Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/10 nk. 13-18
  • Baboti mpe bana: Bótyaka Nzambe na esika ya liboso!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti mpe bana: Bótyaka Nzambe na esika ya liboso!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali mokumba ya boklisto
  • Mokumba ya liboso mpenza
  • Bapesameli lisungi oyo bazali na yango mposa
  • Baboti, botyaka nini na esika ya liboso?
  • Bana​—Bokosepelisa nani?
  • Baboti, bókokisa bamposa ya mabota na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bana bazali libula ya motuya mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/10 nk. 13-18

Baboti mpe bana: Bótyaka Nzambe na esika ya liboso!

“Bangá Nzambe mpe batelá mitindá na ye.”​—MOSAKOLI 12:13, NW.

1. Bobángi ya motindo nini baboti mpe bana basengeli kokólisa yango, mpe ekomemela bango litomba nini?

ESAKWELI moko oyo etalelaki Yesu Klisto elobaki ete “akozwa esengo kati na kobanga Yehova.” (Yisaya 11:3, NW) Kobanga na ye ezalaki mingi mpenza botosi mozindo mpe ya nsɔ́mɔ epai na Nzambe, kobanga kosilikisa Nzambe mpamba te azalaki kolinga ye. Baboti mpe bana basengeli kokólisa bobángi ya Nzambe lokola Klisto amonisaki yango, bobángi ekomemela bango esengo lokola ememelaki Yesu. Basengeli kotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na bango na kotosáká mibeko na ye. Engebene mokomi moko ya Biblia, “oyo ezali bongo mokumba mobimba ya moto.”​—Mosakoli 12:13, NW.

2. Nini ezalaki mobeko moleki ntina kati na Mibeko, mpe epesamaki liboso mpenza epai na banani?

2 Mobeko oyo eleki monene kati na Mibeko, oyo elobi ete tosengeli ‘kolinga [Yehova] na motema na biso mobimba, na elimo na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na nguya [ya bomoi, NW] na biso mobimba,’ epesamaki liboso mpenza epai na baboti. Yango emonisami kati na maloba ya Mibeko oyo malandi, ete: “Okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.” (Deteronome 6:4-7; Malako 12:28-30) Na yango, baboti bapesamelaki mobeko ya kotya Nzambe na esika ya liboso, bango mpenza, na kolingáká ye mpe na koteyáká bana na bango ete bango mpe bálinga ye.

Ezali mokumba ya boklisto

3. Lolenge nini Yesu amonisaki ntina ya kotyela bana mike likebi?

3 Yesu amonisaki ntina ya kotyela ata bana mike likebi. Mokolo moko, pene na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, bato babandaki komema bana na bango epai na ye. Na ntembe te, bayekoli ya Yesu bakanisaki ete azalaki na mosala mingi mpe ekokaki te ete bátungisa ye, na yango balukaki kopekisa bato ete básala bongo te. Kasi Yesu apamelaki bayekoli na ye ete: “Tiká bana mike koya epai na ngai mpe pekisá bango te.” Nkutu, Yesu ‘azingelaki bango na mabɔ́kɔ na ye,’ na bongo, na lolenge ya kosimba motema, amonisaki ntina ya kotyela bana mike likebi.​—Luka 18:15-17; Malako 10:13-16.

4. Banani bapesamelaki mobeko ya “kozalisa bayekoli na mabota nyonso,” mpe ekosɛnga na bango ete básala nini?

4 Yesu amonisaki mpe polele na bayekoli na ye ete longola bana na bango moko, bazalaki mpe na mokumba ya koteya bato mosusu. Nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, Yesu ‘amonanaki epai na bandeko nkámá mitano ntango moko’​—kati na bango, baboti mpe bazalaki wana. (1 Bakolinti 15:6) Emonani ete likambo yango lisalemaki na ngomba Galilai epai kuna bantoma 11 mpe bayanganaki. Kuna Yesu apesaki bango nyonso elendiseli oyo ete: “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:16-20) Moklisto moko te akoki na elónga nyonso kotalela mobeko oyo na bopɔtu! Mpo ete batata mpe bamama bákoka kokokisa mobeko yango ezali kosɛnga ete bábatela bana na bango mpe básangana kati na mosala ya kosakola mpe ya koteya epai na bato banso.

5. (a) Nini emonisi ete mingi kati na bantoma bazalaki mpe na basi, mpe ekoki kozala ete bazalaki na bana? (b) Toli nini batata ya mabota basengeli kotalela yango na bopɔtu te?

5 Emonani ete, ata bantoma mpe basengelaki kosala na bokatikati mpo na oyo etalaki mikumba na bango kati na mabota na bango mpe mokumba na bango ya kosakola mpe ya kobatela etongá ya Nzambe. (Yoane 21:1-3, 15-17; Misala 1:8) Ezalaki bongo mpamba te mingi na bango babalaki basi. Yango wana ntoma Paulo ayebisaki ete: “Tozali na lotómo ya kotambola elongo na ndeko mwasi moko mobalani na biso, lolenge moko na bantoma mosusu mpe bandeko ya Nkolo mpe Kefa, boye te?” (1 Bakolinti 9:5, NW; Matai 8:14) Ekoki kozala ete bantoma mosusu mpe bazalaki na bana. Bakomi ya makambo ya kala, lokola Eusèbe, balobi ete Petelo azalaki na bana. Baboti baklisto nyonso ya ekeke ya liboso basengelaki kolanda toli ya makomami ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”​—1 Timoté 5:8.

Mokumba ya liboso mpenza

6. (a) Mokumba nini monene bankulutu baklisto oyo bazali na mabota bazali na yango? (b) Mokumba ya liboso mpenza ya bankulutu ezali nini?

6 Bankulutu baklisto oyo bazali lelo na mabota bazali na ezalela motindo moko na oyo bantoma bazalaki kati na yango. Basengeli kosala na bokatikati mpo na oyo etali mokumba na bango ya kokokisa bamposa ya elimo mpe bamposa ya mosuni ya bana na bango mpe mokumba na bango ya koteya epai na bato banso mpe ya koleisa lisangá ya Nzambe. Mosala nini mosengeli kozwa esika ya liboso? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1964 (ebimeli ya Lifalansé) elobaki ete: “Mokumba ya liboso [ya batata] ezali bongo kati na libota na ye, mpe na yango, akoki te kosala lokola nkulutu kati na lisangá soki akokisi te mokumba wana.”

7. Lolenge nini batata baklisto batyaka Nzambe na esika ya liboso?

7 Na yango, baboti basengeli kotya Nzambe na esika ya liboso na kotosáká mobeko ya ‘kolanda kobɔkɔla bana na bango na mateyo mpe na mpamela na [Yehova, NW].’ (Baefese 6:4) Bakoki te kotika mokumba wana epai na moto mosusu, ata soki tata akoki kozala na mokumba ya mokɛngɛli kati na lisangá ya boklisto. Lolenge nini batata wana bakoki kosala mikumba na bango​—kokokisáká bamposa ya basangani ya mabota na bango na mosuni, na elimo, mpe na mayoki​—mpe kokokisa mokumba ya kokamba mpe ya kokɛngɛla lisangá?

Bapesameli lisungi oyo bazali na yango mposa

8. Lolenge nini mwasi ya nkulutu akoki kosalisa mobali na ye?

8 Ezali polele ete, bankulutu oyo bazali na mikumba ya mabota bakoki kozwa lisungi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo touti kolobela emonisaki ete mwasi moklisto akoki kosunga mobali na ye. Elobaki ete: “Mwasi akoki koyeisa makambo pɛtɛɛ na boye ete mobali na ye azwa likoki ya kolɛngɛla mikumba na ye mikeseni, mpe kosunga ye ete asomba ntango ya ntina mingi mpo na mobali na ye mpe mpo na ye moko na kozaláká na manáka malamu kati na ndako, kolɛngɛláká bilei na ntango malamu, na kozaláká pene ya kokende na makita nokinoki. . . . Na nsé ya litambwisi ya mobali na ye, mwasi moklisto akoki kosala mingi mpo na kobɔkɔla bana kati na nzela oyo basengeli kolanda mpo na kosepelisa Yehova.” (Masese 22:6) Ee, mwasi akelamaki mpo ete akoka kozala “mosungi,” mpe mobali na ye akoyamba lisungi na ye na boboto nyonso. (Genese 2:18) Lisungi na ye ekopesa mobali na ye likoki ya kokokisa malamu mpenza ezala mikumba na ye kati na libota to mpe mikumba na ye kati na lisangá.

9. Banani balendisamaki kati na lisangá ya Tesaloniki ete básalisa basangani mosusu ya lisangá?

9 Nzokande, bobele basi ya bankulutu baklisto te nde bazali na lotómo ya kosala misala ya kosunga mokɛngɛli oyo asengeli ‘kobatela etongá ya Nzambe’ mpe kobatela libota na ye moko. (1 Petelo 5:2) Banani lisusu bakoki kopesa lisungi? Ntoma Paulo apesaki elendiseli oyo epai na bandeko mibali kati na lisangá ya Tesaloniki ete bázala na limemya epai na baoyo “bazali kokamba” bango. Nzokande, Paulo akóbaki mpe alobaki lisusu na bandeko wana​—mingi mpenza baoyo bazalaki te na mokumba ya kokamba lisangá​—akomaki ete: “Bandeko, nalɔmbi bino ete bópamela bagoigoi; bóyikisa bato na motema mokuse mpiko, bósunga bato na motau, bóyokela bango nyonso motema pɛtɛɛ.”​—1 Batesaloniki 5:12-14.

10. Lisalisi ya bolingo ya bandeko nyonso lizalaka na bopusi nini kati na lisangá?

10 Ezalaka mpenza malamu soki bandeko kati na lisangá moko bazali na bolingo oyo ezali kopusa bango na kobɔndisa baoyo banyokwami na makanisi, kosunga bato na motau, kopamela bato na mobulu, mpe kozala na motema molai epai na bato banso! Bandeko na Tesaloniki, oyo bautaki kala mingi te koyamba solo ya Biblia atako bazwaki bolɔ́zi monene, basalelaki toli wana ya Paulo mpo na kosala bongo. (Misala 17:1-9; 1 Batesaloniki 1:6; 2:14; 5:11) Kanisá naino bopusi malamu oyo boyokani na bango ya bolingo ezalaki na yango mpo na koyeisa lisangá mobimba makasi mpe na bomoko! Bobele bongo, wana bandeko bazali lelo kobɔndisa, kosunga, mpe kopamelana moko na mosusu, ezali kosala ete mokumba oyo bankulutu bazali na yango ya kobatela lisangá ezala pɛtɛɛ mpo na kokokisa yango.

11. (a) Mpo na nini tokoki koloba na elongá nyonso ete basi batalelamaki kati na liloba “bandeko”? (b) Lisalisi nini mwasi moklisto oyo akomeli akoki kopesa epai na bilenge basi lelo oyo?

11 Basi mpe batángamaki kati na “bandeko” oyo Paulo ayebisaki maloba wana? Ee, basi mpe batángamaki, mpamba te basi mingi bakómaki bandimi. (Misala 17:1, 4; 1 Petelo 2:17; 5:9) Basi wana bakokaki kopesa lisungi nini? Ezalaki na bilenge basi kati na lisangá oyo bazalaki na mikakatano mpo na “bopusi ya kosangisa nzoto” to baoyo bakómaki na “milimo mitutami.” (1 Timoté 5:11-13) Basi mosusu bazali mpe na mikakatano motindo wana lelo oyo. Mposa na bango eleki monene ezali ete moto moko ayokela bango malamu mpe akoka komitya na esika na bango. Mingimingi, mwasi moklisto oyo akɔmeli nde azali ye oyo abongi mpenza mpo na kopesa lisungi motindo wana. Na ndakisa, akoki kosolola na mwasi mosusu makambo matali bomoi na ye moko, oyo mobali moklisto ye moko akoki te kopesa lisungi ebongi mpo na yango. Kolobeláká ntina ya kopesa lisungi motindo wana, Paulo akomaki ete: “Tiká ete mibangé basi bázala . . . balakisi na makambo malamu, ete bálakisa bilenge basi ete bálinga mibali na bango, bálinga mpe bana na bango. Bázala mpe basembwi, na ezaleli na pɛtɔ, babongisi malamu na ndako, bato na boboto, batosi na babáli na bango ete liloba na Nzambe litukama te.”​—Tito 2:3-5.

12. Litambwisi nini ya ntina mingi mpe ya nani basangani nyonso ya lisangá basengeli kolanda yango?

12 Bandeko basi oyo bazali na komikitisa bazali mpenza lipamboli kati na lisangá wana bazali kosunga mibali na bango mpe bankulutu na boyokani malamu mpenza! (1 Timoté 2:11, 12; Baebele 13:17) Bankulutu oyo bazali na mikumba ya mabota bazwaka lisungi, mingi mpenza, na ntango basangani nyonso basalaka na bomoko mpo na kosungana moko na mosusu na bolingo nyonso mpe wana basangani nyonso bazali kolanda litambwisi ya baoyo batyami babateli ya bampate.​—1 Petelo 5:1, 2.

Baboti, botyaka nini na esika ya liboso?

13. Mpo na nini baboti mingi balóngaka te kati na mabota na bango?

13 Esili koleka mwa bambula, mosáli na ntɔ́ki moko alobaki ete: “Namonaka mibali ya makoki bazali kolónga kotambwisa bakompanyi oyo ezali na bankámá ya bato kati na yango; bayebi lolenge ya kosala liboso ya likambo moko na moko, lolenge ya kopesa disipilini mpe kopesa mbano kati na mosala. Kasi mosala moleki monene oyo bazali kokokisa ezali bongo libota na bango mpe bazali kolónga na yango te.” Mpo na nini? Ezali mpo ete batyaka mosala na bango mpe matomba mosusu na esika ya liboso mpe batalelaka toli ya Nzambe na bopɔtu, boye te? Liloba na ye lilobi ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo . . . okolakisa yango . . . na bana na yo.” Mpe esengelaki kosala bongo mokolo na mokolo. Baboti basengeli kopesa ntango na bango kozanga kokakatana​—kopesa mpe mingimingi bolingo na bango mpe komibanzabanza mozindo.​—Deteronome 6:6-9.

14. (a) Lolenge nini baboti basengeli kobatela bana na bango? (b) Lolenge malamu ya kobɔkɔla bana esangisi makambo nini kati na yango?

14 Biblia ezali kokundwela biso ete bana bazali likabo liuti na Yehova. (Nzembo 127:3) Obatelaka bana na yo lokola eloko euti na Nzambe, likabo oyo apesi epai na yo? Mwana na yo akosepela soko okamati ye na mabɔkɔ na yo, komonisáká bongo bolingo na yo mpe likebi oyo ozali kotyela ye. (Malako 10:16) Kasi ‘kobɔkɔla mwana na nzela ebongi na ye kotambola’ esuki bobele te na koyamba ye na mabɔkɔ mpe kopesa ye mapwepwe. Mpo ete akóma na mayele oyo ekosalisa ye na kopɛngola mitambo ya bomoi, mwana azali mpe na mposa ya disipilini. Moboti amonisaka bolingo ya solo na ‘kolukáká kopesa mwana na ye disipilini.’​—Masese 13:1, 24; 22:6.

15. Nini emonisi ntina ya disipilini ya baboti?

15 Ntina oyo baboti basengeli kopesa disipilini ekoki komonana na makambo oyo mopesi-toli na eteyelo moko alobaki na ntina na bana oyo bayaka koyebisa mikakatano na bango na biro na ye: “Bazalaka mawamawa, banyokwami na makanisi, babulungani. Balelaka na ntango bayebisaka mpenza makambo na bango ya motema. Bilenge mingi​—koleka mpenza lolenge tokoki kokanisa​—basili koluka komiboma, ezali te mpo ete bazali na esengo oyo eleki bango ndelo; ezali mpo ete bazangi mpenza esengo, batyelami likebi te, mpe banyokwami mpamba te na mbula ya bolenge oyo bazali na yango, bazali na ‘mokumba monene’ mpe eleki bango ndelo.” Abakisaki ete: “Mayoki ya kozala na mokumba ebangisaka bilenge.” Ya solo, bana bakoki koluka kopɛngola disipilini, kasi basepelaka mpenza na batoli mpe mibeko ya baboti. Bayokaka esengo ete baboti na bango bazali komibanzabanza na lolenge lobongi mpo na kotyela bango bandelo. Elenge moko oyo baboti na ye basalelaki ye bongo alobaki ete: “Ezalaki libɔndisi monene mpo na ngai.”

16. (a) Nini ekómelaka bana mosusu oyo babotami kati na mabota ya baklisto? (b) Mpo na nini ezaleli ya mobulu ya mwana moko elimboli bobele te ete kobongisama oyo azwaki epai baboti na ye ezalaki ya malamu te?

16 Nzokande, atako bazali na baboti oyo balingaka bango mpe bapesaka bango kobongisama ya malamu mpenza, bilenge mosusu, lokola mwana ya mobulu oyo alobelami kati na lisese ya Yesu, baboyaka litambwisi ya baboti mpe babungaka nzela. (Luka 15:11-16) Nzokande, yango mpenza elimboli te ete baboti bakokisaki mokumba na bango te ya kobɔkɔla bana na bango na lolenge lobongi, lokola Masese 22:6 ezali kotinda. Liloba oyo litali ‘kobokola mwana na nzela ebongi na ye kotambola; ekokóma ye monene apɛngwa na yango te’ epesamaki lokola lilako oyo ekoki kosalelama mpo na bato banso. Na mawa nyonso, na motindo ya mwana ya kilikili, bana mosusu ‘bakoboya kotosa baboti.’​—Masese 30:17.

17. Baboti oyo bana na bango bazali na mobulu bazwaki libɔndisi kati na likambo nini?

17 Tata ya mwana moko ya mobulu alobaki ete: “Nasili komeka na lolenge nyonso kosimba motema na ye. Nayebi te nini nasengeli kosala mpamba te nasili komeka myango nyonso. Nyonso elóngi te.” Na nsima, na elikya nyonso, okomona ete mwana motindo wana ya mobulu, akomikundola kobongisama etondi na bolingo oyo bazwaki mpe kozonga lokola mwana ya kilikili azongelaki tata na ye. Nzokande, likambo moko libongwani te, ete bana mosusu batombokaka mpe basalaka makambo ya mbindo oyo esalaka baboti na bango mpasi mingi. Baboti bakoki kobɔndisama na koyebáká ete ata moteyi monene oyo alekaki bateyi nyonso awa na mabelé atekamaki na Yuda Mokeliota oyo azalaki moyekoli na ye na boumeli ya ntango molai. Mpe na ntembe te, Yehova ye moko mpe ayokaki mawa na ntango bana na ye mingi ya elimo babwakaki toli na ye mpe batombokaki atako bazwaki ye na libúngá moko te.​—Luka 22:47, 48; Emoniseli 12:9.

Bana​—Bokosepelisa nani?

18. Lolenge nini bana bakoki komonisa ete bazali kotya Nzambe na esika ya liboso?

18 Yehova azali kolendisa bino bilenge ete: “Bótosaka baboti na bino kati na Nkolo.” (Baefese 6:1) Bilenge bazali kotya Nzambe na esika ya liboso na kosaláka bongo. Bózala bazoba te! Liloba ya Nzambe elobi ete: “Elemá akotyola mateyo na tata na ye.” Bókanisa mpe na lolendo nyonso te ete bokoki komitambwisa kozanga disipilini. Ezali solo ete “libota ezali oyo bato na yango bazali pɛtɔ na miso na bango mpenza, nde basukolami naino kolongola bosoto na bango te.” (Masese 15:5; 30:12) Na yango, bólanda litambwisi ya Nzambe​—‘bóyoka,’ ‘bóbomba,’ ‘bóbosana te,’ ‘bótya likebi,’ ‘bóbatela,’ mpe ‘bólongwa te’ na mibeko mpe na disipilini ya baboti.​—Masese 1:8; 2:1; 3:1; 4:1; 6:20.

19. (a) Bantina nini ya nguya bana bazali na yango ya kotosa Yehova? (b) Lolenge nini bilenge bakoki komonisa ete bazali na botɔ́ndi epai na Nzambe?

19 Bozali na bantina makasi ya kotosa Yehova. Ye alingaka bino, mpe apesi mibeko na ye, kati na yango mpe mobeko mpo na bana ete bátosa baboti na bango, mpo ete yango ebatela bino mpe esalisa bino ete bósepela na bomoi ya esengo. (Yisaya 48:17) Apesi mpe Mwana na ye ete akufa mpo na bino mpo ete bóbika na lisumu mpe na liwa mpe bósepela na bomoi ezangi nsuka. (Yoane 3:16) Ozali na botɔ́ndi? Yehova azali kotala uta na likoló, kotaláká mitema mpo na komona soki bozali mpenza kolinga ye mpe kosepela na bibongiseli na ye. (Nzembo 14:2) Satana mpe azali kotala, mpe azali kotyola Nzambe, azali kotuta ntólo na kolobáká ete okotosa Nzambe te. Soki oboyi kotosa Nzambe, okosepelisa Satana mpe okoyokisa Yehova “[mawa, NW].” (Nzembo 78:40, 41) Yehova azali kosɛnga na yo ete: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai [na kozaláká na botosi], ete názongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Ee, motuna ezali oyo ete: okosepelisa nani, Satana to Yehova?

20. Lolenge nini elenge moko abatelaki ntango nyonso mpiko na ye ya kosalela Yehova ata ntango bobángi ezalaki kokómela ye?

20 Ezali pɛtɛɛ te mpo na kokokisa mokano ya Nzambe kati na masenginya oyo Satana mpe mokili na ye bazali kopusa likoló na biso. Ekoki kobangisa. Elenge moko alobaki ete: “Kobanga ezali lokola koyoka malili. Okoki kosala oyo ekoki mpo na kosilisa yango.” Apesi ndimbola oyo ete: “Soki ozali koyoka malili, okolata tilikó. Soki malili esili te, okobakisa tilikó mosusu. Mpe okolanda kobakisa bilamba mosusu kino malili ekosila mpe okoyoka lisusu malili te. Na yango, kosambela Yehova wana bobángi ezwi yo ezali lokola kolata tilikó na ntango ozali koyoka malili. Soki nsima ya kobondela mbala moko nazali bobele kobanga, nabondelaka lisusu, mpe lisusu, mpe lisusu, kino bobángi na ngai ekosila. Mpe lolenge wana esalisaka ngai mpenza. Ebatelaki ngai ete nábulungana te!”

21. Lolenge nini Yehova akosunga biso soki tozali mpenza koluka kotya ye na esika ya liboso kati na bomoi na biso?

21 Soki tozali mpenza koluka kotya Yehova na esika ya liboso kati na bomoi na biso, akosunga biso. Akopesa biso makasi, akopesa biso lisalisi na nzela ya baanzelu wana mposa ezali, lokola asalaki epai na Mwana na ye. (Matai 18:10; Luka 22:43) Bino baboti mpe bana, bózala na mpiko. Bózala na bobángi lokola oyo na Klisto, mpe ekomemela bino esengo. (Yisaya 11:3) Ee, “bangá Nzambe mpe batelá mibeko na ye, mpamba te oyo ezali bongo mokumba nyonso ya moto.”​—Mosakoli 12:13, NW.

Okoki koyanola?

◻ Mikumba nini balandi ya liboso ya Yesu basengelaki kokokisa yango na bokatikati?

◻ Mokumba nini baboti baklisto basengeli kokokisa?

◻ Lisungi nini bankulutu baklisto oyo bazali na mabota bazali na yango?

◻ Mosala nini ya ntina bandeko basi bakoki kokokisa yango kati na lisangá?

◻ Toli nini mpe litambwisi nini oyo ezali na ntina mingi oyo bana basengeli kolanda?

[Elilingi na lokasa 15]

Mingimingi mwasi moklisto oyo akɔmeli akoki kopesa elenge mwasi lisungi oyo esengeli

[Elilingi na lokasa 17]

Libɔndisi nini baboti oyo bazali na bana ya mobulu bakoki kozwa yango kati na Makomami?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto