Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/7 nk. 8-9
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Elambo ya ekaniseli
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bilei ya mpokwa ya Nkolo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Batɛki Kristo mpe bakangi ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala naye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/7 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Elambo ya ekaniseli

NSIMA wana Yesu asokolaki makolo na bantoma na ye, atangaki mokapo ya Nzembo 41:9, na kolobáká ete: “Ye oyo alei bilei na ngai elongo alombweli ngai likáká na ye.’’ Lisusu, na koyokáká mpasi na motema, alimbolaki ete: “Moko na bino akokaba ngai.”

Bayekoli babandaki koyoka mpasi na mitema mpe moko moko atunaki Yesu ete: “Ezali ngai?” Ata Yuda lskariote atunaki ye motuna yango. Yoane, oyo azalaki na mesa penepene na Yesu, abongwanaki na ntolo na Yesu mpe atunaki ye: “Nkolo, ye nani?”

Yesu ayanolaki ete: “Ezali moko na bazomi na mibale, oyo azali kotya misapi na ye kati na saani esika moko na ngai. Ya solo, Mwana na moto akokenda, lokola ekomami na ye, kasi mawa na moto oyo akokaba Mwana na moto! Eleki na malamu mpo na moto yango soko abotamaki te.’’ Nsima na yango, Satana akótaki lisusu epai na Yuda, mpamba te libaku epesamelaki ye na ndenge motema na Yuda ekomaki mabe. Nsima ya mwa ngonga na mpokwa yango, mpe na ndenge elongobani, Yesu abyangaki Yuda “mwana na libebi”.

Sikawa alobaki na Yuda ete: ’’Yango ekosala yo, sala nokinoki.” Moko na bantoma na ye akangaki ntina na oyo alobaki te. Bamosusu bakanisaki ete, lokola Yuda abatelaki ebombelo na mosolo, Yesu ayebisaki ye ete: “Somba yango esengi biso mpo na elambo”, to asengelaki kokenda kopesa mwa eloko epai na babola.

Nsima wana Yuda abimaki, Yesu abandisaki molulu, to ekaniseli elongo na bantoma na ye basembwi, likambo yango ezalaki ya sika mpenza. Azwaki limpa, atondaki, abukaki yango mpe apesaki bango na kolobáká ete: “Bokamata bolia.” Mpe alimboli: “Oyo elakisi nzoto na ngai, ekopesama mpo na bino. Sala boye mpo na ekaniseli na ngai.”

Ntango bango nyonso baliaki limpa, Yesu akamataki kopo ya vinyo, na ndenge ezali komonana ezalaki kopo ya minei na ntango oyo bazalaki kolya elambo na paque, atondaki, apesaki bango mpe asengaki bango bamela vinyo oyo ezalaki na kati, na kolobaka ete: “Kopo oyo emonisi kondimana na sika na makila na ngai, masengeli kosopana mpo na bino.”

Na kosalaka bongo, abandisaki ekaniseli ya liwa na ye. Mbula na mbula, le 14 Nisan, likambo yango esengeli kozongelama, lokola Yesu alobaki yango, mpo na ekaniseli na ye. Ezali kokundola epai na baoyo bazali kokumisa yango oyo Yesu mpe Tata na ye na likoló basalaki mpo na kosikola bato na etumbu ya liwa. Mpo na Bayuda oyo basengelaki kozala bayekoli na Klisto, molulu yango ezwaki esika ya Paque.

Na nzela na makila na Yesu oyo masopamaki. Kondimana ya sika ezwaki esika na Kondimana ya kala, oyo na Mibeko. Yesu azali moyokanisi na kondimana yango oyo esalami kati na biteni mibale ngambo moko, ezali Jéhovah Nzambe, mpe ngambo mosusu, ezali ba 144 000 baklisto bapakolami na elimo. Longola likoki ya kolimbisa masumu, kondimana yango ezali kopesa nzela ete libota ya bakonzi mpe banganga na likoló ekoka kosalema.Matai 26:21-29; Malako 14:18-25; Luka 22:19-23; Yoane 13:18-30; 17:12; 1 Bakolinti 5:7.

◆ Yesu atangaki esakweli nini na Biblia na ntina etali moninga na ye ya mosala, mpe asaleli yango ndenge nini?

◆ Mpo na nini bantoma bayokaki mpasi na mitema, mpe moko moko atunaki motuna nini?

◆ Yesu alobi na Yuda asala nini, kasi ndenge nini

bamosusu bakangaki ntina ya maloba yango?

◆ Molulu nini Yesu abandisaki nsima wana Yuda abimaki mpe ezalaki na mokano nini?

◆ Biteni nini mibale biyokanisami na kondimana na sika mpe epesi nzela ya kokokisa likambo nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto