Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/2 nk. 13-18
  • ‘Na nkombo na elimo santu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Na nkombo na elimo santu’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babatisami kati na elimo santu
  • Babatisami “na nkombo na . . . elimo santu”
  • Mbuma ya elimo
  • Batyami na elimo santu
  • Totambwisama na elimo
  • Elimo mpe mosala ya kosakola
  • Tozala na bomoi na boyokani na batisimo na biso
  • Tambolá na elimo mpe zalá na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Elimo na Nzambe ekoki kozala na bopusi likoló na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Litambwisi ya elimo ya Nzambe na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/2 nk. 13-18

‘Na nkombo na elimo santu’

“Bongo, bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo . . . na elimo santu.”​—MATAI 28:19.

1. Liloba na sika nini oyo Yoane Mobatisi asalelaki yango na ntina na elimo santu?

NA MOBU 29, Yoane Mobatisi abongisaki nzela na molende mpenza mpo na koya na Masiya na Yisraele. Na boumeli ya mosala na ye, asakolaki likambo moko ya sika na ntina na elimo santu. Ya solo, Bayuda basilaki koyeba eloko nini Makomami na liebele elobaki mpo na elimo. Kasi mbala mosusu bakamwaki ntango Yoane alobaki ete: “Ngai nabatisi bino na mai mpo na kobongwana na bino na motema, kasi oyo akoya nsima na ngai . . . akobatisa bino na elimo santu.” (Matai 3:11, MN) ‘Batisimo na elimo santu’ ezalaki liloba ya sika.

2. Liloba na sika nini Yesu azalaki moto ya yambo mpo na kosalela yango na ntina etali elimo santu?

2 Ye oyo azalaki koya ezalaki bongo Yesu. Ya solo, na boumeli ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu abatisaki moto moko te na elimo santu, kasi alobaki mbala mingi na ntina na elimo santu. Lisusu, nsima na lisekwa na ye, alobaki likambo moko ya sika na ntina na elimo santu. Alobaki na bayekoli na ye ete: “Bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata, na Mwana mpe na elimo santu.” (Matai 28:19) Liloba ‘na nkombo na’ elimboli “kozaláká na kondima mpo na.” Batisimo na mai na kozaláká na kondima mpo na Tata, mpo na Mwana mpe mpo na elimo santu esengelaki kokesena na batisimo na elimo santu. Yango ezalaki mpe liloba ya sika oyo lilobelaki elimo santu.

Babatisami kati na elimo santu

3, 4 (a) Batisimo ya yambo na elimo santu epesamaki ntango nini? (b) Elimo santu ekokisaki misala nini likoló na bayekoli na Yesu na Pantɛkɔte ya mobu 33?

3 Na ntina etali batisimo kati na elimo santu, Yesu apesaki elaká oyo epai na bayekoli na ye wana elingaki ye komata na likoló, ete: “Bino bokobatisama na elimo santu nsima na mwa mikolo moke.” (Misala 1:5, 8) Elaká wana ekokanaki nsima mwa moke. Elimo santu ekitelaki bayekoli soko 120 baoyo bayanganaki na eteni na ndako na likoló, na Yelusaleme; longwa na likoló, Yesu abandaki kopesa batisimo na ye ya liboso kati na elimo santu. (Misala 2:1-4, 33) Makambo nini mabimaki? Bayekoli bakómaki basangani na nzoto ya elimo na Klisto. Lokola ntóma Paulo alimboli yango, “bango nyonso babatisamaki na elimo moko mpo na kozala nzoto moko.” (1 Bakolinti 12:13) Bobele na eleko yango, bapakolamaki mpo na kozala bakonzi mpe banganganzambe kati na Bokonzi na Nzambe na likoló. (Baefese 1:13, 14; 2 Timoté 2:12; Emoniseli 20:6) Elimo santu esalelamaki mpe lokola elembo ya moboko mpe ndanga mpo na kozwa libula wana ya nkembo na mikolo mizali koya, kasi esukaki wana te.​—2 Bakolinti 1:21, 22.

4 Mwa bambula na liboso, Yesu alobaki epai na Nikodeme ete: “Soko moto akobotama lisusu te, akoki komona bokonzi na Nzambe te. . . . Soko moto akobotama na mai mpe na elimo te, akokɔta na Bokonzi na Nzambe te.” (Yoane 3:3, 5) Na yango, bato 120 babotamaki lisusu. Na nzela na elimo santu, bakómaki bana na Nzambe kati na elimo, bandeko na Klisto. (Yoane 1:11-13; Baloma 8:14, 15) Misala oyo nyonso ya elimo santu, mikokani na mosusu te, mizali mpenza minene koleka makamwisi. Lisusu, na kokesena na makamwisi masalemaki na ntango na kala, mosala wana ya elimo santu mosukaki te na nsima na liwa ya bantóma, kasi molandamaki kino na mikolo na biso. Ba Témoins de Jéhovah bazali na libaku kitoko ya kozala elongo na basangani na nsuka ya nzoto na Klisto, baoyo babatisami na elimo mpe basali bongo “moombo na sembo mpe na mayele” oyo azali na mokumba ya kopesa bilei ya elimo na ntango na yango.​—Matai 24:45-47.

Babatisami “na nkombo na . . . elimo santu”

5, 6. Na motindo nini batisimo ya yambo kati na elimo santu ememaki bato na kobatisama kati na mai?

5 Ezali boni mpo na batisimo na mai, batisimo oyo epesami na nkombo na Tata, na Mwana mpe na elimo santu? Bayekoli ya liboso baoyo babatisamaki na elimo bazwaki batisimo wana na mai te. Basilaki kozwa batisimo ya mai na Yoane, mpe lokola batisimo yango endimamaki na Jéhovah na eleko wana mpenza, bazalaki na mposa ya komibatisa lisusu te. Nzokande, na Pantɛkɔte ya mobu 33, ebele monene ya bato bazwaki batisimo ya sika na mai. Motindo nini?

6 Batisimo ya bayekoli 120 kati na elimo santu, esalemaki na makɛlɛlɛ monene oyo ebendaki bato mingi. Bakamwaki wana bayokaki bayekoli koloba na minoko ndenge na ndenge, minoko na bapaya, oyo ya bato bazalaki wana. Lokola ntóma Petelo alimbolaki yango, likamwisi wana limonisaki ete Yesu asopaki elimo na Nzambe, ye oyo asekwisamaki longwa na bakufi mpe afandaki na lobɔkɔ na mobali na Nzambe na likoló. Petelo apesaki elendiseli oyo epai na bayoki na ye, ete: “Na bongo, tika ete libota mobimba na Yisraele bayeba solo ete Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino bobakisaki na nzeté na mpasi.” Asukisi na maloba oyo ete: “Bobongola mitema, mpe bobatisama mokomoko na nkombo na Yesu Klisto mpo na kolimbisama na masumu na bino, mpe bokozwa likabo ya elimo santu.” Bato soko 3 000 bandimaki elendiseli na ye.​—Misala 2:36, 38, 41.

7. Na ndimbola nini bato 3 000 oyo bazwaki batisimo na Pantekɔte ya mobu 33 babatisamaki na nkombo na Tata, na Mwana mpe na elimo santu?

7 Tokoki koloba ete bato wana bazwaki batisimo na nkombo (na kozaláká na kondima mpo) na Tata, na Mwana mpe na elimo santu? Ɛɛ. Atako Petelo alobaki na bango te ete babatisama na nkombo na Tata, bato yango basilaki kondima Jéhovah lokola Nkolo Moyangeli mpamba te bazalaki Bayuda na kobotama, basangani ya libota amipesaki na ye. Nzokande, Petelo alobaki polele ete: ‘Bobatisama na nkombo na Mwana.’ Batisimo na bango elimbolaki ete bandimaki Yesu lokola Nkolo mpe Klisto. Bakomaki sikawa bayekoli na ye mpe bandimaki ete lilimbisi ya masumu likokaki uta ntango wana kozwama na nzela na ye. Na nsuka, bazwaki batisimo na kondimáká elimo santu, mpe lokola eyano na eleká oyo ete basengelaki kozwa elimo yango lokola likabo.

8. (a) Longola batisimo na mai, baklisto bapakolami bazwaki lisusu batisimo nini? (b) Longola ba 144 000, banani mosusu bazali kobatisama na mai na nkombo na elimo santu?

8 Mibali mpe basi oyo bazwaki batisimo kati na mai na mokolo ya Pantɛkɔte ya mobu 33, bazwaki mpe batisimo na elimo; bapakolamaki mpo na kokóma bakonzi mpe banganganzambe kati na Bokonzi ya likoló. Engebene mokanda ya Emoniseli, bazali bobele 144 000. Bato oyo babatisami na elimo santu mpe na nsima batyami “bilembo” lokola basangoli na Bokonzi, bazali bobele 144 000. (Emoniseli 7:4; 14:1) Kasi, bayekoli nyonso ya sika​—ata elikya na bango ezali nini—​babatisami na mai na nkombo na Tata, na Mwana mpe na elimo santu. (Matai 28:19, 20) Na yango, kobatisama na nkombo na elimo santu elimboli nini mpo na baklisto nyonso, ata bazali na “etonga moke” soko na “bampate mosusu”? (Luka 12:32; Yoane 10:16) Liboso na koyanola na motuna oyo, totalela naino misala ya elimo santu na boumeli na eleko na boklisto.

Mbuma ya elimo

9. Mosala nini na elimo santu mozali na ntina mpo na baklisto banso?

9 Moko kati na misala minene ya elimo santu ezali mpo na kosalisa biso na kolóna bomoto na boklisto. Ya solo, na ntina na kozanga kokoka, tokosalaka masumu. (Baloma 7:21-23) Kasi soko tobongoli motema na sembo nyonso, Jéhovah akolimbisa biso na ntina na mbeka na Klisto. (Matai 12:31, 32; Baloma 7:24, 25; 1 Yoane 2:1, 2) Lisusu, Jéhovah azali kozela ete tobundisa mposa na biso ya kosala masumu, mpe elimo santu ekosalisa biso kati na likambo yango. Ntóma Paulo alobaki ete: “Botambolaka na elimo mpe bokosalela mposa na nzoto te.” (Bagalatia 5:16, MN) Paulo akóbi komonisa ete elimo ekoki kobota bizaleli kitoko mpenza kati na biso. Akomi ete: “Mbuma na elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, bobóto, malamu, kondima, bopɔlo mpe komipekisa.”​—Bagalatia 5:22, 23, MN.

10. Lolenge nini mbuma na elimo ezali kokóla epai na moklisto?

10 Lolenge nini elimo ekoki kobota mbuma yango epai na moklisto? Ezali te mpo ete tozali baklisto bamipesi na Nzambe mpe babatisami, nde tokobota yango ata tosali eloko moko te. Tosengeli nde kosala milende mpo na yango. Kasi soki tokotambola elongo na baklisto mosusu oyo bazali na bizaleli yango, soki tokobondela Nzambe ete apesa biso elimo na ye mpo esalisa biso na kolóna ezaleli moko na sikisiki, soki tokokima baninga mabe mpe soki tokoyekola Biblia mpo na kozwa batoli mpe kolanda bandakisa malamu kati na yango, boye mbuma na elimo ekokóla kati na biso.​—Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:33; Bagalatia 5:24-26; Baebele 10:24, 25.

Batyami na elimo santu

11. Na ndimbola nini bankulutu batyami na elimo santu?

11 Paulo alobelaki mosala mosusu ya elimo santu epai na bankulutu ya Efese. Alobaki na bango ete: “Bokɛba na ntina na bino moko mpe na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esili kotya bino bakɛngɛli na yango, mpo na kobatela lisangá na Nzambe, oyo asombaki yango na makila ya Mwana na ye mpenza.” (Misala 20:28) Ya solo, bakɛngɛli to bankulutu na masanga batyamaki na elimo santu. Na ndimbola nini? Na boye ete basengeli kokokisa masɛngami mayebisami kati na Biblia, oyo epemami na Nzambe. (1 Timoté 3:1-13; Tito 1:5-9) Nzokande, bakokokisa masɛngami yango bobele na lisalisi ya elimo santu. Lisusu, na ntango lisangani ya bankulutu bakoponaka ndeko moko ete akóma nkulutu, babondelaka ete elimo santu esalisa bango na kososola soki moklisto yango akokisi mpenza masɛngami. Na nsuka, koponama ezali mpenza kosalema na nsé ya litambwisi ya moombo na sembo mpe na mayele oyo apakolami na elimo.

Totambwisama na elimo

12. Lolenge nini elimo ezali kopusa biso na nzela na Biblia?

12 Baklisto bayebi ete Makomami Mosantu makomamaki na nsé na litambwisi ya elimo santu. Na yango, lokola batemwe ya Jéhovah baoyo bazalaki liboso na Klisto, bango mpe bazali kotalela yango mpo na kozwa mayele mapemami na elimo. (Masese 2:1-9) Bazali kotanga yango, bakokanisaka likoló na makambo mazali kati na yango mpe bazali komitika ete bomoi na bango etambwisama na yango. (Nzembo 1:1–3; 2 Timoté 3:16) Elimo ezali bongo kosalisa bango na ‘koluka makambo na mozindo na Nzambe.’ (1 Bakolinti 2:10, 13; 3:19) Na eleko na biso, na motindo wana elimo ezali kokamba basaleli na Nzambe, mpe yango ezali mosala moko monene.

13, 14. Na nzela nini Yesu asilisaki mikakatano mizalaki kati na lisangá, mpe mpo na nini tokoki koloba ete azali kosala motindo moko na eleko na biso?

13 Epai mosusu, nsima na lisekwa na ye, Yesu atindaki nsango epai na masangá nsambo ya Asie Mineure. (Emoniseli, mokapo 2 mpe 3) Kati na nsango yango, amonisaki ete atalaki masangá yango mpe ayebaki ezalela na bango ya elimo. Amonaki ete mosusu kati na yango epesaki ndakisa malamu na kondima, kasi na kati ya masanga mosusu, bankulutu bazalaki kopesa nzela na mikabwano, na pite mpe ezaleli na mpiɔ te mɔtɔ te ete ebebisa etonga. Na ndakisa, longola bobele ndambo moke na bato na sembo, lisangá ya Saladesi lizalaki na ezalela ya kokufa kati na elimo. (Emoniseli 3:1, 4) Na nzela nini Yesu asilisaki mikakatano wana? Na nzela na elimo santu. Kati na batoli na ye oyo apesaki epai na masangá nsambo, mbala na mbala Yesu asukisi nsango na ye na maloba oyo ete: “Oyo azali na matoi ayoka yango elimo elobi epai na masangá.”​—Emoniseli 2:7, 11, 17, 29; 3:6, 13, 22.

14 Na eleko na biso, Yesu azali mpe kotala masangá. Mpe soki amoni mokakatano moko, azali ntango nyonso kosilisa yango na nzela na elimo santu. Elimo ekoki kosalisa biso na kososola mikakatano mpe na kolónga yango mbala moko na nzela na botángi ya Biblia. Tokoki mpe kozwa lisalisi na nzela ya mikanda mikolimbolaka Biblia, oyo mibimisami na moombo na sembo mpe na mayele oyo apakolami na elimo; to mpe na nzela na bankulutu oyo elimo esili kotya bango kati na lisangá. Na nyonso wana, ata soki toli epesameli biso moko to biso nyonso elongo kati na lisangá, tolanda lilako oyo na Yesu, ete: “Oyo azali na matoi ayoka yango elimo elobi epai na masangá.”

Elimo mpe mosala ya kosakola

15. Mosala nini elimo ekokisaki likoló na Yesu na mpo na oyo etali mosala ya kosakola?

15 Ezalaki ye kosakola mokolo moko kati na eyanganelo, na Nazaleta, Yesu alobelaki lisusu motindo na mosala mosusu ya elimo. Totangi ete: “Afungolaki mokanda mpe akutaki esika ekomamaki ete: ‘Elimo na Jéhovah ezali likoló na ngai, mpo ete apakoli ngai mpo na koyebisa nsango malamu epai na babóla. Atindi ngai mpo na kosakola bonsomi epai na baoyo bamemami na boombo mpe kofungolama na miso epai na bakufeli miso, mpo na kosikola baoyo batutami.’ Abandaki bongo koloba na bango ete: ‘Lelo, liloba na Makomami oyo bouti koyoka ekokisami.’” (Luka 4:17, 18, 21, MN; Yisaya 61:1, 2) Ya solo, Yesu apakolamaki na elimo santu mpo na kosakola nsango malamu.

16. Na ekeke ya liboso, lolenge nini elimo santu ekokisaki mokumba monene kati na mosala ya kosakola nsango malamu?

16 Mwa ntango moke liboso na liwa na ye, Yesu ayebisaki ebongiseli monene mpo na mosala ya kosakola oyo bayekoli na ye basengelaki kokokisa. Alobaki ete: “Ekoki . . . ete nsango malamu esakolama kati na mabota nyonso.” (Malako 13:10) Maloba yango makokisamaki mpo na mbala ya yambo na ekeke ya liboso, mpe elimo santu ekokisaki mosala moko monene. Ezali elimo santu nde akambaki Filipo mpo ete asakola epai ya mokube Moetiopia. Ezali lisusu elimo santu nde ekambaki Petelo epai na Korneye, mpe esalaki nyonso ete Paulo mpe Balanaba batindama longwa na Antiokia lokola bantóma. Na nsima, wana Paulo alingaki kosakola na Azia mpe na Bitinia, elimo santu epekisaki ye. Nzambe alingaki ete mosala na kotatola mokóma kino na Mpótó.​—Misala 8:29; 10:19; 13:2; 16:6, 7.

17. Na mikolo na biso, mokumba nini elimo santu ezali kokokisa kati na mosala ya kosakola?

17 Na mikolo na biso, elimo santu ezali mpe kokokisa mokumba monene kati na mosala ya kosakola. Na kokokana mosusu na Yisaya 61:1, 2, elimo na Jéhovah epakolaki bandeko na Yesu mpo ete basakola. Na kokokana ya nsuka na Malako 13:10, baklisto bapakolami, baoyo basungami na ebele monene, bazali kosakola nsango malamu kati na ‘mabota nyonso’ mpenza. (Emoniseli 7:9) Elimo ezali kosunga bango nyonso kati na mosala yango. Lokola na ekeke ya liboso, elimo ezali kofungola bateritware ya sika mpe ezali kokamba mosala nyonso. Ezali kolendisa mosakoli moko na moko, ezali kosalisa bango na kolónga ezaleli ya nsonisoni mpe na kokólisa makoki na bango ya bateyi. Lisusu, Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Bokosambisama liboso na bayangeli mpe liboso na mikonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe epai na mabota. Nde wana bakokaba bino, bomitungisa te na ntina na oyo bokoloba soko mpo na lolenge bokoloba . . . ; mpamba te bobele bino nde bokoloba te, kasi elimo ya Tata na bino ekoloba na nzela na bino.”​—Matai 10:18-20, MN.

18, 19. Na ndimbola nini elimo esangani na mwasi na libala mpo na kobyanga bato na komikitisa ete ‘bakamata mai na bomoi lokola likabo?’

18 Kati na mokanda ya Emoniseli, Biblia emonisi lisusu mokumba ya elimo santu kati na mosala ya kosakola. Ntóma Yoane alobaki kati na yango ete: “Elimo mpe mwasi na libala balobi ete: ‘Yaka!’ Tika moyoki aloba ete: ‘Yaka!’ Tika ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Mwasi na libala oyo amonisami na batikali kati na baklisto 144 000 bapakolami, baoyo bazali naino awa na mabelé, bazali kobyanga bato nyonso ete bamela mai na bomoi lokola likabo. Kasi tomoni lisusu ete elimo santu ezali mpe koloba ete “Yaka!” Na ndimbola nini?

19 Na ndimbola oyo ete nsango esakolami na kelasi ya mwasi na libala oyo asalisami lelo na ebele monene ya bampate mosusu​—ezwami na Biblia, oyo ekomamaki na bopusi ya elimo santu mpenza. Epai mosusu, bobele elimo santu wana efungolaki mitema mpe elimo ya basangani na kelasi ya mwasi na libala, ete basosola Liloba lipemami mpe balimbola yango epai na bato mosusu. Baoyo babatisami lokola bayekoli ya sika ya Yesu Klisto, bazali na esengo ya komela mai na bomoi lokola likabo. Mpe basepeli na lolenge oyo basalani elongo na elimo mpe na mwasi na libala na kolobáká mpe epai na bato mosusu ete “Yaka!”

Tozala na bomoi na boyokani na batisimo na biso

20, 21. Lolenge nini tokoki kozala na bomoi na boyokani na ndimbola ya batisimo na biso na nkombo na elimo santu, mpe lolenge nini tosengeli kotalela batisimo yango?

20 Na kozwáká batisimo na nkombo ya elimo santu, tozali koyambola liboso na bato nyonso ete tondimi elimo santu mpe mokumba na yango kati na mikano na Jéhovah. Tozali bongo komonisa mposa na biso ya kosalana elongo na elimo, na koboya kosala likambo likoki kopekisa mosala na yango kati na libota na Jéhovah. Tondimi moombo na sembo mpe na mayele mpe kosalana elongo na ye. Tozali kosalana elongo na bankulutu batyami kati na lisangá. (Baebele 13:7, 17; 1 Petelo 5:1-4) Tozali na bomoi na boyokani na mayele na elimo, kasi na mayele na mosuni te, mpe totika ete elimo etambwisa bomoto na biso, emema yango kino kokokana na bomoto na Klisto. (Baloma 13:14) Mpe tosangani na motema mobimba elongo na elimo mpe na mwasi na libala mpo na koloba ete “Yaka!” epai na bamilió na bato mosusu bakoki kondima libyangi yango.

21 Kobatisama ‘na nkombo na elimo santu,’ ezali likambo moko ya ntina mingi, kasi matomba makoki mpenza kobima na yango. Mposa na biso ezali ete ntalo monene na bato babatisama motindo yango. Biso nyonso tolanda kotambola na boyokani na ndimbola na batisimo wana, na kosaleláká Jéhovah lokola baombo mpe na “kopɛla na elimo” ntango nyonso.​—Baloma 12:11.

Bozongeli

◻ Motindo nini elimo santu esalaki na Pantɛkɔte na mobu 33?

◻ Lolenge nini tokoki kobota mbuma ya elimo?

◻ Na ndimbola nini bankulutu batyami na elimo santu?

◻ Soki mokakatano mozali kati na lisangá, lolenge nini Yesu azali kosalela elimo santu mpo na kobongisa yango?

◻ Elimo ezali kokokisa mokumba nini monene kati na mosala ya kosakola?

[Elilingi na lokasa 15]

Batisimo oyo Petelo asakolaki ezalaki mpe batisimo na nkombo na Tata mpe na elimo santu

[Elilingi na lokasa 17]

Elimo ezali kokokisa mokumba monene kati na mosala ya kosakola nsango malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto