Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 86 lok. 200-lok. 201 par. 1
  • Yesu asekwisi Lazare

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu asekwisi Lazare
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Yesu awelaki kokende te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tokokóma ndenge nini soki tokufi?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • “Nasilá kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Lisekwa mpe bomoi”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 86 lok. 200-lok. 201 par. 1
Lazare oyo auti kosekwisama elongo na bandeko na ye ya basi, Maria ná Marta

LITEYA 86

Yesu asekwisi Lazare

Yesu azalaki na baninga misato ya motema oyo bazalaki kofanda na Betania. Baninga yango ezalaki Lazare ná bandeko na ye ya basi mibale, Maria ná Marta. Mokolo moko, ntango Yesu azalaki na ngámbo mosusu ya Yordani, Maria ná Marta batindelaki ye nsango ya mbalakaka: ‘Lazare azali kobɛla makasi. Tobondeli yo, yaká noki!’ Kasi Yesu akendaki mbala moko te. Azelaki mikolo mibale mobimba, na nsima ayebisaki bayekoli na ye boye: ‘Tókende na Betania. Lazare alali, mpe nakei kolamusa ye.’ Bantoma balobaki na ye ete: ‘Soki Lazare alali, yango ekosalisa ye ayoka malamu.’ Bongo Yesu ayebisaki bango polele: ‘Lazare akufi.’

Ntango Yesu akómaki na Betania, mikolo minei elekaki banda bakundaki Lazare. Bato ebele bayaki kobɔndisa Marta ná Maria. Ntango Marta ayokaki ete Yesu akómi, akendaki mbangu kokutana na ye. Alobaki na ye: “Nkolo, soki ozalaki awa, mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” Yesu azongiselaki ye: ‘Ndeko na yo akozonga na bomoi. Marta, ondimi yango?’ Marta alobaki: ‘Nandimi ete akosekwa.’ Yesu azongiselaki ye ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.”

Na nsima, Marta akendaki epai ya Maria mpe ayebisaki ye ete: ‘Yesu azali awa.’ Maria akendaki mbangu epai ya Yesu mpe bato ebele balandaki ye. Akweaki na makolo ya Yesu mpe azalaki kaka kolela. Ayebisaki Yesu ete: “Nkolo, soki ozalaki awa, mbɛlɛ ndeko na biso ya mobali akufaki te!” Yesu amonaki ndenge azalaki konyokwama, ye mpe abandaki kolela. Ntango ebele yango ya bato bamonaki ye na mai ya miso, balobaki: ‘Ya solo, Yesu alingaki Lazare mingi.’ Kasi bato mosusu bamitunaki: ‘Mpo na nini abikisaki moninga na ye te?’ Yesu akosala nini?

Yesu akendaki na lilita mpe libanga ya monene ezipaki monɔkɔ na yango. Alobaki na bato: ‘Bólongola libanga.’ Marta ayebisaki ye: ‘Esali mikolo minei! Nzoto na ye esengeli kolumba nsolo.’ Atako bongo, balongolaki libanga, mpe Yesu abondelaki ete: ‘Tata, matɔndi mpo oyokaka ngai. Nayebi ete oyokaka ngai ntango nyonso, kasi nazali koloba makasi mpo bato oyo báyeba ete yo moto otindi ngai.’ Na nsima, abelelaki: “Lazare, bimá!” Likambo moko ya kokamwa esalemaki: Lazare abimaki na lilita, bilamba ya lini ezingaki ye nzoto mobimba. Yesu alobaki: “Bófungola ye mpe bótika ye akende.”

Bato mingi oyo bamonaki likambo yango, bandimelaki Yesu. Kasi bato mosusu bakendaki koyebisa Bafarisai. Banda mokolo wana, Bafarisai bazalaki koluka koboma Lazare ná Yesu. Yudasi Mokeriota, moko ya bantoma na ye 12, akendaki na mayele epai ya Bafarisai mpe atunaki bango: ‘Bokopesa ngai mbongo boni soki nasalisi bino bózwa Yesu?’ Bayokanaki bápesa ye shekele ya palata 30, mpe Yudasi abandaki koluka libaku ya kokaba Yesu epai ya Bafarisai.

“Nzambe ya solo azali Nzambe oyo abikisaka; Mpe Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso abikisaka na liwa.”​—Nzembo 68:20

Mituna: Lobelá ndenge Lazare asekwisamaki. Bafarisai bakanaki kosala nini ntango bayokaki makambo ya Lazare?

Matai 26:14-16; Yoane 11:1-53; 12:10

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto