Ozali komikundola?
Otalelaki na likebi mpenza banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima? Na bongo, okosepela komikundola makambo oyo ezali awa:
◻ Mwa mituna nini baklisto mibale basengeli komituna liboso bákanisa kokóma bafianse?
‘Nayebi moto yango malamu mpenza? Atyaka makambo ya elimo na esika ya liboso? Abangaka Nzambe? Nakoki mpenza kozala na elikya ete nakosalela Nzambe elongo na moto yango bomoi na ngai mobimba? Tozwaki mpenza ntango ekoki mpo na koyebana bizaleli? Nandimi solo ete tokoyokana malamu libela na libela? Moto na moto ayebi malamu bomoi moninga azalaki na yango kala mpe ndenge azali lelo oyo?—15/8, lokasa 31.
◻ Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Bino bozali mungwa na mokili”? (Matai 5:13)
Na maloba yango, Yesu amonisaki ete mosala na bango ya koteya bato Bokonzi ya Nzambe ezali mosala oyo ekoki kobatela, to kobikisa bomoi ya bato oyo bakoyoka bango. Ɛɛ, baoyo basalelaki maloba ya Yesu babatelamaki ntango bizaleli mpe elimo ya mokili ebebaki.—15/8, lokasa 32.
◻ Ndenge nini bato oyo bazali bafianse bakoki kokima motambo ya pite?
Soki ozali fianse, zalá na mayele mpe kolinga te ozala yo moko na fianse na yo na bisika oyo ebongi te. Yango wana, ekoleka malamu bókutanaka na bisika oyo bozali elongo na bato mosusu to na bisika oyo bato bazali komona bino. Bóyeba makambo nini bokoki kosala te ntango bozali kolakisana bolingo; moto na moto atosa makanisi mpe lisosoli ya moninga.—1/9, nkasa 17, 18.
◻ Kozala na mayele elimboli nini?
Kozala na mayele elimboli koyeba likambo, kokesenisa eloko na eloko ya likambo yango, koyeba yango na bozindo mpo na kokanga ntina ya likambo yango mobimba, mpe na nsuka koyeba ndimbola na yango. (Masese 4:1)—15/9, lokasa 13.
◻ Yehova azali kosɛnga biso makambo nini lelo oyo?
Yehova azali kosɛnga biso tóyoka Mwana na ye mpe tólanda ndakisa mpe mateya na ye. (Matai 16:24; 1 Petelo 2:21)—15/9, lokasa 22.
◻ Kaka banani bakoki kozala na kimya?
Lokola Yehova azali “Nzambe oyo apesaka kimya,” kaka bato oyo balingaka Nzambe mpe batosaka mibeko na ye nde bakoki kozala na kimya. (Baloma 15:33)—1/10, lokasa 11.
◻ Ndenge nini Yosefe azwaki makasi ya koboya masɛnginya ya mwasi ya Potifala mokolo na mokolo?
Yosefe azalaki komona ete boninga na ye na Yehova eleki bisengo ya mwa ntango moke. Lisusu, atako na ntango wana ezalaki na mobeko moko ya Nzambe te oyo ekomami na mokanda, Yosefe ayebaki kososola bizaleli malamu. (Genese 39:9)—1/10, lokasa 29.
◻ Mpo na nini ebongi kolimbisa bandeko na biso?
Soki tolingi ete Nzambe alimbisaka biso ntango nyonso, biso mpe tosengeli kolimbisaka baninga. (Matai 6:12, 14; Luka 11:4)—15/10, lokasa 17.
◻ Matai 18:15-17 ezali kolobela lisumu ya ndenge nini, mpe likambo nini emonisi yango?
Yesu azalaki kolobela lisumu monene. Mpo moto oyo asalaki mabe akokaki kotalelama “lokola mopakano mpe mokɔngɔli ya mpako.” Bayuda bazalaki koyokana na bato ya bikólo mosusu te mpe bazalaki kolinga bakɔngɔli ya mpako ata moke te. Yango wana, Matai 18:15-17 etaleli mpenzampenza mabunga mike te to mwa maloba ya kozokisa oyo moto akoki kolimbisa mpe kobosana kasi elobeli nde mabunga minene mpenza. (Matai 18:21, 22)—15/10, lokasa 19.
◻ Kolinga Liloba ya Nzambe esɛngaka mpenza makambo nini?
Kolinga Liloba ya Nzambe epusaka moto na kotosa makambo oyo Liloba yango esɛngaka. (Nzembo 119:97, 101, 105) Yango esɛngaka na moto asembolaka ntango nyonso makanisi mpe bizaleli na ye.—1/11, lokasa 14.
◻ Lokola Yehova apesi biso biloko mingi, eloko nini tokoki kokabela Ye Mokonzi mpe Mokabi oyo aleki monene?
Biblia emonisi ete eloko eleki malamu oyo tokoki kokabela Yehova ezali “mbeka na masanzoli.” (Baebele 13:15) Mpo na nini? Mpamba te mbeka yango ezali kobikisa bato, lobanzo ya liboso ya Yehova na ntango oyo ya nsuka. (Ezekiele 18:23)—1/11, lokasa 21.
◻ Salomo alingaki koloba nini ntango akomaki ete: “Maloba na bato ya mayele ezali lokola fimbo”? (Mosakoli 12:11)
Maloba ya bato oyo bazali na mayele ya Nzambe epusaka moto oyo azali kotánga yango to koyoka yango mpe azali kolanda yango ete akola.—15/11, lokasa 21.
◻ Bososoli oyo Nzambe apesaka ezali nini?
Bososoli oyo Nzambe apesaka ezali mayele ya kokesenisa na malamu na mabe mpe kopona nzela ya malamu. Moto akómaka na bososoli ntango azali koyekola mpe kosalela Liloba ya Nzambe.—15/11, lokasa 25.
◻ Ezaleli nini moto asengeli kozala na yango ntango azali kondima mikumba? (1 Timote 3:1)
Kondima mikumba esengeli kozala na bokatikati mpe kososola malamu. Moto moko te asengeli kozwa mikumba ebele kino kobungisa esengo na ye na mosala ya Yehova. Ya solo, elimo ya komipesa ezali malamu, kasi, komipesa esengeli mpe komonisa bopɔlɔ mpe “makanisi malamu.” (Tito 2:12; Emoniseli 3:15, 16)—1/12, lokasa 28.
◻ Ndenge nini baboti bakoki kolonga mokakatano na bango?
Nzambe apesi baboti toli ete bázala ndakisa malamu, baninga malamu, básololaka na bana na bango mpe bázala bateyi malamu. (Deteronome 6:6, 7)—1/12, lokasa 32.