“Litatoli na bikólo nyonso”
“Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.”—MISALA 1:8.
1. Ntango nini mpe epai wapi bayekoli ya Yesu bayokaki mpo na mbala ya liboso esakweli na ye oyo ezali na Matai 24:14?
BATO mingi bakangá na motó maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:14, mpe bamosusu bayembaka yango lokola nzembo. Maloba yango ezali mpenza esakweli moko ya ntina mingi! Kanisá naino ndenge bayekoli ya Yesu bakanisaki ntango bayokaki maloba yango mbala ya liboso. Tozali na mobu 33 T.B. Bayekoli bazalaki na Yesu na boumeli ya mbula misato, mpe sikoyo bayei na Yelusaleme. Bamonaki makamwisi na ye mpe bayokaki mateya na ye. Atako basepelaki na mateya kitoko oyo Yesu ateyaki bango, bayebaki malamu ete bato nyonso te nde basepelaki na yango. Yesu azalaki na banguna ya makasi, oyo bayebaki mpenza koloba.
2. Makama mpe mikakatano nini bayekoli ya Yesu basengelaki kokutana na yango?
2 Na Ngomba ya Olive, bayekoli minei bafandaki elongo na Yesu mpe bazalaki koyoka na likebi mpenza ndenge azalaki koyebisa bango makama mpe mikakatano oyo esengelaki kokómela bango. Liboso, Yesu ayebisaki bango ete akobomama. (Matai 16:21) Sikoyo amonisi polele ete bango mpe bakokutana na botɛmɛli ya makasi. Alobaki ete: “Bato bakokaba bino na bolɔzi mpe bakoboma bino, mpe bokozala biloko ya koyinama na bikólo nyonso mpo na nkombo na ngai.” Esukaki wana te. Basakoli ya lokuta bakobungisa bayekoli mingi nzela. Bamosusu bakobɛta libaku mpe bakokóma kotɛkana mpe koyinana. Ekozala mpe na bato mosusu, “bato mingi,” oyo bakotika ete bolingo na bango mpo na Nzambe mpe Liloba na ye ekóma mpiɔ.—Matai 24:9-12.
3. Mpo na nini maloba ya Yesu oyo ezwami na Matai 24:14 ezali mpenza ya kokamwisa?
3 Nsima ya kolobela likambo wana nde Yesu alobaki maloba oyo, na ntembe te, ekamwisaki bayekoli na ye. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Ya solo, mosala ya ‘kopesa litatoli na ntina etali solo,’ oyo Yesu abandaki na Yisalaele, esengelaki kokoba mpe kopalangana na mokili mobimba. (Yoane 18:37) Oyo nde esakweli ya kokamwa! Kopalanganisa mosala yango tii na “bikólo nyonso” esengelaki kozala mokakatano; kosala yango na ntango “bikólo nyonso ezalaki koyina bango” esengelaki kozala likamwisi. Kokokisama ya mokumba wana monene esengelaki kokumisa kaka bokonzi mpe nguya ya Yehova te, kasi mpe bolingo, motema mawa, mpe motema molai na ye. Lisusu, ekokaki kopesa basaleli na ye libaku ya komonisa kondima mpe komipesa na bango.
4. Banani bazwaki mokumba ya kopesa litatoli, mpe Yesu apesaki libɔndisi nini?
4 Yesu amonisaki bayekoli na ye polele ete bazali na mokumba moko monene. Liboso amata na likoló, Yesu abimelaki bango mpe alobaki na bango boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yelusaleme mpe na kati ya Yudea mobimba mpe na Samalia mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Mosika te, bato mosusu basengelaki kosangana na bango na mosala yango. Nzokande, bayekoli bazalaki moke. Ezalaki mpenza libɔndisi koyeba ete elimo santu, nguya ya Nzambe, ekopesa bango makasi mpo bákokisa mosala oyo apesaki bango!
5. Likambo nini bayekoli bayebaki te na ntina na mosala ya kopesa litatoli?
5 Bayekoli bayebaki ete basengeli kosakola nsango malamu mpe ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 28:19, 20) Kasi, bayebaki te kino wapi litatoli yango esengelaki kopesama mpe ntango nini nsuka esengelaki koya. Biso mpe ndenge moko. Kaka Yehova nde ayebi. (Matai 24:36) Ntango Yehova akomona ete litatoli oyo epesami ekoki, akosukisa ebongiseli mabe ya makambo oyo. Wana nde baklisto bakoyeba ete mosala ya kosakola esalemi mpenza ndenge oyo Yehova alingaki. Bayekoli ya liboso bakokaki koyeba ata moke te ndenge oyo mosala ya kopesa litatoli ekopalangana na ntango oyo ya nsuka.
Mosala ya kopesa litatoli na ekeke ya liboso
6. Likambo nini esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpe mwa moke na nsima?
6 Na ekeke ya liboso, mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli ebimisaki matomba ya minene. Mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli 120 bazalaki na eteni ya ndako moko ya likoló na Yelusaleme. Elimo santu ya Nzambe ekitelaki bango, ntoma Petelo asalaki lisukulu moko ya kafukafu, alimbolaki ntina ya likamwisi wana, mpe bato soki 3 000 bakómaki bandimi mpe bazwaki batisimo. Yango ezalaki kaka ebandeli. Atako bakonzi ya mangomba bazalaki kosala nyonso mpo na kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu, “Yehova akobaki kobakisela [bayekoli] mokolo na mokolo baoyo bazalaki kobikisama.” Mosika te, “motángo ya mibali ekómaki soki nkóto mitano.” Na nsima, “bandimi na kati ya Nkolo bakobaki kobakisama, bibele ya mibali mpe basi.”—Misala 2:1-4, 8, 14, 41, 47; 4:4; 5:14.
7. Mpo na nini kobongwana ya Koloneyi ezalaki na ntina mingi?
7 Likambo mosusu ya ntina mingi esalemaki na mobu 36 T.B., mbongwana mpe batisimo ya Koloneyi, oyo azalaki Moyuda te. Ntango Yehova atindaki ntoma Petelo epai ya Koloneyi, amonisaki ete etinda ya Yesu ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso’ esukaki kaka te na bayuda oyo bazalaki na mikili ndenge na ndenge. (Misala 10:44, 45) Baoyo bazalaki kotambwisa lisangá na ntango wana basalaki nini? Bantoma mpe mikóló ya Yudea bakumisaki Nzambe ntango bayebaki ete nsango malamu esengelaki mpe kosakolama epai ya bato ya bikólo, elingi koloba bato oyo bazali Bayuda te. (Misala 11:1, 18) Na ntango wana, mosala ya kosakola ezalaki kokoba kobota mbuma epai ya Bayuda. Mwa bambula na nsima, soki na mobu 58 T.B., longola bapakano oyo bakómaki bandimi, ezalaki mpe na ‘bankóto mingi ya bandimi oyo bazalaki Bayuda.’—Misala 21:20.
8. Ndenge nini nsango malamu ezali kobongola bato?
8 Atako bokoli oyo ezalaki kati na baklisto ya ekeke ya liboso ezali kokamwisa, tosengeli kobosana te ete mitángo yango ezalaki mpenza mitángo ya solo. Nsango ya Biblia oyo bayokaki ezalaki mpenza na nguya. (Baebele 4:12) Ebongolaki mpenza bomoi ya baoyo bandimaki yango. Bato yango bapɛtolaki bomoi na bango, balataki bomoto ya sika mpe basalaki boyokani na Nzambe. (Baefese 4:22, 23) Lelo mpe ezali ndenge moko. Baoyo bazali kondima nsango malamu, bango nyonso bazali na elikya kitoko ya kozala na bomoi ya seko.—Yoane 3:16.
Baninga ya mosala elongo na Nzambe
9. Libaku mpe mokumba nini baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki ete bazali na yango?
9 Baklisto ya ekeke ya liboso batutaki ntolo te ete bazalaki kokokisa mosala yango bango moko. Bayebaki ete mosala na bango ya kosakola ezalaki kosalema na “nguya ya elimo santu.” (Baloma 15:13, 19) Bokoli wana ya elimo ezalaki kosalema na lisungi ya Yehova. Baklisto yango bayebaki mpe ete bazali na libaku mpe mokumba ya kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Bakolinti 3:6-9) Na yango, na boyokani na toli ya Yesu, bazalaki kosala makasi mpenza mpo na kokokisa mosala oyo bapesaki bango.—Luka 13:24.
10. Milende nini baklisto mosusu ya liboso basalaki mpo na kopesa litatoli epai ya bikólo nyonso?
10 Lokola “ntoma epai ya bikólo,” Paulo atambolaki bankóto ya bakilomɛtrɛ na mokili mpe na mai mpe abimisaki masangá mingi na Azia, etúká moko ya Loma mpe na Grèce. (Baloma 11:13) Akendaki mpe na Loma, mpe ekoki kozala ete akómaki tii na ekólo Espagne. Na ntango wana, ntoma Petelo, oyo azwaki mokumba ya kosakola “nsango malamu . . . mpo na bato bakatamá ngenga,” akendaki kosakola na Babilone, epai Bayuda bazalaki mingi na ntango wana. (Bagalatia 2:7-9; 1 Petelo 5:13) Kati na bato oyo basalaki misala ya makasi ya Nkolo, ezali na basi lokola Tilifene mpe Tilifoze. Mwasi mosusu oyo “asalaki misala ya makasi mingi na kati ya Nkolo” ezali Pelesisi.—Baloma 16:12.
11. Ndenge nini Yehova apambolaki milende ya bayekoli ya Yesu?
11 Yehova apambolaki mpenza milende ya basali wana mpe basali mosusu oyo basalaki na molende. Atako mbula 30 ekokaki naino te banda Yesu alobaki ete litatoli esengeli kopesama na bikólo nyonso, Paulo akomaki ete “nsango malamu” “esakolamaki na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.” (Bakolose 1:23) Nsuka eyaki? Na lolenge mosusu, nsuka eyaki. Eyaki likoló na ebongiseli ya makambo ya Bayuda na mobu 70 T.B., ntango mampinga ya Baloma ebebisaki Yelusaleme mpe tempelo na yango. Kasi, Yehova abongisi ete litatoli epesama mingi koleka lisusu liboso ete akoka kosukisa mokili mabe ya Satana.
Litatoli oyo ezali kopesama lelo
12. Ndenge nini bayekoli ya Biblia basosolaki etinda ya kosakola?
12 Na nsuka ya bambula ya 1800, nsima ya ntango molai oyo lipɛngwi ya mangomba etondaki, losambo ya solo ezongisamaki. Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova, bayebaki malamu etinda ya kokómisa bato bayekoli na mokili mobimba. (Matai 28:19, 20) Na 1914, baoyo bazalaki kosakola na molende bazalaki soki 5 100, mpe nsango malamu esakolamaki na mikili soki 68. Nzokande, bayekoli wana ya Biblia basimbaki te ndimbola mobimba ya Matai 24:14. Na nsuka ya bambula ya 1800, bakompanyi oyo esalaka Babiblia ebongolaki mpe ebimisaki na minɔkɔ ebele Biblia, oyo ezali na nsango malamu to evanzile, mpe ekabolaki yango na mokili mobimba. Na yango, na boumeli ya mwa bambula, bayekoli ya Biblia bakanisaki ete litatoli esili kopesama na bikólo.
13, 14. Ndimbola nini ya polele ya mokano ya Nzambe epesamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1928?
13 Mokemoke, Yehova asalisi basaleli na ye básosola mokano na ye. (Masese 4:18) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1928 (na Lingelesi) elobaki boye: “Tokoki mpenza koloba ete kokabolama ya Biblia ekokisi esakweli ya kosakola evanzile ya Bokonzi? Ezali bongo te. Atako Biblia ekabolami, ezali kaka na ntina ete mwa Batatoli moke oyo bazali na mabelé bábimisa mikanda oyo ezali kolimbola [mokano] ya Nzambe mpe bákendeke kotala bato oyo batikelaki Babiblia. Soki te, bato balingaki koyeba te ete Bokonzi ya Masiya etyami na mikolo na biso.”
14 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli wana elobaki lisusu boye: “Na 1920, . . . Bayekoli ya Biblia basosolaki malamu esakweli ya Nkolo na biso oyo ezali na Matai 24:14. Bayaki koyeba ete ‘evanzile yango’ oyo esengelaki kosakolama na mokili mobimba mpo na litatoli epai na bapakano to bikólo nyonso, ezalaki te nsango ya Bokonzi oyo esengelaki koya, kasi ezalaki nde nsango ete Mokonzi Masiya abandi koyangela mabelé.”
15. Ndenge nini mosala ya kopesa litatoli ekoli banda na bambula ya 1920?
15 “Mwa batatoli” oyo bazalaki na bambula ya 1920, batikalaki moke bongo te. Na bambula oyo elandaki, bayebaki soki “ebele ya bato” ya “bampate mosusu” ezali banani mpe babandaki koyanganisa bango. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Lelo oyo, basakoli ya nsango malamu bazali 6 613 829 na mikili 235. Esakweli yango ezali kokokisama na lolenge ya kokamwa mpenza! “Nsango malamu oyo ya Bokonzi” esakolamá liboso boye te. Basaleli ya sembo ya Yehova bazali ebele lelo na mokili koleka ndenge bazalaki na bileko mosusu nyonso.
16. Mosala nini tosalaki na mobu ya mosala oyo esili? (Talá etanda na nkasa 27-30.)
16 Ebele wana ya Batatoli basakolaki na molende mpenza na boumeli ya mobu ya mosala 2005. Balekisaki bangonga koleka miliare moko na kosakola nsango malamu na mikili 235. Bazongelaki bamilio ya bato oyo basepelaki mpe bayekolaki Biblia na bamilio ya bato. Mosala yango esalemaki na Batatoli ya Yehova, oyo bandimaki kopesa ntango mpe biloko na bango mpo na kosakwela basusu Liloba ya Nzambe. (Matai 10:8) Na lisalisi ya elimo santu, Yehova azali kokoba kopesa basaleli na ye nguya ya kokokisa mokano na ye.—Zekalia 4:6.
Tópesa litatoli na molende
17. Ndenge nini basaleli ya Yehova bazali kokokisa maloba ya Yesu na ntina etali kosakola nsango malamu?
17 Atako mbula soki 2 000 eleki banda Yesu alobaki ete nsango malamu esengeli kosakolama, molende ya basaleli ya Nzambe mpo na mosala yango ekiti te. Toyebi ete ntango tozali kokoba kosala oyo ezali malamu, tozali komonisa bizaleli ya Yehova lokola bolingo, motema mawa, mpe motema molai. Lokola ye, tolingi te ete moto ata moko abomama, kasi tolingi ete bato bábongola motema mpe báyokana na Yehova. (2 Bakolinti 5:18-20; 2 Petelo 3:9) Lokola bazali kopela na elimo ya Nzambe, Batatoli ya Yehova bazali kokoba kosakola nsango malamu na molende tii na nsuka ya mabelé. (Baloma 12:11) Yango esali ete bato ya bipai nyonso bándima solo mpe báyokanisa bomoi na bango na banzela ya Yehova ya bolingo. Tótalela mwa bandakisa.
18, 19. Bandakisa nini okoki kopesa ya bato oyo bandimaki nsango malamu?
18 Charles azalaki mosali ya bilanga na wɛsti ya Kenya. Na 1998, atɛkaki kilo ya makaya koleka 8 000 mpe bapesaki ye diplome ya Moloni Monene. Na ntango wana, abandaki koyekola Biblia. Mosika te, ayaki koyeba ete moto oyo alonaka makaya abukaka mobeko ya Yesu oyo esɛngi kolinga mozalani. (Matai 22:39) Ntango ayebaki ete kozala ‘moloni monene ya makaya’ ezali nde kozala ‘mobomi monene,’ abwakelaki makaya yango nkisi mpe ekufaki. Akolaki na elimo, amipesaki epai na Yehova, azwaki batisimo, mpe lelo oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe mosaleli na misala.
19 Emonani mpenza ete Yehova azali koningisa mabota na nzela ya litatoli oyo ezali kopesama na mokili mobimba, mpe biloko kitoko, elingi koloba bato, bazali koya. (Hagai 2:7) Pedro, oyo afandaka na ekólo Portugal, akɔtaki kelasi mpo na kokóma sango ntango azalaki na mbula 13. Azalaki na mokano ya kokóma misionɛrɛ mpe ya koteya Biblia. Kasi, nsima ya mwa ntango, alongwaki na kelasi yango mpo bazalaki mpenza kosalela Biblia te. Nsima ya mbula motoba, abandaki kolanda mateya ya pisikoloji na iniversite moko ya Lisbonne. Azalaki kofanda epai ya mama leki na ye oyo azalaki Motatoli ya Yehova mpe mama leki yango alendisaki ye ayekola Biblia. Na ntango wana, Pedro azalaki kondima te ete Nzambe azali, mpe azalaki naino kokakatana mpo na koyekola Biblia. Ayebisaki likambo yango epai ya profesɛrɛ na ye ya pisikoloji. Profɛsɛrɛ yango ayebisaki ye ete pisikoloji elobaka ete bato oyo bakokaka te kozwa bikateli bazalaka pene na komiboma. Na nsima, pedro azwaki ekateli ya koyekola Biblia. Auti kozwa batisimo mpe ye moko azali sikoyo koyekola Biblia na bato mosusu.
20. Mpo na nini tokoki kozala na esengo ndenge litatoli na bikólo nyonso ezali kopalangana makasi boye?
20 Tii sikoyo, toyebi te kino wapi litatoli esengeli kopesama na bikólo, toyebi mpe te mokolo mpe ngonga oyo nsuka ekoya. Toyebi kaka ete ezali lisusu mosika te. Tozali na esengo ete kopalangana makasi wana ya nsango malamu ezali kaka moko ya ebele ya bilembo oyo ezali komonisa ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya baguvɛrnema ya bato. (Danyele 2:44) Mbula na mbula, bamilio ya bato bazali kozwa libaku ya kondima nsango malamu, mpe yango ezali kopesa Yehova Nzambe na biso nkembo. Tiká ete tózala na ekateli ya kotikala sembo mpe kokoba kopesa litatoli na bikólo nyonso elongo na bandeko na biso ya mokili mobimba. Soki tosali bongo, tokomibikisa biso moko mpe tokobikisa baoyo bazali koyoka biso.—1 Timote 4:16.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini esakweli ya Matai 24:14, ezali na ntina mingi?
• Milende nini baklisto ya liboso basalaki na mosala ya kosakola, mpe ebimisaki matomba nini?
• Ndenge nini Bayekoli ya Biblia basosolaki ntina ya kopesa litatoli na bikólo nyonso?
• Soki otali mosala oyo basaleli ya Yehova basalaki na mbula ya mosala eleki, nini ezali kokamwisa yo?
Karte/Bililingi na lokasa 25]
Paulo atambolaki bankóto ya bakilomɛtrɛ na mokili mpe na mai mpo na kosakola nsango malamu
[Elilingi na lokasa 24]
Yehova atindaki Petelo akende kotatola epai ya Koloneyi mpe libota na ye