Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/11 nk. 13-18
  • Bazali konyokwama, kasi bazali na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali konyokwama, kasi bazali na esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Konyokwama mpo na boyengebene
  • Bazali kolobela bango mabe mpo na Klisto
  • Esengo ya konyokwama lokola basakoli
  • Bantina ya solosolo ya kozala na esengo
  • Tópumbwa na esengo mpo na mbano
  • Tozali konyokwama mpo na boyengebene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Makambo oyo epesaka mpenza moto esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bósepela ntango bazali konyokola bino
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Okoki koyikela minyoko mpiko
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/11 nk. 13-18

Bazali konyokwama, kasi bazali na esengo

“Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai.”​—MATAI 5:11.

1. Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini na likambo etali kozala na esengo mpe konyokwama?

NTANGO Yesu atindaki bantoma na ye mpo na mbala ya liboso ete bákende kosakola Bokonzi, ayebisaki bango liboso ete bato bakotɛmɛla bango. Alobaki na bango boye: “Bokozala biloko ya koyinama na bato nyonso mpo na nkombo na ngai.” (Matai 10:5-18, 22) Kasi, mwa liboso, ntango asalaki Lisolo Likoló ya Ngomba, ayebisaki bantoma na ye ná bato mosusu ete botɛmɛli wana ekolongola esengo na bango te. Kutu, Yesu amonisaki ete bakozala na esengo ntango bazali konyokola bango mpo bazali baklisto! Ndenge nini monyoko ekoki kopesa esengo?

Konyokwama mpo na boyengebene

2. Na kolanda maloba ya Yesu ná ya ntoma Petelo, konyokwama ya ndenge nini epesaka esengo?

2 Yesu alobelaki ntina ya mwambe ya kozala na esengo boye: “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Matai 5:10) Monyoko yango moko ezalaka na litomba moko te. Ntoma Petelo akomaki boye: “Litomba nini ezali soki, ntango bozali kosala lisumu mpe kobɛtama mbata, bozali kokangela yango motema? Kasi soki, ntango bozali kosala malamu mpe bozali konyokwama, bozali kokangela yango motema, yango ezali likambo malamu epai ya Nzambe.” Na nsima abakisaki boye: “Nzokande, moko te na kati na bino anyokwama mpo azali mobomi-bato to moyibi to mosali-mabe to mpo azali moto oyo amikɔtisaka na makambo ya bato mosusu. Kasi soki azali konyokwama mpo azali moklisto, ayoka nsɔni te, kasi akoba nde kopesa Nzambe nkembo na nkombo yango.” (1 Petelo 2:20; 4:15, 16) Maloba ya Yesu emonisi ete moto azalaka na esengo soki azali konyokwama mpo na boyengebene.

3. (a) Konyokwama mpo na boyengebene elimboli nini? (b) Baklisto ya liboso basalaki nini ntango banyokolaki bango?

3 Moto amonisaka boyengebene ya solosolo soki azali kosala mokano ya Nzambe mpe kotosa mibeko na ye. Yango wana, konyokwama mpo na boyengebene elimboli konyokwama mpo toboyi kobuka mibeko ya Nzambe to kokokisa te masɛngami na ye. Bakonzi ya Bayuda banyokolaki bantoma mpo baboyaki kotika kosakola na nkombo ya Yesu. (Misala 4:18-20; 5:27-29, 40) Yango ekitisaki esengo na bango to batikaki kosakola? Te! “Balongwaki liboso ya Sanedrina, kosepeláká mpamba te batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye. Mpe mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.” (Misala 5:41, 42) Konyokwama wana epesaki bango esengo mpe ebakiselaki bango molende ya kosakola. Nsima ya bambula, bakonzi ya Loma bakómaki konyokola baklisto ya liboso mpo bazalaki koboya kosambela mokonzi ya Loma.

4. Tángá mwa bantina oyo baklisto bazali konyokwama?

4 Na ntango na biso, Batatoli ya Yehova bazali konyokwama mpo bazali kotika te kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Matai 24:14) Soki bapekisi makita na bango, bandimaka konyokwama na esika ya kotika koyangana, likambo oyo Biblia ezali kosɛnga bango. (Baebele 10:24, 25) Bazali konyokola bango mpo baboyaka kokɔta na makambo ya mokili to mpe mpo baboyaka bázongisa bango makila. (Yoane 17:14; Misala 15:28, 29) Atako bongo, makambo wana oyo basaleli ya Nzambe lelo oyo bazali kosala mpo balingi boyengebene ezali kopesa bango kimya mpe esengo na mitema.​—1 Petelo 3:14.

Bazali kolobela bango mabe mpo na Klisto

5. Wapi ntina monene oyo bazali konyokola basaleli ya Yehova lelo oyo?

5 Ntina ya libwa oyo Yesu alobaki ya esengo etaleli mpe konyokwama. Alobaki boye: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai.” (Matai 5:11) Ntina monene oyo basaleli ya Yehova bazali konyokwama ezali mpo bazali te bato ya mokili oyo etondi na mabe. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.” (Yoane 15:19) Ntoma Petelo mpe alobaki boye: “Lokola bozali te kokoba kopota elongo na bango na kati ya nzela yango mpo na kokende na libulu moko wana ya pɔtɔpɔtɔ ya misala ya mbindo, batungisami mpe bazali kokoba kofinga bino.” ​—1 Petelo 4:4.

6. (a) Mpo na nini bato bazali kolobela batikali ná baninga na bango mabe mpe bazali konyokola bango? (b) Mpo nini makambo yango ezali kokitisa esengo na biso te?

6 Tomonaki ete bazalaki konyokola baklisto ya liboso mpo baboyaki kotika kosakola na nkombo ya Yesu. Klisto alobaki na bayekoli na ye boye: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Bandeko ya sembo ya Klisto bapakolami na elimo oyo bazali naino awa na mabelé bazali kokokisa mosala yango na molende mpe baninga na bango ya sembo, “ebele ya bato,” bazali kopesa bango mabɔkɔ. (Emoniseli 7:9) Yango wana, Satana azali kobundisa ‘bato ya momboto ya mwasi yango [ebongiseli ya Nzambe oyo ezali na likoló] oyo batikali, oyo bazali kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.’ (Emoniseli 12:9, 17) Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tozali kotatola na ntina na Yesu, Mokonzi oyo azali sikoyo koyangela na Bokonzi oyo ekolongola baguvɛrnema ya bato oyo ezali kopekisa bato bátya elikya na bango na mokili ya sika ya Nzambe. (Danyele 2:44; 2 Petelo 3:13) Yango wana bazali kolobela biso mabe mpe konyokola biso, kasi biso tozali na esengo mpo tozali konyokwama mpo na nkombo ya Klisto.​—1 Petelo 4:14.

7, 8. Makambo nini banguna ya baklisto bazalaki kokosela bango?

7 Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozala na esengo ata ntango bato bazali ‘kokosela bango makambo mabe ya ndenge nyonso’ mpo na ye. (Matai 5:11) Yango esalemaki epai ya baklisto ya liboso. Ntango ntoma Paulo azalaki mokangami na Loma, kobanda soki na mobu 59 tii 61 ya ntango na biso (T.B.), bato minene na kati ya Bayuda ya engumba yango balobaki mpo na baklisto boye: “Ya solo na oyo etali mwa lingomba wana biso toyebi ete bipai nyonso bato bazali kolobela yango mabe.” (Misala 28:22) Bafundaki Paulo ná Silasi ete “bazali kosala makambo na kotɛmɛla mibeko ya Kaisala,” yango wana “basili kobalola mabelé oyo efandami.”​—Misala 17:6, 7.

8 Na ntina na baklisto na ntango ya bokonzi ya Loma, Kenneth Latourette, moto ya mayele na masolo ya kala, akomaki boye: “Bazalaki kofunda bango na makambo ndenge na ndenge. Lokola baklisto bazalaki koboya kosala milulu ya bapakano, bazalaki koloba na bango ete bandimaka Nzambe te. Lokola bazalaki kokɔta te na makambo mingi oyo ezalaki kosalema na mboka​—bafɛti ya bapakano, masano oyo ebele ya bato bazalaki kosepela na yango . . . ​—bazalaki kobenga bango bayini ya bato. . . . Bazalaki kokosela bango makambo ete bazalaki kokutana na butu basi ná mibali . . . mpe bazalaki kosangisa nzoto. . . . Lokola baklisto bazalaki kosala [Ekaniseli ya liwa ya Klisto] na esika oyo bazali kaka bango na bango bandimi, bapanzaki bango nsango ete mbala na mbala bazalaki kopesa mwana moko ya moke lokola mbeka mpe bazalaki komɛla makila na ye mpe kolya mosuni na ye.” Lisusu, lokola baklisto ya liboso bazalaki koboya kosambela amperɛrɛ, bazalaki koloba ete bazali banguna ya Leta.

9. Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosala nini ntango bazali kokosela bango makambo, mpe lelo makambo ezali ndenge nini?

9 Makambo wana ya lokuta epekisaki te baklisto ya liboso bákokisa mokumba na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Na mobu 60-61 T.B., Paulo alobaki ete “nsango malamu” ezalaki ‘kobota mbuma mpe kokola na kati ya mokili mobimba’ mpe ete nsango yango “esakolamaki na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.” (Bakolose 1:5, 6, 23) Ezali mpe ndenge yango na moi ya lelo. Bazali kokosela Batatoli ya Yehova makambo, ndenge kaka bazalaki kokosela baklisto ya ekeke ya liboso. Atako bongo, lelo oyo mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali se kokende liboso mpe ezali kopesa baoyo bazali kosala yango esengo mingi.

Esengo ya konyokwama lokola basakoli

10, 11. (a) Ndenge nini Yesu asukisaki maloba na ye ntango alobelaki ntina ya libwa ya kozala na esengo, mpe mpo na nini? (b) Mpo na nini banyokolaki basakoli? Pesá bandakisa.

10 Ntango Yesu alobaki ntina ya libwa ya kozala na esengo, asukisaki na maloba oyo: “Bósepela . . . , mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Matai 5:12) Bayisalaele oyo bazalaki lisusu sembo te bazalaki koyamba malamu te basakoli oyo Yehova azalaki kotinda mpo na kokebisa bango mpe mbala mingi bazalaki konyokola bango. (Yilimia 7:25, 26) Ntoma Paulo alobelaki likambo yango ntango akomaki boye: “Nakoloba lisusu nini? Mpo ntango ekozanga ngai soki nakobi mpo na kolobela . . . basakoli mosusu, baoyo na nzela ya kondima . . . bazwaki oyo ya bango komekama na ndenge ya kosɛka bango mpe kobɛta bango fimbo, kutu, koleka ata oyo wana, na ndenge ya minyɔlɔlɔ mpe babolɔkɔ.”​—Baebele 11:32-38.

11 Ntango Mokonzi Ahaba, moto mabe, azalaki koyangela ná mwasi na ye Yezabele, basakoli ya Yehova mingi babomamaki na mopanga. (1 Mikonzi 18:4, 13; 19:10) Batyaki mosakoli Yilimia na ekanga-makolo mpe na nsima, babwakaki ye na libulu ya pɔtɔpɔtɔ. (Yilimia 20:1, 2; 38:6) Mosakoli Danyele abwakamaki na libulu ya bankɔsi. (Danyele 6:16, 17) Basakoli nyonso wana ya kala banyokwamaki mpo bazalaki koloba mpo na losambo ya pɛto ya Yehova. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda banyokolaki basakoli mingi. Yesu abengaki bakomeli ná Bafalisai “bana ya baoyo babomaki basakoli.” ​—Matai 23:31.

12. Mpo na nini biso Batatoli ya Yehova tomonaka ete ezali lokumu konyokwama mpo na ntina oyo basakoli ya ntango ya kala banyokwamaki?

12 Lelo oyo, mbala mingi bazali konyokola biso Batatoli ya Yehova mpo tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende. Banguna na biso bazali koloba ete tozali “koluka bandimi na makasi,” kasi toyebi ete bazalaki koloba na basambeli ya Yehova oyo bazalaki liboso na biso kaka ndenge wana. (Yilimia 11:21; 20:8, 11) Mpo na biso, ezali lokumu konyokwama mpo na ntina oyo basakoli ya sembo ya ntango ya kala banyokwamaki. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Bandeko, bókamata lokola ndakisa ya kokanga motema na kati ya mpasi mpe ya komonisa motema molai basakoli, oyo balobaki na nkombo ya Yehova. Talá! Tolobaka ete baoyo basili koyika mpiko bazali bato ya esengo.”​—Yakobo 5:10, 11.

Bantina ya solosolo ya kozala na esengo

13. (a) Mpo na nini minyoko elɛmbisaka biso te? (b) Nini epesaka biso makasi ya kotikala ngwi, mpe yango ezali komonisa nini?

13 Na esika tólɛmba mpo bazali konyokola biso, tozali kobɔndisama na koyeba ete tozali kolanda lokolo ya basakoli, ya baklisto ya liboso, mpe ya Klisto Yesu ye moko. (1 Petelo 2:21) Maloba ya Biblia ezali kolendisa biso makasi, na ndakisa maloba ya ntoma Petelo oyo: “Balingami, bómitungisa te mpo na mɔtɔ oyo ezali kopela na kati na bino, oyo ezali kokómela bino mpo na komekama, lokola nde likambo moko ya kokamwa ezali kokwela bino. Soki bozali kolobelama mabe mpo na nkombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, mpamba te elimo ya nkembo, ɛɛ elimo ya Nzambe, ezali kofanda likoló na bino.” (1 Petelo 4:12, 14) Makambo mingi oyo tokutani na yango ezali komonisa ete soki tozali kotikala ngwi na ntango ya minyoko, ezali kaka mpo elimo ya Yehova ezali na biso mpe ezali kopesa biso makasi. Lisungi ya elimo santu ezali komonisa ete Yehova azali kopambola biso, mpe yango ezali kopesa biso esengo mingi.​—Nzembo 5:12; Bafilipi 1:27-29.

14. Bantina nini tozali na yango ya kozala na esengo ntango tozali konyokwama mpo na boyengebene?

14 Ntina mosusu oyo tozalaka na esengo ntango tozali konyokwama mpo na boyengebene ezali mpo yango emonisaka ete tozali komitambwisa lokola baklisto ya solo oyo bakangami na Nzambe. Ntoma Paulo akomaki boye: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Toyokaka esengo mingi na koyeba ete soki tozali kotikala sembo ntango bazali konyokola biso, emonisaka lisusu malamumalamu ete Satana akosaki ntango alobaki ete bikelamu nyonso basalelaka Yehova kaka mpo na matomba na bango. (Yobo 1:9-11; 2:3, 4) Tozali na esengo ya koyeba ete biso mpe tozali komonisa, ata mwa moke, ete Yehova kaka nde abongi kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba.​—Masese 27:11.

Tópumbwa na esengo mpo na mbano

15, 16. (a) Wapi ntina oyo Yesu alobaki ete tosengeli ‘kosepela mpe kopumbwa na esengo’? (b) Mbano nini ebombami na likoló mpo na baklisto bapakolami, mpe baninga na bango “bampate mosusu” bakozwa mbano nini?

15 Yesu abakisaki ntina mosusu ya kozala na esengo ntango bazali kolobela biso mabe mpe konyokola biso ndenge basalaki basakoli ya kala. Ntango alobaki ntina ya libwa ya kozala na esengo, liboso asukisa alobaki boye: “Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló.” (Matai 5:12) Ntoma Paulo akomaki boye: “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) ‘Mbano monene’ yango ezali bomoi; yango ezali te lifuta oyo tokoki kozwa na makasi na biso moko. Ezali likabo. Yesu alobaki ete mbano ezali “na likoló” mpo Yehova nde akopesa yango.

16 Bapakolami bazwaka “motole ya bomoi,” yango elingi koloba mpo na bango, bomoi oyo ekoki kokufa te pembeni ya Klisto na likoló. (Yakobo 1:12, 17) “Bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé, bazali kozela libula ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Yoane 10:16; Emoniseli 21:3-5) Mpo na bituluku yango mibale, “mbano” wana ezali te lifuti oyo bazwi na makasi na bango moko. Ezala bapakolami to “bampate mosusu,” bango nyonso bazwi mbano yango na “boboto monene ya [Yehova] oyo eleki mpenza,” oyo etindaki ntoma Paulo aloba ete: “Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.”​—2 Bakolinti 9:14, 15.

17. Mpo na nini tokoki kosepela mpe, na maloba ya elilingi, ‘kopumbwa na esengo’ ntango bazali konyokola biso?

17 Epai ya baklisto oyo, mwa moke na nsima Amperɛrɛ Néron anyokolaki bamosusu kati na bango, ntoma Paulo akomaki boye: “Tósepela ntango tozali na kati ya malɔzi, mpamba te toyebi ete bolɔzi ebotaka ezaleli ya koyika mpiko; ezaleli ya koyika mpiko, na ngala na yango, kondimama; kondimama, na ngala na yango, elikya, mpe elikya yango eyokisaka mawa te.” Mpe abakisaki ete: “Bósepelaka na kati ya elikya. Bóyika mpiko na kati ya bolɔzi.” (Baloma 5:3-5; 12:12) Tózala na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabelé, mbano oyo tokozwa soki totikali sembo ntango tozali kozwa minyoko ezali monene koleka eloko nyonso oyo tobongi kozwa na makasi na biso. Elikya ya kozala na bomoi libela na libela mpo na kosalela mpe kosanzola Tata na biso ya bolingo, Yehova, na litambwisi ya Mokonzi na biso Yesu Klisto, ezali kopesa biso esengo ya koloba te. Na maloba ya elilingi, tozali ‘kopumbwa na esengo.’

18. Lokola nsuka ezali se kokóma pene, tokoki kolikya ete bikólo ekosala nini, mpe na ntango yango Yehova akosala nini?

18 Na mikili mosusu, babandá konyokola Batatoli ya Yehova kala mpe bazali konyokola bango tii lelo. Na esakweli oyo alobelaki nsuka ya ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo, Yesu ayebisaki baklisto ya solo boye: “Bokozala biloko ya koyinama na bikólo nyonso mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Lokola tozali kokóma pene na nsuka, Satana akotinda bikólo eyina basaleli ya Yehova. (Ezekiele 38:10-12, 14-16) Na ntango yango nde Yehova akotɛlɛma. “Boye nakomonisa lokumu na ngai mpe [bosantu] na ngai, mpe nakomiyebisa na miso ya mabota mingi, mpe bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].” (Ezekiele 38:23) Na bongo, Yehova akosantisa nkombo na ye monene mpe akolongola basaleli na ye na monyoko. Yango wana, “esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko.”​—Yakobo 1:12.

19. Tosengeli kosala nini ntango tozali kozela ‘mokolo’ monene ‘ya Yehova’?

19 Lokola ‘mokolo monene ya Yehova’ ezali kokóma pene, tósepela mpamba te ‘tozali kotángama bato oyo babongi kosambwisama’ mpo na nkombo ya Yesu. (2 Petelo 3:10-13; Misala 5:41) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, tiká ete tókoba na ‘kozanga kotika, koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto’ mpe Bokonzi na ye wana tozali kozela mbano na mokili ya boyengebene ya Yehova. ​—Misala 5:42; Yakobo 5:11.

Bozongeli

• Konyokwama mpo na boyengebene elimboli nini?

• Baklisto ya liboso basalaki nini ntango bazalaki konyokola bango?

• Mpo na nini tokoki koloba ete Batatoli ya Yehova bazali konyokwama ndenge basakoli ya kala banyokwamaki?

• Mpo na nini tokoki ‘kosepela mpe kopumbwa na esengo’ ntango bazali konyokola biso?

[Bililingi na lokasa 16]

“Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino”

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bato ya bolɔkɔ: Chicago Herald-American

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto