN) Ee, soki nde tolandi kozalana na kimya, boye Nzambe na bolingo mpe na kimya, akozala elongo na biso.

9. Ndenge nini toyebi ete mikakatano to matáta ekoki ntango nyonso kobima kati na baklisto?

9 Yango elimboli te ete matáta makozala te kati na baklisto. Na boumeli ya baposo oyo elandaki Pantekote, matáta mabimaki kati na lisangá na boklisto liutaki kosalema sika, na ntina na kokabolama ya biloko mokolo na mokolo. (Misala 6:1) Mokolo moko, matáta mazalaki kati na Paulo mpe Barnabas, mabimisami “koswana makasi.” (Misala 15:39, Liloba lya Nzambe) Paulo apesaki toli epai na Evodi mpe Suntuke, baoyo na ntembe te bazalaki bandeko basi malamu mpe na molende, ete “bayokana malamu kati na Nkolo.” (Bafilipi 4:2 MN)Ezali likambo na kokamwa te lokola Yesu apesaki batoli mpo na lolenge ya kosilisa matáta oyo makoki kobebisa kimya kati na baklisto, mpe alobaki ete, yango esengeli kosilisama nokinoki. (Matai 5:23-25; 18:15-17) Akokaki kopesa batoli wana te soki amonaki liboso te ete mikakatano mikobima kati na bayekoli na ye.

10. Nini ekómaka mbala mosusu kati na lisangá, mpe mokumba nini ezali likoló na bato nyonso oyo batalelami na likambo yango?

10 Na bongo, lelo oyo, ekoki kokóma ete moko na baninga na biso baklisto, abimiseli biso maloba mabe to maloba oyo tozali kotalela yango ete ezali kotyola biso. Ezalela ya moto mosusu ekoki mpenza kookisa biso nkanda. Matáta makoutaka mpe na bomoto ya bato mibale ekokani te. Mbala mosusu moto moko andimi mpenza te ekateli oyo ezwamaki na bankulutu. Ata kati na lisangani ya bankulutu, ekoki mbala mosusu kokóma ete nkulutu moko azali na bopusi mingi, mpe azali komeka komitya likoló na bankulutu mosusu. Atako makambo oyo makomonanaka, nzokande esengeli na biso koluka kimya mpe kolanda yango. Kasi mokakatano mozali mpo na kosilisa matata na lolenge na boklisto, mpe mpo na kobatela “ekanganeli na kimya.”​—Baefese 4:3.

11. Babongiseli nini Jéhovah asilaki kokamata mpo na kosalisa biso ete tolanda kozala na kimya?

11 Biblia elobi ete: “Tika ete Jéhovah asanzolama, ye oyo akosepelaka na kimya ya mosaleli na ye!” (Nzembo 35:27) Ee, Je’jéhovah alingi ete tozala na kimya. Yango wana asili kokamata bibongiseli mibale ya ntina mingi mpo na kosalisa biso ete tobatela kimya kati na biso, mpe ete toumela na kimya elongo na ye. Moko na yango ezali elimo santu, oyo kimya ezali mbuma na yango, mpe bizaleli mosusu oyo biyokani na yango, lokola motema petee, malamu, bopóló mpe komikanga motema. (Bagalatia 5:22, 23) Mosusu ezali mayele na Nzambe, oyo totangi na ntina na yango ete: “Mayele mauti likoló ezali liboso na peto, na nsima ezali na kimya, na malamu, na kotósa noki, na motema mawa mpe na mbuma malamu.”​—Yakobo 3:17, 18.

12. Tosengeli kosala nini soki tozali lisusu na kimya mpenza te elongo na bandeko na biso?

12 Na yango, wana tozali mpenza na kimya te elongo na bato mosusu, esengeli na biso kobondela mpo na kozwa mayele ya likoló, maye makolakisa biso lolenge ya kosala mpe, kozwa elimo santu, oyo ekopesa biso makasi ya kosala makambo mazali sembo. (Luka 11:13; Yakobo 1:5; 1 Yoane 3:22) Na boyokani na libondeli na biso, tokoki na nsima koluka litambwisi epai na liziba ya mayele na bonzambe, elingi koloba Biblia mpe kozwa batoli oyo ezali kati na mikanda mikolimbolaka Biblia mpo na lolenge ya kosalela Makomami. (2 Timoté 3:16) Mbala mosusu okolinga mpe koyoka makanisi ya bankulutu ya lisangá. Mwango ya nsuka ezali ete, olanda litambwisi oyo osili kozwa. Totangi na Yisaya 54:13, ete: “Bana na yo nyonso bakozala bato balakisami na Jéhovah, mpe kimya ya bana na yo ekozala mingi.” Mokapo oyo emonisi ete kimya na biso etali lolenge oyo tozali kosalela makambo oyo Jéhovah azali kolakisa biso.

“Esengo na bato na kimya”

13, 14. (a) Liloba “bato na kimya” ezali na ndimbola nini? (b) Ndenge nini tokoki kokóma bato bakotyaka kimya?

13 Kati na Lisoló na ye likoló na ngomba, Yesu alobaki ete: “Esengo na bato na kimya, mpo ete bakotangama ‘bana na Nzambe.’” (Matai 5:9, MN) Liloba “bato na kimya” elimboli te bato oyo balobaka mingi te uta kobótama na bango. Na Greke ya ebandeli, liloba yango elimboli “bato bakotyaka kimya.” Moto akotyaka kimya ayebi mpenza kozongisa kimya na ntango yango ebebisami. Kasi likambo ya ntina mpenza ezali oyo ete:moto akotyaka kimya asalaka liboso milende mpo na kopengola kobebisa kimya. ‘Kimya etondi na motema na ye.’ (Bakolose 3:15) Soki basaleli na Nzambe bakosala milende mpo na kozala bato bakotyaka kimya, bakokitisa mikakatano oyo mikoki kobima kati na bango.

14 Mpo na kokóma moto oyo akotyaka kimya, tosengeli koyeba bolembu na biso. Na ndakisa, ekoki kokóma ete moklisto moko azali na momeseno ya kosilika, to akozokisamaka noki na motema. Ntango moklisto wana akokutana na momekamo monene, akoki mbala mosusu kobosana mitinda ya Biblia mpo ete azali na nkanda. Yango ekoki kokamwisa biso te na ntina na bato oyo bazangi kokoka. (Baloma 7:21-23) Nzokande, koyinana, koswana mpe nkanda etangami kati na misala ya nzoto. (Bagalatia 5:19-21) Soki biso moko tomimoni na bizaleli wana​—to soki bato mosusu bamonisi biso yango—​esengeli na biso kolanda kobondela mpenza mpo ete elimo na Jéhovah esalisa biso na kolóna ezalela ya komikanga motema mpe bopóló. Ee, moto na moto asengeli kosala milende ya kozala na bizaleli oyo bizali eteni ya bomoto ya sika.​—Baefese 4:23, 24; Bakolose 3:10, 15.

15. Mayele mauti na likoló makeseni na motó makasi na likambo nini?

15 Ekoki mbala mosusu kokóma ete lisangá to lisangani moko ya bankulutu lizangi kimya mpo ete moto moko kati na bango azali na motó makasi, oyo alingi bobele ete likanisi na ye lindimama na bamosusu. Ya solo, soki likambo litaleli mobeko moko ya Nzambe, moklisto asengeli kozala na ekateli makasi, mpe akoki kobongwana te. Soki tomoni ete tozali na likanisi malamu likoki kopesa matomba epai na bamosusu, mabe moko ezali te ete tolobela yango, na meko oyo tokoki komonisa bantina oyo tozali na yango. Kasi, tolingi kokokana te na bato ya mokili oyo ‘bayebi koyokana na bamosusu te.’ (2 Timoté 3:1-4) Mayele mauti na likoló ezali na kimya, na malamu. Baoyo bazali na motó makasi mpe bayebi koyokana na baninga te, bato wana basengeli kolanda toli oyo Paulo apesaki epai na Bafilipi:‘bosala likambo moko te mpo na koluka komitómbola.’​—Bafilipi 2:3.

16. Ndenge nini toli na Paulo oyo ezali kati na mokanda na ye epai na Bafilipi, ezali kosalisa biso na kolónga ezaleli ya komitómbola?

16 Bobele na mokanda yango moko, Paulo alendisi biso ete ‘totalela bamosusu lokola ete baleki biso,’ na lolenge na solo mpenza mpe “na elimo ya komikitisa.” Tala oyo ekeseni mpenza na ezaleli na koluka komitómbola! Mposa ya liboso ya moklisto oyo ateli na elimo, ezali te ya koluka bobele ete makanisi na ye mandimama, to koluka komilóngisa, to koluka kobatela etelemelo na ye mpe lokumu na ye. Ezalela ya elimo wana etemeli elendiseli ya Paulo, oyo esengi na moklisto ete ‘atalela bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.’​—Bafilipi 2:4; 1 Petelo 5:2, 3, 6.

Maloba na kimya

17. Lolenge nini mabe ya kosalela lolemo ekoki kobebisa kimya ya lisangá?

17 Ye oyo azali kolanda kimya akosenzelaka mpenzampenza na lolenge oyo azali kosalela lolemo na ye. Yakobo alobi ete: “Lolemo ezali eteni moke na nzoto, nde ekomikumisaka mpo na makambo minene. Tala móto moke oyo ekozikisaka zamba monene!” (Yakobo 3:5, MN) Kotónga, koloba maloba mabe na ntina na bato mosusu wana bazali te, kobimisa maloba na lofundo mpe ya makasi, koïmaïma mpe komilelalela, koloba maloba kitoko na bokosi na elikya ya kozwa litomba na yo moko, makambo nyonso wana mazali misala ya nzoto oyo mizali kobebisa kimya ya libota na Nzambe.​—1 Bakolinti 10:10; 2 Bakolinti 12:20; 1 Timoté 5:13; Yuda 16.

18. (a) Soko moto moko asaleli lolemo na ye na lolenge mabe kozanga kokanela yango, ndenge nini moto yango mpe ye oyo azokisami na motema, basengeli kosala? (b) Ndenge nini baklisto bateli na elimo bakoki kosala, wana moto moko abimisi maloba mazali kozokisa motema mpo ete azali na nkanda?

18 Ya solo, Yakobo alobi ete: “Moto te akoki kobatela lolemo na ye.” (Yakobo 3:8, MN) Ata baklisto bateli na elimo bakolobaka mbala mosusu makambo oyo bayokaka mawa mpenza na nsima. Biso banso tolikyaka ete bato mosusu balimbisa mabunga na biso wana, lokola biso tokolimbisaka oyo na bango. (Matai 6:9, 10) Ekoki kokóma ete nkanda makasi ebimisi maloba makozokisa. Ezali na ntango wana nde moto oyo akotyaka kimya akomikundola likanisi oyo ete: “Eyano na bobóto ekosilisaka nkanda, kasi liloba lya makasi likopelisaka nkele.” (Masese 15:1, Liloba lya Nzambe) Mbala mingi, ekoki na ye bobele ete apema mpenza mpe aboya kozongisa maloba na nkanda epai na maloba mosusu ya nkanda. Na nsima, ntango kimya ezongi, moto oyo akotyaka kimya, oyo na bobóto, akobosana maloba oyo mabimaki likoló na nkanda. Epai mosusu, moklisto na komikitisa ayebi kosenga bolimbisi, mpe akosalaka makasi mpo na kobongisa bampóta oyo ye azokisaki. Kozala na makoki ya koloba na solo mpenza ete “Limbisa ngai,” ezali elembo monene na bizaleli malamu.

19. Toyekoli nini na ntina na Paulo mpe Yesu mpo na lolenge ya kopesa batoli?

19 Tokoki mbala mosusu kosalela lolemo na biso mpo na kopesa toli epai na bato mosusu. Na Antiokia, Paulo apamelaki Petelo liboso na bato nyonso, mpamba te ye asalaki malamu te. Mpo Yesu atindaki epai na masanga nsambo ezali na batoli ya nguya mingi. (Bagalatia 2:11-14; Emoniseli mokapo 2 mpe 3) Na koyekoláká bandakisa yango, tozali komona ete toli esengeli te kopesama na bopólo eleki ndelo, mpamba te soki bongo, moto oyo apesameli yango akokanga ntina na yango te. Nzokande, ata Yesu to mpe Paulo, banso mibale basalelaki te maloba makasi to mpe maloba na koboma. Bazalaki te kopesa bato mosusu toli mpo na kokitisa nkanda na bango. Kasi, bazalaki nde komeka kosalisa mpenza bandeko na bango. Soki moto oyo azali kopesa toli azali na mayoki oyo ete, ayebi kopekisa lolemo na ye te, asengeli mbala mosusu kopema mpe kozanga koloba mwa moke liboso ete abimisa soko likambo nini. Soki te, akoki kobimisa maloba makasi mpe ekoyeisa mindondó mingi koleka matáta oyo ye azali komeka kosilisa.​—Masese 12:18.

20. Bizaleli nini bisengeli komonana ntango nyonso kati na makambo oyo tozali koloba epai na bandeko na biso to mpe na oyo tozali koloba na ntina na bango?

20 Lokola touti koloba yango sikawa, kimya mpe bolingo ekotambolaka elongo, mpo ete ezali mbuma ya elimo. Soki nyonso oyo ezali biso koloba epai na bandeko na biso​—to na ntina na bandeko na biso​—ezali komonisa bolingo na biso epai na bango, tozali bongo kotya kimya kati na lisangá. (Yoane 15:12, 13) Maloba na biso masengeli kozala ‘kitoko mpe na elengi na mongwa.’ (Bakolose 4:6) Tokoki koloba ete, masengeli kozala na elengi mpe kobenda motema. Yesu apesaki toli oyo ete: “Bozala na mongwa kati na bino, mpe bozalana na kimya.”​—Malako 9:50.

‘Tosala nyonso oyo ekoki na biso’

21. Nini esili komonana epai na basaleli na Nzambe na makita na bango ya poso na poso mpe na ba assemblées?

21 Mokomi na Nzembo ekomamaki ete: “Tala lokola ezali malamu mpe na esengo ete bandeko bafanda esika moko kati na motema moko.” (Nzembo 133:1) Solo mpenza, tozali na esengo ya kozala elongo na bandeko na biso, mingi mpenza na ntango ya makita ya poso na poso mpe na koyangana minene oyo ezali bongo ba assemblées na biso. Na bantango wana, ata bapaya bakomonaka kimya oyo ezali kati na biso.

22. (a) Mosika te, mabota bakokanisa ete batye kimya nini ya lokuta, mpe nsuka ekozala nini? (b) Kimya nini ya solo ekotyama na kondimana na kimya oyo esalemi na Nzambe?

22 Mosika te, mabota bakoloba ete basii kotya kimya kozanga ete Jéhovah asala yango.Kasi na ntango bakoloba “Kimya, makambo mazali te,” libebi ekoya pwasa likoló na baoyo nyonso bazali na kimya te elongo na Nzambe. (1 Batesalonike 5:3) Lisusu, Mokonzi monene na kimya akobikisa bato na makambo nyonso na mpasi mauti na kobeba na kimya oyo ezalaki na ebandeli kati na Nzambe mpe moto. (Yisaya 9:6, 7; Emoniseli 22:1, 2) Na yango, kondimana na kimya oyo esalemi na Nzambe, ekobimisa mokili ya esengo. Ata banyama ye zamba bakozala lisusu na monguna te.​—Nzembo 37:10, 11; 72:3-7; Yisaya 11:1-9; Emoniseli 21:3, 4.

23. Tosengeli kosala nini uta sikawa, soki tosepeli mpenza na elikya ya mokili na sika na kimya?

23 Ekozala eleko kitoko mpenza. Ozali nde kozela yango na motema likoló? Na bongo “landa kozala na kimya elongo na bato nyonso.” Uta sikawa, luka kozala na kimya elongo na bandeko na yo, mpe mingi mpenza elongi na Jéhovah. Ee, “awa ezali bino kozela makambo oyo, botya etingya ete bozwana na ye ne kozanga litónó mpe na likambo te kati na kimya.”​—Baebele 12:14, MN; 2 Petelo 3:14.

Bozongeli

◻ Nini ekoki kobebisa kimya na biso elongo na Jehovah?

◻ Matáta nini masengeli mbala mosusu kosalisama kati na lisangá?

◻ Jéhovah azali kopesa biso nini mpo na kosalisa biso na koluka kimya mpe kolanda yango?

◻ Bizaleli nini ya nzoto bikoki kobebisa kimya ya lisangá, mpe ndenge nini tokoki kobundisa bizaleli yango?

[Elilingi na lokasa 22]

Kimya etondi kati na baoyo balakisami na Jéhovah

[Elilingi na lokasa 24]

Bandeko oyo bazali kosala na bomoko, bazali na kimya kitoko

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto