Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/4 nk. 18-22
  • Kosambisa moko ya mabe mpenza oyo esalemá naino te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosambisa moko ya mabe mpenza oyo esalemá naino te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balandaki mibeko te na ntango ya kosambisa
  • Liboso ya Pilate
  • Makambo oyo bato ya mayele balobi nsima ya kotalela lisusu lisambisi yango
  • Bakabi Yesu mpe bakei koboma ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Nsima ya kosamba na Sanedrina, bamemi ye epai ya Pilate
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Ponsi Pilato azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Yesu bomoi na ye, mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/4 nk. 18-22

Kosambisa moko ya mabe mpenza oyo esalemá naino te

EZALI na makambo mingi te, to mpe ata likambo moko te oyo esambisamá na ntango ya kala oyo eyebani malamu lokola likambo yango. Masolo minei ya Biblia oyo eyebani malamu, oyo babengaka Baevanzile, elobeli ndenge bakangaki Yesu Kristo, basambisaki ye, mpe babomaki ye. Mpo na nini kosambisama yango etaleli yo? Mpamba te, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bákanisaka liwa na ye, oyo esalaki ete kosamba na ye oyo ememaki tii na liwa yango ezala na ntina mingi; mpo tosengeli koyeba soki makambo oyo bafundaki Yesu ezalaki solo; mpe mpo mbeka oyo Yesu apesaki na ndenge andimaki kopesa bomoi na ye ezali na ntina mingi mpo na biso mpe mpo na bomoi na biso na mikolo ezali koya.​—Luka 22:19; Yoane 6:40.

Ntango bazalaki kosambisa Yesu, Palestini ezalaki koyangelama na Baroma. Baroma bazalaki kotikela bakonzi ya lingomba ya Bayuda básambisa bandeko na bango Bayuda na kolanda mibeko ya bango moko, kasi emonani ete bapesaki bango ndingisa te ya kobomaka bato mabe. Na yango, bakonzi ya lingomba ya Bayuda oyo bazalaki banguna ya Yesu nde bakangaki ye, kasi Baroma nde babomaki ye. Mosala na ye ya kosakola ezalaki kotungisa mpenza bakonzi ya lingomba ya ntango wana, yango wana bazwaki ekateli ete Yesu asengeli kokufa. Kasi, balingaki ete kobomama na ye esalema na kolanda mibeko. Ntango profesɛrɛ moko na makambo ya mibeko atalelaki milende oyo basalaki mpo na koboma Yesu, alobelaki likambo yango boye: “Yango ezalaki kosambisa moko ya mabe mpenza oyo esalemá naino te.”a

Balandaki mibeko te na ntango ya kosambisa

Mibeko oyo Moize apesaki Bayisraele, ebengamaki “mibeko oyo eleki mibeko nyonso oyo bato babimisá na malamu.” Nzokande, na ntango ya Yesu, Barabi oyo balingaki kotya mibeko na likambo nyonso, babakisaki mibeko mosusu mingi oyo ezalaki na Biblia te, oyo na nsima, mingi na yango ekomamaki na buku Talmud. (Talá etanda “Mibeko ya Bayuda na basiɛklɛ ya ebandeli,” na lokasa 20.) Kosambisama ya Yesu, eyokanaki nde na mibeko ya Biblia mpe na mibeko mosusu oyo ezali na Biblia te?

Bakangaki Yesu mpo na litatoli ya ndenge moko oyo batɛmwɛ mibale balobaki liboso ya esambiselo mpo na mabe moko oyo asalaki mpenza? Mpo na kokanga moto na kolanda mibeko, esengelaki kosalema bongo. Na siɛklɛ ya liboso, na Palestini, Moyuda oyo amonaki ete babuki mobeko moko boye, azalaki komema efundeli na ye na tribinale na ntango bazuzi batalelaka makambo. Na tribinale, babandaki mbala moko te kosambisa likambo, kasi bazalaki koluka koyeba soki bifundeli oyo bamemeli bango ezali solo. Bato oyo bakokaki kofunda likambo, ezali kaka baoyo bamonaki to bayebi likambo yango ya mabe. Babandaki kosambisa moto soki makambo oyo batɛmwɛ ata mibale balobi ekokani. Litatoli ya batɛmwɛ yango ezalaki efundeli oyo bakokaki kokanga moto mpo na yango. Bazalaki kondima te litatoli ya moto moko kaka. (Kolimbola Mibeko 19:15) Nzokande, na likambo ya Yesu, bakonzi ya Bayuda balukaki kaka “ndenge ya malamu” ya koboma ye. Bakangaki ye ntango “libaku ya malamu” emonanaki, elingi koloba na butu mpe “ntango ebele ya bato bazali zingazinga te.”​—Luka 22:2, 5, 6, 53.

Ntango bakangaki Yesu, ezalaki na likambo moko te oyo bafundaki ye na yango. Banganga-nzambe mpe bato ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda babandaki koluka batɛmwɛ kaka nsima ya kokanga Yesu. (Matai 26:59) Bakokaki te kozwa batɛmwɛ mibale oyo bakoki kopesa litatoli ya ndenge moko. Kutu, koluka batɛmwɛ ezalaki likambo ya tribinale te. avoka moko mpe moto ya istware na nkombo A. Taylor Innes, alobi boye: “Kosambisa moto, mingimingi mpo na likambo oyo ekotya bomoi na ye na likama, kozanga komonisa liboso likambo oyo asengeli kosamba mpo na yango, ezalaki kotalelama lokola likambo ya mabe mingi.”

Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki ye na ndako ya Ana, oyo liboso azalaká nganga-nzambe monene, mpe Ana abandaki kotuna ye mituna. (Luka 22:54; Yoane 18:12, 13) Makambo oyo Ana asalaki ebukaki mibeko oyo emonisaki ete mpo na makambo oyo ezalaki kosɛnga etumbu ya liwa, esengelaki kosambisa yango na moi, kasi na butu te. Lisusu, likambo nyonso oyo ebimi esengelaki kosambisama na miso ya bato nyonso, kasi na kobombama te. Lokola amonaki ete ndenge oyo Ana atunaki ye eyokanaki na mibeko te, Yesu azongiselaki ye ete: “Mpo na nini ozali kotuna ngai? Tuná baoyo bayokaki makambo oyo nalobaki na bango. Talá! Bango bayebi makambo oyo nalobaki.” (Yoane 18:21) Esengelaki Ana atuna nde batɛmwɛ kasi te moto oyo afundami. Eyano oyo Yesu apesaki Ana ekokaki kotinda zuzi ya bosembo alanda ndenge mibeko ezalaki kosɛnga, kasi Ana azalaki na mposa ya kosala na bosembo te.

Eyano oyo Yesu apesaki etindaki polisi moko abɛta ye mbata na elongi​—moko ya makambo oyo ayikelaki mpiko na butu wana. (Luka 22:63; Yoane 18:22) Mobeko oyo ekomamaki na Mitángo mokapo 35, oyo etali bingumba ya ekimelo, emonisi ete basengelaki te konyokola moto oyo afundami tii ntango bazuzi bakomonisa soki azali na ngambo to te. Esengelaki kozala bongo mpo na Yesu.

Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki ye epai ya nganga-nzambe monene Kaifa, epai bakobaki kosambisa ye na butu kozanga kolanda mibeko. (Luka 22:54; Yoane 18:24) Kuna, kozanga kolanda mitinda ya kosambisa, banganga-nzambe balukaki “batatoli ya lokuta bákosela Yesu makambo mpo báboma ye,” kasi ezalaki te na batɛmwɛ mibale oyo balobaki makambo ndenge moko na oyo Yesu alobaki. (Matai 26:59; Marko 14:56-59) Na yango, nganga-nzambe monene alukaki ete Yesu aloba likambo moko oyo ekokweisa ye. Atunaki ye ete: “Ozali kozongisa ata eloko te? Likambo nini bato oyo bazali kofunda yo na yango?” (Marko 14:60) Mayele mabe wana oyo asalelaki eyokanaki soki moke te na mibeko. Innes, moto ya mayele oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Kotuna moto oyo afundami motuna mpe koluka likambo ya kokweisa ye na eyano na ye, eyokanaki te na ndenge bazalaki kosambisa makambo.”

Nsukansuka, tribinale yango etingamaki na likambo moko oyo Yesu alobaki. Ntango batunaki ye ete: “Yo nde Kristo Mwana ya Oyo apambwamá?” Yesu ayanolaki ete: “Ezali ngai; mpe bokomona Mwana ya moto afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe azali koya na mapata ya likoló.” Banganga-nzambe bamonaki ete maloba wana ezali kofinga, mpe “bango nyonso bakweisaki ye ete abongi na liwa.”​—Marko 14:61-64.b

Mibeko ya Moize elobaki ete esengeli kosambisa makambo na miso ya bato nyonso. (Kolimbola Mibeko 16:18; Ruta 4:1) Kasi, na likambo ya Yesu, basalaki na ndenge ya kobombana. Ata moto moko te amekaki to azwaki ndingisa ya koloba mpo na kolongisa ye. Balukaki mpe te koyeba ntina oyo Yesu alobaki ete azali Masiya. Yesu azwaki libaku te ya kobenga batɛmwɛ báloba mpo na ye. Bazuzi basalaki mpe voti na molɔngɔ te mpo na koyeba soki azalaki na ngambo to te.

Liboso ya Pilate

Lokola Bayuda bazalaki na bokonzi ya koboma Yesu te, bamemaki ye liboso ya Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma. Motuna ya liboso oyo Pilate atunaki ezalaki oyo: “Bozali kofunda moto oyo na likambo nini?” Lokola Bayuda bayebaki ete efundeli na bango ya kofinga elobaki eloko te epai ya Pilate, balukaki kotinda ye na makasi ete akatela Yesu etumbu kozanga koluka koyeba likambo oyo asali. Balobaki ete: “Soki moto oyo azalaki mosali mabe te, mbɛlɛ tokabi ye epai na yo te.” (Yoane 18:29, 30) Pilate aboyaki likanisi wana, asɛngaki Bayuda bábimisa efundeli mosusu. Balobaki ete: “Tokuti moto oyo azali kokɔtisa mobulu na ekólo na biso mpe azali kopekisa kofuta Kaisala mpako mpe koloba ete ye nde Kristo mokonzi.” (Luka 23:2) Na yango, batikaki efundeli ya kofinga mpe bakómaki koloba ete atɛki mboka.

Efundeli ete azali “kopekisa kofuta Kaisala mpako” ezalaki lokuta mpe bato oyo bafundaki ye bayebaki yango. Yesu ateyaki bongo te. (Matai 22:15-22) Mpo na efundeli oyo balobaki ete Yesu amikómisi mokonzi, Pilate amonaki mbala moko ete moto oyo azalaki liboso na ye azali motɛmɛli ya Baroma te. Alobaki ete: “Nazwi ye ata na mabe moko te.” (Yoane 18:38) Na boumeli ya kosambisama wana, Pilate azalaki koloba kaka bongo.

Na ebandeli, Pilate alukaki kotika Yesu na kolanda momeseno ya kobimisa moto moko ya bolɔkɔ na mokolo ya Elekeli. Kasi, Pilate asukaki nde na kobimisa Barabasi oyo azalaki motombokisi mpe mobomi bato.​—Luka 23:18, 19; Yoane 18:39, 40.

Likambo oyo Pilate asalaki na nsima mpo na kotika Yesu, eyokanaki te na ndenge ebele ya bato bazalaki kosɛnga. Atindaki bato bányokola Yesu, bálatisa ye elamba ya motane mpe ekɔti ya nzubɛ, bábɛta ye mpe básɛka ye. Pilate alobaki lisusu ete azwi Yesu na likambo te. Ezalaki lokola nde Pilate azali koloba: ‘Banganga-nzambe, oyo nasali ekoki te?’ Mbala mosusu azalaki kokanisa ete ntango bakomona moto wana oyo Baroma banyokolaki, mposa na bango ya kozongisa mabe elingaki kokita, to bakokaki koyokela ye mawa. (Luka 23:22) Kasi, ezalaki bongo te.

“Pilate azalaki kaka koluka ndenge ya kobimisa [Yesu]. Kasi Bayuda bagangaki ete: ‘Soki obimisi moto oyo, ozali moninga ya Kaisala te. Moto nyonso oyo amikómisi mokonzi azali kotɛmɛla Kaisala.’” (Yoane 19:12) Kaisala na ntango wana ezalaki Tibere, amperɛrɛ oyo ayebanaki na ezaleli na ye ya koboma moto nyonso oyo azali kotɛmɛla ye, ezala ata bakonzi ya minene. Pilate autaki kosilikisa Bayuda, yango wana alingaki lisusu te komatisa lisusu nkanda na bango mpo báfunda ye mpe te ete azangi bosembo. Ebele wana ya bato babandaki kokanela mpe kobangisa Pilate na maloba na bango, mpe yango ebangisaki Pilate. Andimaki maloba na bango mpe apesaki nzela ete bábaka Yesu na nzete, moto oyo asalaki likambo te.​—Yoane 19:16.

Makambo oyo bato ya mayele balobi nsima ya kotalela lisusu lisambisi yango

Bato oyo bayekolaka makambo ya mibeko batalelaki masolo ya Baevanzile oyo elobeli ndenge basambisaki Yesu. Balobi ete ezalaki likambo ya nsɔni, babukaki mpenza mibeko. Avoka moko akomi boye: “Ndenge kosambisama yango ebandaki na butu mpe bakatelaki ye etumbu liboso ete ntɔngɔ etana, yango eyokanaki te na mibeko ya Baebre mpe na mitinda etali kosambisa.” Profesɛrɛ moko na makambo ya mibeko alobi ete: “Kosambisama yango banda na ebandeli tii nsuka, esalemaki te na kolanda mibeko mpe ekateli oyo ezwamaki ezalaki kaka ya koboma Yesu.”

Yesu azalaki na likambo te. Kasi, ayebaki ete liwa na ye ezalaki na ntina mpo na kobikisa bato ya botosi. (Matai 20:28) Lokola alingaki mpenza bosembo, yango wana andimaki básalela ye makambo ya kozanga bosembo na ndenge oyo esalemá naino te. Asalaki bongo mpo na biso bato ya masumu. Tosengeli kobosana likambo yango soki moke te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Likambo ya mabe koleka, mangomba ya bokristo basalelaki masolo ya Baevanzile oyo elobeli liwa ya Yesu mpo na kokolisa ezaleli ya koyina Bayuda; kasi likambo wana ezalaki ata moke te na makanisi ya bakomi ya Baevanzile, oyo bango moko mpe bazalaki Bayuda.

b Kofinga oyo balobeli awa, elimbolaki kosalela nkombo ya Nzambe na limemya te to koluka kobɔtɔla bokonzi to nguya oyo kaka Nzambe asengeli kozala na yango. Bato oyo bafundaki Yesu bapesaki ata elembeteli moko te oyo emonisaki ete Yesu asalaki bongo.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 20]

Mibeko ya Bayuda na basiɛklɛ ya ebandeli

Mibeko ya Bayuda oyo na ebandeli ekomamaki te na mikanda mpe eyaki kokomama na basiɛklɛ ya ebandeli ya ntango na biso, kasi ezalaki kotalelama lokola ya kala mpenza, ezalaki na makambo oyo elandi:

▪ Na makambo oyo esɛngaki kokatela moto etumbu ya liwa, liboso bazalaki koyoka maloba ya bato oyo bazalaki kokɔtela moto

▪ Bazuzi bazalaki kosala nyonso mpo na kobikisa moto oyo afundami

▪ Bazuzi bakokaki kutu koloba mpo na kolongisa moto oyo afundami kasi te mpo na kokweisa ye

▪ Bazalaki kokebisa batemwɛ ete mokumba na bango ezali ya lisɛki te

▪ Bazalaki kotuna batemwɛ moto na moto na ngala na ye, kasi na miso ya batemwɛ mosusu te

▪ Litatoli ya batɛmwɛ esengelaki kozala ndenge moko na makambo lokola: dati, esika, ntango oyo likambo esalemaki na mokolo yango, mpe bongo na bongo

▪ Makambo oyo ezalaki kosɛnga kokatela moto etumbu ya liwa esengelaki kosambisama na moi mpe kokatama kaka na moi

▪ Basengelaki te kosambisa makambo oyo ezalaki kosɛnga etumbu ya liwa na mokolo oyo ezalaki liboso ya mokolo ya sabata to ya fɛti

▪ Mpo na makambo oyo ezalaki kosɛnga etumbu ya liwa, esengelaki kobanda kosambisama mpe kosuka kaka na mokolo yango soki moto oyo afundami akolonga; kasi soki ezali bongo te, basengelaki kokata likambo yango na mokolo oyo elandaki, ntango bakoyebisa etumbu mpe bakoboma moto yango

▪ Mpo na makambo oyo ezalaki kosɛnga kokatela moto etumbu ya liwa, ezalaki kosambisama na bazuzi soki 23

▪ Bazuzi bazalaki kosala voti moto na moto na ngala na ye mpo na kolongisa to kokweisa moto oyo afundami, kobanda na oyo azali elenge; basɛkrɛtɛrɛ bazalaki kokoma maloba ya bazuzi oyo balongisi moto mpe oyo bakweisi ye

▪ Bakokaki kotika moto ata soki zuzi moko kaka alongisi ye, kasi mpo na kokatela ye etumbu, ezalaki kosɛnga maloba ya bazuzi mibale; soki zuzi moko kaka amoni ete moto yango azwa etumbu, mbala mingi bazalaki kobakisa bazuzi mibale soki esengeli, tii ntango ekateli ya malamu ekozwama

▪ Bazalaki kondima te ekateli ya kokatela moto etumbu soki ata zuzi moko te alobi mpo na kolongisa ye; soki bazuzi nyonso bandimi ete bákatela moto etumbu, yango ezalaki komonana lokola “bayokanaki liboso”

Kosambisama ya Yesu elandaki mibeko te

▪ Tribinale eyokaki ata maloba ya moto moko te to batɛmwɛ oyo bakokaki kolongisa ye

▪ Ata zuzi moko te alukaki kokɔtela Yesu, bango nyonso bazalaki banguna na ye

▪ Banganga-nzambe balukaki batatoli ya lokuta mpo bákweisa Yesu mpo abomama

▪ Basambisaki ye na butu, na ndenge ya kobombama

▪ Kosambisama na ye ebandaki mpe esukaki kaka na mokolo moko, liboso ya mokolo ya fɛti

▪ Ezalaki na likambo moko te oyo afundamaki na yango liboso bakanga ye

▪ Likambo oyo Yesu alobaki ete azali Masiya, oyo balobaki ete ezali kofinga, etalelamaki te

▪ Ntango bakómaki liboso ya Pilate, bafundaki ye na likambo mosusu

▪ Bifundeli ezalaki ya lokuta

▪ Pilate amonaki ete Yesu azali na likambo te kasi, apesaki kaka nzela báboma ye

[Etanda na lokasa 22]

Batɛmwɛ basengelaki komema ngambo ya makila

Na batribinale ya Bayuda, mpo na makambo oyo esengelaki kokatela moto etumbu ya liwa, bazalaki kokebisa batɛmwɛ ete bomoi ezali na motuya liboso ete bápesa litatoli na bango:

“Ntango mosusu mposa na yo ezali opesa litatoli na ndenge ozali kokanisa, makambo oyo oyokaki, to oyo tɛmwɛ moko ayebisaki moto mosusu; to okoki kokanisa, ‘Toyokaki yango epai ya moto moko ya kotyela motema.’ To, mbala mosusu okoki koyeba te ete tokotuna yo mituna ndenge na ndenge mpo na koyeba likambo yango. Osengeli koyeba ete mibeko oyo etali makambo ya biloko na tribinale ezali ndenge moko te na oyo esalelamaka mpo na makambo oyo esɛngaka kokatela moto etumbu ya liwa. Mpo na kosambisa makambo oyo etali biloko, moto akoki kofuta mbongo mpe kozipa masumu na ye moko. Na makambo oyo ezali kosɛnga etumbu ya liwa, makila [ya moto oyo afundami] mpe ya baoyo nyonso basengelaki kobotama na nzela na ye [oyo bakateli ye likambo na ndenge ya mabe] ezalaki na motó [ya moto oyo apesaki litatoli ya lokuta].”​—Talmud ya Babilone, Sanedrina, 37a.

Soki moto oyo afundamaki akwei na likambo, batɛmwɛ basengelaki kozala bato ya liboso ya kobanda koboma ye.​—Balevi 24:14; Kolimbola Mibeko 17:6, 7.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto